Emelaki Yona?
BIBLIA eyebisi biso ete Yona, mosakoli moko ya Jéhovah na ekeke ya libwa liboso na ntango na biso, oyo azalaki kokima mokumba mopesamelaki ye, akotaki na masuwa moko. Na boumeli ya mobembo ya mbonge makasi kati na Méditerranée, basali na masuwa babwakaki ye na mai. “Jéhovah abongisaki mbisi monene ete emela Yona mpe Yona azalaki na libumu na mbisi mikolo misato mpe butu misato.”—Yona 1:3-17.
Bato mosusu bazali koloba ete: ‘Ekoki kosalema te! Ekelamu moko te kati na mai monene ekoki komela moto.’ Kasi ezala mbisi monene cachalot to requin monene ya mpembe ekoki kosala yango. Zulunalo National Geographic (Décembre 1992) elobeli mbisi mosusu: requin-baleine. Yango ezali requin eleki monene oyo eyebani, ekoki kokola kino bolai ya bamɛ̀tɛlɛ 20 mpe kokóma na bozito ya ba tonnes 70.
“Ebongiseli ya kokamwa ya libumu ya requin ezali kokokanisa yango na lisoló ya Yona. Ezali mpasi te komikanisa ete na kozanga likebi obendami kati na monoko ya requin-baleine, oyo ezali monene mpenza . . . Ata monoko ya requin-baleine oyo ekómeli naino mingi te ekoki kobomba ba Yona mibale.”
Requin-baleine elyaka biloko ya mikemike ya mai mpe banyama ya mikemike, oyo “ekokita na mongongo na yango kino na eteni monene mpe ya ndembondembo oyo ezali likundu.” Nzokande, lolenge nini moto akoki kobima na yango? Zulunalo National Geographic elobi ete: “Ba requins bazali na motindo ya petee ya kobimisa biloko minene ya makasi oyo bamelaki . . . Requin ekoki na malembe kobimisa biloko na likundu na yango na kobalusa yango mpe kopusa yango kino na monoko. . . . Bongo, okoki kobima na koselimwa likoló na litɔtɔ́ ya moselu, okondi kasi mbala mosusu ozwi mayele mingi na ekperianse wana.”
Lelo oyo ba requins-baleines emonanaka lisusu na Méditerranée te, kasi emonanaki mosika kuna na Nord penepene ya engumba ya New York. Yango ezalaki na mai monene Méditerranée na eleko ya Yona? Nani akoki koloba yango? Biblia emonisi sikisiki te lolenge nini ya ekelamu Jéhovah asalelaki, kasi Yesu ye moko andimisaki ete lisoló ya Yona lizali solo.—Matai 12:39, 40.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Norbert Wu/Peter Arnold Inc.