Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/10 nk. 24-27
  • Solo epalangani kati na mboka moke oyo ezali na mai mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Solo epalangani kati na mboka moke oyo ezali na mai mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Bokutani kati na makambo ya kala mpe makambo ya sika na Rahbeh
  • Mai na solo makomi na Rahbeh
  • Bokoli ya mosala ebimisi botemeli
  • Solo etondisi Rahbeh
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/10 nk. 24-27

Solo epalangani kati na mboka moke oyo ezali na mai mingi

LIKAMBO ya kokamwa! Mabelé oyo mayebani mpo na ebele na maziba na yango mazali kokaoka na mposa ya mai! Etuka ya mbula mingi ekomi kokaoka mpe kolemba! Ezali mposa ya mai oyo ekoki kosilisama bobele na mai ya solo ya Liloba na Nzambe, Biblia. Oyo ezali lisolo ya Rahbeh, mboka moke ya bato 2 200 etongami likoló ya bangomba na nord ya Liban, na ntaka ya bakilometele soko 130 ya Beyrouth.

Na lokóta ya arabe, liloba Rahbeh elimboli “etando monene,” mpe euti na liloba ya lokóta ya ba sémites oyo ezali na ndimbola “monene, etandami.” Mboka yango etongami likoló na bangomba mibale ya metele 600 likoló na nivo ya mai monene. Na est, likoló na bangomba, na bileko ya malili makasi mpe na printemps, mbula mpembe ezali kopesa na bangomba kongenga makasi. Kasi, Rahbeh eyebani mingimingi lokola mboka oyo etondi na mai. Kati na etuka yango, maziba ya mai mazali 360, ya minene mpe ya mike, oyo ezali kopesa mai kitoko na bilanga ya blé, ya abricot, ya poire, ya pêche mpe ya vinyo kati na lobwako ya zingazinga.

Bokutani kati na makambo ya kala mpe makambo ya sika na Rahbeh

Na Rahbeh, makambo mabongwani mpenza mingi te longwa na ntango oyo Biblia ezalaki kokomama. Kati na mboka, bandako ekangami moko na mosusu. Balabala ezali mike, nyokanyoka, mpe bato bazali koleka mingi​—na mpunda mpe na ngombe. Atako mwa mituka mizali, kasi awa banyama nde baleki mingi. Mbala mingi bankolo na bango bakotya biloko likoló na bango na bilanga mpe bakotinda bango ete bazonga bobele bango moko na ndako. Bazali kolanda banzela ya mike, kopasola nzela na bango na bisika ya nkaka mpe bazali kokóma epai na bango. Ekoki kozala ete Yisaya akanisaki nde likambo motindo yango wana alobaki ete “ngombe eyebi nkolo na ye malamu, mpe mpunda eyebi efandelo na nkolo na ye”?​—Yisaya 1:3.

Rahbeh esangisi bato ndenge na ndenge. Okokuta kuna, bato bazwa mapolomi ya université lokola mpe basali bilanga oyo naino bakoma na bingumba te. Ezali na bandako minene ezingami na bilanga kitoko, mpe lisusu bandako ya mike na bibwele zingazinga na yango. Na bandako mingi okokuta biloko bisalelamaka na lotiliki, nzokande lotiliki ezalaka ntango nyonso te. Mpo na yango, bandako mingi ezali na motɛlɛ ya kopesa lotiliki. Balabala minene ya mboka esalemi na gudro, atako mpo na kokende na bilanga, mbala mingi balekaka na banzela mabe ya mabelé. Yango wana, banyama oyo ebokwami ezali mwango bobele moko mpo na komema biloko longwa na bilanga. Okoki mpe komona bampunda komema motɛlɛ ya kopesa lotiliki kino na bilanga mpo na kosalela bamasini ya bilanga, oyo ezali kosalelama penepene ya banyama oyo ebendaka yango.

Bobele bongo, bomoi kati na mboka ebongwani mpenza mingi te. Soki olali kuna, na ngonga ya mibale to ya misato na ntongo, mbala mosusu okoki kolamuka na kolela ya bansoso mibali. Misala ya mokolo na mokolo mizali kobanda na ntongontongo, mpo na yango kokamwa te soki oyoki bato kolobana na mongongo makasi kati na molili, wana bazali kobongisa banyama mpo na mosala. Na kotana ya ntongo, okoki komona bato ya mboka, elongo na banyama bamemi mikumba kokende na bilanga to na zando koteka biloko na bango.

Na bangonga ya nsima, bana mike ya mibali mpe ya basi bakobima mpo na kosakana na balabala mpe na biyanganelo. Konganga mpe koseka na bango ezali koyokana bipai nyonso, lokola ezalaki kosalema na Yelusaleme ya kala engebene oyo mosakoli Zakari akomaki, ete: “Nzela na mboka ekotonda na bana mibali mpe bana basi baoyo bazali kosakana na biyanganelo.” (Zakari 8:5) Okokuta mpe bato na mboka oyo bazali na boboto mingi mpe balingi masolo elongo na bato. Lokola balingi koyeba soki ozali nani, outi wapi, mpo na nini ozali wana mpe ozali kokende wapi, bazali komizela ete opesa moko na moko na bango mbote ntango okokutana na bango. Bato bazali mpenza kokóma na koyebana malamu.

Mai na solo makomi na Rahbeh

Lokola bato na mboka bazali na bomoko lolenge yango, nsango ezali mpenza kotambola nokinoki. Likambo yango limonanaki ntango Asaad Younis azongaki na Rahbeh kouta na États-Unis, na 1923. Mpo na koyeba soki moninga na ye Asaad asilaki kokóma na bozwi mingi na Amerika, Abdallah Blal akendeki kotala ye. Na esika ete alobela ye makambo ya mbongo, Asaad apesaki ye mokanda La harpe de Dieu mpe ayebisaki ye ete: “Bozwi ya solo ezali awa.” Abdallah, protesta ya kala atangaki mokanda yango mpe esimbaki mpenza motema na ye. Atako Asaad alakisaki ye makambo mingi te, Abdallah azalaki mpenza na esengo na oyo atangaki mpe andimaki polele ete asili kozwa solo.

Nsima na mwa ntango, Abdallah akendeki kofanda na Tripoli, engumba eleki monene na nord ya Liban. Kuna, akutanaki na Bayekoli ya Biblia mingi, nkombo oyo bazalaki kobyanga ba Témoins de Jéhovah na ntango wana, mpe amonisaki bokoli mingi kati na boyekoli na ye ya Biblia. Na nsima, azongaki na Rahbeh mpo na koyebisa bato nsango malamu oyo ayekolaki. Azalaki kosolola na bato ya mboka masolo lokola ya Trinité, kozanga kokufa ya molimo, lifelo ya moto, bonganga, misa mpe kosalela bikeko mpo na losambo, komonisaka bango oyo Biblia ezali mpenza koteya.

Bafandi mosusu ya mboka basepelaki. Kati na bango, misato to minei basanganaki elongo na Abdallah kati na mosala ya kosakola. Na nsima babandaki kosala makita na mokolo ya dimanche. Bazalaki koyoka lisolo ya Biblia kati na fono to botangi ya Biblia; lisusu bazalaki kolimbola oyo bayokaki. Na nsuka, mikanda mikolimbolaka Biblia, lokola La Harpe de Dieu, Richesses mpe “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” misalelamaki. Bayangani bazalaki mpenza koleka zomi te, mingi bazalaki koya mpo na komona kasi mpo na bolingo ya solo te. Ekoki kozala ete basusu bazalaki kobendama na bilei oyo bizalaki kopesama nsima ya makita nyonso.

Na bambula 1940, Abdallah Blal azwaki mokumba ya kokamba etuluku ya Rahbeh. Amimonisaki mosali moko ya Jéhovah ya molende mpe ya sembo, oyo azalaki kopesa ndakisa malamu epai na baninga na ye. Moko na bango, ndeko Mattar azali komikundola lolenge oyo bazalaki kokokisa mosala na bango ya kosakola: “Lokola na eleko wana tokokaki kozala na motuka te, ngai mpe ndeko Blal tozalaki kokende kopesa litatoli na bamboka ya penepene, na makolo. Nazalaki kosimba fono, na ntango ndeko Blal azalaki kopesa masolo. Mbala mingi, tozalaki kozonga epai na biso bobele nsima na mikolo mibale to misato.” Ndeko Blal asalelaki Jéhovah na bosembo nyonso kino liwa na ye na 1979 wana azalaki na mibu 98.

Bokoli ya mosala ebimisi botemeli

Lokola mosala mozalaki kokola, bandeko babandaki kokutana na botemeli. Na 1950, na bopusi ya sángó ya mboka, minyoko mikwelaki bandeko ya Rahbeh. Nsángó afundaki bango ete bazali kosántola ndakonzambe mpe abyangaki bango batuki. Bato mosusu ya mboka basilikaki mingi mpe babandaki kobwakela bandeko mabanga, mpe bandeko mosusu bakangamaki mpe batyamaki na boloko. Nzokande, ankete emonisaki ete bifundeli yango bizalaki ya lokuta. Atako bongo, bandeko baumelaki mikolo mingi na boloko.

Motemeli moko alukaki ete bato ya mboka, baoyo bayebaki kotanga malamu te, batya maboko na mokanda moko oyo ezalaki kofunda bandeko na ebele na makambo, lokola likambo ya kotungisa ntango nyonso bato na bandako na bango. Mpo na komema bato mingi na kotya maboko, alobaki na bango ete ezalaki lisengi mpo ete mosali moko azonga kosala na mboka wana. Ntango bato yango bayebaki ete ezalaki efundeli ya kotemela Batemwe, babomaki basignatire na bango. Makambo motindo yango mapesaki libaku ya kotatola epai na bakonzi ya etuka.

Longola botemeli wana ya polele, bandeko basengelaki kolonga mokakatano mosusu. Na Masese 29:25, Biblia elobi ete: “kolenga liboso na bato ekoyeisa motambo”; likambo yango lizali komonana na mboka moke epai bato nyonso bayebani. Bandeko basengeli kozala na mpiko mpo na kosakola epai na bazalani na bango, baninga mpe bandeko na bango ya mosuni oyo bazali kotonga mpe kotyola bango ntango nyonso. Maloba na Yesu kati na Matai 10:36, mazali mpenza kokokana awa: “Bayini na moto bakozala bato na ndako na ye moko.” Nzokande, Masese malandi na kolobaka ete “ye oyo akomipesa na Jéhovah akozwa libateli.” Kondima mpe mpiko na bandeko ebotaki mbuma ya kokamwa

Solo etondisi Rahbeh

Nsima na bambula, bato ya mboka bakomaki kosepela na etamboli ya ba Témoins de Jéhovah, mpe mingi na bango bandimaki solo. Bandeko batondaki na esengo ntango lisangá ya mibale esalemaki na 1969 na Rahbeh. Balandaki kosala mosala makasi. Mingi bakotaki na mosala ya pionnier, basusu batikaki bandako na bango mpo na kokende na bateritware mosusu, lokola na engumba Beyrouth. Jéhovah apambolaki milende na bango mpe lisangá ya misato esalemaki na Rahbeh na 1983. Na boumeli ya ntango wana, bandeko mingi bazalaki kokende bipai mosusu to kokende kofanda na bingumba minene. Atako bongo bokoli ezalaki ntango nyonso kolandana, mpe lisangá ya minei esalemaki na 1989, elandani na oyo ya mitano na 1990.

Na ntango wana, penepene na bafandi nyonso ya mboka bazalaki na ndeko to moninga moko oyo azalaki Temwe. Koyina oyo ezalaki kala ezali lisusu te. Bato bakomaki koyeba malamu ba Témoins de Jéhovah. Maloba lokola “nkulutu,” “pionnier,” “mokengeli ya zongazonga,” “assemblée” mpe “Armagedon” ekomaki sikawa kolobelama mingi na bato ya mboka. Na mabaku ya bibongiseli lokola, koya ya mokengeli ya zongazonga to Ekaniseli, balabala ezalaka na bato mpenza te, nzokande ba Salles du Royaume ezali kotonda na bato. Masanga mosusu bazalaki kotya ba haut-parleurs likoló mpo ete baninga ya pembeni bakoka koyoka.

Na Rahbeh ezali sikawa na basakoli koleka 250. Yango elimboli ete na mboka, ezali na Temwe moko mpo na bato mwambe. Lisangá moko oyo ezali na basakoli 51 ezali teritware oyo ezali na bandako 76 oyo etalelamaka poso na poso. Kanisa likambo oyo lisalemaki na sanza ya mars mpe avril ya mobu moleki, wana basakoli 98 likoló na 250 babandaki mosala ya pionnier auxiliaire, elongo na ba pionniers permanents 13 na Rahbeh. Teritware etalelamaki mbala mingi poso na poso. Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete ndako moko etalelama na bituluku mibale to misato ya basakoli na mokolo moko, to mpe na mbala moko. Bato mingi ya mboka bameseni na bozongeli ya bandeko. Epai na moto moko oyo amilelaki, mosakoli moko azongisaki: “Soki ondimi koyekola Biblia elongo na biso, tokobanda kotala yo bobele mbala moko kati na poso.” Basakoli bazali lisusu kosolola na baoyo nyonso bazali kokutana na bango na bilanga: baoyo bazali kotimola mabelé, kolona, kosopa mai, to baoyo bamati likoló ya mpunda.

Na ntembe te, solo ya Biblia esili kotondisa Rahbeh, mboka ya mai mingi. Kasi esuki bobele wana te. Lokola Rahbeh ezalaki kopesa mai na bamboka mingi ya zingazinga, bobele bongo epesaki bamboka yango mai ya bomoi ya solo ya Biblia. Basakoli ya Rahbeh bazali kokende na makolo kotala bato ya bamboka oyo ezali penepene mpe bazali kobongisa bituluku oyo bizali kokende na motuka mpo na mokolo mobimba kosakola na bamboka ya mosika. Basakoli mosusu bazali kokende kofanda na bingumba mosusu. Na lipamboli ya Jéhovah, bokoli monene ekoki lisusu kosalema, oyo ekokumisa lisusu mingi koleka Tata na biso ya likoló Jéhovah Nzambe.

[Picture on page 26]

Balabala moko na Rahbeh

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto