Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/8 lok. 3
  • Kolɛmbisama ya bikanganeli ya libala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolɛmbisama ya bikanganeli ya libala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Libala—Mpo na nini mingi ezali kolónga te?
    Lamuká!—1993
  • Biblia elobi mpenza nini mpo na koboma libala?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Esengeli kaka koboma libala?
    Lamuká!—2005
  • Makambo minei oyo osengeli koyeba na oyo etali koboma libala
    Lamuká!—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/8 lok. 3

Kolɛmbisama ya bikanganeli ya libala

ELENGE mama moko azalaki kobondelabondela bébé na ye ya sanza mibale. Na mbala moko, ayokaki nkanda, mpe abwakaki ye na nsé. Mwana mobali wana akufaki nsima ya mwa bangonga oyo elandaki. Mama yango alobaki ete: “Nabwakaki ye na nkó mpo ete mobali na ngai azali komibanzabanza te na ntina na libota na ye.” Na esika ya kolobela likambo yango elongo na mobali na ye, amemaki nkanda na ye epai na bébé oyo ayebaki na ye likambo te.

Bobele bamama moke nde bazali kozwa meko makasi ya motindo oyo, kasi mingi bazali na mayoki motindo moko na ye. Ezali kokóma mokakatano monene mpo na babalani ete balónga na libala na bango. Zulunalo Journal of Marriage and the Family elobi ete: “Awa makoki ya kolónga na libala mazali bobele moke lelo na Etats-Unis, kosala boyokani ya makasi mpe ya kokoka kati na libala . . . ezali likambo ya mpasi oyo ata moto moko te oyo azali na bozwi asili kosala yango.”

Na ntango oyo ya mobulu, pite, kozanga koyokana, banyongo, matáta elongo na libota ya mobali to libota ya mwasi mpe moimi, nyonso oyo ezali kongalisa matáta na ndako, oyo ezali mbala mingi komema na koboma libala. Ezalela mpenza ya mabe ezali likambo oyo lizali komonana mbala na mbala kati na lingomba ya Katolike na Japon, oyo eyebani mingi na botemeli na yango makasi mpo na kobundisa ezaleli ya koboma libala, nzokande [lingomba yango] esalaki ebongiseli moko mpo na kosunga basangani na yango baoyo basili koboma libala mpe bazali kobala lisusu. Ntalo monene ya bandimi batungisami na mokakatano ya koboma libala.

Nzokande, motuya ya mabala oyo makufi emonisi bobele makambo mikemike. Bolukiluki na Etats-Unis emonisi ete kobeba ya lolenge ya bomoi malamu kati na libala ezali ntina ya komata ya motuya ya mabala oyo makufi, kasi ezali te mwa bizaleli oyo moto na moto akóli na yango nde epesi nzela na koboma libala. Na mwa milende moke mpe na boyokani moke, bomoi na libala ezali kobungisa kongɛnga na yango. Mingi bazali komimonisa liboso na bato ete bazali babalani, nzokande na ndako bazali kolala esika moko te, mpe bazali mpenza kolobana te. Basusu bazali kokanisa lokola mwasi moko ya Orient oyo amisombelaki nkunda, oyo alobaki ete: ‘Naboyi kokundama elongo moko na mobali na ngai.’ Lokola akoki te koboma libala awa ezali ye na bomoi, akani kokabwana nsima na liwa. Na mawa mpenza, atako bato wana babomi naino libala te, kasi bomoi na libala ezali liziba ya esengo te mpo na bango.

Yango nde ekómelaki Isao. Abalaki mwasi na ye kozanga kokanisa liboso, mpe azalaki na mposa te ya kobongola lolenge na bomoi na ye ya moimi. Atako azalaki kozwa lifuti malamu mpo ete azalaki mokumbi na motuka monene, abebisaki mbongo na ye nyonso na kolya mpe na komela masanga, kozanga komibanzabanza mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye. Mpo na yango, azalaki ntango nyonso koswana elongo na mwasi na ye. Isao azali komikundola ete: “Mbala na mbala oyo makambo na ngai mazalaki kotambola malamu te, nazalaki kozonga na ndako na ngai mpe kosilisa nkanda nyonso likoló ya libota na ngai.” Lolenge moko na ngomba ya mɔ́tɔ (volcan), oyo ezali kobimisa ntango nyonso mɔ́tɔ kati na yango, makanisi ya koboma libala mazalaki kolobelama mokolo na mokolo.

Ebele ya mibali mpe basi bazali kolónga te kati na libala. Ata babomi libala to mpe babomi yango te, bazali na esengo te. Ezali na mwango mpo na bango ete balónga na libala na bango? Nini bakoki kosala mpo na kolendisa bikanganeli ya libala na bango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto