Bokundoli ya lolenge mosusu na Bahamas
LOKOLA mabanga ya kotya makolo mpo na kokatisa mai, na langi ya bule kati na Floride mpe Cuba, esanga ya Bahamas ebendaki likebi ya bapanzi nsango ya mokili mobimba na 1992 lokola esalema naino liboso te. Mpo na nini? Mpo ete bato mingi ya mayele bazali kotalela Bahamas lokola mabele epai Christophe Colomb akitaki na 1492, wana akundolaki Amerika. Le 12 Octobre oyo euti koleka, bakundoli ya mbala ya 500 ya bokomi na Colomb esimbaki likebi na bato ya mokili mobimba.
Nzokande, bakomisi ya mibu nkama mitano wana ezangaki bakatoli te. Eyebisami ete wana alobaki na likita ya 23 ya Conférence Nationale des avocats noirs, John Carew (molakisi ya études internationales) alobaki ete Colomb “abwakaki mbonge ya kufa na esanga ya Caraïbes.”—The Nassau Guardian.
Lelo oyo, moko te kati na bafandi 250.000 ya Bahamas akoki kokangisa bonkoko na ye elongo na bato na kimya oyo Colomb akutaki mpe alobelaki lokola “bambinga, na nzoto mpe elongi kitoko.” Nini ekomelaki bafandi wana ya esanga? Mokanda Lisolo ya makambo ya kala na Bahamas eyanoli ete: “Kati na mibu 1500 mpe 1520 bafandi nyonso ya esanga Bahamas, penepene na ba Lucayans 20.000 bakumbamaki na makasi lokola baombo mpo na kosala na mabulu ya wolo ya ba Espagnols na etuka ya Hispanola.
Wana ezalaki lisusu na bato te, Bahamas “ekundolamaki lisusu” mbala ya liboso na ba Britaniques, mpe na nsima na bituluku minene ya ba “loyalistes.” Baoyo wana bazali mingimingi bankolo bilanga baoyo bautaki na ba colonies ya Amerike. Lokola batikalaki sembo epai na bokonzi ya Angleterre, bakimaki etumba ya lipanda oyo ezalaki pene ya kosalema likolo na continent. Bafandi na Bahamas bazali lelo libosoliboso bakitani na bayei wana mpe baombo na bango. Ntango bakangwamaki, baombo mingi babatelaki nkombo na bankolo na bango ya kala.
Bokundoli ya lolenge mosusu
Ntembe ezali te ete Colomb amimonaki ye moko lokola motindo moko ya misionere. Eyebisami ete alobaki: “Nzambe asalelaki ngai lokola momemi nsango ya likolo mpe mabele ya sika ... Alakisi ngai epai nasengelaki kozwa yango [mabele ya sika].” Nzokande, kobebisama oyo esalamaki emonisi ete ezalaki bongo te. ˈMakolo ya sika mpe mabele ya sikaˈ ya sembo elakami na Nzambe esengelaki kozela bokundoli ya lolenge mosusu.—2 Petelo 3:13.
Na 1926, Edward McKenzie mpe mwasi na ye bakomaki na Bahamas. Na bokeseni ya bakundoli oyo bakomaki liboso na bango, babalani wana ya Jamaïque bazalaki kolukaluka bato na motema molongobani mpo na kopesa bango eloko ya motuya. Bazalaki bato ya liboso ya komema nsango malamu na Bokonzi na Nzambe na esanga ya Bahamas. (Matai 13:44; 24:14) Mwa nsima na boumeli ya mbula bato mibale mosusu ya esanga ya Jamaïque, Clarence Walters mpe Rachel Gregory bakendeki kokutana na bango. Na 1928 bazalaki basakoli ya Bokonzi sambo na Bahamas. Basalaki mosala makasi ya kosakola nsango malamu epai na bafandi ya esanga wana na boumeli ya mibu minei.
Na nsima E. P. Roberts, molobi ya molende autaki na esanga ya Trinité. Masolo na ye liboso na bato nyonso na biyanganelo esalaki mingi mpo na kolongola biyambayamba ya lokuta mpe kosimba mitema na bato mingi na solo ya Biblia. Donald Oscar Murray, oyo nsima ayebanaki lokola D. O. asepelaki mingi wana afandaki kati na bayangani ya moko na makita yango. Na nsima akomaki kokamba mosala ya kosakola.
Ndeko mwasi Nancy Porter, oyo azalaki misionere, azali komikundola malamu lolenge D. O. Murray alobaki na ntina na mabondeli ya mozindo oyo azalaki kosala mpo na kosenga lisalisi mpo na mosala ya kosakola. Na 1947 Nancy mpe mobali na ye, George, elongo na bandeko basusu mibale bakomaki bamisionere ya liboso oyo la Societe Watch Tower atindaki na Bahamas. Amikundoli ete: “Likita ya liboso oyo tokendeki na yango ezali eloko oyo nakoki kobosana te. Bato bazalaki penepene ya libwa to zomi. Ndeko Murray azalaki mokambi mpe asalaki libondeli ya ebandeli, atondaki Jéhovah mpo na boyei ya bamisionere. Alobaki ete mposa ya lisalisi ezali, mpe ˈtozali kobondela uta kala mpo na kozwa lisalisi.ˈ La Société alakaki kotinda lisalisi, mpe sikawa biso tozali wana. Libondeli yango lizalaki mpenza mozindo na boye ete epesaki biso mposa ya kotikala mpe tolingaki lisusu kolongwa te.” Sikawa nsima ya mibu 45 mpe atako mobali na ye asili kokufa ndeko mwasi Porter azali ntango nyonso komema nsango na Bokonzi epai na bafandi ya esanga.
Mingi mpenza kobanda 1947 mosala ya kosakola Bokonzi na Bahamas esili kozwa litomba monene ya basali ya ntango nyonso mpe na bandeko mosusu oyo bazalaki koya na bisanga na masuwa. Mbala mingi esengelaki batambwisa masuwa kati na mbonge ya mai ya mozindo mingi te mpe na bisika ya zelo mingi bongo bazalaki kotambola na mai kino na libongo mpe komema nsango malamu na bamboka mosika. Milende wana ya ebandeli ezali naino kobota mbuma kino lelo oyo.
Likambo ya ntina monene esalemaki na 1950. Na Décembre na mbula wana, Nathan H. Knorr, oyo azalaki na eleko wana président ya la Société Watch Tower, mpe secrétaire na ye Milton G. Henschel, bakendeki na Bahamas mpo na mbala ya liboso. Knorr asololaki na bato 312 kati na esika ebengami Motherˈs Club, ndako moko moke etongami na mabaya na balabala Jail Alley. Bato mingi ya lokumu bazalaki wana elongo na mosangani moko ya parlemá mpe mokambi ya zulunalo oyo epesaka nsango mikolo nyonso. Na mpokwa yango, ndeko Knorr ayebisaki ete biro moko ya filiale ya la Société ekofungwama na Bahamas.
Bafandi ya esanga bayanoli malamu
Bato ya Bahamas oyo bazali na boninga mingi bayokaka mpenza nsango ya Bokonzi malamu. Nzokande, ezali ntembe monene mpo na kokutana na bango nyonso. Mpo na nini? Mpamba te, atako bato mingi bazali kofanda na mbokamokonzi Nassau, mpe na Grand Bahama, esanga oyo ezali pembeni na yango, bafandi mosusu bapalangani na bisanga minene 15 mpe na bisanga mike mpe ngomba ya pauni 700 oyo esali etuluku ya esanga wana.
Na kotalela mposa, Batemwe mingi ya esanga mpe basusu mingi oyo bautaki bipai mosusu bakendeki kopesa lisalisi na mosala ya kosakola epai na bafandi ya bisanga mike. Babongi kokumisama mpo na yango mpo ete bamipesaki mpe babimisaki bango moko mosolo mingi. Kasi milende na bango ezwaki mpenza mbano na yango.
Ndeko moko mpe mwasi na ye, baoyo babalanaki kala mingi te bakendeki kofanda na esanga monene ya Andros. Mokolo moko, ntango bazali kosakola ndako na ndako, bakutanaki na moto moko oyo autaki na esanga ya Haiti. Bato ya lolenge yango bazali ebele na Bahamas. Mobali wana andimaki na motema moko boyekoli ya Biblia. Babandaki boyekoli bobele na mpokwa yango, bazalaki kosalela mokanda Okoki kozala na bomoi na seko no mabelé oyo ekobongwana paradis na Lingelesi mpe na Lifalanse. Na mpokwa oyo elandaki ayaki mpo na mbala ya liboso na makita boklisto. Kozanga koumela atikaki komela makaya mpe akolaki nokinoki mpe abandaki kosangana na mosala ya kosakola.
Na ntongo ya mokolo oyo mobali wana asengelaki kozwa batisimo, azwaki kasete ya nsango oyo euti na libota na ye na Haiti, atako azwaki nsango na bango te esili koleka mibu mitano. Nsango nini batindelaki ye? Bayebisaki ye ete basili kokoma ba Témoins de Jéhovah. Balimbolaki ye ete ndeko na ye ya mwasi akomi pionnier permanent, to mosakoli ya ntango nyonso, mpe balendisaki ye na koluka Batemwe mpe koyekola Biblia elongo na bango. Ya solo, mobali wana azwaki batisimo mokolo wana na endimiseli nyonso ete azalaki kosala liponi malamu.
Bosepeli lokola oyo esili kolendisa motema na Batemwe ya esanga yango. Kati na bango motuya na baoyo bazali kokoma bapalanganisi ya nsango malamu na ntango nyonso ezali nse kokola, likambo oyo epesi nzela na bokoli. Na yango na 1988 motuya ya basakoli na Bokonzi na Bahamas elekaki nkoto moko. Lelo oyo, ezali na basakoli 1.300 kati na masanga 19, na bisanga minene penepene nyonso.
Babongisami mpo na mikolo mizali koya
Mpo na bokoli na motuya na bango, Batemwe bakutanaki na mikakatano ya kozwa, na ntalo malamu, esika mpo na kosala ba assemblées na bango ya minene ya mbula na mbula. Ba assemblées minene mibale esengelaki kosalema na bisanga mibale bikeseni mpo na kokoka koyamba ebele na bato. Mpo na yango, bibongiseli ezwamaki mpo na kotonga ba Salles dˈAssemblées elongo na biro ya filiale. Misala mibandaki na décembre 1989. Ebele na basali na bolingo malamu ya ekipe ya botongi kati na mokili mobimba mpe baoyo ya esanga yango basalaki “na molimo na bango mobimba lokola mpo na Jéhovah.”—Bakolose 3:23.
Na ntembe te, likita eleki monene mpe ya esengo oyo Batemwe basalaki na Bahamas kino sikawa ezalaki na libaku ya kofungwama ya biro ya sika ya filiale mpe Salle dˈassemblées kobanda le 8 kino le 9 Fevrier 1992. Motema ezalaki likolo wana bandeko na biteni bikeseni ya bisanga bazalaki komibongisa mpo na mokolo yango. Na kokesene na mikolo misusu mokolo yango ezalaki mpenza na molunge te, mpe na butu liboso na mokolo na ebongiseli yango mbula ebetaki. Kasi eloko moko te ekokaki kopekisa esengo na ebele ya bato 2.714 ntango John E. Barr, mosangi ya collège central ya ba Témoins de Jéhovah, asalaki lisolo ya bofungoli, oyo elobaki “Nzembo ya bakoli ya teckratike.”
Bayangani nyonso bamonisaki botondi mingi epai na Tata na bango ya likolo Jéhovah Nzambe, mpo ete apesaki bango libaku wana ya esengo mpe ya mayoki makasi. Bazwaki ekateli makasi ya kosalela nguya na bango mpo na mosala ya koteya makambo ya elimo oyo esengaki bokoli ya mosuni.
Mbala mosusu, ntembe mpo na koyeba soki bokundoli ya Colomb esalaki mbongwana malamu na bisanga wana ekolandana ntango molai. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah na Bahamas bazali na bomoko mpe na botondi epai na Nzambe mpo apesaki basakoli ya Bokonzi wana elimo ya komipesa oyo etindaki bango na kokende na esika bayebaki te mpe komema nsango malamu ya nkembo na bisika ezalaki na ndimbola ya elimo mai mayebani te. Mosala na bango mpe “bokundoli na bango” ememaki bozwi ya elimo ekokani na mosusu te mpo na baoyo nyonso bazali koluka solo na Bahamas.
[Karte/Bililingi na lokasa 24, 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Grand Bahama
Abaco
Andros
New Providence
Nassau
Eleuthera
Cat Island
Great Exuma
Rum Cay
San Salvador
Long Island
Crooked Island
Acklins Island
Mayaguana
Little Inagua
Great Inagua
CARIBBEAN SEA
FLORIDA
CUBA
[Bililingi]
Mosala ya kosakola na zando ebengami Straw Market
Bakiti na mai mpo na komema nsango malamu
Biro ya filale etongami likoló na mwa ngomba epai okoki komona Salle d’assemblée