Jéhovah azali kobatela libota na ye na mboka Hongrie
HONGRIE, mboka oyo ezali na katikati na mikili ya Mpótó, esili mbala mingi kozwa mbongwana kati na Lisoló ya bato. Bato na yango banyokwamaki mingi, atako bamipesaki na Ngondo Maria mpe basɛngisamaki mpo na kokóma baklisto ya nkombo mpamba na mobu 1001, na Etienne, mokonzi na bango ya liboso.
Na boumeli ya bikeke mingi mokili ya Hongrie etikalaki lisusu na nguya te na ntina na matáta ya banamboka, likambo oyo lipesaki mabota mosusu nzela ya koyangela yango mbala na mbala. Bafandi ya mboka mike mingi babomamaki na boumeli ya bitumba wana, mpe na nsima bapaya nde bayaki kofanda wana. Yango wana, ekólo Hongrie esalemi lelo na bato bauti na bikólo mingi bikeseni. Mpo na oyo etali mangomba, atako mbongwana epalanganaki nsima kati na bisika mosusu, penepene na ndambo mibale kati na misato ya bato batikali bobele Bakatolike.
Ebandeli ya moke
Ezalaki na 1908 nde nkona ya solo ya Biblia elónamaki mpo na mbala ya liboso na Hongrie. Esalemaki na mwasi moko oyo ayekolaki solo epai na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobénga ba Témoins de Jéhovah na ntango wana. Na nzela ya kosakolama na ye, bato mingi basepelaki na nsango malamu. Mwa moke na nsima, mibali mibale oyo bazongaki na Hongrie longwa na Etats-Unis basalelaki ntango na bango nyonso mpo na kopalanganisa nsango malamu lokola ba colporteurs. Solo epalanganaki malɛmbɛmalɛmbɛ kasi na bosikisiki, mpe enyateli moko etyamaki na engumba Kolozsvár.
Rapport ya malamu epesamaki mpo na mbala ya liboso na 1922, ntango bayekoli ya Biblia 67 ya bingumba zomi bayanganaki na Ekaniseli ya liwa na Klisto. Mosala na bango ya kosakola esalaki bopusi nokinoki, oyo ebimisaki botemeli wana bakonzi na mangomba bapusaki bayangeli mpe bapanzi nsango na kopekisa mosala ya kosakola.
Botɛmɛli ekómi makasi
Na 1928, sángo ya Katolike Zoltán Nyisztor abimisaki brochure moko na motó ya likambo Millennialist Bible Students (Bayekoli ya Biblia bazéli ya Bokonzi ya mbula nkóto). Alobaki kati na yango na ntina na Bayekoli ya Biblia ete: “Bazali mabe koleka ba boltcheviks oyo bazali kobundisa na mindoki, mpamba te bazali kozimbisa bato basali eloko te na kobombama nsima ya Biblia. Bapolisi ya mboka Hongrie bazali mpenza kokɛngɛla misala na bango.”
Na eleko wana, ndeko moko ya molende na nkombo Josef Kiss azalaki kotala masangá. Bapolisi babandaki kolandela ye na nkuku. Na 1931, azalaki na ndako ya ndeko moko ntango bapolisi bakutaki ye mpe bapesaki ye etindá ya kokende nokinoki. Wana ndeko Kiss abandaki kokanga biloko na ye, polisi moko atutaki ye na kolosi ya mondoki na ye mpe angangelaki ye ete: “Sala noki, soki bongo te nakotobolatobola yo!” Ndeko Kiss asekaki mwa moke mpe alobaki ete: “Boye nakokende nokinoki na mboka na ngai,” azalaki kolobela mpo na elikya na ye ya bomoi na likoló mpo ete azalaki mopakolami.
Basodá balandaki ndeko Kiss kati na engbunduka. Bazalaki kozela akóma na lisangá ya Debrecen na le 20 Juin 1931, kasi akómaki te. Bandeko bakómaki na bosukisi ete bayini na ye basilaki koboma ye, ete akendeki solo “na mboka na ye” mpo na kozwa mbano na ye ya likoló. Atako mosala na ye mokatanaki, bakonzi bakokaki mpenza te kozimisa pole ya solo.
Mbala mingi esengelaki kosalela mayele mpo na kopesa litatoli. Na ndakisa, na katikati na bambula 1930, ndeko moko akufaki na engumba Tiszakarád. Mpo na kokamba bokundi na ye esengelaki liboso kosenga nzela na bakonzi. Bapesaki bandeko bobele minite moko mpo na kobondela mpe minite moko lisusu mpo na koyemba. Bapolisi oyo bayaki na bokundi elongo na mindoki mpe mbeli ya mindoki na bango, basengelaki kosɛnzela ete batósa yango. Bato mingi ya engumba bayaki mpo balingaki komona lolenge nini bokundi ekosalema.
Ndeko moko atɛlɛmaki penepene na sanduku ya ebembe mpe abondelaki minite ntuku misato na motindo boye ete bato balobaki ete bayoka naino makambo motindo yango te. Balobaki ete: “Ata soki basángo motoba bakambaki bokundi, elingaki kosala bopusi motindo yango te.” Ndeko mosusu oyo azalaki na mongongo kitoko abandaki koyemba nzembo, kasi polisi moko apesaki ye etindá ya kofanda nyee. Bapolisi balobaki nsima ete atako basepelaki te, bakokaki te kokata libondeli wana.
Lokola botɛmɛli ezalaki kolandana, Lajos Szabó, sángo moko ya Eglise Réformée akomaki na 1935 kati na brochure Motɛmɛli na Klisto na ebale Tisza ete: “Ezalaki mwango ya mayele kokɔtisa bato mateya ya bolchevisme na nkombo ya lingomba . . . Marx alataki elilingi ya Klisto . . . Motɛmɛli na Klisto azali awa na elamba na ye motane ya molai, elongo na ba Témoins de Jéhovah.”
Mibu mingi ya bipekiseli
Na 1939 mosala ya kosakola ya ba Témoins de Jéhovah epekisamaki polele. Etalelamaki lokola mosala ya “kotɛmɛla mangomba mpe libota na bato.” Ba Adventistes, ba Baptistes, ba Evangeliques, mpe ba Présbytériens babimisaki mikanda mike mpo na kotemela Batemwe. Kasi Jéhovah atikaki basaleli na ye te, mpe Batemwe ya mikili misusu basungaki bango. Lisusu, libota na Nzambe na Hongrie ezalaki na makambo mingi ya kolendisa kondima.
Na ndakisa, ntango ndeko moko autaki na Tchécoslovaquie, elongo na sakosi na ye ya mokɔngɔ etondi na bazulunalo na biso, basáli ya douane batunaki ye ete: “Nini ezali kati na sakosi na yo oyo bakomemaka na mokɔngɔ?” Ndeko ayanolaki na bosolo nyonso ete: “Misenzeli.” Ntango ayokaki yango, mosáli asalaki lokola mpo na kolimbola na mosapi na ye ete ndeko azali moto na ligboma, mpe atikaki ye akende. Na yango, bilei ya elimo bikómaki malamu na mboka Hongrie.
Nzokande, Batemwe bazalaki kotungisama mingi. Bandeko mingi bakangamaki mpe batyamaki na bolɔkɔ na boumeli ya mikolo mikeseni. Bongo, batindaki etuluku moko ya bolukiluki mpo na kozwa bikateli ya makasi mpo na ba Témoins de Jéhovah. Na 1942, bayanganisaki mibali, basi mpe bana kati na bandako ya masano mpe ya biteyelo ya Bayuda oyo etikalaki mpamba. Nsima ya basanza mibale ya minyoko, basambisaki bango mpe bakangaki bango na bolɔkɔ. Bakataki mpo na basusu bolɔkɔ ya bomoi mobimba; basusu bazwaki etumbu ya mibu 2 kino mibu 15 ya bolɔkɔ. Bandeko misato—Dénes Faluvégi, András Bartha, mpe János Konrád—bakatelamaki etumbu ya kobomama na nsinga, kasi na nsima babongolaki etumbu yango na bolɔkɔ bomoi na bango mobimba. Bandeko 160 batindamaki na bolɔkɔ ya liwa na engumba Bor. Nsima na kokatisa ndelo ya ekólo, bayebisaki bango ete bakozonga na bomoi te. Kati na Bayuda 6 000 oyo batindamaki na bolɔkɔ wana, bobele 83 batikalaki na bomoi. Nzokande, Batemwe nyonso bazongaki, longola bobele minei oyo bakufaki.
Ba Témoins de Jéhovah mosusu babomamaki mpo na kondima na bango. Penepene na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ba Nazis babomaki bandeko mosusu. Bandeko Bertalan Szabó, János Zsondor, mpe Antal Hónis babomamaki na masasi, mpe Lajos Deli akakisamaki na nsinga.—Matai 24:9.
Mbongwana ya malamu bobele mpo na mwa ntango mokuse
Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, makambo mabongwanaki lisusu. Boyangeli oyo eutaki na boyokani ya bakonzi elakaki ete ekobatela ntómo (droits) ya bato. Bandeko oyo bautaki na bolɔkɔ babandaki nokinoki kosakola mpe kobongisa masangá. Baokaki lokola ete Jéhovah apesaki bango bonsomi mpo ete bakoka kosanzola nkombo na ye monene, kasi te mpo baluka kotondisa biloko ya mosuni. Na nsuka ya mobu 1945, basakoli ya molende bazalaki 590. Na 1947, basombaki ndako mpo ezala biro ya filiale ya la Société Watch Tower, mpe assemblée nationale ya liboso esalemaki na ndako ya masano. Bayangani nyonso bazalaki 1 200, mpe kompanyi ya engbunduka ya Hongrie ekitisaki motuya ya mobembo na 50 % mpo na baoyo balingaki kokende na assemblée yango.
Nzokande, bonsomi eumelaki mingi te. Mwa moke na nsima, parti communiste elóngaki, mpe boyangeli ebongwanaki. Bokóli ya libota na Jéhovah ebendaki likebi na boyangeli ya sika, mpo ete bakólaki longwa na basakoli 1 253 na 1947 kino basakoli 2 307 na 1950. Na mobu wana, bakonzi babandaki kotya bipekiseli na mosala ya kosakola. Esengelaki kosɛnga mikanda ya ndingisa ya kosakola, kasi bakonzi baboyaki kobimisa mikanda yango, mpe baoyo basengaki yango babetamaki na basodá ya Garde nationale. Bazulunalo ezalaki ntango nyonso kofunda Batemwe ete bazali ‘Basungi ya bakonzi oyo balingi koyangela mboka.’ Tobosana te ete, liboso ba Communistes babanda koyangela, batindaki Batemwe na bolɔkɔ mabe mpo bafundaki bango ete bazali ‘basungi ya Bayuda oyo bazalaki ba communistes.’
Nsɔmɔ ebandi
Na mokolo ya le 13 Novembre 1950, mokɛngɛli ya filiale mpe ndeko mobali oyo azalaki kobongola mikanda (bango mibale bazalaki kati na bandeko oyo kala bakatelaki bango etumbu ya liwa) bakangamaki, elongo na mokɛngɛli ya zongazonga ya liboso. Bamemaki bango na bolɔkɔ ya nsɔmɔ ya nsé ya mabelé na No. 60 ya balabala Andrássy na engumba ya Budapest, mpo “balɛmbisama.” Basambisaki bango na le 2 Février ya mobu molandaki. Bakatelaki bango mibu zomi mpo na mokɛngɛli ya filiale, mibu libwa mpo na mobongoli ya mikanda, mpe mibu mwambe mpo na mokɛngɛli ya zongazonga. Babotolaki biloko na bango nyonso misato. Na boumeli ya kosambisama yango, bankulutu mosusu minei ya masangá bakatelamaki bolɔkɔ ya mibu mitano kino mibu motoba mpo na efundeli oyo ete balukaki kokweisa boyangeli.
Bandeko batyamaki na bolɔkɔ moko oyo ekɛngɛlami makasi, epai bakokaki te kozwa mikanda, maboke, to bato bayei kotala bango. Mabota na bango mazalaki koyoka nsango na bango te. Ata basodá oyo bazalaki kosenzela bango bakokaki te kobénga nkombo na bango. Mpo na kokesenisa bango, moko na moko alataki na nkingo eteni ya libaya oyo ezalaki na nimero. Ezalaki nkutu na likomi moko likoló ya efélo oyo elobaki ete: “Bosengeli bobele kosɛnzela bakangami te; boyina bango.”
Batemwe bakómaki kosala na kobombama, kasi mosala na bango ya kosakola esukaki te. Batemwe mosusu balandaki kosala na esika ya baoyo bakangamaki. Na nsima, baoyo bakitanaki bango mpe bakangamaki. Na mobu 1953, koleka bandeko 500 bakangamaki mpe babwakamaki na boloko, kasi nsango malamu ekokaki kokangama na nsinga te. Bobele bandeko moke nde balengolamaki na bilaká ya bokosi oyo bakɛngɛli bapesaki bango mpe baanganaki kondima na bango.
Bilikya kitoko
Na nsuka ya 1956, bato babandaki kotombokela boyangeli. Mampinga ya Union soviétique basukisaki botomboki, mpe parti communiste ezwaki lisusu bokonzi.
Batemwe nyonso oyo bakangamaki batikamaki, kasi mwa ndambo na bandeko oyo bayebanaki mingi batindamaki lisusu na bolɔkɔ mpo na kosilisa etumbu na bango, nzokande bandeko ya sika bakangamaki lisusu te. Na nsuka ya 1964, makambo mabandaki kolembisama mwa moke. Bakonzi basalaki lisusu eloko moko te mpo na kopekisa bokundi bibembe mpe bilambo ya mabala. Ba assemblées ya circonscription ezalaki kosalema na zámba. Atako mosusu na yango epekisamaki, kasi batindaki lisusu Temwe moko te na boloko.
Na 1978 bandeko oyo bazalaki bakɛngɛli bapesamaki nzela ya kokende na assemblée na Vienne. Na boumeli ya mobu wana, bakonzi balakaki kondima mosala ya ba Témoins de Jéhovah engebene mibeko ya mboka, kasi esengelaki mibu misusu zomi mileka liboso ete yango ekokisama. Na 1986 assemblée de district ya liboso esalemaki, na Parc de la Jeunesse na zámba ya Kamara, na ndingisa ya bakonzi. Elembo moko etyamaki lokola, oyo ezalaki koloba ete Assemblée de district ya ba Témoins de Jéhovah, “Kimya ya Nzambe.” Na mobu molandaki assemblée “Bozala na elikya epai na Jéhovah” esalemaki, mpe na 1988, bandeko basepelaki na assemblée “Boyengebene ya Nzambe.”
Na nsuka tozwi bonsomi!
Mokolo ya le 27 Juin 1989, ezalaki mokolo moko kitoko mpo ezalaki mokolo yango nde bandeko bazwaki mokanda ya bakonzi oyo emonisaki ete bandimaki ba Témoins de Jéhovah lokola lingomba kati na Hongrie. Na Juillet, ndako monene ya masano na stade ya Budapest eyambaki bato 9 477 mpo na assemblée de district “Bizaleli ya moto na Nzambe.” Bobele salle yango esalelamaki na 1990 mpo na assemblée de district: “Monoko na peto,” mpe ba assemblées mosusu esalemaki mpe na bingumba mosusu minene misato ya Hongrie.
Sikawa, lokola bipekiseli bisili kolongwa nyonso, likoki ezalaki lisusu mpo na kobongisa assemblée internationale. Atako mbula mpe malili makasi, assemblée yango esalemaki na esika ebengami Népstadion na Budapest, epai bato 40 601 basepelaki na mɔ́tɔ ya bolingo na bandeko. Basangani ya Collège central bayaki mpe balendisaki kondima na bandeko na masoló na bango, mpe mikanda ya sika elongo na ba brochures ya langi mingi elakisamaki na assemblée wana.
Likambo oyo lizali kosalema lelo
Mosenzeli mpe Lamuká! na lokóta ya Hongrois ekómi konyatama nzela moko na oyo ya Lingelesi na bonene mpe kitoko ndenge moko. Kobanda 1992, Annuaire ekómi konyatama na lokóta ya Hongrois. Motuya ya basakoli ya nsango malamu elekaki longwa na 6 352 na 1971 kino 13 136 na Janvier 1993.
Lelo oyo, ba Témoins de Jéhovah na Hongrie bazali kosepela na bonsomi ya losambo mpe ya kosakola ndako na ndako. Masangá mazali 205, mpe bato 27 844 bayanganaki na Ekaniseli ya le 17 Avril 1992. Lokola ba Salles du Royaume ezali naino mingi te, masangá makolanda koyangana na biteyelo, na bisika ya masano, na bandako ya bolɔkɔ oyo etikali mpamba, mpe ata na babiro ya parti communiste oyo etikali mpamba. Kobanda 1992, masangá zomi masili kofungola ba Salles du Royaume na yango, mpe mosusu ezali kotongama.
Kati na mbongwana mpe botomboki, bandeko batikalaki sembo epai na Jéhovah Nzambe mpe na Mwana na ye, Yesu Klisto, mpe balandaki kosakola. Mipepe makasi ya ntango wana elimwisaki bango te, mpamba te Jéhovah azali kobatela libota na ye na mboka Hongrie.—Masese 18:10.
[Karte na lokasa 9]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Vienna
AUSTRIA
Budapest
Debrecen
HUNGARY
ROMANIA
[Elilingi na lokasa 10]
Ba Témoins de Jéhovah bayangani na Budapest