Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/9 nk. 24-27
  • Bazwi bolamu ya solo kati na “paradis”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazwi bolamu ya solo kati na “paradis”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Bobongi ye liwa elongami
  • Babendami na boklisto ya solo
  • Kimya mpe esengo ezwami
  • Mapamboli nsima na komipimela makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/9 nk. 24-27

Bazwi bolamu ya solo kati na “paradis”

PARADIS! Mbala na mbala ezali nde liloba oyo ezali kozonga mingi kati na makanisi ya bato ntango bazali kokanisa na bisanga Hawaii, yango ezali mpenza solo. Na bisanga wana ezali na makambo na bomoi oyo ebele na bato bakoki kotalela lokola ete ezwami kati na paradis: moi mingi te mpe malili mingi te, likoló kitoko, nzeté na mbila mingi oyo mipepe ezali kobetabeta yango, mipepe kitoko mpe bisika mingi bitondi na zɛlɔ.

Makambo nyonso wana mabendaki bato bauti na bisika nyonso ya mokili: ya Asie, ya Pacifique, ya Amérique nyonso mpe ata ya bisika lokola Antilles mpe mikili mya Mpóto. Mingi basili kofanda awa mpo na climat kitoko oyo ezali koumela mbula mobimba. Basusu bayaki koluka bozwi ya mosuni, elingi koloba, bolamu. Litomba ya mibembo nyonso wana ezali kosangisa bato ya bikólo bikeseni mpe ya bituluku na minoko ndenge na ndenge, oyo esalemi na mimeseno mingi mikeseni mpe na makanisi makeseni mpo na losambo.

Atako bongo! likambo mosusu ya kokesena ezali. Lokola bisika mingi mosusu kitoko ya mokili, Hawaii etondi na kobomana, na bomeli bangi, na mobulu, na kobeba ya mopepe mpe ya mai mpe na mikakatano mingi mosusu oyo ezali kotungisa bato ata epai wapi bafandi. Lokola bato bazali komimonisa na bopotu mpe na moimi, bisanga Hawaii bizali kobungisa moke moke kitoko na yango ya ebandeli. Bato bazali na mposa ya kofanda kati na paradis, kasi bazali pene te na kosala milende misengeli mpo na kopesa to ata nkutu kobatela na bisanga yango lolenge na yango ya paradis. Ezingelo moko kitoko mpe climat kitoko ekoki te mpo na kosala paradis.

Atako bongo, etuluku moko na bato oyo ezali kokola ntango nyonso ezali na esengo ya solo kati na bisanga wana bizali lokola paradis. Ezali bato oyo bazali kondima solo na Biblia mpe baoyo bazali kondima na motema moko elaka kitoko oyo eyebisami na Nzambe: “Tala, nazali kotonga lola na sika mpe mokili na sika; mpe makambo na liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.” Bato yango bazali kotalela avenir na esengo nyonso, mpamba te maloba na ntóma Petelo mazali koyela bango na makanisi: “Nde tozali kotalela makoló na sika mpe mabelé na sika, pelamoko elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” (Yisaya 65:17; 2 Petelo 3:13) Bato yango bazali banani? Ndenge nini bayaki koyeba elikya kitoko oyo eyebisami kati na Biblia? Mpe mbongwana nini basalaki kati na bomoi na bango?

Bobongi ye liwa elongami

Isabelle mpe mobali na ye, Georges, bazali bato ya ekólo Philippine. Lokola abokwamaki na lingomba ya baboti na ye, Isabelle azalaki mokatolike atako atangaki Biblia ata mbala moko te. Bateyaki ye ete molimo na moto ekufaka te. Nini ezalaki makanisi na ye liboso ya liteya wana ya lokuta? Ya solo, kolobelana mpamba ya liwa ezalaki kobangisa ye, mpamba te azalaki kokanisa ete akokundama kati na sanduku wana ezali ye naino na bomoi, lokola molimo na ye ekokoka te kokima. Nzokande, na 1973, Isabelle abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Ntango ayokaki ete molimo ekufaka mpe ete Nzambe akonyata liwa na lisalisi ya lisekwa, atondaki na esengo mpe azwaki kobondisama monene. (Ezekiele 18:4, 20; Yoane 5:28, 29) Solo ya Biblia esepelisaki ye mingi na boye ete akolaki nokinoki.

Bongo ezali boni mpo na Georges? Ye mpe azalaki koyangana na masolo ya Biblia, kasi bobele na likanisi ya komonisa ete Batemwe bazalaki komikosa. Atako bongo, amonaki likambo moko te ya kotyola kati na mateya oyo mwasi na ye mpe ye moko bazalaki kozwa. Ya solo, mwa ntango moke nsima ya kobanda boyekoli, likambo ya makila ebimaki. Kino na ntango wana, Georges azalaki naino kolya bilei bilambami na makila. Kasi ntango ayebaki ete Biblia ezali kokweisa polele kolya makila, atikaki kolya bilei yango. (Genese 9:3, 4; Levitike 17:10-12; Misala 15:28, 29) Akobaki kosangana na boyekoli ya Biblia mpe asepelaki mpo ete asili komona solo. Sikawa, Georges mpe lsabelle mpe bana na bango minei bazali na esengo ya solo na kozalaka na bomoi engebene mitinda na Nzambe.

Babendami na boklisto ya solo

Georges, ye moto wa ekólo Japon, mpe Liliane, mwasi na ye moto wa ekólo Portugal, basili kolekisa mibu ntuku motoba ya mbotama. Bango nyonso mibale babotamaki mpe bakoli na Hawaii. Lokola baboti na ye bateyaki ye te na ntina na makambo matali losambo, Georges azalaki kotalela lingomba lokola likambo ya mpamba. Nzokande, azalaki ntango nyonso kondima Nzambe. Liliane, mpo na ye, abokwamaki kati na lingomba ya katolike, lingomba ya baboti na ye. Atako azalaki motangi monene te ya Biblia, Georges azalaki kotanga bazulunalo Mosenzeli mpe Réveillez-vous! uta pene na mibu 30. Na bongo ayebaki makambo mingi na ntina na Biblia. Atako bongo azalaki na mokakatano mpo na kosala mbongwana kati na bomoi na ye mpamba te azalaki komela likaya mpe masanga mingi. Lokola mibu mizalaki koleka, Georges akobaki kotanga bazulunalo mpe abandaki koyangana na makita ya boklisto oyo ezalaki kosalema na Salle du Royaume. Mpo na nini? Lokola alobi yango ye moko, mpo ete “mangomba mosusu mazali mpenza na bokosi,” bazali kokanga miso likoló na makambo mingi oyo Biblia ezali kokweisa. Akokaki komona ete ba Témoins de Jéhovah basalaka bongo te.

Nini ebandaki mwasi na ye, Liliane, na solo oyo ezwami kati na Liloba na Nzambe nzokande apusamaki mingi na lingomba ya baboti na ye? Mokolo moko, ndeko mwasi moko abyangaki ye mpo ete aya na makita, na Salle du Royaume. Liliane azali komikundola “bondeko mpe esengo oyo ezalaki kuna mpe moɛtɛnɛ to koseka oyo ya boninga esepelisaki ngai.” Lokola amonaki ye moko na miso bolingo ya solo oyo libota na Jéhovah lizali komonisa, andimisamaki ete asili komona solo. (Yoane 13:34, 35) Andimaki boyekoli na Biblia, amipesaki na Nzambe mpe amonisaki elembo ya komipesa na ye epai na Jéhovah na kozwaka batisimo mwa basanza nsima ya mobali na ye.

Georges azali lisusu na nse na boombo ya likaya te mpe ya masanga te. Mpo na Liliane, asilaki kobwaka bikeko na ye nyonso. Ezali na motema moko etondi na bolingo nde bazali koyebisa epai na bazalani na bango makambo oyo basili koyekola, kobanda liboso epai na bankoko na bango 25 mpe bana 4 ya bankoko na bango. Ekoki bobele kotala elongi na bango mpo na komindimisa na ntina na esengo ya Georges mpe ya Liliane.

Kimya mpe esengo ezwami

Patrick, moto wa ekólo Irlande ye azali na mibu ntuku mitano ya mbotama mpe Nina, mwasi na ye moyuda, bango mibale batikaki sud-ouest ya États-Unis mpo na kokende na Hawaii. Liboso, bazalaki na motindo ya bomoi moko oyo batalelaki yango lokola ya bonsomi na komipesaka na komela drogue, na kosalaka bolukiluki kati na makambo matali losambo mpe na komipesaka na misala ya mbindo. Bazalaki kati na lingomba moko na boumeli ya mibu mingi bazalaki komeka kokoma na nivo ya lisosoli moko litombwani na lisalisi ya drogue, ya kokanisa mozindo mpe elongo na mokambi na bango moko ya lingomba. Nsuka na yango, Patrick azwaki lifuti na ye ya zuwa, ya bitumba mpe ya boswani mingi oyo ezalaki kobima kati na basangani ya lingomba yango, wana ezalaki bango komikumisa ete basili kokoma na ‘nivo moko etombwani kati na lisosoli.’ Atikaki etuluku wana mpe azongaki na Hawaii epai kuna afandaki kala; na bongo, azalaki kolikya kozwa kimya ya elimo. Na nsima Patrick andimisaki Nina, wana azalaki naino makango na ye, ete aya kotala ye. Basukaki na kobalana mpe bafandaki na Hawaii.

Patrick mpe Nina bandimaki te ete boluki na bango ya kimya mpe ya bolamu ekosuka na boyekoli moko ya Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Nina, oyo ntango nyonso azalaki kondima Nzambe te, abandaki komona kati na Biblia biyano ya kosepelisa mpo na mituna minene oyo azalaki komituna: na ndakisa, mpo na nini mabe ezali mpe mpo na nini bato malamu bazali kozwa mpasi? Lisusu, bolukiluki oyo Patrick azalaki kosala mpo na solo uta mibu zomi ezwaki nsuka malamu. Nokinoki, likanisi na bango ya bomoi ebongwanaki mpo na boyebi oyo bazalaki kozwa na Biblia. Nsima na etumba makasi mpe molai, Patrick akokaki kolonga mposa na ye mozindo mpo na likaya. Ekoki sikawa pene na mibu zomi, mwasi na ye mpe ye moko bazali na bomoi moko ya peto na boyokani na mitinda ya Nzambe. Lokola bazali na motema ya peto mpe na lisosoli ya malamu, bazali kosepela na kimya oyo bazalaki koluka.

Mapamboli nsima na komipimela makambo mosusu

“Meka makasi kokota na ekuke na nkaka, mpo ete nalobi na bino ete, bato mingi bakomeka kokota mpe bakokoka te.” (Luka 13:24) Maloba wana malobamaki na Yesu Klisto mazali komonisa polele ete ezali petee te mpo na kosalela Nzambe mpe kozala na bomoi engebene mitinda ya Makomami. Baoyo nyonso bazali na mposa ya kosala motindo wana basengeli te bobele kosala milende mpo na kolonga, kasi lisusu komipimela makambo mosusu. Ezali yango mpenza nde esalemaki na bato oyo tolobeli kati na lisolo oyo. Kasi oyo nde mapamboli kitoko basili kozwa!

Na ndakisa, tozongela likambo ya Patrick mpe ya Nina. Basalaki mbongwana monene kati na bomoi na bango. Liboso, bazalaki kozwa mosolo mingi, kasi sikawa bazali kati na mosala ya pionnier mpe bazali kokokisa bamposa na bango na kosalaka na ndambo moko ya mokolo. Kasi, basili kondimisama ete matomba ya elimo eleki mpenza mosika na biloko ya mosuni oyo basili komipimela. Bazali mpenza na esengo.

Na ntina na mbula na bango, mbongwana oyo Georges mpe Liliane basali ezalaki mpenza petee te. Koyangana na makita ya boklisto mpe kosangana na mosala ya kosakola ekosengaka ntango, likebi mpe makasi ya nzoto. Atako bongo, bazali komona na esengo nyonso ete kolongono ya nzoto na bango ebongi; bomoi bazali na yango sikawa ezali bomoi kitoko koleka, ya esengo mpe ya bosepeli.

Mpo na Georges mpe Isabelle, mokakatano na bango monene ezalaki ya kobokola bana na bango mpo ete batambola na nzela ya bomoi. Kobongisa bana minei mpo na makita ya boklisto to mosala ya kosakola esengaka ntango mpe milende mingi. Na ntango moko, Georges mpe Isabelle balembisaki bokengi na bango mpo na oyo etali mikumba na bango ya baboti na ntina na mikakatano ya ntango nyonso ya bomoi. Kasi diskur moko ya Biblia oyo ezalaki na motó na likambo “Topelisa elimo ya komipimela makambo mosusu” epusaki bango na kobakisa milende mpo na kopesa epai na bana na bango minei likebi na bango mobimba mpe kobongisama oyo esengeli mpo na ‘kobokola bango kati na mpamela mpe na mateya ya Jéhovah.’ Na ntembe te tokoki koloba ete milende motindo wana mipambolamaki.​—Baefese 6:4.

Na yango, ezali ezingelo kitoko te, climat kitoko te to motindo na bomoi kitoko te nde ezali kopesa bolamu ya solo epai na bato wana mpe na basusu lokola. Kasi, ezali nde likambo ya koyeba ete bazali kosala mokano ya Nzambe mpe ete bazali na bomoi na boyokani na mitinda ya Liloba na ye, Biblia. (Mosakoli 12:13) Lisusu, bolamu ya solo ezali kosepelisa motema na bango wana bazali kokanisa na ntango moko ya esengo oyo Paradis ekozongisama kati na mabelé mobimba.​—Luka 23:43.

[Elilingi na lokasa 25]

Georges, Isabelle mpe bana na bango bazali kozwa esengo na kotanga Biblia

[Elilingi na lokasa 26]

Georges mpe Liliane bazali kosepela kati na mosala ya boklisto

[Elilingi na lokasa 27]

Patrick mpe Nina bazali na kimya ya solo kati na mosala ya Jéhovah

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto