Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/8 lok. 31
  • Litambe na nzela ya bozongi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Litambe na nzela ya bozongi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/8 lok. 31

Litambe na nzela ya bozongi

‘ALOBELAKI bango na masese oyo.’ Ezali motindo oyo Biblia eyebisi ebandeli na masese misato ya ntina oyo Yesu apesaki na nkembo ya motema mawa​—oyo ya mpate moko abungaki, ya mbuma na palata ebungaki mpe oyo etali mwana na kilikili.​—Luka 15:3-32.

Masolo mibale kati na Mosenzeli ya 15 avril 1991 matalelaki masese yango mpe masungaki batangi mingi na komona motindo nini komonisa motema mawa na mikolo na biso. Likebi ya liboso etyamaki likoló na bakengeli na mpate ya elimo ete basengelaki kokamata meko ya kokende kotala bato oyo babimisami na lisangá mpe oyo bakoki koyanola na ba visites ya bolingo. Matomba malamu nini mamonanaki na masolo mpe na ebongiseli yango ya sika?

Nokinoki nsima na kobima na zulunalo yango, mobali moko, moto na etúka ya Washington, U.S.A., akomaki ete: “Elembeteli na boboto monene ya Jéhovah ekomeli ngai lelo na nzela ya mokanda oyo nazwi. Nafandi awa na mpisoli na elongi mpe na esengo na motema mpo na ebele na malako mpe mbongwana euti na Oyo Aleki likoló. Bobele Nzambe oyo azali solo sembo nde akoki kopesa lisalisi motindo yango epai na bampate oyo babungi. . . . Nabimisamaki na lisangá, kasi nazali na nzela mpo na kozongisama.” Na octobre 1991 azongisamaki na lisangá.

Kasi ezali boni mpo na visite oyo bankulutu mibale ya lisangá basengeli kosala? Mwasi moko moklisto oyo azali na libala akomaki: “Nazangi maloba ya kolimbola mayoki na ngai. Mobali na ngai abimisamaki na lisangá ekokisi sikawa penepene na mibu 13. Bankulutu bayaki kotala ye lokola eyebisami kati na zulunalo. Uta ebele na bambula, lobi na mpokwa nde akendeki mpo na mbala ya liboso na makita. Azali sikawa kobongisa bomoi na ye mpo na kozonga na lisangá.”

Lokola bakengeli ya zongazonga bazali kotala ebele na masangá moko nsima na mosusu, basili mpe komona matomba mingi na ebongiseli yango. Mokengeli moko ya zongazonga auti kokoma kala mingi te ete:

“Ntango Mosenzeli ya 15 avril 1991 ebimaki, bato mingi bazalaki komituna soki boyambi nini bankulutu oyo basengeli kotala bato babimisami basengelaki kokutana na yango. Sikawa eyano na yango ezali polele mpenza.”

“Kati na circonscription na biso, masangá minei oyo natalaki na nsuka batatolaki ete bato libwa basili kozongela makita na Salle du Royaume. Atako bobele moko asili kozongisama na lisangá, basusu mwambe bazali kosala molende makasi. Bankulutu bazali na esengo ya komona mbuma na mosala makasi na bango mpe na kososola ete ezali likambo ya mayele kolanda litambwisi ya teokratike.”

“Tozali na esengo mingi mpo na bibongiseli oyo kitoko mpe ya motema mawa. Ndeko mwasi moko oyo auti kozongisama ayebisaki, ‘Nazalaki na molende te ya kozonga ngai moko, mpo nazalaki komiyoka ete nakweisami liboso na Jéhovah. Kasi ntango bankulutu bayaki kotala ngai, nazwaki mpenza elendiseli ya malamu mpo na kozonga.’ Móto na ndeko wana elendisaki mpenza lisanga.”

Atako mingi kati na baoyo batalelami bayanolaki malamu te, bolamu bozali kozwama na ebongiseli oyo ya motema mawa. Bongo, na ebandeli ya Septembre bankulutu bakotalela nkombo na baoyo nyonso babimisami na lisangá mpe bafandi kati na teritware na bango, mpe bakosala ebongiseli ya kotala baoyo nyonso bakoki koyanola na ebongiseli oyo ya mawa monene.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto