Tóluka biloko ya motuya oyo bibombami
NA 1848, bakundolaki wolo na mboka moke Moulin de Sutter na etúka ya Californie, na mokili ya Etats-Unis. Na 1849, bankóto na bato bakendeki na esika yango na elikya ete bakokóma nokinoki bazwi, mpe kosopana eleki monene ya bato epai na wolo ebandaki kokóla kati na lisoló ya Etats-Unis. Na boumeli ya mbula moko, libóngo ya penepene, San Francisco, oyo ezalaki mboka moke ekómaki engumba ya bato 25 000. Elikya ya kokóma na bozwi mingi na mbala moko esalaki bopusi makasi mpo na kobenda bato.
Salomo, mokonzi na Yisraele ya kala, ayebaki lolenge bato bazalaki kotimola na nguya nyonso mpo na koluka biloko na motuya bibombami, mpe alobelaki yango ntango akomaki ete: “Ɛɛ, soko okolela mpo na mayele mpe soko okonganga mpo na bososoli; soko okoluka yango lokola palata, mpe okolukaluka yango lokola biloko na motuya bibombami; mbɛlɛ, okososola botosi na kotosa Jéhovah mpe okozwa boyebi na koyeba Nzambe.”—Masese 2:3-5, MN.
Tokoki kosala makambo mingi na wolo mpe na palata, nzokande na mayele mpe na bososoli tokoki kosala makambo mingi koleka. Bizaleli wana bikosalisa biso na kozwa bikateli ya malamu, na kobongisa makambo, na kolónga kati na libala mpe na kozwa bolamu. (Masese 2:11, 12) Bobele bongo, boyebi ya solosolo mpe bwanya ekosalisa biso na koyeba Mozalisi na biso, na kososola mikano na ye, na kotosa ye mpe na kosepelisa ye. Wolo ekoki te kopesa biso moko na biloko oyo.
Maloba oyo ya Biblia mazali solo: “Bwanya ekobatelaka lokola mosolo ekobatelaka. Malamu na boyebi ezali ete bwanya ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.” (Mosakoli 7:12, MN) Wana mingi bazali kolota bozwi ya pwasa, oyo nde likambo ya mayele kofungola Biblia mpe kotimola mpo na koluka bososoli, mayele, boyebi mpe bwanya oyo ezali bozwi ya solo!