Okoki koyanola?
Omonaki ete banimero ya sika ya Mosenzeli ezali na motuya mpo na yo? Boye, tala soki okoki koyanola na mituna milandi:
▫ Soki, kozanga ete tokanela yango, makanisi ya mbindo makoti na elimo na biso, tosengeli kosala nini?
Tosengeli kokanisa makambo mosusu, kokende kotambola, kotanga, to kosala misala ya ndako. Mpo na likambo yango, libondeli ezali lisalisi moko ya ntina mingi. (Nzembo 62:8)—15/4 lokasa 17.
▫ Mpo na nini bilenge basengeli kokeba na liponi ya miziki oyo bazali koyoka?
Miziki ezali na nguya ya kopusa, ya kosimba motema mpe ya kosala bopusi likoló na moto. Mpo ete banzembo mingi oyo eyebani mingi ezali na makanisi mingi ya mposa ya nzoto mpe elobeli ya mbindo oyo emonisami na kobombama, esengeli bongo kokeba mingi na liponi ya bakasete mpe badiske oyo tozali koyoka.—15/4, lokasa 20 kino lokasa 21.
▫ Liloba “kozala ya Nkolo na biso Yesu Klisto” elimboli nini? (1 Batesaloniki 5:23)
Yango etaleli kozala ya Nkolo na biso Yesu Klisto lokola mokonzi azangi komonana, kobanda 1914, mpe bambula oyo elandi kotyama na ye lokola mokonzi na likoló. (Nzembo 110:1, 2)—1/5, lokasa 11.
▫ Mokano nini Jéhovah akokisaki na kopetola tempelo na ye ya elimo? (Malaki 3:1-4)
Jéhovah alingaki ete tempelo na ye ezala peto mpo ete ntango basaleli mingi oyo bazali na elikya ya kofanda na mabelé bakoya na kati, bakuta yango ete ezali esika ya komemya boyangeli na ye ya molongo mobimba, esika nkombo na ye ebulisami, mpe esika mibeko na ye ya sembo mitosami.—1/5, lokasa 16.
▫ Nini ezali “bozwi” oyo Klisto Yesu apesi na moombo na ye? (Matai 24:45-47)
“Bozwi” wana ezali biloko nyonso ya elimo oyo ezali awa na mabelé, oyo ekómi ya Klisto na boyokani na lotomo azali na yango lokola Mokonzi na likoló. Yango esangisi mpenza mokumba ya kozalisa bato na mabota nyonso bayekoli na Klisto. (Matai 28:19, 20)—1/5, lokasa 17.
▫ Lolenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bazali kosala na ‘bolingo’ kati na mokumba na bango ya kobatela etonga, engebene elendiseli ya Petelo kati na 1 Petelo 5:2?
Mokengeli moklisto oyo azali kobatela etonga azali kosala yango na bolingo nyonso, na nse ya litambwisi ya Mobateli aleki malamu, Yesu Klisto. Kosala na bolingo nyonso elimboli lisusu ete mobateli ya mpate moklisto asengeli kotosa bokonzi na Jéhovah mpe komonisa limemya mpo na bibongiseli ya teokratike.—15/5, lokasa 20.
▫ Yesu alingaki koloba nini wana alobaki ete soki moto nani alingi kolanda ye asengeli “komiboya ye moko”? (Matai 16:24)
‘Komiboya’ elimboli kondima ete bomoi na biso ezali lisusu ya biso te, kasi ya Jéhovah. (1 Bakolinti 6:19, 20) Elimboli ete tozali kobika mpo na komisepelisa biso moko te, kasi mpo na kosepelisa Nzambe. (Baloma 14:8)—1/6, lokasa 9.
▫ Eloko nini moto asengeli kosala mpo na kozala na esengo?
Kozala na boyokani ya malamu elongo na Jéhovah mpe kokangama na mosala na ye ezali komema esengo kati na bomoi ya moto.—1/6, lokasa 22.
▫ Mpo na nini Jéhovah apesaki nzela na Abalayama ete aloba na ye na molende motindo oyo na ntina na mokano na Ye ya kobebisa Sodomo? (Genese 18:22-32)
Moko na batina ezali ete Abalayama azalaki moninga na Jéhovah. (Yakobo 2:23) Lisusu, Jéhovah ayebaki likambo monene oyo Abalayama azalaki komitungisa na yango. Nzambe ayebaki ete Lota, mwana na ndeko na Abalayama azalaki kofanda na Sodomo mpe Abalayama azalaki komitungisa mpo na bomoi na ye. Mpo na bantina oyo Jéhovah alingaki koyanola na mituna na Abalayama na ntina na mokano na Ye ya kobebisa Sodomo.—15/6, lokasa 16.
▫ Mbongwana oyo ebimisaki Lingomba ya Protestant na ekeke ya zomi na motoba ezongisaki boklisto ya solo?
Te, esalaki yango te! Na esika ya komema boklisto ya solo, Mbongwana ememaki nde ebele ya Mangomba ya bikolo to ya bitúka oyo ezwaki ngolu ya mabota ya politike mpe esungaki yango mingi kati na bitumba na yango.—1/7, lokasa 10 kino lokasa 11.
▫ “Biloko na motuya kati na makoló” oyo Yesu alobelaki na Matai 6:20 bizali nini?
Ezali bozwi oyo bokobebaka te, lokola nkombo malamu liboso na Jéhovah mpe mosala ya sembo ya boklisto. Oyo ezali kati na makambo oyo Jéhovah akobosana yango soki moke te. (Baebele 6:10)—1/7, lokasa 32.
▫ Bizaleli nini oyo Petelo alobeli yango lokola biteni ya ntina mingi mpo na kondima na biso? (2 Petelo 1:5-7)
Petelo alobeli etingya, boyebi, komipekisa, mpiko, bizaleli ya moto na Nzambe, bolingo ya bandeko, mpe bolingo esengeli kobakisama likoló na kondima na biso.—15/7, lokasa 13.
▫ Likebisi nini lipesami mpo na Basaleli na Nzambe kati na lisoló ya lisumu na Davidi elongo na Bata-seba? (2 Samwele 11:2-4)
Atako azalaki na basi mpe akokaki kozwa esengo wana kati na libala, Davidi atikaki nde mposa mabe ya kosangisa nzoto ekola kati na ye. Ntango amonaki ete mwasi ya Uliya azali kitoko, amitikaki na likanisi ya komisepelisa elongo na ye mpe asalaki ekobo elongo na ye. Likambo lolenge yango likoki kokómela mosaleli nyonso ya Nzambe soki akimi te lolenge wana ya elulela. (Yakobo 1:14, 15)—1/8, lokasa 14.