Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/3 nk. 31-32
  • Azwi libonza ya “Motole na bomoi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Azwi libonza ya “Motole na bomoi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/3 nk. 31-32

Azwi libonza ya “Motole na bomoi”

NTÓMA Yoane azwaki etinda ete akomela mwanze ya lisanga ya Sumuluna ete: “Zala sembo kino kufa, mpe nakopesa yo motole na bomoi.” (Emoniseli 2:8,10) Mpo na yango, tozali koyebisa awa nsango ya mawa mpe ya esengo ete Frederick William Franz, President ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania mpe ya Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., mpe ya bisaleli mosusu ya teokratike, asukisaki bomoi na ye ya mabelé na ntongo ya le 22 Decembre 1992.

Ezali nsango ya mawa mpo ete ezali kolobela nsuka ya misala awa na mabelé ya mosaleli moko ya Jéhovah oyo azalaki mpenza molingami mpe moto ya sembo mingi. Nzokande, ezali mpe nsango ya esengo mpo epai na ndeko molingami na biso Franz, maloba ya Emoniseli 14:13 mazali kokokana sikawa: “Esengo na bakufi kati na Nkolo baoyo bazali kokufa longwa sasaipi. Elimo elobi ete, Ɛɛ, tika bapema na bwale na bango, mpo ete misala na bango mikobila bango.” Ndeko Franz azalaki moto ya bopolo mpe ya komikitisa, mosali monene mpe ya kobota mbuma mingi oyo Nzambe asalelaki mingi lokola mosangani ya “moombo na sembo mpe na mayele” mpo na kosunga na bokaboli bilei ya elimo epai na “bato na ndako” mpe baninga na bango.​—Matai 24:45-47.

Ndeko Franz abotamaki na le 12 Septembre 1893, na engumba Covington, kati na etuka ya Kentucky. Ayambaki solo na nzela ya ndeko na ye ya mosuni. Na eleko yango azalaki kolanda mateya na Université ya Cincinnati, epai azalaki komibongisa mpo na kozala moteyi na Lingomba ya ba Presbyteriens. Nsima na koyeba solo, alongwaki na Lingomba ya ba Presbytériens mpe akomaki kosangana elongo na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga na yango ba Témoins de Jéhovah na eleko wana. Azwaki batisimo na le 30 Novembre 1913, mpe na mobu molandaki atikaki Université mpe akotaki na mosala ya colporteur (pionnier). Na le 1er juin 1920, akomaki mosangani ya libota ya Béthel ya Brooklyn. Nokinoki akomaki kosala na biro ya mosala ya ba colporteurs, mpe na 1926 atindamaki na esika ya kokoma mikanda, epai asalaki mingi mpenza. Na 1945 akomaki vice président ya la Société Watch Tower mpe bisaleli mosusu oyo ekangisami na yango. Nsima ya liwa ya ndeko Nathan H. Knorr, oyo azalaki president, na 1977, ndeko Franz akomaki président ya la Société Watch Tower. Asalaki na esika yango kino liwa na ye. Na bomoi na ye, ndeko Franz amonaki bokoli ya motuya ya ba Témoins de Jéhovah longwa na mwa nkoto kino penepene na milio minei na ndambo. Akokisaki mikumba mingi ya mosala. bakisa kopesa masolo na ba assemblées internationales mpe kokende kotala ba filiales mpe bandako ya bamisionere na mikili mingi. Lisolo ya bomoi na ye ebimaki na La Tour de Garde, ebimeli ya 16 mai 1987.

Mokolo ya lundi le 28 Décembre 1992, diskur moko ya bokundi esalemaki na Salle du Royaume ya Béthel ya Brooklyn. Ndeko Albert D. Schroeder ya Collège central asalaki lisolo moko ya esengo mpe ya kolendisa. Basangani ya libota ya Béthel na Ferme ya la Société Watchtower, na Patterson, na ferme de la Montagne, mpe na Ferme du Royaume, bakisa libota ya Béthel na filiale ya Canada balandaki lisolo yango na nzela ya telefone.

Biso nyonso, mingimingi bandeko oyo basalaki penepene na ye tookaki mpasi mpo na liwa ya ndeko Franz. Ayebaki komitya na esika ya basusu, kopesa elendiseli mpe azalaki na motema petee epai na moto nyonso oyo azalaki kosala mosala to mobembo elongo na ye. Mpo na yango, baninga na ye kati na kondima bamonisaki botondi epai na ye engebene likanisi ya Baebele 13:7: “Bokanisa baoyo bakokambaka bino, baoyo basololi Liloba na Nzambe epai na bino. Bobanzabanza mpo na nsuka na bizaleli na bango mpe bomekola kondima na bango.”

Mokolo ya le 30 Decembre 1992, ndeko Milton G. Henschel aponamaki lokola président ya mitano ya la Société, mpo na kokitana ndeko Franz.

[Pictures on pages 31, 32]

Frederick W. Franz na 1913

Na Imprimerie ya la Société na Myrtle Avenue na 1920

Elongo na Nathan H. Knorr na Yankee Stadium na 1953

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto