Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/2 nk. 17-18
  • Tokolisa bomoto ya sika kati na libala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokolisa bomoto ya sika kati na libala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge nini kolonga Mikakatano ya Libala
  • Tokemba na Nguya
  • Bandakisa ya etamboli ekeseni
  • Toyeisa makasi Nsinga ya Libala
  • Libala ekoki kolonga na mokili ya lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Libala na bino ekoba kozala lokola “nkamba ya nsinga misato”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Tiká ete libala na bino lizala ekanganeli ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/2 nk. 17-18

Tokolisa bomoto ya sika kati na libala

“Kasi bobongwana bato na sika mpo na nguya ekopusaka elimo na bino mpe bolata bomoto ya sika.”​—BAEFESE 4:23, 24, MN.

1. Mpo na nini libala lisengeli kotalelama na liseki te?

LIBALA ezali moko kati na matambe ya ntina monene oyo moto akoki kosala kati na bomoi, mpo na yango esengeli kotalelama na liseki te. Mpo na nini? Mpamba te na nzela na yango okokangama elongo na moto moko bomoi na yo mobimba. Elimboli kokabola bomoi mobimba elongo na moto yango. Esengi bokoli kati na makanisi mpo ete bokangami yango ezala malamu. Esengi lisusu bopusi ya malamu oyo ezali ‘kobongola makanisi mpe bongo kobongisa bomoto ya sika.’​—Baefese 4:23, 24; tala Genese 24:10-58; Matai 19:5, 6.

2, 3. (a) Nini esengami mpo na kopona mobalani na lolenge ya mayele? (b) Nini esengami kati na libala?

2 Ezali na bantina malamu ya kowela kobala nokinoki te, mpo na bopusi ya mposa na nzoto. Esengaka ntango mingi mpo na kokolisa bomoto mpe bizaleli ya moto oyo asili kokola. Nsima na bambula okozwa eksperianse mpe boyebi oyo ekozala moboko mpo na kozwa bikateli ya malamu. Na ntango wana, okozala na makoki mingi ya kopona mobalani malamu lokola moninga na bomoi na yo. Lisese moko ya ba Espagnols elobi ete: “Kotikala monzemba eleki malamu na kozala na libala ya mindondo.”​—Masese 21:9; Mosakoli 5:2.

3 Kopona mobalani malamu ezali mpenza na ntina monene mpo na kolónga kati na libala. Mpo na yango, moklisto asengeli kotika mitinda ya Biblia mitambolisa ye, kasi akopusama te bobele na kobendama ya kitoko ya nzoto, na mayoki makasi mpe bopusi ya bilingalinga. Libala esuki bobele na kosangisama ya nzoto mibale te. Ezali lisusu kosangisama ya bomoto mibale, ya mabota mibale mpe mitindo mibale ya kobokwama, mbala mosusu ata mitindo mibale ya mimeseno mpe minoko mibale. Kosangisa bato mibale kati na libala ezali solo kosenga kosalela lolemo na lolenge lobongi; na nguya ya maloba, tokoki kobebisa to kobongisa. Likoló na nyonso oyo, tozali lisusu komona mayele oyo mazwami kati na toli ya Paulo ya ‘kobala bobele kati na Nkolo,’ elingi koloba elongo na moto oyo azali moko na baninga na biso kati na kondima.​—1 Bakolinti 7:39; Genese 24:1-4; Masese 12:18; 16:24.

Lolenge nini kolonga Mikakatano ya Libala

4. Mpo na nini mikakatano mpe mitungisi mibimaka mbala mosusu kati na libala?

4 Ata soki moboko ya libala ezali malamu, ekozala na ntango oyo kozanga koyokana, mitungisi mpe mikakatano ekobima. Makambo wana mazali komonana epai na bato nyonso, ezala moto oyo abali to monzemba. Mikakatano ya nkita mpe ya kolongono ya nzoto mikoki kobimisa matata kati na boyokani nyonso ya bato. Kokóma mawamawa to nkandankanda ekoki komema kozanga koyokana ya bomoto kati na mabala ata ya malamu. Likambo mosusu ezali ete moto moko te akoki kobatela lolemo na ye na motindo ya kokoka, lokola Yakobo ayebisaki yango ete: “Biso nyonso tokokweaka na makambo mingi. Soko moto akokweaka na maloba na ye te, ye moto abongi na nyonso, mpe ayebi kopekisa nzoto na ye mobimba. . . . Lolemo ezali elembo moke mpe ekomikumisaka [mpo na] makambo minene. Tala mwa mɔ́tɔ moke ekotumbaka zamba monene mingi!”​—Yakobo 3:2, 5.

5, 6. (a) Tosengeli kosala nini wana kozanga koyokana ebimi? (b) Likambo nini tosengeli mbala mosusu kosala ntango mokakatano ebimi?

5 Nini tokoki kosala mpo na kobongisa makambo, na ntango mikakatano mibimi kati na libala? Lolenge nini tokoki kopengola ete kozanga koyokana ebimisa koswana, mpe koswana emema na bokabwani? Ezali na ntango wana nde nguya oyo ezali kobongola makanisi esengeli kosala mosala. Bopusi yango ekoki kozala ya malamu to ya mabe, ya kolendisa mpe ya elimo to ya kobebisa oyo etambwisami na mposa ya mosuni. Soki ezali ya kolendisa, moto yango akosala makasi mpo na kobongisa esika ebebisami, mpo na kobatela libala na ye. Koswana mpe kozanga koyokana esengeli te koboma libala. Makambo makoki kobongisama mpe limemya kati na babalani mpe koyokana ekoki kozongisama na kosalela batoli ya Biblia.​—Baloma 14:19; Baefese 4:23, 26, 27.

6 Kati na makambo motindo wana, maloba oyo ya ntóma Paulo mazali na ntina mingi: “Na bongo, lokola baponami na Nzambe, babulami mpe balingami, bomilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosokema, na bopolo, na mitema petee. Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, boyikanaka mpiko, bolimbisanaka. Lokola Jéhovah alimbisi bino, bino mpe bobele bongo. Nde likoló na oyo nyonso, bomilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.”​—Bakolose 3:12-14.

7. Makambo nini mamonanaka mbala mosusu kati na libala?

7 Ezali petee kolobela yango, kasi na ntina na mitungisi ya bomoi ya lelo, kosalela yango ezalaka ntango nyonso petee te. Nini ekoki kozala mokakatano ya liboso? Mbala mosusu, kozanga kososola yango, moklisto moko akoki kozala na mitindo mibale ya bomoi. Na Salle du Royaume, kati na bandeko, azali komonisa boboto mpe limemya. Bongo, ntango azongi epai na ye, makambo na bomoi ya mokolo na mokolo na ndako, makoki kosala ete abosana bizaleli na ye ya elimo. Bakomi bobele mobali mpe mwasi na ye. Mpe kati na motungisi, mobali to mwasi akoki koloba makambo mazangi boboto oyo makokaki kobimisama te na Salle du Royaume. Likambo nini lisalemaki? Mpo na mwa ntango, bomoto ya boklisto elimwaki. Mosaleli moko na Nzambe abosani ete azali ntango nyonso moklisto, ndeko mobali (to ndeko mwasi) epai na ye na ndako. Nguya oyo ezali kopusa makanisi na ye ekómi ya mabe na esika ete ezala ya malamu.​—Yakobo 1:22-25.

8. Likambo nini likoki kobima wana nguya oyo ezali kopusa elimo ezali ya mabe?

8 Nsuka na yango ezali nini? Ekoki kozala ete mobali atiki ‘kofanda elongo na mwasi na ye na bososoli, kopesáká ye lokumu lokola na mbeki ya motau, mbeki ya mwasi.’ Ekoki kozala ete mwasi azali komonisa lisusu botosi te epai na mobali na ye; “elimo ya kimya mpe ya bopolo” na ye esili kolimwa. Nguya oyo ezali kopusa makanisi na bango ekómi ya mosuni kasi ya elimo te. “Makanisi ya mosuni” ezwi esika. Na yango, esengeli kosala nini mpo na kobatela ete bopusi wana ezala nguya ya elimo mpe ya malamu? Tosengeli koleisa elimo na biso.​—1 Petelo 3:1-4, 7; Bakolose 2:18.

Tokemba na Nguya

9. Makambo nini tosengeli kopona kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo?

9 Nguya oyo ezali kotinda na kosala likambo ezali bopusi oyo emonanaka ntango tosengeli kokamata bikateli. Kati na bomoi maponi mingi mamonanaka: ya malamu to ya mabe, ya moimi to ya kozanga moimi, oyo eyokani na bizaleli malamu to oyo ya mbindo. Nini ekosunga biso na kozwa bikateli malamu? Nguya oyo ezali kopusa makanisi na biso, ntango nguya yango etyami likoló na kokokisama ya mokano ya Jéhovah. Mokomi na Nzembo abondelaki ete: “Teya ngai nzela na mibeko na yo, ɛ Jéhovah; mpe nakolanda yango kino nsuka.”​—Nzembo 119:33; Ezekiele 18:31; Baloma 12:2.

10. Ndenge nini tokoki kokembisa na motindo malamu nguya oyo ezali kopusa elimo na biso?

10 Boyokani makasi elongo na Jéhovah ekosalisa biso na koluka kosepelisa ye mpe na kopengola makambo mabe, kati na yango kozanga sembo kati na libala. Yisraele ezwaki elendiseli ya “kosala oyo ezali malamu mpe sembo liboso na Nzambe [na bango].” Kasi Nzambe abakisaki lisusu toli oyo ete: “Ɛ bino baoyo bokolingaka Jéhovah, boyina mabe.” Na kotalela mobeko ya nsambo kati na Mibeko Zomi oyo elobaki ete: “Okosala ekobo te,” Bayisraele basengelaki koyina ekobo. Mobeko wana ezalaki komonisa likanisi ya sikisiki ya Nzambe likoló na likambo ya kozala sembo kati na libala.​—Deteronome 12:28; Nzembo 97:10; Exode 20:14; Levitike 20:10.

11. Na lolenge nini tokoki kokemba kati na nguya oyo ezali kopusa elimo na biso?

11 Lolenge nini tokoki lisusu kokemba kati na nguya oyo ezali kopusa elimo na biso? Na komonisáká bosepeli kati na misala mpe makambo ya elimo. Elimboli ete tosengeli kokokisa mposa oyo tozali na yango ya koyekola mbala na mbala Liloba na Nzambe mpe tosengeli kosepela elongo na makanisi mpe na toli na Jéhovah. Mayoki na biso ya mozindo masengeli kozala lokola oyo ya mokomi na Nzembo oyo alobaki ete: “Naluki yo na motema na ngai mobimba; tika ete napengwa na malako na yo soko moke te. Nazali kobatela liloba na yo na motema na ngai, ete nasala mabe epai na yo te. Teya ngai nzela na mibeko na yo, Ɛ Jéhovah, mpe nakolanda yango kino nsuka. Monisa ngai kotosa na mibeko na yo, mpe nakobatela yango na motema na ngai mobimba.”​—Nzembo 119:10, 11, 33, 34.

12. Makambo nini makoki kosangisa biso wana tozali komonisa likanisi ya Klisto?

12 Balonaka bolingo yango mpo na mitinda ya boyengebene ya Jéhovah bobele te na koyekola Biblia kasi lisusu na koyangana mbala na mabala na makita ya boklisto mpe na kosangana elongo na mosala ya kosakola. Bopusi wana mibale ya makasi ekokembisa nguya oyo ezali kopusa elimo na biso na boye ete etamboli na biso oyo ezangi moimi ekomonisa ntango nyonso likanisi na Klisto.​—Baloma 15:5; 1 Bakolinti 2:16.

13. (a) Mpo na nini libondeli ezali eloko ya motuya mingi mpo na kokembisa nguya oyo ezali kopusa elimo na biso? (b) Ndakisa nini Yesu apesaki kati na likambo yango?

13 Ezali na likambo mosusu oyo ntóma Paulo alimbolaki kati na mokanda na ye epai na Baefese ete: “Na mabondeli nyonso mpe na malombo . . . bobondelaka ntango nyonso kati na elimo.” (Baefese 6:18) Mibali basengeli kobondela elongo na basi na bango. Mbala mingi mabondeli lolenge yango mazali kofungola mitema mpe komema na masoló ya polele oyo makoki kobongisa mikakatano nyonso. Na ntango ya komekama mpe masenginya, tosengeli komibalola epai na Nzambe kati na libondeli, mpo na kosenga lisalisi na ye, mpo na kozwa nguya ya elimo mpo na kosala oyo eyokani na likanisi na Klisto. Atako azalaki moto na kokoka, Yesu abondelaki Tata na ye na mabaku mingi, mpo na kosenga nguya. Mabondeli na ye mazalaki kouta na motema mpe ya mozindo. Bobele bongo lelo, kati na masenginya, tokoki kozala na makasi mpo na kozwa ekateli ya malamu soki tobeleli Jéhovah ete asalisa biso na koboya makanisi ya kokokisa mposa ya mosuni mpe kobuka ndai ya libala na biso.​—Nzembo 119:101, 102.

Bandakisa ya etamboli ekeseni

14, 15. (a) Lolenge nini Yozefe asalaki liboso ya masenginya? (b) Nini esalisaki Yozefe na kotemela masenginya?

14 Lolenge nini tokoki kolónga masenginya? Na likambo yango tozali komona bokeseni ya polele kati na etamboli ya Yozefe mpe oyo ya Davidi. Ntango mwasi ya Potifare amekaki mbala na mbala kosenginya elenge mobali kitoko Yozefe, oyo azalaki naino monzemba na eleko yango, Yozefe azongisaki ete: “Ye aleki ngai na nguya na ndako oyo te mpe ye aboyeli ngai eloko moko te bobele yo mpo ete ozali mwasi na ye. Bongo nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?”​—Genese 39:6-9.

15 Nini esalisaki Yozefe na kobatela etamboli malamu wana nzokande ezalaki mpo na ye mpasi te kokwea na lisenginya? Azalaki na nguya moko makasi oyo ezalaki kopusa elimo na ye. Boyokani na ye elongo na Jéhovah ezalaki na ntina mingi mpo na ye. Ayebaki ete kosala pite elongo na mwasi oyo amipesaki na mposa mabe elingaki kozala lisumu monene bobele epai na mobali na ye te, kasi, na koleka epai na Nzambe.​—Genese 39:12.

16. Lolenge nini Davidi asalaki liboso ya masenginya?

16 Na bokeseni, nini ekómelaki Davidi? Azalaki mobali oyo asilaki kobala, mpe lokola nzela epesamaki na Mibeko azalaki na basi mingi. Na mpokwa moko, longwa na ndako na ye ya mokonzi atalaki mwasi moko oyo azalaki kosukola. Ezalaki mwasi kitoko Bata-Seba, mwasi na Ulia. Davidi asengelaki kozwa ekateli: kolanda kotala ye wana mposa mabe ezalaki kokola kati na motema na ye to kopengola mpe kobwaka masenginya yango. Aponaki nini? Atindaki ete baya na [Bata-Seba] na ndako na ye, mpe asalaki ekobo elongo na ye. Likambo lileki mabe, abomisaki mobali na ye.​—2 Samwele 11:2-4, 12-27.

17. Tokoki koloba nini na ntina na ezalela ya elimo ya Davidi?

17 Mpo na nini Davidi asalaki boye? Kati na Nzembo 51, epai ayambolaki mabe na ye na nsima, tokoki kososola mwa makambo. Alobaki: “Ɛ Nzambe, zalisela ngai motema na peto, mpe pesa ngai elimo ya sika, na boyengebene kati na ngai.” Ezali polele ete na eleko ya masenginya wana, azalaki na motema ya peto te mpe na elimo ya boyengebene te. Ekoki kozala ete atikaki kotanga Mibeko na Jéhovah, mpe mpo na yango elimo na ye elembaki. To atikaki etelemelo mpe nguya na ye ya mokonzi kobebisa makanisi na ye na boye ete azwamaki na bilulela ya mposa ya nzoto. Atako boni, nguya oyo ezalaki kopusa elimo na ye ezalaki ya moimi mpe ya masumu. Yango wana, ayaki kondima ete azalaki na mposa ya “elimo ya sika, elimo ya boyengebene.”​—Nzembo 51:10; Deteronome 17:18-20.

18. Toli nini Yesu apesaki na ntina na ekobo?

18 Mabala mosusu ya baklisto mabebaki mpo ete moko na babalani to bango nyonso mibale bamitikaki na bolembu ya elimo lokola mokonzi Davidi. Ndakisa na ye esengeli kokebisa biso na kolanda kotala mwasi moko, to mobali moko na mposa mabe, mpo ete ekoki komema na ekobo. Yesu amonisaki ete ayebaki mayoki na bato na likambo yango, mpo ete alobaki: “Boyoki ete balobaki boye, ‘Sala ekobo te.’ Nde ngai nazali koloba na bino ete, ye nani akolanda kotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.” Kati na likambo motindo oyo, nguya oyo ezali kopusa elimo ezali ya moimi mpe ya mosuni, kasi ezali nguya ya elimo te. Na yango, baklisto bakoki kosala nini mpo na kokima ekobo mpe kolanda kozala na bolamu mpe na bosepeli kati na libala na bango?​—Matai 5:27, 28.

Toyeisa makasi Nsinga ya Libala

19. Lolenge nini libala ekoki kokembisama?

19 Mokonzi Salomo akomaki ete: “Ata moto akoki koleka ye oyo azali bobele ye moko, nde mibale bakotelemela ye. Nkamba na nsinga misato ekokatama noki te.” Ya solo, bato mibale oyo bazali na bomoko kati na libala bakoki kotelema ngwi liboso na mimekamo koleka moto oyo azali ye moko. Kasi, soki libala na bango ezali lokola nkamba ya nsinga misato mpo ete Nzambe azali kati na yango, libala likozala makasi. Esengeli kosala nini mpo ete Nzambe azala na esika kati na libala? Esengeli ete babalani basalela mitinda mpe batoli oyo apesi mpo na libala.​—Mosakoli 4:12.

20. Batoli nini ya Biblia ekoki kosalisa mobali ya libala?

20 Soki mobali akosalela batoli ya mikapo oyo milandi, na ntembe te libala na ye ekozala na moboko malamu mpo na kolónga:

“Bino mibali lokola, bozalana na basi na bino kososola na mayele ete bango baleki motau, nde bopesa lokumu epai na bango lokola na bato bakozwa libula na likabo na bomoi na bino elongo; bongo mabondeli na bino makopekisama te.”​—1 Petelo 3:7.

“Bino mibali, bolingaka basi na bino, lokola Klisto alingaki lisangá mpe amipesaki ye moko mpo na yango. Bongo ekoki na mibali ete balinga basi na bango lokola nzoto na bango mpenza. Ye oyo alingi mwasi na ye azali komilinga ye moko.”​—Baefese 5:25, 28.

“[Mobali] na ye akotelema, mpe akokumisa ye. Ezali na bana basi mingi oyo basili komimonisa basi ya makoki, kasi yo​—oleki bango nyonso.”​—Masese 31:28, 29, MN.

“Moto akoki kotambola likoló na makala na mɔ́tɔ mpe matambe na ye makozikisama te? Boye na ye oyo akoingela epai na mwasi na mozalani na ye. Moto na moto oyo akomama ye akobyangama sembo te. Ye oyo akosala ekobo . . . azali kobungisa molimo na ye.”​—Masese 6:28, 29, 32.

21. Batoli nini ya Biblia ekoki kosalisa mwasi ya libala?

21 Soki mwasi atye likebi na mateya malandi ya Biblia, akosala ete libala na ye eumela:

“Bino basi, botosa mibali na bino ete, ata bamosusu na bango bandimi Liloba te, bazwama na kimya mpe na bizaleli malamu na basi na bango, wana esili bango kotala bizaleli na bino bizali na peto mpe na limemya mozindo na elimo na bopolo mpe ya kimya.”​—1 Petelo 3:1-4.

“Mobali apesa mwasi yango ekoki na ye [na makambo matali kosangisa nzoto]; mpe bongo mwasi apesa mobali yango ekoki na ye. . . . Boboyana kati na bino te, bobele soko bondimani kosala bongo mwa ntango.”​—1 Bakolinti 7:3-5.

22. (a) Makambo nini mosusu makoki kobongisa libala? (b) Lolenge nini Jéhovah azali kotalela koboma libala?

22 Biblia ezali komonisa lisusu ete, bolingo, boboto, koyokela mawa, motema molai, bososoli, kolendisana, mpe kokumisa ezali makambo mosusu ya ntina mpo na eloko oyo ya motuya mingi oyo ezali bongo libala. Libala oyo ezangi bizaleli yango ekokani na nzete oyo ezangi pole na moi mpe mai​—ekoki mpenza kokola te. Na yango, tika ete nguya oyo ezali kopusa elimo na biso, etinda biso na kolendisana mpe na kobondisana moko na mosusu kati na libala. Omikundwela ete Jéhovah ‘ayini koboma libala.’ Soki bolingo ya boklisto ezali, esika ekozala te mpo na ekobo to koboma libala. Mpo na nini? “Mpo ete bolingo ekosukaka te.”​—Malaki 2:16; 1 Bakolinti 13:4-8; Baefese 5:3-5.

Limbola Makambo oyo

◻ Nini ezali moboko mpo na libala ya esengo?

◻ Lolenge nini nguya oyo ezali kopusa elimo ekoki kozala na bopusi kati na libala?

◻ Tokoki kosala nini mpo na kokemba na nguya oyo ezali kopusa elimo na biso?

◻ Lolenge nini Yozefe mpe Davidi bamonisaki etamboli ekeseni liboso ya masenginya?

◻ Batoli nini ya Biblia ekosalisa mibali mpe basi na koyeisa nsinga na libala na bango makasi?

[Bililingi na lokasa 18]

Tozali na mitindo mibale ya bomoi​—boboto kati na lisangá mpe makambo makasi na ndako?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto