Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/4 nk. 3-4
  • Kobatisa! Kobatisa! Kobatisa!​—Kasi mpo na nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobatisa! Kobatisa! Kobatisa!​—Kasi mpo na nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Kozwa batisimo ekomemela yo mapamboli mingi!
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Batisimo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/4 nk. 3-4

Kobatisa! Kobatisa! Kobatisa!​—Kasi mpo na nini?

“NA BOUMELI ya mwa basanza, nabatisaki mibali, basi mpe bana koleka nkoto zomi.” Wana ezali makambo misionere moko ya Jesuite na nkombo François Xavier akomaki likolo na mosala na ye kati na etuka ya Travancore, na mokili ya Inde. “Natambolaki mboka na mboka mpe nakomisaki bango baklisto. Bipai nyonso nazalaki kokende, natikaki mikanda ya mabondeli mpe ya mitinda na biso na monoko na bango.”

Mokonzi Jean ya Portugal oyo akamwaki mingi na mikanda ya Francois Xavier, apesaki etinda ete batanga yango na mongongo makasi na bandakonzambe nyonso ya mokili na ye. Mokanda ya Janvier 1545 oyo touti kotanga maloba na yango endimamaki mpo ete ebimisama. Esalaki bopusi nini? Manfred Barthel akomaki kati na mokanda na ye Ba Jesuites (na Allemand) ete: “Nokinoki ndambo monene ya bayekoli ya Mpótó, ˈoyo bakweaki na mabolongo na bango mpe balelaki mingi,ˈ basengaki ete bakende na Inde kobongola bapakano.” Abakisaki ete: “Na eleko wana, kokanisa ete ekoki mbala mosusu kosenga bato mingi koleka mwa ndambo na bamwangisi ya mai mapambwami mpe sakosi etondi na batrakte mpo na kobongola mitema na bato na mokili wana mobimba ezalaki makanisi ya bato mingi te.”

Kobongola wana ya bato mingi epesaki mbano nini? Nicolas Lancilloto ye Jesuite apesaki rapport oyo ya bosolo na Rome ete: “Mingi kati na baoyo bazali kozwa batisimo bazali kotalela mwa matomba oyo bakozwa na nsima na yango. Baombo ya ba Hindu mpe ya ba Arabes bazali na elikya ya kozwa bonsomi na bango, ya kobatelama na nkolo moko mabe to bobele mpo na kozwa elamba ya sika to ngabúni (turban) ya sika. Mingi bazali kosala yango mpo na kokima etumbu.... Baoyo bindimeli na bango bitindi bango na koluka lobiko kati na mateya na biso batalelami lokola bato na magboma. Mingi bazali kopengwa mpe bazali kozonga na misala na bango ya bopakano nokinoki nsima ya batisimo na bango.”

Banongi (explorateurs) ya Mpótó ya eleko yango bazalaki mpe na mposa ya kobongola mpe kobatisa bapakano. Balobaki ete Christophe Colomb abatisaki ba “Indiens” ya liboso oyo akutanaki na bango na bisanga ya Antilles. Mokanda The Oxford illustrated History of Christianity elobi ete: “Motinda ya Bokonzi ya Espagne ezalaki kotalela lokola likambo ya liboso kobongola bafandi ya mboka wana Na nsuka ya ekeke ya zomi na motoba, ba Indiens 7.000.000 baoyo bazalaki na nse ya Bokonzi ya Espagne bazalaki baklisto, kasi bobele ya nkombo mpamba. Na bisika oyo tokoki kozwa mituya na baoyo babongwanaki (Pedro de Gante moto ya libota ya Empereur Charles V, oyo akotaki na molongo ya bamisionere, alobaki ete abatisaki bato 14.000 na mokolo moko elongo na mosungi bobele moko), ezali bongo polele ete mateya ya moboko ya malamu ekokaki kopesama te.” Kobongola wana ya likolólikoló ezalaki kokende nzela moko na minyoko makasi mpe mpasi.

Motuya oyo bapesaki na batisimo elendisaki banongi mpe bamisionere. Na 1439, na likita ya Florence, Papa Eugene IV abimisaki mobeko moko oyo tokoki kotanga kati na yango ete: “Batisimo mosantu ezali na esika ya liboso kati na basakramentu, mpo ete ezali ekuke ya bomoi ya elimo; mpamba te na nzela na yango tozali kokoma basangani ya Klisto mpe tokoti na Lingomba. Mpe mpo ete na nzela ya moto ya liboso liwa epalangani na bato nyonso, soki tobotami lisusu te na mai mpe na Elimo Santu, tokoki kokota na bokonzi ya makolo te.”

Nzokande, ntembe ebimaki oyo etali koyeba malamumalamu lolenge nini ya batisimo ezalaki solo na motuya. Mokanda LˈEncyclopédie des religions (na Lingelesi) elobi ete: “Mangomba mingi oyo mazalaki kowelana makomaki kotalela batisimo lokola lotomo na bango, mpo ete ezalaki molulu ya ntina mingi mpo na kokota kati na Lingomba. Moko na moko kati na mangomba wana ezalaki komitanga lokola sembo mpe kotalela mosusu lokola ya lipengwi mpe ya mikabwano. Mbongwana ya milulu ya batisimo kati na mangomba mikemike wana makeseni esengelaki bobele kosalema.”

Nzokande, likambo ya kopesa batisimo ebandi kala liboso ya kondima ya baklisto. Ezalaki kosalema na Babilone mpe na Ezipito ya kala, epai bakanisaki ete mai ya malili ya ebale Nil ezalaki kobakisa nguya mpe kopesa kozanga kokufa. Bagreke bazalaki kondima ete batisimo ezalaki kobotama ya sika mpe ezalaki kopesa kozanga kokufa epai na ye oyo azwi yango. Lingomba ya Bayuda oyo ezalaki na Qumran ezalaki kobatisa bato liboso na kondima bango kati na etuluku na bango. Bazalaki kosenga na bapakano oyo babongwanaki na Lingomba na Bayuda ete bakatama ngenga mpe bazwa batisimo ya kozindisama na mai nsima na mikolo nsambo, liboso na batatoli.

Na ntembe te, na bikeke bileki bapesaki motuya mingi na batisimo. Kasi, ezali boni mpo na mikolo na biso? Batisimo ezali mpe na ntina na ntango na biso? Soki ee, mpo na nini? Osengeli mpenza kozwa batisimo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto