Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/8 nk. 23-26
  • Elónga likoló na boombo ya masanga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elónga likoló na boombo ya masanga
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Omitalela yo moko na kolongobana nyonso
  • Luká lisalisi
  • Kosala boyokani elongo na Nzambe
  • “Nguya oyo eleki nguya na bato”
  • Ebongiseli ya kopesa lisungi
  • Kobikisama ezali na maboko na yo moko
  • Bokoki kolónga mikakatano oyo mibebisaka libota
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Tiká masanga na esika na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Komɛla masanga mingi mpe libala
    Lisalisi mpo na libota
  • Bokatikati na likambo etali komɛla masanga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/8 nk. 23-26

Elónga likoló na boombo ya masanga

“Na mosala, penepene na 10 heures ya ntongo, nabandi kokanisa masanga. Na midi nakobima mpo na komela kopo moko to mibale. Na 15 heures nakómi kolenga. Nazali kozela na motema likoló ngonga oyo mosala ekosila mpo nakoka komela lisusu. Mbala mingi, na nzela ya bozongi na ndako nakomela kopo mibale. Penepene ya 19 heures nasengeli lisusu komela. Nakofanda na kiti mpe nakomela kino nakokwea, nakoyeba lisusu eloko moko te; nakosuba na pantalon, mpe nakolala na masuba na ngai kino na ntongo. Ezalaki kosalema bongo na boumeli ya mikolo nsambo na poso moko; na boumeli ya baposo 52 kati na mbula moko; nyonso wana na boumeli ya mibu 29.”

MOBALI oyo azali momeli. Azali ye moko te. Bamilió na bato kati na mokili mobimba bazali kobunda na maladi oyo ekobomaka oyo, engebene Vernon E. Johnson, “esimbi moto mobimba: na nzoto, na bɔɔngɔ́, na makanisi mpe na elimo.”a

Bato mingi ya mayele balobi ete elulela mpo na masanga ekoki kolimwa te kasi momeli akoki komilongola na boombo yango soki atiki komela. Yango ezali lisengami lileki makasi te, mpamba te masanga mazali mpenza na ntina mingi te kati na bomoi na moto. Nkutu, kolekisa ndelo na masanga ekoki kolongola ngolu ya Nzambe epai na moto. (1 Bakolinti 6:9, 10) Ebongi malamu kokota na mokili ya sika ya Nzambe kozanga komela masanga na esika ya komipesa na mposa ya komela yango mpe kozanga bomoi ya seko.​—Matai 5:29, 30.

Komilongola na boombo ya masanga​—mpe kotikala nsomi⁠—​ezalaka mbala mingi ntembe monene. (Tala Baloma 7:21-24.) Eloko nini ekoki kosalisa biso? Tolingi kopesa yo batoli ya polele. Ata soki omelaka masanga te, batoli oyo ekobakisa boyebi na yo mpe ekopesa yo makoki ya kosalisa baninga to bandeko na yo oyo bazali kobunda na boombo ya masanga.

Omitalela yo moko na kolongobana nyonso

Moko na bipekiseli minene mpo na kolonga ezali koboya kondima ete ozalaka momeli. Koboya kondima ezali lolenge ya kozanga kolongobana. Momeli azali komilongisa mpo na mokano moko: kobatela bonsomi na ye ya komela. Akoki kokanisa ete, ‘Ngai nazali na mokakatano monene wana te. Nazali naino na libota na ngai. Nabungisi mosala na ngai te.’ Likambo lileki ntina mpo na ye lizali ete akoki komela naino masanga na ye.

Koboya kondima ekoki kopekisa yo na koyoka baninga oyo balingi kosalisa yo. Robert amonaki ete tata mobokoli na mwasi na ye akómaki komela masanga na lolenge ya mabe mpe akómaki kozanga bonkóndé. Robert alobi ete: “Nsima na mwa mikolo, nasololaki na ye polele, wana natunaki ye soki ayebaki ete komela masanga mingi nde ezalaki ntina ya bizaleli akómaki na yango.” Epesaki litomba nini? “Aboyaki mpenza kondima likambo yango, na kobimisaláká maloba lokola oyo: ‘Ozali na elembeteli moko te’ mpe, ‘Oyebi te lolenge nazali kooka.’”

Soki mosangani moko ya libota na yo to moninga moko oyo atungisami na lolenge na yo ya komela masanga ayei kosolola na yo, meka komitalela yo moko na kolongobana nyonso. (Masese 8:33) Okoki kolekisa poso mobimba kozanga komela masanga, to sanza mobimba, to basanza mingi? Soki te, mpo na nini? Ozala te lokola moto oyo azali komizimbisa ye moko na makanisi ya bokosi. Yakobo alobi ete: “Azali lokola mobali oyo amitali elongi na nzoto na ye na talatala. Amitali mpe alongwi nde nokinoki abosani soki azali motindo nini.”​—Yakobo 1:22-25.

Ata wana obandi komisikola na boombo ya masanga, osengeli ntango nyonso kokeba na momeseno ya koboya kondima ezalela na yo. Mokanda Mokano malamu ekoki te (na Lingelesi) elimboli ete: “Moto oyo abandi komipekisa sika akoki na libunga nyonso kokanisa ete lokola asili komipekisa na boumeli ya mwa ntango​—ekoki kozala mpo na mbala ya liboso⁠—​asili kobikisama.” Wana ezali likanisi euti na ezalela ya boombo oyo ekomi makasi mingi, mpe ezali litambe ya liboso mpo na kokwea lisusu. Okoki kolonga yango yo moko te.

Luká lisalisi

Wana asosolaki ete akoki te kolonga ye moko kobunda na boombo ya masanga, mobali moko oyo tobyangi Leo alukaki lisalisi epai na minganga oyo basalisaka bameli. Nsima ya kozwa lisalisi ya makasi, akómaki pene ya kobikisama. Leo amonaki ete kozwa lisalisi ya sikisiki ezali mpenza na ntina mingi.b Soki lisalisi motindo wana lizali na mboka ofandi, okoki kozwa litomba na yango.

Nzokande, osengeli koyeba ete kobikisama ezali kosenga makambo mingi koleka kotika komela. Longola boombo ya masanga, ezali mpenza na makambo mingi oyo osengeli kobundisa. Kozanga kotyela yango likebi ekoki kobimisa likámá. Docteur Charlotte Davis Kasl akomaki ete: “Natunaki bato oyo balukaki lisalisi ya minganga kino mbala zomi na minei mpo na komilongola na biloko oyo bipesaka boombo, mpamba te bopotu yango moko, boombo mpe momeseno ya komitangola oyo euti na yango ebundisamaki te.”

Dennis amonaki ete likambo oyo lizali solo. Akomaki ete: “Nazalaki momeli monene te, nde nazalaki ntango nyonso na mikakatano mingi. Kotika komela masanga ekokaki te. Nasengelaki kotalela bomoi na ngai ya kala, kososola mateya oyo nazwaki na bomwana na ngai, kososola lolenge ezalaki kosimba bomoi na ngai, mpe kosala mbongwana kati na bizaleli na ngai.”

Bobele bongo, Leo asengelaki komitalela na mozindo mpo akoka kobikisama. Alobi ete: “Nazalaki moto moko ya zua mingi mpe ya nkanda makasi. Nazalaki mbala mosusu komimona ete nazali na ntina te, to ntango mosusu nazalaki na makanisi mpamba ya kozala na lokumu mingi.” Leo asalelaki toli ya Biblia oyo ezali na Baefese 4:22: “Bolongola motindo na bino oyo ekangami na ezaleli na bino ya liboso.” Ee, “ezaleli na bino ya liboso” ezali kosala bopusi ya makasi likoló na bomoto na bino. Lokola biliki ekozwaka lolenge ya masini na yango, bobele bongo bomoto na yo ezwaki ndambo ya bopusi ya bomoi na yo ya kala. Na ntango etamboli ya mabe elongwi, nini ekotikala? Bomoto oyo esalemaki mbala mosusu na boumeli ya mibu mingi. Na yango, mpo na kobikisama esengeli kobongola bomoto na yo ya kala oyo ezali na motindo na etamboli na yo ya kala.

Kosala boyokani elongo na Nzambe

Kobikisama ya Leo esengaki lisusu kokolisa boyokani ya penepene elongo na Nzambe. Alobaki ete: “Koyekola kotya motema epai na Jéhovah ebongolaki makanisi na ngai, etamboli mpe lolenge na ngai ya kotalela makambo.”

Nzokande, bokengi ezali na ntina. Boyokani nyonso—⁠elongo na bato to elongo na Nzambe⁠—​ezali kosenga kozala polele, kolongobana mpe kotyelana motema. Ezali mpenza bizaleli wana nde boombo ya masanga ezali kobebisa. Moto akoki kolona yango, kasi esengaka ntango.

Lokola ozali momeli, ekoki kozala ete oyebi te soki boyokani ya penepene elimboli nini. Mbala mosusu omeki naino yango te. Yango wana zala na motema petee. Kokende mbangumbangu te na litambe oyo, na likanisi ete boyokani elongo na Nzambe ekobima na pwasa lokola mbano na yo ya kotika komela. Sala makasi mpo na kososola Nzambe mpe bizaleli na ye. Kokanisa na mozindo ntango nyonso, mbala mosusu ntango ozali kotanga Biblia na mikanda ya Nzembo oyo ezali komonisa botondi ya mozindo mpo na Jéhovah mpe banzela na ye.c

“Nguya oyo eleki nguya na bato”

Boyokani ya mozindo mpe ya penepene elongo na Nzambe ekoki kosala bopusi ya makasi likoló na yo. Jéhovah akosimba molende na yo mpo na kobikisama. (Tala Nzembo 51:10-12; 145:14.) Okoki ntango nyonso kobelema na ye na nzela ya libondeli ya mozindo, na elikya ete akopesa yo “nguya oyo eleki makasi na bato.”​—2 Bakolinti 4:7; Bafilipi 4:6, 7.

Mozalisi ayebi bizaleli na yo malamu koleka moto mosusu nyonso. (Nzembo 103:14) Bapesi-toli oyo bazali kotya motema na mayele ya bato, bakoki kopesa lisalisi; kasi na koleka, Mozalisi ya moto akoki kosalisa yo na etumba yango. (Yisaya 41:10; 48:17, 18) Azali kopesa lisungi ya bolingo na lisangá ya boklisto.

Ebongiseli ya kopesa lisungi

Bankulutu oyo bazali mibali bateli na elimo kati na lisangá bakoki kozala liziba monene ya lisalisi. Mingi te kati na bango bakomitanga ete bayebi malamu mosala ya monganga to ya monganga ya maladi ya motó, kasi bayebi malamu Liloba na Nzambe mpe mitinda na yango, mpe bazali kotyela yango motema. Bakoki kozala lokola “ebombelo mpo na mopepe, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekaoki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molembisami na moi.” (Yisaya 32:2) Zwa litomba na lisalisi na bango.d

Na ntembe te, bankulutu wana baklisto elongo na basangani mosusu ya libota mpe na baninga, bakobatela yo te na matomba mabe ya misala na yo moko. Mokanda Kotika kozala momeli (na Lingelesi) elimboli ete: “Likambo lileki ntina kati na myango ya kosalisa bameli lizali ya komonisa bango matomba mabe ya kozala na boombo ya masanga mpe kotika bango bamema mikumba ya etamboli na bango moko.” Bakomonisa boboto kasi bakolobela yo makambo polele, wana bakolendisa yo na kotala makambo na lolenge yango ezali mpe na kondima mwango nyonso ya lisalisi mpe etamboli oyo esengami mpo na kobundisa masanga na elonga nyonso.

Kobikisama ezali na maboko na yo moko

Atako ozali kozwa lisungi na basusu, osengeli koyeba ete moto moko te to elimo moko te akoki kopusa yo na makasi ete obikisama. Yo moko ozali na bonsomi ya kopona makambo okosala. Kobikisama na yo etali mpenza yo moko. (Tala Genese 4:7; Deteronome 30:19, 20; Bafilipi 2:12.) Ndima mokumba yango, mpe Jéhovah akopambola yo. Tondimisami na 1 Bakolinti 10:13: “Emekeli moko ekómeli bino te oyo ezangi epai na bato nyonso. Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bomekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na emekeli, akobongisa ekimelo ete bokoka koyika mpiko.” Na yango, zwa kobondisama​—okoki kolonga kobundisa momeseno ya komipesa na masanga.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Atako tokolobela awa bameli oyo bazali mibali, nzokande mitinda oyo mizali awa mizali mpe na ntina mpo na basi bameli.

b Ezali na bisika mingi ya kosalisa bameli, ba lopitalo, mpe bibongiseli bisusu ya kosunga oyo ekoki kopesa lisalisi. Mosenzeli ekotinda moto te na lolenge moko to mosusu ya lisalisi. Esengeli kosenzela ete okota te na misala oyo mikobuka mitinda ya Biblia. Nzokande, moto na moto akokata ye moko lolenge nini ya lisalisi azali na yango mposa.

c Mwa ndakisa na yango ezali ba Nzembo 8, 9, 18, 19, 24, 51, 55, 63, 66, 73, 77, 84, 86, 90, 103, 130, 135, 139, 145.

d Mwango mpo na bankulutu na kopesa lisalisi ezwami na La Tour de Garde ya 1er Mai 1983, lokasa 8 kino lokasa 11.

[Etanda na lokasa 24]

Mbala mosusu ozali konyokwama na libebi mpe na mpasi ya boombo ya masanga. Soki ezali bongo, kolongola elikya te. Lisalisi lizali penepene.

[Etanda na lokasa 26]

SOKI OKWEI LISUSU

Mokanda Mokano malamu ekoki te elobi ete: “Kobongisama mpo na kopengola kokwea ezali lokola komimekisa mpo na mɔ́tɔ. Elingi koloba te ete ozali komizela ete ndako ezika kasi omibongisi mpo ete ozala pene ya kokamata bibongiseli oyo esengeli wana likambo yango likomi solo.” Soki okwei lisusu:

□ Bondela Jéhovah. Omindimisa ete azali kososola mokakatano na yo mpe alingi kosalisa yo.​—Nzembo 103:14; Yisaya 41:10.

□ Omiyebisa na nkulutu moko, ozwa ekateli liboso mpo na koyeba soki okosolola na nani ntango mposa emonani. Yebisa na kolongobana nyonso likambo oyo lisalemaki mpe yoka na likebi mingi toli na ye euti na Makomami.

□ Osenzela ete ozanga elikya te. Komiyina yo moko ekomema yo na kokwea solo, mpo na yango talela libunga na yo na lolenge malamu. Kozanga elonga moko elimboli te ete osili kobungisa etumba mobimba. Ntango mopoti mbangu akwei, azongaka na ebandeli ya bopoti te; akotelemaka mpo na kolanda bopoti mbangu. Sala bobele bongo mpo na kobikisama na yo. Ozali naino na nzela. Baposo, basanza to bambula ya komipekisa oyo ezali nsima na yo elimwi te.

[Elilingi na lokasa 25]

Keba na ezaleli ya koboya kondima ete ozali moombo ya masanga; komitalela nde na kolongobana nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto