Bakonzi ya mangomba mpe likaya
ESILI koleka sikawa mibu 116, monganga John Cowan akomaki mokanda moko oyo ezalaki na motó na likambo Likaya ezali kotemela bopeto, bizaleli malamu mpe kolongono ya nzoto (na Lingelesi). Makama oyo mayebani na ntina na likaya na bambula oyo euti koleka mazali komonisa motindo nini makanisi na ye na ntina na bakonzi na mangomba oyo bazali komela makaya mazalaki mozindo. Lelo mpe mazali na ntina monene epai na ye oyo alingi kosalela Nzambe. Monganga Cowan, kati na mokapo 4 ya mokanda yango, oyo ezali kolobela makama ya bizaleli bikangisami na komela likaya, alobaki ete:
“Soki, lokola yango emonisami polele, likaya ezali mabe mpo na nzoto, ekoki kozala malamu te mpo na oyo etali bizaleli; mpo ete mobeko moko oyo etali lolenge nzoto ekosalaka elobi ete ˈeloko nyonso oyo ezali kobebisa to koswa nzoto ezali mpe kobebisa misisa ya boongó, mpe na nzela na yango ezali kobebisa boongó, na bongo ezali mpe kobebisa elimo.ˈ Elimo ya moto—makanisi na ye, maloba na ye, misala na ye—epusami na lolenge oyo azali kosalela to konyokola nzoto na ye. Na yango moko mpe na likanisi oyo ezali kobimisa, likaya ezali mbindo, mpe—kozanga kotalela mabe oyo ezali kosala—tokoki komituna lolenge nini mayoki mpe misala ya peto ya sembo mpe eyokani na bizaleli malamu ekoki kobotama to kokola kati na elimo. Bobele bongo, kanisa naino—soki nde tokokaki kokanisa motindo yango—ete Klisto, oyo azalaki ndakisa ya bomoi malamu awa na mabele, oyo ateyaki mpe asakolaki bopeto, bopeto ya bizaleli, bolingo mpe bokabi, kanisa oyo esengelaki kolobama mpo na ye soki amelaki likaya, anusaki to atyaki yango na mino. Elingaki kozala kotuka mpenza monene, boye te? Nzokande, bato ya lingomba—bayekoli, basakoli mpe baoyo bazali kolimbola malako mpe mateya na ye—bazali kobebisa nzoto na bango mpe kotya matono na molimo na bango na nzela ya lititi wana mabe mpe ya ngenge. Mibali motindo yango, to baoyo bazali kolanda bango, bakoki mpenza kozala na lolenge ya bomoi oyo Klisto azalaki na yango: bomoi etombwani mpe ya bizaleli malamu? Soko moke te.
“Meka, soki okokoka, koyokanisa na makanisi na yo moto na lokoso to momeli makaya na bosantu ya motema. Ekomonana ete ezali na likambo ya kotombokisa mpe ya nsomo oyo eyokani te na bomoto. Motindo moko lokola bamposa ya nzoto mpe maoki ya libanda masili kobeba bobele bongo bomoto ya kati, bizaleli malamu ezali kokoma mabe. Elimo ya peto ekoki te kofanda kati na nzoto ya mbindo. Boyokani ya solo ezali kati na biloko ya mosuni mpe biloko ya elimo, na boye ete bizaleli na bamoko bizali komonisa motindo na basusu. Molakisi ya makambo na Nzambe mpe moombo ya likaya . . . Mbala mosusu azali koyeba, na polele mpe na bosembo nyonso ete komela likaya ezali momeseno mabe, eyokani te na bizaleli malamu, nzokande, azali koyoka bopusi ya kati, mobeko ya binama na nzoto na ye, oyo esalemi na ye, ezali kopusa ye na mposa ezangi nsuka ya komipesa na misala wana, mpe mobeko yango oyo abotaki mokoki kozala na nguya makasi koleka kosangisama ya mayele mpe lisosoli na ye. Komela likaya ezali kobuka polele mibeko na Nzambe oyo mikotisamaki kati na nzoto na biso, boye te? Kobuka mobeko moko ya Nzambe, ezali kosopa mibeko mpe kosala lisumu, boye te? Mpe soki moto moko azali na momeseno ya kobuka mibeko na Nzambe, ekozala mpo na ye mpasi na nsima mpo na kobuka mibeko misusu? Na nsuka, motindo nini moto akoki kotalelama na etamboli na ye lokola moteyi ya bizaleli malamu wana azali komonisa epai na bandimi na ye bomoi oyo ezali ntango nyonso kobuka mibeko na bomoto na ye?”