Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/11 nk. 4-6
  • Mpo na nini bato mosusu bazali kobotama lisusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini bato mosusu bazali kobotama lisusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokano ya Nzambe mpo na bato
  • Nini ekomelaka molimo nsima ya kufa?
  • Babotami lisusu mpo na kozala bakonzi
  • Bongo mabelé?
  • Nani akozwa litomba na yango?
  • Okoki kondima ete Paladiso ekozala na mabelé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Osilá naino te komituna?
    Lamuká!—1994
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠Biblia elobaka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Kobotama lisusu
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/11 nk. 4-6

Mpo na nini bato mosusu bazali kobotama lisusu?

“SOKI moto akobotama lisusu te akokoka komona Bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:3) Uta Yesu abimisaki maloba oyo esili koleka mibu 1 900, maloba yango masili kotondisa bato mingi na esengo, mpe masili kokamwisa bato mosusu mingi.

Mpo na kososola malamu maloba na Yesu na ntina na kobotama lisusu, tosengeli liboso koyanola na mituna oyo: Mokano na Nzambe ezali nini mpo na bato? Likambo nini likómelaka molimo nsima ya kufa? Bokonzi na Nzambe esengeli kokokisa makambo nini?

Mokano ya Nzambe mpo na bato

Adam moto ya liboso, azalisamaki mwana ya kokoka ya Nzambe. (Luka 3:38) Mokano ya Jéhovah Nzambe ezalaki te ete Adam akufa. Adam mpe mwasi na ye, Eve, bazalaki na elikya kitoko ya kosala libota ya bato bazangi masumu oyo basengelaki koumela seko mpe kotondisa paradis ya mabelé. (Genese 1:28) Kufa ya mobali mpe mwasi ya liboso ezalaki te na mokano ya Nzambe na ebandeli. Ebimaki na ntina ya botomboki epai na mibeko ya Nzambe.​—Genese 2:15-17; 3:17-19.

Botomboki wana ebimisaki mituna minene na ntina na bizaleli malamu, lokola lotómo ya Nzambe mpo na koyangela molongo mobimba mpe likoki oyo bato bazali na yango mpo na kotikala sembo liboso ya mibeko na ye. Esengelaki ntango mingi mpo na kosilisa yango. Kasi, mokano ya Jéhovah Nzambe epai ya moto ebongwanaki te, mpe oyo Nzambe alingi kosala ekokokisama solo. Alingi kotondisa mabelé na libota ya bato ya kokoka oyo bakozala na bomoi ya seko kati na paradis. (Nzembo 37:29; 104:5; Yisaya 45:18; Luka 23:43) Wana tozali kotalela maloba na Yesu na ntina na kobotama lisusu, tokanisa likoló na solo wana ya moboko.

Nini ekomelaka molimo nsima ya kufa?

Lokola bayebaki te oyo elimo na Nzambe emonisaki epai na bakomi ya Biblia, bafilozofe Greke bamipesaki mpo na koyeba ntina ya bomoi. Bakokaki kondima te ete moto asengelaki kobika bobele mwa bambula moke, mbala mingi kati na mpasi, mpe nsima kotika kozala na bomoi libela. Mpo na yango, bazalaki na elonga. Nzokande, mateya na bango na ntina na elikya ya moto nsima ya kufa mazalaki lokuta. Bakomaki na bosukisi ete moto azali kolanda kozala na bomoi na lolenge mosusu, ete moto na moto azali na molimo mokokufaka te.

Bayuda mpe baoyo bazalaki komitanga baklisto bapusamaki na motindo yango ya komonela makambo. Mokanda Heaven​—A History elobi ete: “Bisika nyonso epai Bayuda oyo bapalanganaki bazalaki kokutana na bato ya mayele ya Bagreke, likanisi oyo ete molimo ekufaka te, lizalaki kobima.” Mokanda yango mobakisi ete: “Mateya ya Bagreke na ntina na molimo masili kotika bopusi monene likoló ya bindimeli ya Bayuda mpe na nsima, likoló na oyo ya baklisto. . . . Na kosalaka boyokani kati na mateya ya Platon mpe mimeseno ya Biblia, Philon [filozofe Moyuda ya Alexandrie na ekeke ya liboso] afungolaki nzela mpo na bateyi baklisto oyo basengelaki koya nsima.”

Philon azalaki na bindimeli nini? Mokanda yango elandi ete: “Mpo na ye, kufa ezali kozongisa molimo na ezalela na yango ya ebandeli, oyo ezalaki liboso ya kobotama. Mpo ete molimo euti na mokili ya elimo, bomoi kati na nzoto ezali kokoma bobele eleko mokuse ya lisolo ya moto, oyo mbala mingi etondi na mpasi.” Nzokande, liboso ya kobotama na ye, Adam azalaki na bomoi te. Engebene lisolo ya Biblia, Nzambe akanaki te, nsima ya kufa, kolekisama ya pwasa na ezalela mosusu lokola nde mabelé ezalaki elekelo oyo ekomema bato na bomoi ya esengo to mpe, na bomoi ya malamu mingi te.

Biblia, Liloba lipemami na Nzambe, ezali koteya te endimeli oyo ete molimo ekufaka te. Esaleli ata mbala moko te liloba oyo ete “molimo mozangi kokufa.” Ezali koloba ete Adam azalisamaki lokola molimo, kasi te elongo na molimo. Genese 2:7 elobi: “Jéhovah Nzambe asalaki moto na putulu ya mabelé mpe apemaki kati na zolo na ye mpema ya bomoi mpe moto akomaki molimo na bomoi.” Moto atyamaki te liboso ya bilikya ya kozala na bomoi na seko na likoló, to kati na minyoko ya mɔ́tɔ ya lifelo. Biblia emonisi ete molimo, elingi koloba moto, oyo akufi azali lisusu te na bomoi epai mosusu. (Nzembo 146:3, 4; Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4) Na yango, makanisi ya bafilozofe na ntina na molimo mazali ya Biblia te. Tosengeli komibatela na makanisi ya bokosi oyo makoki kozimbisa bososoli na biso ya maloba na Yesu na ntina na kobotama lisusu.

Babotami lisusu mpo na kozala bakonzi

Yesu alobaki na Nikodeme ete ye oyo ‘abotami lisusu akoki kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.’ (Yoane 3:3-5) Bokonzi yango ezali nini? Na ebandeli ya lisolo ya bato, Jéhovah asalelaki elobeli ya elilingi mpo na koyebisa bato mokano na ye. Asengelaki kosalela “libota” ya ntina mingi​—mokonzi oyo asengelaki koya—​mpo na kotuta motó na Nyoka ya kalakala, Satan le Diable. (Genese 3:15; Emoniseli 12:9) Lokola yango emonisamaki moke na moke kati na Makomami, “libota” yango ezali Yesu Klisto, oyo azali koyangela elongo na bakonzi balandi na ye kati na lolenge bobele moko ya komonisama ya boyangeli ya Nzambe: Bokonzi ya Masiya. (Nzembo 2:8, 9; Yisaya 9:6, 7; Danyele 2:44; 7:13, 14) Ezali Bokonzi ya makoló, oyo ekotya boyangeli ya Jéhovah mpe ekosikola libota ya bato na boombo ya masumu mpe na liwa.​—Matai 6:9, 10.

Bakonzi balandi oyo bakozala elongo na Yesu Klisto bazali 144 000, baoyo basombami kati na bato. (Emoniseli 5:9, 10; 14:1-4) Nzambe aponaki ndambo na bato ya libota lizangi kokoka ya Adam ete bazala “basantu ya Nzambe. Oyo aleki likoló,” baoyo bakoyangela elongo na Yesu Klisto kati na Bokonzi ya Masiya. (Danyele 7:27; 1 Bakolinti 6:2; Emoniseli 3:21; 20:6) Mibali mpe basi yango bazali kotya kondima na bango kati na Yesu Klisto, oyo alobaki ete ‘bakobotama lisusu.’ (Yoane 3:5-7) Mpo na nini mpe na lolenge nini kobotama yango ezali kosalema?

Mibali mpe basi yango basili kozwa batisimo ya mai lokola bayekoli na Klisto. Nzambe asili kolimbisa masumu na bango mpo na mbeka na lisiko ya Yesu, atangi bango bayengebene, mpe akomisi bango bana na ye ya elimo. (Baloma 3:23-26; 5:12-21; Bakolose 1:13, 14) Ntóma Paulo alobaki na bato yango ete: “Boyambi nde elimo ekomisi bino bana, elimo na nzela na yango tokobelela ete: ‘Abba, Tata!’ Elimo yango moko ekotatolaka na elimo na biso ete tozali bana na Nzambe. Soko nde tozali bana, tozali mpe basangoli ya libula: ee, basangoli ya libula na Nzambe, basangoli ya libula elongo na Klisto, soko tokooka mpasi elongo na ye, mpo na kozwa nkembo elongo na ye.”​—Baloma 8:15-17, MN.

Bayekoli wana ya Klisto babotamaki lisusu, to bazwaki ebandeli ya sika kati na bomoi. Yango ememaki bango na kondimisama ete bakosangola libula ya likoló elongo na Yesu. (Luka 12:32; 22:28-30; 1 Petelo 1:23) Ntóma Petelo alobelaki kobotama yango ya sika na maloba oyo: “Mpo na mawa na ye monene, aboti biso lisusu ete tozala na elikya makasi na nzela na lisekwa na Yesu Klisto kati na bakufi, mpo na kozwa libula likobeba te, ya peto mpe lizangi mbindo, yango ebombameli bino kuna na makoló.” (1 Petelo 1:3, 4, MN) Mpo na bato yango, likoki lizali ya kozwa bomoi wana ya sika kati na makoló, mpo ete Nzambe azali kosekwisa bango lokola asalaki yango mpo na Yesu.​—1 Bakolinti 15:42-49.

Bongo mabelé?

Yango elingi koloba te ete bato nyonso ya botosi basengeli kobotama lisusu mpo na kokende na likoló. Likanisi motindo wana ya libunga ekokani na oyo ya bafilozofe lokola Philon, oyo azalaki kokanisa ete ‘bomoi kati na nzoto ezali bobele eleko mokuse ya lisolo ya moto, oyo mbala mingi etondi na mpasi.’ Kasi, na ebandeli bikelamu ya Jéhovah Nzambe bizalaki na mbeba moko te.​—Genese 1:31; Deteronome 32:4.

Ekanamaki te ete bomoi ya bato ezala mokuse mpe ya mpasi. Yesu Klisto mpe baoyo babotami lisusu mpo na kozala bakonzi mpe banganga elongo na ye kati na makoló bakolongola mabe nyonso euti na botomboki ya Satana. (Baefese 1:8-10) Na nzela na bango, ‘libota lilakami ya Abalayama,’ “mabota nyonso ya mokili bakopambwama.” (Bagalatia 3:29: Genese 22:18) Mpo na bato ya botosi, likambo yango likolimbola bomoi kati na paradis ya mabelé, na kokesena mosika na bomoi mokuse mpe ya mpasi ya lelo.​—Nzembo 37:11, 29; Emoniseli 21:1-4.

Nani akozwa litomba na yango?

Bakufi oyo bakomonisa kondima kati na mbeka ya lisiko ya Yesu bazali kati na baoyo bakozwa matomba na bibongiseli bikamatami na Nzambe mpo na bolamu ya bato. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Mingi kati na bango bayebaki Nzambe mpe Klisto te, yango wana bamonisaki kondima na bango te kati na Yesu. Kati na basekwi yango, ekozala na bato ya sembo lokola Yoane Mobatisi, oyo akufaki liboso ete Yesu afungola nzela mpo na bomoi ya likoló na liwa na ye. (Matai 11:11) Longola bango, ekozala na ‘ebele monene ya bato na mabota nyonso oyo basili kosukola bilamba na bango mpe bayeisi yango mpembe na makila ya Mwana na mpate,’ Yesu Klisto. Bazali komonisa bosepeli na mosala ya kosakola Bokonzi, mosala mokambami na “bandeko” na Yesu baoyo basili kobotama lisusu, mpe na Armagedon, etumba ya Nzambe, bakobika na kufa mpo na kozala na bomoi na mabelé mapetolami. (Emoniseli 7:9-14; 16:14-16; Matai 24:14; 25:31-46) Kati na bibongiseli oyo asili kozwa, Nzambe akani ete bamilio ya bato bakoka kobika, atako babotami lisusu te mpo na koyangela elongo na Klisto kati na makolo.​—1 Yoane 2:1, 2.

Okozala kati na baoyo bakosangola bomoi kati na paradis ya mabelé? Okoki kozala soki omonisi kondima kati na mbeka ya Yesu Klisto mpe soki osangani na molende nyonso elongo na lisanga ya solo ya boklisto. Yango ebebisamaki te na mateya ya bato, kasi etikalaki ‘likonzi mpe etemiselo ya makambo na solo.’ (1 Timoté 3:15; tala Yoane 4:24; 8:31, 32.) Okoki bongo kolona elikya wana kitoko, ntango bana ya Nzambe oyo babotami lisusu bakoyangela kati na makoló mpe bana ya Nzambe na mabelé bakokoma na ezaleli ya kokoka kati na paradis ya mabelé eleki kitoko. Simba libaku ya kozala na bomoi kati na mokili ya sika epai mapamboli makozala seko.​—Baloma 8:19-21; 2 Petelo 3:13.

[Elilingi na lokasa 6]

Adam etyamaki te liboso ya liponi oyo: kozala na bomoi na likoló, to kozala na bomoi kati na minyoko ya seko na lifelo ya móto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto