Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/8 lok. 32
  • Episkopo wa lokumu akoki kosala eloko moko te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Episkopo wa lokumu akoki kosala eloko moko te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/8 lok. 32

Episkopo wa lokumu akoki kosala eloko moko te

NA MBULA oyo eleki, likita moko monene (ya baepiskopo ya lokumu) ebongisamaki mpo na kotalela mwa makambo mazali lobanzo monene ya Lingomba ya Katolike. Engebene zulunalo Il Sabato, moko na makambo yango ezali ‘bokoli monene ya mangomba ya mikemike.’ Lisusu zulunalo yango elimbolaki: “Ekozala mpasi te mpo na baepiskopo ba lokumu ete bayokana na likambo wana moko. Bango nyonso bandimaki ete esengeli kosala boyekoli ya mozindo na ntina na bokoli ya mangomba ya sika, mpe koluka kopekisa na lolenge nyonso bopalanganisami na yango.”

Ezali polele ete, “bokoli na mangomba ya mike” ezali mokakatano bobele ya mboka ltalie te. Zulunalo Il Sabato eyebisi ete: “Na boumeli ya visite na ye oyo eleki kala mingi te na Vatican, episkopo wa lokumu Kirill ya Smolensk [moko ya bingumba ya kala ya Russie] . . . asengaki na Papa lisalisi ya bikolo mosusu mpo na kopekisa bokoli monene na ba Témoins de Jéhovah mpe mangomba mosusu ya lolenge yango na mokili ya Union Soviétique.”

Na ekeke ya liboso, bakonzi ya mangomba bamonisaki kolela lolenge moko ntango baklisto bapalanganisaki na molende nyonso kondima na bango. Na libaku mosusu, bayuda oyo basilikaki bamilelaki epai na bakonzi na mboka ete: “Bato oyo basili kobulunganisa mokili mobimba, tala basili mpe kokoma awa lisusu!” (Misala 17:6) Kobanda eleko yango, bakonzi na mangomba basilaki komeka makasi kopekisa bokoli ya losambo ya boklisto kasi balongaki te. Bobele bongo mpe lelo, molende nyonso ya kopekisa bokoli ya lisangá ya boklisto ekolonga te. Nzambe ye moko apesaki elaka oyo: “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotemela yo ekolonga te, mpe okozalisa nyee lolemo na lolemo nyonso oyo ekotemela yo na kosambisama. Oyo ezali libula na basaleli na Jéhovah mpe boyengebene na bango euti na ngai.”​—Yisaya 54:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto