Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/8 lok. 9
  • Elenge oyo alingaki mingi engbunduka, ayekoli solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elenge oyo alingaki mingi engbunduka, ayekoli solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Témoins de Jéhovah ezali Nkombo ezali mpe Lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bakasɛti video oyo ezali kopesa litatoli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • “Balobeli yango na ndenge ya malamu mpenza!”
    Lamuká!—2016
  • Video ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/8 lok. 9

Masoló ya Basakoli na Bokonzi

Elenge oyo alingaki mingi engbunduka, ayekoli solo

SOKI motema ya moto moko mobendami na makambo ya sembo, na ntango wana Jéhovah Nzambe, na nzela ya Klisto Yesu mpe baanzelu na likoló, akosala mpenza ete moto oyo akokani na mpate akutana na nsango malamu ya Bokonzi. Na ntango na yango, moto wana akoki kotyama na lobɔkɔ mobali na Yesu, etɛlɛmɛlo emonisi ete andimami. (Matai 25:31-33) Yango emonanaki epai na elenge oyo alingaki mingi engbunduka na mboka Australie, oyo ayebaki solo na lolenge moko kitoko.

Oyo ezalaki mpenza kosepelisa elenge wana ezalaki bongo kofanda na esika efandi mokumbi engbunduka, na ndingisa ya mokonzi na basali ya engbunduka. Azalaki kozwa bililingi ya mobembo moko na moko kati na caméra vidéo na ye ete, na nsima, akoka kotala yango lisusu kati na ndako na ye. Na mobembo oyo asalaki mokolo moko longwa na engumba Vienne kino engumba Salzbourg, mokumbi engbunduka azalaki Témoin de Jéhovah. Asalelaki libaku wana mpo na kolobela Bokonzi epai na elenge wana mosali mibembo na engbunduka. Liboso, elenge mobali akamwaki na koyoka mokumbi engbunduka koloba na ntina na Nzambe mpe na ntina na Biblia, nzokande na boumeli ya mobembo, makanisi na ye mabendamaki mingi na kotala banzeté nde atyaki mpenza likebi te na oyo mokumbi engbunduka azalaki koloba na ye.

Ezongaki ye na ndako, elenge wana atalaki vidéo na ye mbala moko te kasi mbala zomi, mpo asepelaki mingi na mobembo oyo asalaki mokolo wana. Lokola akɔtikaki mpe mingongo, azalaki mpe koyoka mbala na mbala lolenge Temwe azalaki koloba na ye. Lokola azalaki kotala vidéo mingi, ameseneki na makambo oyo azalaki koyebisa ye. Mosika te, abandaki kokanisa likoló na yango, mpe na nsuka asepelaki mingi na ntina na nsango kitoko euti na Biblia. Azalaki na mposa ya koyeba makambo mingi.

Amikundolaki nkombo ya mokumbi engbunduka mpe ayebaki ete azalaki kofanda kati na engumba Vienne. Mosika te, akendaki na biro ya poste mpe abandaki komeka nimero moko nsima na mosusu oyo etyamaki na molongó na nsé na batelefone. Motuna na ye epai na moto nyonso oyo azalaki koyanola na telefone ezalaki ete: “Yo mokumbi na engbunduka?” Soki ayanoli ete ye te, azwi nimero mosusu. Na nsuka, azwaki mokumbi engbunduka. Ayebisaki [mokumbi engbunduka] lisoló na ye mpe alobaki na ye ete asepelaki na nsango ya Biblia oyo azalaki koyoka na vidéo.

Temwe wana akamataki bibongiseli na nzela na Biro ya filiale ete moto oyo afandi penepene na elenge mobali wana akende kotala ye. Emonanaki lisusu ete kati na lisangá ya esika wana, ezalaki mpe na Temwe mosusu oyo azalaki mokumbi engbunduka. Mokumbi engbunduka oyo ya mibale atalaki elenge wana, mpe boyekoli ya Biblia ebandaki. Na eleko ya molungé ya mobu 1991, elenge mobali wana azwaki batisimo.

Jéhovah, ye oyo akotalaka mitema nyonso, amonaki ete moto yango azalaki na bolingo ya solo mpo na boyengebene. Na yango, asalaki ete akutana na solo ya Biblia​—na nzela ya libaku moko kitoko.​—1 Ntango 28:9; Yoane 10:27.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Courtesy of the Austrian Railways

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto