Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/11 nk. 23-26
  • Tala oyo Jéhovah asili kosala mpo na biso!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tala oyo Jéhovah asili kosala mpo na biso!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Bonsomi monene na Afrique occidentale mpe na Afrique centrale
  • Bandimami na Afrique australe
  • Bilenge bazali kosangana na mosala ya kopesa litatoli
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/11 nk. 23-26

Tala oyo Jéhovah asili kosala mpo na biso!

MOBALI moko alobi ete: “Tozalaki na momeseno ya kobondela mpo na yango.” Mosusu azalaki kolamuka ntongo nyonso na ngonga ya minei mpo na kobondela. Mpo na ntina nini? Alobaki ete: “Tozalaki kobondela ete mokolo mosusu tozwa bonsomi ya kosambela Jéhovah na polele.” Na janvier 1992, ntango ba Témoins de Jéhovah ya Ethiopia bayanganaki na Addis Abeba mpo na assemblée de district na bango “Baninga ya bonsomi,” emonanaki mpenza ete mabondeli wana ya bopolo mpe ya motema sembo mayokamaki.

Assemblée wana esalemaki na Ethiopia emonisaki na meko nini makambo mazali kobongwana na Afrika. Na bambula oyo euti koleka, libota na Jéhovah esili kosepela na bonsomi ya losambo oyo bazwaki epai na Leta ya bamboka 13, epai bapekisaki mosala na bango mobimba to bazwaki bipekiseli na makambo mosusu. Na Ethiopia, epekiseli oyo eutaki na Leta uta mibu 34, elongolamaki na le 11 novembre 1991, wana bandimamaki na bakonzi ya Leta mpe mosala na bango mondimamaki lisusu na mibeko ya mboka. Nokinoki, Batemwe bazwaki bibongiseli mpo na kosala assemblée internationale. Na yango, bakómaki na bilikya mingi mpenza wana bamonaki ebele ya bayangani 7 573 na stade ya mboka Addis Abeba. Ezalaki lokola ndoto mpo na bayangani mingi. Mbala na mbala bazalaki kolobana moko na mosusu ete: “Ndeko, tala oyo Jéhovah Nzambe na biso asili kosala mpo na biso!”​—Tala Nzembo 66:1-5; 126:1.

Mibu 34 wana ya epekiseli mibimisaki mikakatano mingi oyo bamizelaki na yango te. Mingi bayebaki te nzembo kitoko ya cantiques du Royaume. Lolenge nini basengelaki koyekola nzembo yango liboso ya assemblée? Nzembo ntuku minei, kati na yango 17 oyo etyamaki na programme ya assemblée, ebongolamaki na monoko ya Amharique. Na nsima, etuluku moko ya bayembi ebongisamaki mpo na kokotisa nzembo yango na kasete. Masanga nyonso ya kapitale bazwaki bakasete, mpe lisangá moko na moko basengelaki kolekisa minutes 30 liboso mpe nsima ya makita mpo na koyekola nzembo yango. Ebimisaki litomba nini? Na boumeli ya assemblée, stade mobimba etondaki na nzembo oyo eyembamaki na esengo.

Nzela ezalaki kouta na Dire Dawa mpe na Harar mpo na kokenda na kapitale, ezalaki te mpo na mobulu mozalaki na est ya mboka. Bobele mpepo nde ezalaki mwango ya kosala mobembo. Lokola bazalaki na makoki te ya kofuta tike ya mpepo, kasi bazalaki na mposa makasi ya koyangana na assemblée, bandeko mwambe ya engumba Harar bakendeki na kaa ya basoda mpo na kosenga ete bamema bango na mpepo ya basoda. Bakamwaki mingi wana lisengi na bango lindimamaki. Basalaki mobembo kino na esika ya assemblée kozanga kofuta!

Bandeko ya Ethiopia balelaki na esengo wana bamonaki ete mabondeli na bango mandimamaki, bango oyo bayikaki mpiko na boumeli ya mibu soko ntuku misato kati na mikakatano mpe minyoko, bamonaki mpe lolenge baninga na bango kati na kondima babomamaki. Moyangani moko alobaki ete: “Nazali kolela uta ebandeli ya assemblée oyo.” Mosusu alobaki ete: “Soki bokokaki kotala kati na motema, mbɛlɛ bomoni esengo oyo nazali na yango.” Ya solo, oyo ezali likambo monene Jéhovah asili kosala mpo na Batemwe wana ya sembo!​—Nzembo 66:16, 19.

Bonsomi monene na Afrique occidentale mpe na Afrique centrale

Bénin ezali mokili mosusu epai kuna libota ya Jéhovah liuti kondimama na Leta kala mingi te. Batemwe bazalaki na mayoki nini mpo na yango? Molobi moko amonisaki yango na likita moko ya boklisto, ete: “Bonsomi ya losambo kati na mboka oyo ezali mpenza likabo ya Jéhovah.” Ya solo, basaleli ya Jéhovah bazali na esengo mingi na kozala sikawa na bonsomi kati na makambo nyonso: bonsomi ya koyangana mpo na kosambela mpe mpo na koyebisa nsango na Bokonzi ya Jéhovah epai na bazalani na bango​—bonsomi oyo mingi kati na biso bazali na yango.

Lolenge nini basengelaki komonisa esengo na bango? Molobi oyo touti kolobela amonisaki mwango ya kosala yango, wana alobaki ete: “Wana ezali biso kosangana na mosala ya kosakola​—mingi mpenza na kosakola nsango malamu na ndako na ndako—​tozali komonisa motuya oyo tozali kopesa na bonsomi oyo.” Na ntembe te, ezali yango nde esalemaki na Bénin. Mpo na kondima yango, esengeli bobele kotala motuya ya ba pionniers. Na janvier 1990, ntango epekiseli oyo eumelaki mibu 14 elongolamaki, basakoli 77 bamipesaki mbala na mbala kati na mosala ya ntango nyonso. Nsima ya mbula mibale, motuya yango mobakisamaki koleka mbala misato, kino ekómaki 244!

Yango elingi koloba te ete Batemwe ya Bénin bazalaki na molende te liboso ete epekiseli elongolama. Ya solo, mpiko na bango ezalaki na bopusi monene likoló na mokonzi moko ya basoda oyo atindamaki na kaa epai bazalaki komema bango wana bakangamaki. Lokola Batemwe bazalaki kokangama mingi na ntina na ekateli na bango ya kosalela Jéhovah, mokonzi wana ya basoda azalaki ntango nyonso pene na bango. Kasi yango ezalaki bobele kokundwela ye masoló kitoko ya Biblia oyo ayokaki epai na bango ntango bazalaki naino na bonsomi liboso na mibeko ya Leta, mpo na kosalela losambo na bango.

Na nsuka, kondima na bango ya mama ememaki ye na komiyoka ete azalaki na nzala kati na elimo. Akotaki mangomba ndenge na ndenge ya mike mpe ya minene, kasi azalaki bobele na nzala. Bobele nsima wana epekiseli elongolamaki na janvier 1990, nde abandaki kosolola na Biblia elongo na Batemwe mpe bamposa na ye ya elimo ekokisamaki. Asili sikawa kozwa batisimo mpe azali pionnier. Na lolenge mosusu, mbongwana na ye ezali kokundwela bandeko ya Bénin makambo oyo makómelaki Saulo ya Talasi: “Ye oyo anyokolaki biso liboso azali sikawa kosakola nsango malamu na ntina na kondima.”​—Bagalatia 1:23.

Na décembre 1991, ba Témoins de Jéhovah ya Niger, mboka mosusu ya Afrique occidentale, bandimamaki na Leta lokola lisangá mpe bipekiseli nyonso bityamaki na mosala na bango, bilongolamaki. Esengo monene emonanaki wana lokola. Filiale ya Nigeria, oyo ezalaki kotalela mosala ya Niger, eyebisaki likambo oyo lisalemaki na assemblée moko: “Nsima ya discours clé oyo esalemaki na assemblée na engumba Maradi, na mokolo ya vendredi, eyebisamaki na bandeko ete tosili kondimama sikawa na Leta ya mboka Niger. Basepelaki mingi mpe babetaki mabɔkɔ na boumeli ya ba minutes mingi. Na nsuka ya programme ya mokolo wana, bandeko bamonisaki esengo na bango polele, na kopwepwana mpe kosepela mpo na nsango yango malamu.” Tokoki kokanisa na ntina na likambo yango mpe kosepela elongo na bango.

Lolenge nini bandeko bakosalela bonsomi oyo bauti kozwa yango? Ndeko mwasi moko oyo azali pionnier na Niger, akakatani te mpo na koyanola na motuna oyo. Akomaki ete: “Makambo mamonisi ete na teritware na biso ya Niger, baoyo bakobima na Babilone Monene liboso ya nsuka bazali ebele. Lokola elembeteli, nazali kozwa makoki ya kosala bozongeli mbala 80 to 85 sanza na sanza mpe nazali kotambwisa boyekoli ya Biblia elongo na bato 13 to 14, atako napesaki bato mosusu mingi epai na basakoli mosusu ete bazongelaka bango.” Ndeko mwasi wana ya sembo abakisi ete: “Mpo na kolongono mabe ya nzoto na ngai, nazali kokoka te kosala lokola elingi ngai, kasi moto na moto azali kosala oyo ekoki na ye.”

Na Rwanda, na Afrique centrale, ezalela ya ba Témoins de Jéhovah esili mpenza kobongwana lokola. Na avril 1992, mokanda moko mobimaki mpe moyebisaki ete lisangá na bango lisilaki kondimama. Mokanda yango mobimaki na poso ya Ekaniseli, mpe basakoli 1 526 bazakaki na esengo monene ya komona bato 6 228 koyangana na elambo wana. Bandeko wana balingami, bamonisaki nde esengo mpe bosepeli na bango na kosanganáká mingi kati na mosala ya kosakola nsango malamu? Ezali bongo. Na sanza wana ya avril, masangá mazwaki mwayene ya bangonga 27,7 kati na mosala ya kosakola, bozongeli 17, mpe mwayene ya boyekoli ya Biblia 2,4. Pene na 40 % ya basakoli bazalaki kosala na motindo moko to mosusu na mosala ya ntango nyonso.

Bandimami na Afrique australe

Mosika kuna na Afrique australe, mopepe kitoko ya bonsomi mozali kopepa kati na bamboka mibale ya kitoko, Mozambique mpe Angola. Na Mozambique, mosala mondimamaki na février 1991. Lokola makambo makómaki kobonga mwa moke, la Société Watch Tower atindaki bamisionere na mboka yango esilaki kobebisama na etumbu ya banamboka. Bamisionere bakutaki mabelé malamu. Mikanda mikolimbolaka Biblia misengami mingi mpenza, mingimingi mokanda Les jeunes s’interrogent​—Réponses pratiques. Misionere moko ya mwasi alobi ete akabolaki mikanda yango 50 bobele na ngonga mibale na ndambo.

Bato bazali nokinoki kosepela na solo. Misionere moko akendeki na adresse oyo epesamelaki ye na la Société mpo na kotala moto moko, nzokande moto yango azalaki soda. Asalaki lisoló malamu elongo na moto yango mpe bandeko na ye mibale. Na ntango akendaki kotala ye lisusu, lisoló mosusu ya kitoko lisalemaki elongo na ye mpe bato mosusu mitano. Bongo, bandimaki koyangana mpo na kolanda diskur piblike mpe boyekoli ya Mosenzeli; nyonso wana esalemaki bobele na boumeli ya mikolo minei.

Na Angola, bonsomi ya Batemwe ezalaki ntango nyonso kokóla, kino ekómaki na nsuka na yango wana mosala na bango mondimamaki na avril 1992. Lolenge nini bazali kosalela bonsomi na bango wana monene? Bazali kosangana kati na mosala ya kosakola. Ezali soko na basakoli 17 000 na Angola, mpe pene na basakoli yango nyonso bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia 60 000. Oyo nde elikya kitoko ya bokoli mpo na mikolo mizali koya!

Bilenge bazali kosangana na mosala ya kopesa litatoli

Na bamboka wana epai mosala ya kosakola mouti kopesama nzela na Leta, ata bilenge mpe baoyo bazwi naino batisimo te bazalaki komonisa botondi na bango na kosanganáká kati na mosala yango. Na République ya Cap Vert, epai Batemwe bandimamaki na novembre 1990, elenge mwasi moko ya mibu 17 atelemaki mpo na koyambola kondima na ye liboso na bato nyonso. Nsima na batisimo, mopaya moko amonaki ebele na bato oyo bazingaki elenge mwasi wana. Moto yango abelemaki mpo na kotombela ye longonya mpe atunaki ye soki bato nyonso wana bazalaki banani. Elenge mwasi azongisaki ete: “Oh, bazali bayekoli na ngai ya Biblia.” Azalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia nsambo, mpe bato yango bayaki wana mpo na kopesa ye longonya mpo ete azwaki batisimo. Elenge mwasi wana asili kosenga mosala ya pionnier auxiliaire, mpe azali kokolisa makoki na ye mpo na kokóma pionnier permanent.

Na Angola, batunaki elenge mwasi moko ya mibu 10, soki azalaki mosakoli. Andimaki. Batunaki ye soki azalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia. Alobaki ete “ezali bongo.” Boni? Elenge wana ya mibu 10, ayanolaki ete: “Nsambo.”

Tozali kotanga kati na mokanda ya Misala ete na eleko moko na ekeke ya liboso, “eleko ya kimya mingi ezalaki na lisangá, na Yudea mobimba, na Galilai mpe na Samalia mpe balendisamaki. Lokola lisangá litambolaki na kobanga Jéhovah mpe na kobondisama na elimo santu, yango ezalaki kokóla.” (Misala 9:31, MN) Tozali kobondela mpo ete bandeko na biso ya Afrika bazala mpe na eleko ya kimya. Tozali kosepela elongo na bango mpo na kolendisama oyo bazali na yango, mpe tozali kobondela ete Jéhovah apesa bango elimo na ye wana ezali bango kozwa litomba na bonsomi na bango mpo na kopalanganisa nsango malamu mpe kolanda kokóla.

[Karte na lokasa 24]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Mikili epai ba Témoins de Jéhovah basili kondimama na Leta to epai basili kolongola bipekiseli na mosala na bango

 1. Gambie, décembre 1989

 2. Bénin, janvier 1990

 3. République du Cap Vert, novembre 1990

 4. Mozambique, février 1991

 5. Ghana, novembre 1991

 6. Ethiopie, novembre 1991

 7. Congo, novembre 1991

 8. Niger, décembre 1991

 9. Togo, décembre 1991

10. Tchad, janvier 1992

11. Kenya, mars 1992

12. Angola avril 1992

13. Rwanda, avril 1992

[Elilingi na lokasa 23]

Na Bénin, mosakoli moko ya Bokonzi azali kobeta maloba ya Matai 24:14 na mbunda na ye

[Elilingi na lokasa 25]

Na mikili mingi misusu ya Afrika, baklisto ya solo bazali kosalela malamu bonsomi oyo bauti kozwa

[Elilingi na lokasa 26]

Batemwe ya sika bozali komonisa elembo ya komipesa na bango epai na Jéhovah na kozwáká batisimo na mai

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto