Boyebi esili kopesama na Namibie
“NAYEBI te.” Osila koyoka maloba oyo na minoko boni? Mwasi moko Moherero oyo alati elamba molai na motindo ya mboka na bango mpe na ekoti ya nsongé molai alobaki ete: “Hi nokuzuva.” Elenge mwasi wana Mokwanyama alobi na mwa koseka ete, “Nghi udite ko.” Mondonda yango afandaka na mboka, ayanolaki na kotombolaka mapeka ete, “Kandi uvite ko.” Mokengeli ya bantaba oyo azali Mokwangali ayebisi ete “Kapi na kuzuvha.”
Bato oyo nyonso bauti koloba ete: “Nayebi te.” Tala oyo emonisi mikakatano na ntina ya minoko oyo ba Témoins de Jéhovah bakutanaki na yango na mokili ya Namibie wana bamipesaki mpo na koluka kosolola na bafandi 1 370 000 ya teritware wana monene oyo ezali na ba kilomètres carrés 824 000.
Wana ezali likambo ya kokamwa te! Na Namibie, ezali te bobele na ba Hereros mpe ba Namas oyo bazali na minoko na bango, kasi lisusu ba Ovambos, ba Kavangos, ba Tswanas, ba Capriviens, ba Himbas, ba Bochimans mpe ba Damaras. Nzokande, mikanda ya Batemwe mizalaki bobele na Lingelesi mpe na Afrikaans. Ya solo mpenza, kobongolama ya mikanda na minoko misusu ezalaki mpenza na ntina monene mpo ete bato mingi bakoka kokanga ntina ya solo. Mosala wana ebandaki mpenza moke, esili koleka sikawa mwa bambula, na Windhoek, mboka mokonzi ya mokili oyo mobyangami lelo Afrique du Sud-Ouest.
Dick Waldron azali komikundola ete: “Na Windhoek, Lingomba mpe Bapolisi bazalaki mpenza kotemela mosala na biso ya kopesa litatoli.” Ye mpe mwasi na ye Coralie, bango nyonso bazwaki mapolomi na Galaad. Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, bakomaki na mokili wana na 1953. “Tozalaki na ndingisa te ya kokende na kartye ya Baindo mpe mbala mosusu bazalaki kotungisa biso wana bazalaki komona biso kosolola elongo na bango. Na boumeli ya mwa ntango, tozwaki esika moko epai batikaki biso kimya: mokoko ya mongálá Gammans, na nsuka ya engumba. Kuna tobombamaki kati na banzeté ya accacias mpe tozalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia.”
Ezalaki lisusu kuna nde mikanda ya la Société Watch Tower mibongolamaki mpo na mbala ya liboso na minoko ya mboka wana, lokola mwa batrakte na Kwanyama mpe brochure “Nsango malamu oyo ya Bokonzi” na Nama. Ndeko Waldron azali komikundola likambo moko ya kosekisa na ntina ya brochure yango oyo moto moko ya motema malamu azalaki kosalisa ye na kobongola yango. Maloba ya malamu mazalaki te mpo na kobongola “Adam azalaki moto ya kokoka.” Bongo moto wana alobaki na ye ete: “Koma bobele ete Adam azalaki lokola mbuma oyo eteli. Ba Namas bakoyeba ete azalaki moto ya kokoka.” Ezali na motindo yango nde boyebi ya Makomami ebandaki kopesama epai na ba Namibiens mingi.—Tala Danyele 11:33.
Litambe ya ntina mingi
Na ebandeli ya bambula 1970, litambe ya ntina mingi lisalemaki na kobongolama ya mokanda Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko na Ndonga mpe na Kwanyama—minoko mibale ya minene oyo milobami na ebele ya ba Namibiens ya Ovamboland, na ntaka ya bakilometele 700 na nord ya Windhoek. Ndako moko esalemaki mpo na ba pionniers na mboka Ondangwa na Ovamboland. Mpo ete bato oyo basepeli na solo bakoka kolanda boyekoli ya Mosenzeli ya poso na poso, ba pionniers spéciaux ya Ovamboland bazwaki mokumba ya kobongola masolo mikuse ya boyekoli na Ndonga mpe na Kwanyama, longwa na Lingelesi.
“Biro” ya bobongoli ezalaki mwa garage moko moke, oyo ekabwanaki na mabaya. Ezali kuna nde bazalaki kobimisa makomi ya Mosenzeli oyo esilaki kobongolama na masini moko ya kala. Kotya makanisi nyonso likoló ya mosala wana makasi ezalaki likambo ya petee te, mpo ete bisaleli bizalaki mpenza ya malamu te. Lisusu, na eleko ya molungé, température ezali kokoma katikati na 38 mpe 44°C. Atako bongo, ezali kuna nde babongolaki ba brochures ya sika mpe mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis.
Ntango masangá masalemaki na Ovamboland mpe na bituká mosusu ya Namibie, mposa emonanaki mpo na koyeisa bandako monene mpe kobongisa yango. Lisusu, esengelaki kotya yango na esika moko ya katikati mpo na kokokisa bamposa ya bituka nyonso. Bobele na eleko yango, makanisi mabe oyo bato bazalaki na yango mpo na mosala ya kosakola ebandaki kosila. Bapesaki biso ndingisa ya kotonga ndako na mabelé monene oyo Témoin de Jéhovah moko ya Windhoek apesaki. Nsima ya ntango moke, bavolontere koleka 40 bayambamaki na esika ya botongi, mpe na décembre 1990, babiro ya babongoli esilaki.
Sikawa, tosili kokota na babiro mpe bisika ya kolala ya ndako wana ya sika, mpe mosala ya kopesa boyebi epai na bibele ezali kokola nokinoki. Mikanda ya sika mizali kobongolama mbala na mbala na Herero mpe na Kwangali. Mosenzeli na langi kitoko ezali kobima na minoko mibale mbala moko na sanza, na Ndonga mpe na Kwanyama; ezali na masolo nyonso ya boyekoli mpe masolo mosusu. Topusami mpenza mosika na ebandeli ya moke oyo ezalaki kati na mokoko ya mongálá, esili koleka bambula mingi sikawa.
“Nayebi te.” Lelo oyo, okoyoka mpenza maloba oyo mingi te. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah koleka 600 oyo bazali na Namibie bazali na botondi epai na Tata na bango ya makoló, likambo oyo lizali kotinda bango na koloba sikawa ete: “Kongengisama ya maloba na yo ekopesa pole, ekopesa mayele epai baoyo bazangi yango.”—Nzembo 119:130.
[Bililingi na lokasa 25]
Kosakolama ya nsango malamu epai ya ba Hereros
Kobongolama ya mikanda mikolimbolaka Biblia ezali kopesa matomba epai ya ba Namibiens
Babiro ya kobongola mikanda na Namibie