Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/4 nk. 14-19
  • Bilenge: Bozali koluka nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge: Bozali koluka nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomibatela na baninga mabe
  • Bokima bamposa ya mabe
  • Tolanda boyokani ya penepene elongo na Jéhovah
  • Pesa motema na yo epai na baboti na yo
  • Bolanda koluka boyengebene
  • Bilenge, bozali kobongisa avenire na bino?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Bilenge, bótambolaka na ndenge ebongi na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tyá elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bilenge: bólanda elimo ya mokili te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/4 nk. 14-19

Bilenge: Bozali koluka nini?

“Nde okimaka mposa nyonso na bolenge mpe olanda boyengebene mpe kondima mpe bolingo mpe kimya, esika moko na bango bakobyanga nkombo na Nkolo na mitema mpeto.”​—2 TlMOTÉ 2:22.

1. Elikya nini tozali na yango mpo na bilenge oyo bazali kati na biso?

KATI na zulunalo ya Bapantekotiste ya Suede, Dagen (Mokolo) tozali kotanga ete: “Ba Témoins de Jéhovah bazali etuluku oyo ezali koyamba bayangani ya sika mingi mbula na mbula mpe bazali na etuluku monene ya bilenge.” Mbala mosusu ozali mosangani ya ebele wana ya bilenge ya mpeto mpe ya kobanga Nzambe. Ekoki kozala ete babokolaki yo na nzela ya boklisto banda bolenge na yo, to mpe yo moko oyokaki nsango ya Bokonzi mpe ondimaki yango. Ata ndenge nini, tozali na esengo ya komona bino esika moko na biso. Mpe tozali na elikya ete bokolanda nzela ya boyengebene, lokola bilenge baklisto ya sembo ya ekeke ya liboso. Maloba oyo ya ntoma Yoane mabongi solo na bino ete: “Bozali makasi mpe Liloba na Nzambe eumeli kati na bino mpe bosili koleka ye mabe.”​—1 Yoane 2:14.

2. Na ntango ya “bolenge,” makambo nini makoki kosala ete kolanda nzela ya boyengebene ekoma mpasi?

2 Na mikolo na biso, bilenge baklisto mingi​—tokoki koloba ndambo monene kati na bango,​—bazali kotelemela masenginya ya mokili. Nzokande, mbala mosusu okoki komona ete kolendendela na nzela wana ezali petee te. Ntango ozali kati na “bolenge,” ekomaka ete maoki ya sika mpe ya makasi ezali kosimba yo. (1 Bakolinti 7:36) Lisusu, ekoki kozala ete mikumba na eteyelo, na ndako mpe kati na lisanga emonani ete ekomi bozito mingi mpo na komema yango. Satan le Diable, ye moko akoki mpe kobakisa mikumba misusu. Lokola azali na ekateli ya kozimbisa ebele na bato, azali kobundisa baoyo akoki kozwa bango kozanga mpasi; yango nde asalaki na Eden. Asalaki bopusi na ye mpo na kondimisa, likoló na nkulutu te oyo azalaki na boyebi mingi, elingi koloba Adam, kasi likoló na Eve oyo azalaki elenge mpe na eksperianse moke. (Genese 3:1-5) Bikeke mingi na nsima, Satana asalelaki mwango bobele moko wana epai na baklisto ya lisanga ya Kolinti, oyo ezangaki eksperianse. Mpo na yango ntoma Paulo akokaki kokoma ete: “Kasi lokola nyoka azimbisaki Eva na mayele na ye mabe, nabangi ete makanisi na bino makopengwa longwa na sembo mpe mpeto na Klisto.”​—2 Bakolinti 11:3.

3, 4. Tanga mwa bisaleli oyo Satan le Diable azali kosalela mpo na kozimbisa bilenge, mpe nini ekoki mbah mosusu kokomeh bilenge yango?

3 Bobele bongo lelo oyo, mbala mosusu baboti na bino baklisto bakoki kobanga mpo na bino. Ezali te mpo bakanisi ete makanisi na bino mapusami na kosala mabe, kasi mpo bayebi na eksperianse oyo bazali yango ete bilenge bakokweyaka nokinoki liboso na “mayele mabe” ya Satana. (Baefese 6:11) Esika ete emonana na makama mingi, mitambo ya Satana mibongisami na lolenge ete eléngola mpe emonana kitoko. Kati na ezipeli moko kitoko, televisyo ezali komonisa mposa ya bozwi, kosangisa nzoto ya nsoni, mobulu oyo endimami mpe misala ya bilimo mabe lokola ezali bobele kominanola. Makanisi ya bilenge makoki kotonda na makambo makeseni, longola bobele ˈmakambo na lokomu, makambo na nyonso na sembo, makambo na mpeto, na makambo na boboto.ˈ (Bafilipi 4:8) Bopusi ya baninga ezali esaleli mosusu ya makasi oyo Satana azali kosalela. Ekoki kozala ete baninga na bino bazali kosala nyonso mpo ete boyokanisa etamboli na bino na lolenge ya bomoi, ya elateli, mpe kokata nsuki na bango. (1 Petelo 4:3, 4) Mokomi ya zulunalo William Brown akomaki mokolo mosusu ete: “Soki, na libanda na mangomba, Nzambe azali mpo na elenge, ya solo Nzambe yango ezali bongo bilandalanda. ... Mpo na elenge, kokesene na basusu ezali mabe koleka kokufa.” Elenge mwasi moko moto ya Italie andimaki ete: “Nazalaki kooka nsoni ya koloba na baninga na ngai ete nazali Temwe. Lokola nayebaki ete Jéhovah azalaki kosepela na ngai te, nazalaki na mawa.”

4 Bomizimbisa te, Satana azali koluka komema bino na libebi. Na mokili mobimba, bilenge mingi bakobungisa bomoi na bango na bolozi monene mpo ete bamitikaki kozimbisama. (Ezekiele 9:6) Mwango bobele moko mpo na kobika ezali ya kolanda makambo oyo ezali sembo.

Bomibatela na baninga mabe

5, 6. (a) Elenge Timoté akutanaki na komekama nini na esika azalaki kofanda na Efese? (b) Batoli nini Paulo apesaki na Timoté?

5 Yango nde ezali toli ntoma Paulo apesaki na elenge Timoté. Na boumeli ya mibu koleka zomi, Timoté akendeki elongo na ntóma na mibembo na ye ya misionere. Na eleko oyo Timoté azalaki kosala na engumba ya Efese, ntóma Paulo azalaki na boloko na Loma, kozeláká mokolo na ye ya kobomama. Lokola mokolo na kufa na ye ezalaki kobelema, ntóma azalaki mbala mosusu kokanisa lolenge makambo malingaki kozala mpo na Timoté. Efese ezalaki engumba oyo eyebanaki mingi mpo na bozwi, pite, mpe kominanola na yango ya nsoni; epai mosusu, Timoté alingaki kozala lisusu na lisungi ya mopesi toli molingami na ye te.

6 Na yango Paulo akomaki makambo malandi epai na “mwana molingami” na ye, ete: “Kati na ndako monene, biloko bizali bobele na wolo mpe na palata te, kasi biloko na mabaya mpe na mabele lokola, mosusu mpo na mosala na lokumu, mosusu mpo na mosala mozangi lokumu. Soko moto nani akomipetola na makambo oyo, akozala eloko mpo na mosala na lokumu oyo ebulisami mpe ekosepelisa mokolo na ndako; oyo ebongi mpo na misala nyonso malamu. Nde okimaka mposa nyonso na bolenge mpe olanda boyengebene mpe kondima mpe bolingo mpe kimya, esika moko na bango bakobyanga nkombo na Nkolo na mitema mpeto.”​—2 Timoté 2:20-22.

7. (a) ˈBiloko nini mpo na mosala ezangi lokumuˈ oyo Paulo alobelaki? (b) Lolenge nini, lelo oyo bilenge baklisto bakoki kosalela toli oyo ya Paulo?

7 Paulo azalaki bongo kokebisa Timoté ete, ata kati na baninga na ye baklisto, ekokaki kozala na ˈbiloko mpo na mosala ezangi lokumu,ˈ bato oyo bazalaki komitambolisa malamu te. Nzokande, soki kotambola elongo na baklisto mosusu bapakolami ekokaki kobebisa Timoté, kotambola lelo elongo na bato na mokili ekoki kozala mabe boni mpo na bilenge baklisto! (1 Bakolinti 15:33) Elingi koloba te ete osengeli koboya kosepela na baninga na yo ya eteyelo. Nzokande, osengeli kokeba ete okangama mingi te elongo na bango, atako mbala mosusu. ekosala ete omonana lokola ozali yo moko. Ya solo, likambo yango likoki kozala mpasi mingi. Elenge mwasi moko moto ya Bresil alobaki na likambo yango ete: “Ezali mpasi. Baninga na ngai ya eteyelo bazali ntango nyonso kobyanga ngai ete tokende na bafeti to na bisika oyo ebongi te mpo na bilenge baklisto. Bazali koloba na ngai ete: ˈNini! Okoya te? Ozali na ligboma!ˈ”

8, 9. (a) Lolenge nini kotambola elongo na bilenge ya mokili baoyo bamonani ete bazali malamu ezali likama mpo na moklisto? (b) Epai wapi okoki kozwa baninga ya malamu?

8 Bilenge mosusu ya mokili bakoki komonana ete bazali malamu mpo ete bamelaka makaya te mpe basalelaka elobeli ya mbindo te to bazali na etamboli ya pite te. Nzokande, lokola bazali kolanda boyengebene te, makanisi mpe ezaleli na bango ya mosuni ekoki nokinoki kosala bopusi likoló na yo. Epai mosusu, eloko nini bazali na yango na bomoko elongo na bato bazangi kondima? (2 Bakolinti 6:14-16) Ya solo, makambo ya elimo oyo ozali kotala na motuya mingi ezali mpo na bango “bolema!” (1 Bakolinti 4:14) Okoki kotikala moninga na bango kozanga kobuka mitinda na yo?

9 Mpo na yango, bomibatela na bato na bosoto. Boninga na yo esengeli kozala bobele elongo na baklisto oyo bazali bato na elimo mpe balingi solo Jéhovah. Ozala na ekɛngɛ ata elongo na bilenge kati na lisanga, baoyo bazali na elimo ya kozanga kolonga to ya kokatola makambo. Wana ozali kokola na elimo, okoki mpenza komona ete lolenge ya baninga oyo ozali koluka ezali kobongwana. Elenge moko ya mwasi, Témoin de Jéhovah, alobaki ete: “Nazwaki baninga ya sika kati na masanga makeseni. Epesaki ngai nzela ya kososola ete tozali na mposa te ya koluka baninga kati na mokili oyo.”

Bokima bamposa ya mabe

10, 11. (a) ˈKokima mposa ya bolengeˈ elimboli nini ? (b) Lolenge nini tokoki ˈkokima piteˈ?

10 Paulo alendisaki lisusu Timoté na ˈkokima bamposa ya bolenge.ˈ Wana tozali bilenge, mposa ya koyebana mingi, ya komisepelisa to ya kosangisa nzoto ekoki kozala makasi. Soki opekisi yango te, bamposa wana ekoki komema yo na kosala lisumu. Yango wana Paulo alobelaki kokima bamposa mabe, kokima lokola nde bomoi na yo etyami na likama.a

11 Mposa ya kosangisa nzoto esili komema ebele na bilenge baklisto na libebi ya elimo. Mpo na yango ebongi mpenza ete Biblia eloba na biso ete ˈtokima pite.ˈ (1 Bakolinti 6:18) Wana bilenge mibale bazali kokutana mpo na kolengela libala, bakoki kosalela mitinda wana ntango bazali kopengola makambo oyo makoki kotya bango na masenginya, lokola kozala bango moko kati na ndako to kati na motuka oyo etelemi. Kozala na moto mosusu elongo na bino ekoki komonana lokola likambo ya kala, kasi ekoki kozala libateli oyo ebongi. Ata wana ebongi ete bomonisa bolingo na bino na mwa meko mosusu, bosengeli kotya bandelo mosusu mpo ete bokoka te kokwea na etamboli ya mbindo. (1 Batesaloniki 4:7) Kokima pite ezali lisusu koboya komona ba films to masolo ya televisyo oyo ekoki kolamusa epai na yo bamposa ya mbindo. (Yakobo 1:14, 15) Atako bongo soki makanisi ya mbindo makoti na elimo na yo, kanisa na makambo mosusu. Kende kotambola, tanga, sala misala ya ndako. Mpo na likambo yango, libondeli ezali lisalisi moko ya ntina mingi.​—Nzembo 62:8.b

12. Lolenge nini tokoki koyekola koyina mabe? Limbola eyano na yo.

12 Na koleka, osengeli koyeba koyina, koboya makasi likambo nyonso oyo ezali mabe. (Nzembo 97:10) Ndenge nini koyina eloko oyo, na liboso, ekoki kosepelisa to kozala malamu? Ntango okanisi na matomba mabe na yango! “Bomizimbisaka te; Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango. Soko akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto.” (Bagalatia 6:7, 8) Soki omekami ete osepelisa mposa ya nzoto, kanisa na litomba oyo eleki mabe: mawa oyo okookisa na Jéhovah Nzambe. (Tala Nzembo 78:41.) Kanisa lisusu, na likoki ya kozwa zemi oyo ekanami te to ya kozwa bakono lokola SIDA. Kanisa, na nsuka na makama ya maoki oyo etamboli na yo ekoki komema likoló na yo mpe kobungisa limemya ya yo moko. Ekoki lisusu kozala na matomba mabe oyo ekomonana nsima na ntango mingi. Ndeko mwasi moko moklisto andimaki ete: “Ngai mpe mobali na ngai tosalaki moto na moto pite liboso ete tokutana. Atako lelo oyo biso nyonso mibale tozali baklisto, etamboli na biso ya kala ya pite ezali liziba na kozanga koyokana mpe ya zuwa kati na libala na biso.” Kobosana mpe te ete, okobungisa mikumba na yo ya téokratike nyonso to okoki kobimisama na lisanga ya baklisto! (1 Bakolinti 5:9-13) Oyo nde mpasi monene mpo na esengo ya mwa ntango mokuse, boye te?

Tolanda boyokani ya penepene elongo na Jéhovah

13, 14. (a) Mpo na nini kokima mabe ekoki te? (b) Lolenge nini ˈkolanda koyeba Jéhovahˈ?

13 Nzokande, kokima mabe ekoki te. Timoté alendisamaki mpe na ˈkolanda boyengebene, kondima, bolingo, kimya.ˈ Yango ezali kosenga bikateli ya makasi. Bobele bongo, mosakoli Hoseya abondelaki libota ya Yisraele oyo ezangaki sembo ete: “Yaka tobutwa epai na Jéhovah, ... Toyeba, tokolanda koyeba Jéhovah.” (Hoseya 6:1-3) Osili komityela mokano wana? Ezali kosenga bobele koyangana na makita mpe kokende elongo na baboti na yo na mosala ya kosakola te. Elenge mwasi moko moklisto andimaki ete: “Baboti na ngai babokolaki ngai kati na solo, mpe nazwaki batisimo naino nazali moke. ... Nazalaki mpenza kozangisa makita te mpe nazalaki kolekisa sanza te kozanga kosakola; nzokande, nasalaki boyokani ya ngai moko mpe ya penepene te elongo na Jéhovah.”

14 Elenge mwasi mosusu andimaki mpe ete, ye mpe ayekolaki te kotalela Jéhovah lokola Moninga mpe Tata; azalaki kotalela ye lokola Elimo moko eyebani te. Asalaki pite mpe, na mibu 18 akomaki kobokola ye moko mwana oyo ye abotaki. Tika te ete osala libunga motindo yango! Lokola Hoseya alendisaki yango, ˈlanda koyeba Jéhovah.ˈ Soki ozali kobondela Jéhovah mpe ozali kotambola elongo na ye na boumeli na mokolo mobimba, okoki kosala ete azala moninga na yo ya motema. (Tala Mika 6:8; Yilimia 3:4.) Soki tokoluka ye, “azali mpe mosika na moto na moto na biso te.” (Misala 17:27) Na yango, ezali likambo ya ntina mingi kozala na ebongiseli malamu ya boyekoli ya yo moko ya Biblia. Esengeli te kosala ebongiseli moko ya mindondo. Elenge mwasi moko na nkombo Melody alobi ete: “Mokolo nyonso natangaka Biblia penepene na minutes 15.” Omibombela ntango mpo na kotanga banimero nyonso ya Mosenzeli mpe Réveillez-uous! to Lamuka! Bongisa makita ya lisanga mpo na “kopesa simbisi epai na basusu mpo na kolingana mpe kosala misala malamu.”​—Baebele 10:24, 25.

Pesa motema na yo epai na baboti na yo

15. (a) Mpo na nini kotosa baboti ekoki mbala mosusu kozala mpasi? (b) Mpo na nini botosi ezalaka ntango nyonso litomba mpo na bilenge?

15 Baboti oyo bazali kobanga Nzambe bakoki kozala lisalisi mpe libateli ya solo. Nzokande, ozali na mokumba ya kokokisa: “Bino bana, botosa baboti na bino kati na Nkolo mpo ete yango ezali sembo. Kumisa tata na yo mpe mama na yo, oyo lilako na liboso lizali na elaka ete: ˈBongo ezala na yo malamu ete oumela na mokili ntango molai.ˈ” (Baefese 6:1-3) Na ntembe te, ozali kokola, mpe ekoki kozala ete olingi kozala na bonsomi mwa mingi. Mbala mosusu, okomi mpenza koyeba malamu bandelo ya baboti na yo. Ntóma Paulo andimaki likambo yango ete: “Baboti na biso ya mosuni bakokaki bobele kosala makasi lokola ekanisi bango.” (Baebele 12:10, The Jerusalem Bible) Atako bongo, kotosa bango ezali mpo na litomba na yo. Baboti na yo balingi yo mpe bayebi yo koleka moto mosusu nyonso. Atako ondimaka ntango nyonso makanisi na bango te, balingi nde malamu na yo. Balingi “kobokola yo kati na mpamela mpe mateya ya Jéhovah”; mpo na nini kotya nkaka na milende na bango? (Baefese 6:4) Ya solo, bobele zoba nde “akotyola mateyo na tata na ye.” (Masese 15:5) Ye oyo azali na mayele akondima bokonzi na baboti na ye mpe akopesa bango limemya oyo ebongi na bango.​—Masese 1:8.

16. (a) Mpo na nini ezali likambo ya mayele te ete bilenge babomba mitungisi na bango epai na baboti na bango? (b) Bilenge bakoki kosala nini mpo na kobongisa boyokani na bango elongo na baboti na bango?

16 Yango elimboli koloba solo epai na baboti na bino, kolobela bango mitungisi na bino, na ndakisa ntembe ya makasi oyo okoki kozala na yango na ntina ya solo, to etamboli ya mbindo oyo omitikaki na yango. (Baefese 4:25) Ntango bozali kobomba makambo wana ya kotungisa epai na baboti na bino, bokoyeisa bobele likambo yango monene. (Nzembo 26:4) Ezali solo ete baboti mosusu bazali kosala bobele molende moke, mpo na kosolola elongo na bana na bango. Elenge mwasi moko amilelaki ete: “Mama na ngai azwaka ntango te ya kosolola elongo na ngai. Nazali na mpiko te ya koyebisa ye makambo oyo nazali kokanisa, nabangaka ntango nyonso ete apamela ngai.” Soki ozali kati na ezalela lolenge yango, pona na mayele ntango oyo ebongi mpo na koloba na baboti na yo likambo oyo lizali kati na motema na yo. Masese 23:26 ezali kolendisa ete: “Mwana na ngai, pesa ngai motema na yo.” Meka kosolola mbala na mbala elongo na baboti na yo na ntina na mikakatano na yo, liboso ete mitungisi ya minene mibima.

Bolanda koluka boyengebene

17, 18 Eloko nini ekosalisa bilenge na kolanda koluka boyengebene?

17 Pene na nsuka na mokanda na ye, Paulo alendisaki Timoté na maloba oyo ete: “Oumela kati na yango eyekoli yo mpe endimi yo.” (2 Timoté 3:14) Yo mpe osengeli kosala bobele bongo. Kotika eloko moko te to moto moko te apengwisa yo na kolanda boyengebene. Bokesene esili koyangela mokili ya Satana, atako mokili yango ekoki kolakisa makambo mingi ya kitoko. Mosika te ekolimwa, elongo na baoyo nyonso bazali eteni na yango. (Nzembo 92:7) Zwa ekateli ete osuka te lokola bato na etuluku ya Satana.

18 Mpo na yango, osengeli ntango nyonso kotalela mikano na yo, bamposa na yo mpe makambo oyo eleki ntina na miso na yo. Omituna: ˈWana baboti na ngai mpe basangani na lisanga bazali komona ngai te, nabatelaka nivo etombwami ya bizaleli kati na elobeli mpe etamboli na ngai? Baninga ya lolenge nini naponaka? Ezali baninga na ngai ya mokili nde bazali koyebisa ngai lolenge nasengeli kolata mpe kokata nsuki? Mikano nini nasili komityela? Motema na ngai epusami epai na mosala ya pionnier​—to epai na mosala kati na ebongiseli ya biloko ya Satana oyo elingi kokufa?ˈ

19, 20. (a) Mpo na nini bilenge basengeli kokanisa te ete bakoki te kokokisa masengami ya Jéhovah? (b) Bibongiseli nini bilenge bakoki kozwa matomba na yango?

19 Mbala mosusu okomona malamu kobongola mwa moke lolenge na yo ya kokanisa. (2 Bakolinti 13:11) Kokanisa te ete eleki nguya na yo. Omikundola ete Jéhovah akoki te kosenga yo makambo maleki makoki na yo. Mosakoli Mika atunaki motuna oyo ete: “Jéhovah alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe otambola na bopolo esika moko na Nzambe na yo.” (Mika 6:8) Ekozala mpasi te soki okosalela bibongiseli oyo Jéhovah azwaki mpo na kosalisa yo. Zala penepene na baboti na yo. Yangana ntango nyonso na makita ya boklisto. Meka sikisiki komesana elongo na bankulutu ya lisanga. Bazali komibanzabanza mpo na bolamu na yo, mpe bakoki kozala liziba ya libateli mpe ya libondisi. (Yisaya 32:2) Likoló na nyonso wana, kolisa boyokani ya penepene mpe ya makasi elongo na Jéhovah Nzambe. Akopesa yo nguya mpe mposa ya elandi makambo oyo mazali sembo.

20 Nzokande, bilenge mosusu oyo bazali kosala milende mpo na kokola na elimo bazali kotemela mokano yango wana bazali koyoka miziki ya mbindo. Tokotalela likambo oyo na likebi nyonso kati na lisolo oyo ekolanda.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba ya Greke ebongolami na “okima” ezali oyo esalelami na Matai 2:13, epai balobi na Yozefe ete: “Kima na Ezipito,” mpo na komibikisa na mwango mabe ya Herode.​—Tala Matai 10:23.

b Okokuta mwa batoli ya ntina mpo na kopekisa mposa ya kosangisa nzoto na mokapo 26 ya mokanda Les Jeunes sˈinterrogent​—Réponses pratiques, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

Ozali komikundola?

◻ Mpo na nini bilenge batalelami mingi mpenza liboso na “mayele mabe” ya Satana?

◻ Mpo na nini ezali mpenza likama kozala na boyokani ya penepene elongo na bilenge ya mokili?

◻ Lolenge nini okoki kokima pite?

◻ Lolenge nini okoki ntango nyonso kozala na boyokani ya penepene elongo na Jéhovah?

◻ Mpo na nini ezali likambo ya ntina ete osololako elongo na baboti na yo?

[Elilingi na lokasa 16]

Ntango elenge mobali mpe elenge mwasi bazali kokutana mpo na libala, na esika ete bamitangola, ezali likambo ya mayele ete bamimesenisa moko na mosusu kati na masano lokola oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto