Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Konúsa tumbako na zolo to na monɔkɔ yango ezangi likámá?
‘CORD, elenge ya mibu 13, akendaki kofanda na ntei ya États-Unis, nokinoki amonaki ete eloko moko ezangaki kati na bisaleli na ye ya mwanakelasi ya eteyelo ya ntei oyo abongi: mwa molangi ya tumbako mpo na konúsa. Mingi kati na baninga na ye ya sika bazalaki konúsa mpe Cord alingaki kosala lokola bango. Na yango, ntango moko kati na bango apesaki ye mwa molangi moke ya tumbako mpo ete anúsa, akamataki yango mpe atyaki moke kati na mbɛbu (lèvre) na ye ya nsé mpe mino na ye na mobangá ya nsé (gencive) na lolenge mpenza ya moto oyo ameseni.’—Zulunalo Listen.
Cord azali ye moko te mpo na likambo yango. Monganga Christopher A. Squier, moto na mayele mpo na makɔnɔ ya monɔkɔ, andimi ete bilenge mingi bakómi konúsa. Na nsuka ya bambula ya 1980, mombongo ya tumbako ya konúsa na zolo to na monɔkɔ ezalaki kotambola lisusu te, “konúsama ya tumbako ekómi lisusu kokóla na mikolo oyo.”a Balukiluki bamonisi ete mwana moko likoló na bana 5 na eteyelo ya ntei na États-Unis mpe mwana 1 likoló na bana 3 na Suède—elingi koloba bamilió ya bilenge—banúsaka tumbako na zolo to na monɔkɔ. Likambo yango liuti wapi?
“Ezali na likámá mingi te lokola komɛla likaya.” “Elembeteli ezali te mpo na komonisa ete ezali likámá.” “Baninga na ngai banúsaka. Esalaka bango mabe te.” “Konúsa na mwa bantango mosusu, ekoki kosala ngai mabe te.” “Moto moko te akufi na yango.” Engebene Société américaine de cancérologie, wana ezali bantina bilenge oyo banúsaka tumbako na zolo to na monɔkɔ bapesaka.
Nini epusaka bilenge yango na kokanisa ete konúsa ezali na likámá mingi te lokola komɛla likaya? Yango ezali mpenza bongo?
Bazwami na motambo ya piblisité
Na boumeli ya bambula, kompanyi monene ya makaya na États-Unis elɛngoli bilenge na bapiblisité oyo ezali komonisa ete konúsa tumbako na zolo to na monɔkɔ ezali na likámá mpenza te lolenge moko na kolya bazoka mpe lisusu ezali na ntina lolenge moko na kozala na kɛ́tshi ya motuya. Na bongo kompanyi yango esalelaki maloba lokola oyo “Komɛla te, núsá,” “Nazali koyoka esengo nyonso ya tumbako kozanga kútu kopelisa likaya” mpe “Mwa bagramɛ mpo na konúsa,” na kolatisáká yango na lolenge ya kolɛngola likanisi oyo ete ezali nde lolenge ya bato bandimami.
Nsima wana maloba motindo yango mapekisamaki na radyó mpe na televizyó na États-Unis, kompanyi ya makaya ekóbaki kopesa bansango na yango na nzela ya bazulunalo oyo ezalaki kopesa yango mabɔkɔ. Bililingi ya kobenda likebi ya bingambe ya mibali oyo bazali kolekisa ntango malamu na kosaláká bokila, komatáká bangomba to kotɛpáká likoló ya mai—mwa molangi ya tumbako oyo ezali komonana polele kati na libenga na bango ya nsima, etambwisaki nsango oyo na makasi mpenza—“tumbako ya konúsa na zolo to na monɔkɔ ezali kitoko, mpe ekokómisa yo moto mpenza!”
Lapólo oyo esalemaki na mobu 1994 na ministre ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na États-Unis, oyo ezalaki na motó na likambo Milende mpo na koboyisa bilenge tumbako (na Lingelesi), emonisi ete bilenge mingi bandimaka ete “tumbako ya konúsa na zolo to na monɔkɔ ezali na likámá te mpe kosalela yango ezali likambo oyo lindimami malamu mpenza na bato.” Bolukiluki moko esalemaki epai na banakelasi ya eteyelo ya ntei emonisaki ete “soko 60 % ya banakelasi oyo bazali na mibu na nsé ya 15 mpe 40 % ya baoyo bazali na mibu koleka 15 bazalaki kokanisa ete konúsa tumbako na zolo to na monɔkɔ mbala na mbala ezali bobele na mwa makámá moke to mpe likámá moko te.” Lisusu, ata banakelasi oyo bazalaki kondima ete konúsa tumbako na zolo to na monɔkɔ ekoki kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto “bakanisaki te ete likámá ekoki kozala monene.” Bapiblisité ekokisaki mikano na yango. Kasi elobaki mpenza solo?
Lisese moko ya Biblia lilobi ete: “Moto na zoba ayambi maloba nyonso, nde moto na mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.” To lokola lisese mosusu elobi yango: “Moto na moto na mayele akosalaka na boyebi.” (Masese 13:16; 14:15) Makambo mamonisi nini na ntina na konúsa tumbako na zolo to na monɔkɔ?
Bansango ya mabe
Ata soki bapiblisité ezali koloba ete konúsa tumbako ekobongisa bomoto na yo mpe ete yango ezali likámá te, makambo oyo mamonani mazali komonisa ndenge mosusu. Libosoliboso, yango ekobongisa yo te. Soki ozali na ntembe, bandisá lolemo na yo nsima ya litáma moko mpe omitala na talatála. Omoni ndenge okómi? Mabe te? Tolobeli wana bobele matomba ya libándá ya nzoto, mpamba te matomba ya kati mazali mabe koleka!
Na ndakisa, baoyo banúsaka na monɔkɔ mbala na mbala bazali kati na likámá ya kobebisa mbɛbu na bango, kogagisa mino na bango, kozala na monɔkɔ nsolo mpe mobanga ya nsé oyo ekoki kosala mpasi—eloko moko ya kosepelisa ezali wana te. Mpe, bakoyoka lisusu biloko elengi mingi te na lolemo mpe bakoyoka lisusu nsolo malamu te na zolo, kobɛta ya motema na bango mpe kotambola ya makila na nzoto emataka—yango ezali mpenza malamu te. Kasi, likambo ya mabe koleka limonisami na bolukiluki oyo esalemaki na États-Unis, na Mpótó mpe na Inde, oyo emonisaki ete konúsa tumbako epesaka kansɛr ya matama, kansɛr ya mbanga mpe kansɛr ya mongongo. Makambo wana mamonani mazali kokamwisa minganga te. Bolukiluki moko emonisaki na bosikisiki ete: “Kati na biloko nyonso oyo ezali kokɔta na nzoto, tumbako ya konúsa ezali na biloko oyo epesaka kansɛr mingi koleka.” Likambo ya kokamwa lizali te ete “baoyo banúsaka uta ntango molai bazali na 50 % ya likámá ya kozwa kansɛr ya monɔkɔ koleka baoyo banusaka te.”
Matomba ya kansɛr ya monɔkɔ mazalaka mabe mpenza. Bobele te ete kolɔngɔ́nɔ́ ya moto oyo azali konúsa tumbako ekobeba, kasi bomoi na ye mpe ekutwami. Búku moko ya Société américaine de cancérologie elobi mwa lisoló oyo ya mawa: ‘Sean abandaki konúsa tumbako ntango azalaki na mibu 13. Akanisaki ete ezalaki na likámá mingi te lokola komɛla likaya. Nsima ya kolekisa mibu mitano konúsáká pakɛ́ moko to koleka na mokolo, lolemo na ye ebandaki kosala mpasi. Ezalaki bongo kansɛr ya monɔkɔ. Minganga balongolaki ye eteni moko ya lolemo, kasi kansɛr ekómaki na nkingo. Lipaso mosusu libebisaki ye elongi koleka, kasi lilóngaki te—wana azalaki na mibu 19 akufaki. Liboso ya kufa na ye, Sean akomaki mwa maloba oyo na lokasa: “Konúsa tumbako te.”’
Baombo!
Nsima ya kotánga makambo oyo makómelaki Sean, Cord, oyo tolobelaki na ebandeli, ayaki kososola. Azwaki ekateli ya kotika konúsa. Kasi ezalaki pɛtɛɛ te. Cord alobaki na zulunalo Listen ete: “Namiyokaki ete nasengelaki na yango. Kútu kino sikawa, nsima ya basanza uta natiká konúsa, ekómelaka ngai namimona ete nazali koluka mwa molangi kati na libenga na ngai. Nalyaka bazoka mingi. Esungaka, kasi yango epekisaka te liyoki ya kozanga eloko moko.”
Ezali yango nde Ca-A Cancer Journal for Clinicians endimisi ete: “Bolukiluki oyo esalemi likoló na bilenge oyo bamekaka kotika konúsa tumbako na zolo to na monɔkɔ emonisi ete bobele mwa bamoko kati na bango balóngaka.” Mpo na ntina nini? Ezali mpo na eloko oyo epesaka mpenza mpasi mpo na kotika komɛla likaya, oyo ebéngami nicotine.
Nicotine, eloko oyo ezalaka kati na makaya mpe kati na tumbako ya konúsa, ezali ngɛngɛ moko makasi oyo epesaka mwa esengo epai na moto oyo amɛlaka yango. Nsima ya miniti 30 nyonso to pene na yango, moto yango asengeli kotya mwa ndambo ya tumbako na zolo to na monɔkɔ mpo ete mayoki wana ya esengo masila te. Nicotine ekokangisa ye lokola moombo. Basusu bazali mpenza baombo koleka na boye ete bazalaka na mwa mputulu ya tumbako na monɔkɔ butu na moi—ata ntango bazali kolala!
Na bokeseni na oyo mbala mosusu bilenge bakanisaka, konúsa tumbako ekitisaka te nicotine oyo ekɔti kati na nzoto. Mwa molangi moko ya tumbako ya konúsa ezali na nicotine ndenge moko na sigarɛ́tɛ 60! Engebene lapɔlɔ Milende mpo na koboyisa bilenge tumbako, “banúsi ya tumbako na zolo to na monɔkɔ” ‘bamɛlaka nicotine ndenge moko na bamɛli makaya—mbala mosusu mbala mibale koleka.’ (Biso nde totɛngisi.) Longolá nicotine, tumbako ya konúsa na zolo mpe na monɔkɔ ezali na nitrosamines (biloko moko ya ngɛngɛ makasi oyo bipesaka kansɛr) mbala zomi koleka sigarɛ́tɛ.
Kozala zoba te!
Monganga Roy Sessions, moto na mayele na makɔnɔ ya motó mpe mongongo alobi ete: “Ntembe ezali te, ezali biloko moko mabe, bipesaka boombo na boye ete bato mingi bamonaka ete ezali mpasi mpo na kolónga yango koleka sigarɛ́tɛ.” Monganga Oscar Guerra, moto na mayele na kansɛr apesaki bosukisi oyo: “Nzoto elingaka tumbako ya konúsa te.” Banganga-mayele na mokili mobimba bandimi likanisi yango: Kokamata mwa tumbako mpo na konúsa ekoki kopesa yo likámá koleka kozala na mwa mitungisi. Yango ekoki kútu koboma yo!
Bilenge baklisto bazali na ntina mosusu oyo eleki kotalela kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpo na koboya tumbako na lolenge nyonso—balingi kosepelisa Yehova Nzambe. Liloba na ye lizali kopesa etinda oyo ete: “Tómipɛtola mpenza na mbindo nyonso ya nzoto mpe ya elimo mpe tokokisa ezaleli na biso na bulɛɛ kati na nsɔ́mɔ na Nzambe.”—2 Bakolinti 7:1, NW.
Zulunalo moko ya minganga (Aviation, Space, and Environmental Medicine) esukisi makambo na lolenge kitoko boye: “Tumbako ezali molóna moko ya nsolo mabe oyo elyamaka bobele na bikelamo mibale—mosɔ́pi ya moke ya lángi ya mai ya pɔndu mpe moto. Mpo na mosɔ́pi, yango ezali na likámá te.”
Nzokande, yo, oyebi oyo ozali kosala. Zalá na bokɛngi—komeka te konusa yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Longolá tumbako ya komɛla, tumbako ya konúsa na zolo to na monɔkɔ mpe ezali. Bilenge balingaka mingimingi tumbako ya konúsa—tumbako oyo baniki yango mpe ezali na elengi na lolemo, mpe ezali kobimisa nsolo mpimbo kati na mwa molangi to na basasɛ́ lolenge moko na basasɛ́ oyo batyaka nkisi ya mai. Mpo na konúsa—bazwaka mwa ndambo ya tumbako na misapi—mpe batyaka yango na mbɛbu to kati na litama mpe mobanga ya nsé.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
‘Liboso ya kufa na ye, Sean akomaki maloba oyo mokuse: “Konúsa tumbako te”’
[Bililingi na lokasa 26]
Konúsa tumbako ezali likambo oyo likómi komonana mingi epai na bilenge. Esengeli komeka yango?