“Basakoli ya Bokonzi” bazali kolekaleka na bibale mingi ya Guyana
GUYANAa Liloba wana ya lokota ya Amerindien elimboli “mabelé ya mai.” Ezali kolimbola na lolenge ebongi mabelé ya mokili wana ya Amérique du sud, mokili bobele moko ya etuka yango epai bazali koloba Lingelesi. Bibale mingi mpe mingala na yango, oyo eleki kati na bangomba kino bisobe ya molunge ya océan Atlantique ekutani kati na mokili wana. Banzela wana ya mai ezali na ntina mingi mpo na bamboka mike mpe ba fermes oyo epalangani pembeni na mabongo na yango.
Ba Témoins de Jéhovah na Guyana bazali kososola ete ntango Yesu asakolaki ete “nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli mpo na mabota nyonso,” esengeli mpe kosakola nsango malamu epai na bato bazali kofanda penepene ya bibale wana. (Matai 24:14) Yango wana, na boumeli ya mibu mingi, bituluku ya ba Témoins de Jéhovah, mingi mpenza ba pionniers, basalelaki masuwa ya mike mpe ya minene mpo na kolekaleka na mai ya Guyana komemela bato nsango malamu.
Mpo na kosunga kati na mosala ya kosakola, la Société Watch Tower ya Guyana esili kotya masuwa mitano oyo ebyangami Mosakoli ya Bokonzi I, II, III, IV mpe V. Ezali masuwa ya mabaya, ebyangami balaou, oyo ezali na bolai ya bamètɛlɛ nsambo, ezali na nsamba te mpe libanda na yango na lolenge ya V. Etongamaki mpe ezalaki kobatelama na libota moko ya Batemwe. Masuwa mibale ya liboso oyo Batemwe ya mboko wana babengaki na bolingo nyonso ete Basakoli etiki kosalelama nsima ya mibu mingi ya mosala. Nzokande, banimero III, IV, mpe V, ezali naino kosala na bibale Pomeroon, Mahaica, mpe Demerara.
Likolo na Demerara
Na Angleterre mpe na biteni mosusu ya Mpótó, nkombo “demerara” ekoki kokanisela bango sukali ya nkoko na langi ya mosaka, euti na bilanga oyo ezali pembeni na ebale yango ya potopoto mingi. Na ngambo ya loboko na mwasi, nzela oyo euti na libongo ya ocean esuki na bilanga ya nkoko. Nsima na yango, ba Témoins bazali kotya motema na masuwa Basakoli ya Bokonzi mpo na komema nsango na Bokonzi ya Jéhovah epai na bato bafandi pembeni ya ebale wana— ba Hindous, bamizilma mpe baklisto ya nkombo mpamba.
Mibembo mpo na kosakola na Demerara, oyo ekoki koumela mokolo moko to baposo mingi ezali kobongisama; kobanda kotana ya ntongo kino ebandeli ya molili bazali kokende libongo na libongo. Wana mibembo mizali koumela mikolo mingi, ba pionniers bazali bobele kolamba mpe kolya kati na masuwa te, kasi bazali lisusu kolala kuna. Ntango butu ebandi, bazali kokanga Mosakoli na nzete pembeni ya mabelé, to kotelemisa yango na libongo soki ezali. Bakotelemisa banzete ya mike ya bolai ya bametele 2,5 na liboso mpe na nsima. Kati na banzete yango, bakobenda nsinga makasi oyo likolo na yango bakotanda kapo lokola nsamba. Biteni ya mabaya ezali kosalelama na esika ya mbeto, bolangeti mpe ba draps ezalaki kosalelama lokola matela. Nsima ya mosala makasi ya moi, mpongi ekoumela te na koya.
Batunaki ba pionniers ete: “Bosukolaka na mai wana ya potopoto?”
Moko na bango ayanolaki ete: “Te, soki tokoki kopengola yango! Ntango tolekaka na miluka totondisaka banzungu na biso na mai ya peto, oyo tosalelaka mpo na kolamba, komela, mpe kosukola.”
Koyika mpiko na bango ezali kopesa bango nzela na komona makambo mingi ya kosepelisa. Mokolo mosusu, mobali moko atelemaki na libongo, apanzi makolo na ye, atye maboko na loketo mpe atalaki biso na likebi mingi. Atangaki na mongongo makasi likolo na masuwa ete: “Mosakoli ya Bokonzi V! Bosengeli kozala ba Témoins de Jéhovah. Bobele bino nde bosalelaka liloba ˈbokonziˈ na lolenge oyo. Bozali na Salle du Royaume na bino mpe sikawa Mosakoli ya Bokonzi na bino.”
Longwa na Galasd kino na Pomeroon
Pembeni ya ebale Pomeroon mosala ya kosakola ekeseni mwa moke, lokola Frederick McAlman azali komikundola yango. Alandaki mateya ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower na 1970, mpe nsima na mobu moko akomaki na Charity, mboka moke moko oyo ezali na ntaka ya bakilomètɛlɛ 34 na kati na mabelé, na ngambo ya loboko mobali ya ebale Pomeroon, esika oyo ezalaki na etuluku ya basakoli ya Bokonzi mitano.
Ndeko McAlman alobi ete: “Na boumeli ya mibu mitano, tozwaki ˈesengoˈ ya konana mpe kotiyola na ebale Pomeroon kati na Mosakoli II, na nkai, kino tozwaki motɛlɛ ya kala ya six chevaux. Wana tozalaki kotiyola, tosengelaki kosakola na ngambo ya loboko na mobali kino tokokoma na Hackney, oyo ezalaki na ntaka ya bakilomètɛlɛ 11 kino kokoma na mpimo. Wana, tozalaki kopema malamu butu mobimba epai na ndeko mwasi DeCambra, mobotisi ya etuka wana na eleko yango. Na ntongo ya mokolo molandi, tozalaki kolanda kotyola kino na mpimo ya ebale liboso na kokatisa na ngambo ya loboko na mwasi. Na nsima, tozalaki kosakola na konana ebale kino bakilomètɛlɛ 34 na Charity.”
Motɛlɛ ya six chevaux wana esalisaki bango na boumeli ya mibu zomi. Na nsima, na 1986 motɛlɛ ya 15 chevaux ya sika ekitanaki yango. Nsima ya kosala mosala na bosembo nyonso na boumeli ya mibu 21, ndeko McAlman akoki na esengo nyonso komona Salle du Royaume ya mboka moke Charity, oyo etongami sika, na maoki ete asili kokokisa mosala. Salle yango esalelami na lisanga ya basakoli 43, oyo bazali kofanda pembeni ya ebale yango, na likolo mpe na nse. Mwayene ya bato oyo bayanganaka na makita ezali 60, mpe na Ekaniseli ya liwa na Yesu Klisto na 1992, bayangani nyonso bazalaki 190!
Bolukiluki ya “moto ya Watchtower”
Lundi ezalaka mokolo ya zando na mboka moke Charity. Yango wana, ezalaka ntango malamu ya kosakola nsango malamu, mpe Batemwe bazali wana elongo na Mosenzeli mpe Réveillez-vous! Mokolo mosusu, na ebandeli ya ba 1970, Monica Fitzallen, moto ya Warimuri na mongala Moruka, ayaki na zando mpe azwaki bazulunalo oyo ndeko McAlman alakisaki ye. Kasi, ntango azongaki na ndako, atyaki yango na nse kati na valisi na ye ya bilamba.
Monica amikundoli ete: “Etikalaki kuna mibu mibale kozanga ete natanga yango. Na nsima, nabelaki mpe nalalaki na mbeto mwa mikolo. Ntango nabandaki kozongela makasi, nabandaki kotanga mikanda nyonso oyo ezalaki na ndako. Na nsuka, namikundolaki bazulunalo mibale oyo natyaki na valisi ya bilamba mpe nabandaki kotalela yango.” Nokinoki asosolaki mbala moko ete ezali solo.
Ntango Monica aokaki malamu, asengaki na mobali na ye Eugene ete aluka mosala pembeni ya ebale Pomeroon mpo ete ye akoka kokutana na mobali oyo apesaki ye bazulunalo wana. Eugene andimaki, kasi azwaki bobele mosala mpo na poso moko na ferme moko pembeni ya Pomeroon. Asengelaki kobanda lundi mpe kosukisa samedi na midi.
Mokolo ya samedi wana, Monica akutanaki naino te na moto oyo apesaki ye bazulunalo. Ezalaki penepene na midi, ntango atunaki mobali na ye soki mbonge ekopesa bango nzela ya koluka kino Charity epai bakokuta “moto ya Watchtower.” Ntango asilisaki bobele koloba, bayokaki makolo na bato bazali koya mpe bamonaki elongi ya esengo ya ndeko mwasi moko oyo azalaki koya kolakisa banimero ya sika ya bazulunalo. Monica atunaki ete: “Ozali moto ya Watchtower?” Na nsima atunaki mituna mingi mpenza kino ndeko mwasi azongaki na masuwa koluka lisalisi. Nani ayaki kopesa lisalisi? Moto mosusu te, bobele ndeko McAlman!
Bazwaki bibongiseli ya kobanda boyekoli ya Biblia na nzela ya mikanda. Mwa moke na nsima, Monica akomaki mokanda na ye ya kotika lingomba ebyangami Eglise anglicane. Lokola eyano, azwaki liloba oyo euti na sango: “Koyoka ba Témoins de Jéhovah te. Boyebi na bango ya Biblia ezali ya likololikolo. Nakoya kosolola elongo na yo na likambo wana.” Kino lelo sango ayei naino te. Nsima na mwa ntango, na 1975 Monica azwaki batisimo. Mbula moko na nsima, ezalaki mobali na ye, oyo bandeko bazali kobenga na bolingo nyonso noko Eugene, nsima na kotalela na likebi mingi Makomami, azwaki batisimo. (Misala 17:10, 11) Atako bazali kofanda na ntaka ya mobembo ya ngonga 12 na bwato kino lisangá ya penepene na Charity, bazali ntango nyonso basakoli ya molende ya Bokonzi.
Mobembo ya bamisionere kati na mokili wana
Na bambula oyo euti koleka, la Société Watch Tower abongisaki mbala na mbala mibembo ya bamisionere kati na mokili yango. Na lisalisi ya masuwa ya motɛlɛ, baoyo bamipesaki bango moko bazwaki esengo ya komema nsango na bifandelo ya ba Amerindiens mpe na bilanga mpe ba fermes ya mosika, na banzela ya mai epai masuwa ekoki koleka kino na ndelo ya mokili yango. Bazali ba pionniers na ndimbola ya solosolo ya liloba yango, bazali bato ya liboso na koyebisa “nkombo ya Jéhovah” na bisika wana ya mosika, mpe yango ekopesa bango bomoi. (Baloma 10:13-15) Bandeko basengeli kolonga mikakatano mingi, mbala mosusu basengeli konana mikolo misato mpo na kokoma na bisika wana. Kasi mbano na yango ekoki na mpasi motindo yango.
Elenge mobali moko, pentecôtiste oyo azalaki kofanda penepene na bilanga ya Kwebanna, na ebale Waini, akutanaki na bandeko na mobembo na bango ya misionere ya liboso na Juillet 1991. Na bozongeli ya liboso na Octobre, abandaki koyekola Biblia elongo na bango. Mpo na mbala ya liboso amonaki kati na Biblia na ye ete nkombo na Nzambe ezali Jéhovah, ete Yesu azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso te mpe ete Bosato eteyami na Biblia te. (Nzembo 83:18; 1 Bakolinti 11:3) Asepelaki mpenza mingi ete ntango bandeko bakendeki, ayanganisaki mwa ba pentecôtistes mpe abandaki komonisa bango kati na Biblia na bango, solo etali Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto. Ntango mingi kati na bango baboyaki solo, azwaki ekateli ete ezali sikawa ntango ya komilongola mpe ya kobima na “Babilone Monene.” (Emoniseli 18:2, 4) Ntango bandeko bayaki kotala ye na Février 1992, ayebisaki bango likambo oyo elekaki mpe abakisaki ete: “Nalingi kosangana elongo na bino. Nalingi kokoma Témoin de Jéhovah. Nalingi koteya solo epai na bato!”
Makambo ya lolenge oyo mazali kosalisa bandeko na kolanda mosala wana ya makasi. Baoyo bazali kosala mibembo lokolo bamisionere basengeli komipimela bisengo ya ndako kondima komitya liboso na likama ya maladi lokola malaria, mpe kondima koyika mpiko na makama ya bomoi kati na zamba. Ata baoyo bazali kotikala na mboka bazali mpe komipimela makambo mosusu. Ekómaka ete mabota mazanga balingami na yango na boumeli ya baposo mingi. Masanga masengeli kotikala kozanga bankulutu na yango mpe bilenge mibali mosusu na yango, na boye ete mbala mosusu bobele ndeko mobali moko atikalaka mpo na kobatela lisanga. Kasi oyo nde esengo mpe elendiseli, wana na bozongi na bango, lisanga ekoyoka masolo ya kolendisa. Mpasi ya komipimela ezali lisusu ntina te na ntango yango.
Basakoli ya Bokonzi oyo bazali kolekaleka na mai mingi ya Guyana mpe bazali komema nsango bazali kokutana na makambo ya kitoko mingi. Elongo na bandeko na bango ya mokili mobimba, bazali “kotombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbumba na bibebu bizali koyambola nkombo na ye,” na molende nyonso mpe na bolingo na bango moko.—Baebele 13:15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kala ezalaki Guyane britannique nkombo ebongwanaki Guyana nsima wana mokili yango ezwaki lipanda na 1966.
[Karte na lokasa 24]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
HONDURAS
NICARAGUA
COSTA RICA
PANAMA
VENEZUELA
COLOMBIA
GUYANA
SURINAME
FRENCH GUIANA
BRAZIL
BOLIVIA
ATLANTIC OCEAN
[Bililingi na lokasa 26, 27]
Na loboko na mwasi: Kopesa litatoli mokolo ya zando
Na likoló: Masoló matali nsango malamu na ebale Demerara
Na likoló na loboko na mobali: Etuluku ya bamisionere bazali kozonga na molako