Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/7 nk. 23-27
  • “Biloko kitoko“biyanganisami na Pologne

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Biloko kitoko“biyanganisami na Pologne
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Ba pionniers bafungoli nzela
  • Lokito loyokami na Engumba
  • Batɛmɛli elimo ya mokili
  • Bakangami oyo bameseni kosala mabe, babongwani
  • Kondima mpe koyika mpiko etyami na komekama
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/7 nk. 23-27

“Biloko kitoko“biyanganisami na Pologne

POLOGNE etalelami lokola mboka moko ya lingomba ya katolike. Na kotalela mitango misalemi na Leta, 93 % na bato bazali na lingomba ya katolike. Mbongwana euti kosalema kala mingi te kati na makambo ya politike mpe na makambo matali bomoi bato, epai mosusu, ezalaki na bopusi mingi likoló na bato mpe na makambo ya losambo na bango. Bolukiluki bomonisi ete bobele 50 % na bato oyo batunamaki nde balobaki ete bazali bandimi na lingomba ya katolike.

Na mai 1989, ba Témoins de Jéhovah bandimamaki na Leta lokola lingomba na mboka Pologne. Uta ntango wana, bato ya sika 11 000 babakisami na molongó ya basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi. Lelo oyo, koleka 106 000 basakoli ya Bokonzi bakabolami na masangá pene na 1 300, mpe bato 200 422 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa na Klisto na 1991. Na bongo, esakweli ya koyanganisama ya ‘biloko kitoko ya mabota’ ezali kokokisama na Pologne. (Hagai 2:7) Kala mingi te, ba Témoins de Jéhovah bautaki kosala ba assemblées internationales oyo elobamaki mingi na bazulunalo ya Pologne. Kasi na kotalela bingumba mike ya etuka wana ekomonisa lolenge mosala ya koyanganisama ezali kosalema kati na yango.

Ba pionniers bafungoli nzela

Sztum ezali engumba oyo ezali na bafandi pene na 10 000, ezwami pene na esika oyo ebale Vistule ezali kobima na Mai monene Baltique. Uta kala, engumba wana etalelami lokola teritware moko ya mpasi mpo ete mosala ya kosakola mokoka kosalema. Na 1987, ezalaki bobele na basakoli mwambe na engumba wana. Nzokande makambo mabongwanaki ntango ba pionniers to basakoli ya ntango nyonso, bakómaki. Na boumeli ya likita ya mitano oyo esalemaki esika basalaka cinéma, bato 100 baoyo basepelaki bazalaki wana. Lisangá lisalemaki nsima na mibu mibale ya milende mingi. Lelo oyo, basakoli 90 bazali na Salle du Royaume ya bango moko, mpe bato 150 bazali koyangana mbala na mbala na makita.

Lokola esengelaki komizela na yango, botɛmɛli eumelaki te na kobima longwa na lingomba ya katolike. Mamelo moko oyo azalaki “spécialiste,” atukaki Batemwe, kofundáká bango ete bazali kolakisa mateya ya lokutá. Kasi lokola yango esalemaka mbala mingi, makambo mabongwanaki. Badiskur na ye wana epusaki nde bato na kolinga mpenza koyeba mateya yango na bozindo. Mingi kati na bango bayekolaki solo mpe bazali lelo ba pionniers! Balobi ete: “Ntango tozalaki koyekola solo, tozalaki kokanisa ete moto na moto oyo alingi kokóma Temwe, asengeli kokokana na ye oyo azali koteya ye, elingi koloba kokóma pionnier.” Na bongo, elimo ya pionnier epalangani na lisangá mobimba.

Na yango, soko boyekoli ya Biblia 180 etambwisami na etuká wana. Na nzela ya mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, bato mosusu bayekolaki kotanga wana ezalaki bango koyekola solo. Boyekoli ya Biblia na boumeli ya minite zomi etambwisami mbala na mbala elongo na etuluku ya bato ya bolɔkɔ ya engumba na ntango bazali kobima mpo na kokɔmbola babalabala. Moko na bango akɔtelaki ndeko mwasi moko wana mwasi moleki nzela moko abandaki kofinga ye. Apotaki epai na ndeko mwasi, akamataki mokanda Okoki na mabɔkɔ ya ndeko mwasi, atombolaki yango likoló, mpe alobaki na mwasi oyo afingaki ndeko mwasi ete: “Oyebi kotanga? Eloko nini bakomi awa? Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis! Osila koyoka likambo motindo oyo? Bongo, mpo na nini ozali kofinga Nzambe mpe basambeli na ye?”

Lokito loyokami na Engumba

Kruszwica, kapitale ya kala na lokumu mingi ya mboka Pologne, ezali esika monene ya losambo ya katolike. Na katikati ya mobu 1990, engumba wana ya bafandi 9 300 ezalaki bobele na ntalo moke ya Batemwe. Kasi Jéhovah apamboli mingi milende ya basakoli ya Bokonzi.

Komonáká bokosi ya bakonzi na lingomba na bango, ntalo monene, mingi mpenza bilenge, bamibalolaki epai na Batemwe mpo na kozwa biyano na mituna na bango. Nsima na mwa ntango moke, boyekoli ya Biblia 20 ebandaki. Sángó ya Paroisse atukaki ba Témoins de Jéhovah, kasi yango elɛmbisaki te bato na sembo na koyangana na makita na bango. Batemwe balobelamaki mingi na magazini, na ba parcs mpe ata kati na bandakonzambe. Sanza motoba na nsima, bituluku mibale ya boyekoli ya mokanda bisalemaki. Kruszwica ezali lelo na lisangá moko ya molende oyo ezali na basambeli ya Jéhovah 35. Bazali kotambwisa basi boyekoli ya Biblia 75 mpe na molende nyonso bazali kokɔtisa “biloko kitoko” oyo bikangamaki liboso na boombo na lingomba ya lokutá.

Kati na bango, totangi Bogdan, oyo azali na mibu 23, ye mosangani na libota moko lizali na kondima monene na lingomba ya katolike. Amikundoli ete: “Nazalaki komela masanga, makaya mpe nazalaki na etamboli ya mbindo. Nayebanaki lokola motumoli mpe moto na mobulu kasi moto moko te amibanzabanzaki mpo na ngai. Nzokande, ntango nabandaki koyekola Biblia, mama na ngai alobaki ete akomela nkisi mpo na komiboma soki nde nakotika koyekola te. Lokola nakangaki motema te na ezalela wana, nakataki boyokani nyonso elongo na Batemwe. Na nsima, na lisalisi na bolingo ya ba pionniers spéciaux, nazwaki likoki ya kotika misala na ngai nyonso ya mabe. Nazwaki batisimo na 1991, na assemblée de district ‘Baninga na bonsomi’ mpe nakomisaki mosala ya pionnier mokano kati na bomoi na ngai, mpe uta ntango wana, nazali pionnier auxiliaire.”

Slawomir, oyo azali na mibu 21, azalaki moombo ya misala ya bilimu mabe mpe ya Satana, misala oyo atikaki yango na ntango ayebaki ete Biblia ekweisi yango. Alobi ete: “Kasi Satana alingaki kotika ngai te. Na butu moko, tournedisque ebandaki kobɛta yango moko, mpe nayokaki mizike ya Satana nzokande nasilaki kobwaka biloko bizali na boyokani na losambo ya Diable. Nabondelaki Jéhovah, mpe asalisaki ngai mpo na kobatela bokatikati na ngai na elimo. Monganga oyo asalisaka maladi ya makanisi oyo azalaki kosalisa ngai na etinda ya baboti na ngai, amonaki ete ezalela na ngai ebongwanaki kati na makambo nyonso mpe asukisaki ete nazalaki na nzoto kolongono. Akomaki kati na mokanda na ngai ya lopitalo ete: ‘Abikisami na ba Témoins de Jéhovah.’”

Batɛmɛli elimo ya mokili

Środa Śląska ezali na Sud-ouest ya engumba Kruszwica. “Biloko kitoko” bizali mpe kobima kati na engumba wana moke ezali na bafandi 9 000. Esili koleka mbula minei, bobele moko na bandeko na biso ya basi kati na elimo nde azalaki kofanda kuna. Kasi lelo, motuya ya basakoli ya Bokonzi ekómi 47. Batemwe mingi kala bazwamaki na motambo ya bilimu mabe, na drogues mpe na pite. Bakanisi ete yango esalemaki mingimingi mpo na bobólá ya elimo oyo ezali kati na Lingomba katolike, oyo eyebi bobele kokweisa bato na kati na elimo na esika ya kosalisa bango. Batemwe bazali kopesa lisalisi ya solo epai na bafandi ya etuká wana.

Bilenge mosusu na lisangá basili kokómisa eteyelo lokola teritware na bango mpo na mosala ya kosakola. Kasia, oyo azali na mibu 18 ayebisi ete: “Baninga na ngai ya kelasi balobaka na ngai mbala mingi ete: ‘Ozali kobebisa bolenge na yo,’ kasi, nazali komitungisa te mpe bomoi na ngai ezali malamu. Nazali kotambwisa boyekoli mingi ya Biblia na eteyelo mpe nazali na bopotu te mpo na badevware na ngai to mpo na boyekoli na ngai moko. Bilenge basi oyo bazalaki koloba na ngai ete ‘nazali kobebisa bolenge na ngai,’ basili kokóma bamama ya mabota mpe batungisami na mikakatano mingi.”

Mikanda mibimisami na la Société Watch Tower mizwaki matomba mingi na biteyelo. Na ndakisa, molakisi moko ya lokotá ya polonais alobaki na bayekoli na ye ete, mpo na kokoma malamu, basengeli kolanda elobeli ya polele oyo ezali na zulunalo na biso Réveillez-vous! Ewa, pionnier auxiliaire ya mwasi, amonaka ete brochure L’école et les Témoins de Jéhovah ezali na ntina mingi. “Nasepelaka mingi na mokanda wana. Balakisi na ngai bayebi yango malamu. Nazalaki na mokakatano moko te mpo na kozwa ndingisa ya kozangisa kokende kelasi mpo na koyangana na ba assemblées minene.” Ezaleli malamu wana ya bilenge ezali kosepelisa motema ya Jéhovah.​—Masese 27:11.

Bakangami oyo bameseni kosala mabe, babongwani

Strzelce Opolskie, ezali na est ya engumba Środa Śląska, epai bolɔkɔ mibale ezali kuna. Moko na yango ezali bolɔkɔ ebongisami malamu mpo na basali mabe mingi. Batemwe bakendaka mbala na mbala na bolɔkɔ wana mibale mpo na koyebisa solo epai na bakangami, mpamba te mingi na bango bazali mpe na boombo ya Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokutá na mokili mobimba.​—Emoniseli 18:1-5.

Batemwe bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia na mokangami mokomoko to na bituluku mike ya bakangami, mpe basusu kati na bango basili kozwa batisimo. Atako basengeli kokokisa etumbu na bango, bakangami wana bazali kosakola nsango malamu na mokanda epai na bakangami mosusu. Mokangami moko oyo azalaki komibongisa mpo na kozwa batisimo asalaki mabongwami minene, kino bakonzi ya bolɔkɔ bapesaki ye ndingisa ya kokenda na ndako na ye mbala moko na poso. Bakangami mosusu bakomelaki mabota na bango mikanda mpo na komonisa bango ekateli na bango ete, bakobima na bolɔkɔ lokola ba Témoins de Jéhovah, kasi lokola basali na mabe te.

Mokambi ya moko ya bolɔkɔ yango amitungisaki mingi na ntina ya basango ya katolike oyo bazalaki kokende kuna liboso, bazwaki litomba moko te. Atunaki Batemwe ete: “Lolenge nini bozali kosala mpo na kobongola mpe kolakisa lisusu bato oyo?” Mokanda oyo mokangami moko atindelaki libota na ye, moyanoli na motuna wana: “Awa na bolɔkɔ, ba Témoins de Jéhovah bayebisaki ngai elikya kitoko elakami na Nzambe na ntina na boyangeli ya sika, Bokonzi ya Jéhovah, oyo ekoyangela mabelé mobimba. Awa, nazwaki ntango ya kokanisa malamu na ntina na bomoi na ngai ya kala na kotalela Biblia. Nsima na komona ete bomoi yango ezalaki na ntina te, natondaki na mposa ya kokóma moto na bonsomi mpe kozala moto ya Bokonzi na Nzambe. Lelo oyo, nazali Témoin de Jéhovah oyo asili kozwa batisimo.”

Na bolɔkɔ mosusu, mingi bakatelami etumbu ya mibu 25 mpo ete babomaki bato. Boyekoli ya Biblia ya mbala na mbala etambwisami elongo na mibali 12. Moko na bango apesaki bomoi na ye epai na Jéhovah mpe azwaki batisimo. Bakangami mosusu bazali mpe kokanisa kosala bobele bongo. Kosepeláká na matomba malamu mabimisami na mayele ya koteya masalelami na ba Témoins de Jéhovah, mokambi ya bolɔkɔ alobaki ete: “Nazali bobele na bakangami 12 te. Nazali na bango 600. Nabondeli bino, bosalisa ngai na koteya bango lokola. Nakopesa bino eloko nyonso bozali na mposa na yango, kasi nabondeli bino ete bosala ebongiseli. Bosalisa bango!”

Ezali yango nde bandeko basalaki. Babongisaki masoló ya Biblia oyo mazalaki kolobela ntina ya bomoi, avenir mpe ntina ya kotika misala mabe. Balobelaki lisusu na ntina na moto moko oyo azalaka mokangami nde akómaki Témoin de Jéhovah mpe, na nsima, aponamaki lokola nkulutu na lisangá na bango. Batemwe balobelaki lisusu makambo ya ntina na lisoló ya moyibi moko ya diamants mpe ya momeli drogue moko oyo bayekolaki solo.a Bakangami 20 baoyo bazalaki wana basepelaki na ebongiseli mpe batunaki mituna mingi, nkutu basusu basɛngaki ete bayekola Biblia.

Kondima mpe koyika mpiko etyami na komekama

Lubaczów ezali engumba moko moke oyo ezali na bafandi 12 000 mpe ezali pene na ndelo ya mboka Ukraine. Mosala ya kopalanganisa nsango malamu mobakisamaki lisusu na 1988, na ntango ba pionniers bakómaki kuna mpo na kosalisa basakoli 12 ya engumba wana. Ezali sikawa na basakoli 72 ya molende mpe bato 150 bayanganaki na 1991 na Ekaniseli kati na Salle du Royaume oyo euti kotongama kala mingi te.

Na juin 1991, Pape Jean-Paul II akendaki na engumba Lubaczów. Kasi likambo yango lilendisaki mpenza kondima ya bato te. Mingi kati na bango bazali na ntembe mpe bazali na mituna mingi mpo na ntina ya bomoi mpe avenir. Lokola bazwi biyano malamu te epai na bakonzi ya mangomba, bamibaloli epai na ba Témoins de Jéhovah. Na ebandeli, bato bazali komitungisa mpo na kotika mangomba na bango, kasi solo ya Biblia ezali kosalisa bango na koyeba ete, kosala bongo ezali ekateli malamu.

Lisoló ya Honorata, oyo azali sika pionnier permanent ya mwasi, limonisi likambo yango. Eleki pene na mbula moko sikawa, atunaki na sángó ya lingomba na bango ete nkombo na Nzambe ezali nini. Sángó ayanolaki ye ete: “Nzambe azali bolingo​—wana ezali nkombo na ye eleki kitoko.” Mpe nsima ya mwa ntango moke, abakisaki ete: “Okokani na katini oyo ezali na mai ya pɛto nde basopi mai na mokanda kati na yango. Ekobimisa matomba oyo makoki kobongolama te.” Azalaki na eyano na ye. Honorata alobaki ete: “Nazwaki bongo ekateli ya kokóma Témoin de Jéhovah. Likambo oyo ekoki mpe kobongolama te.”

Na Lubaczów, pene na baoyo nyonso bayekolaki solo bazwaki botɛmɛli makasi, ata na makambo mazangi ntina. Kasi yango epekisaki bango te ete bayamba solo ya Biblia mpe kozwa etɛlɛmɛlo na bango mpo na Jéhovah.

Elzbieta ayebisi ete: “Na ebandeli, baboti na ngai bazalaki kobɛta ngai. Na nsima, bandeko na ngai baingelaki na Salle du Royaume. . . .Bamemaki ngai na ndako mpe babɛtaki ngai na nzeté moko ezalaki matutumatutu. Nabɛtamaki mingi bobele mpo ete nazalaki kosangana elongo na ba Témoins de Jéhovah. Nabɛtami mingi mpenza kino namemamaki nokinoki na lopitalo. Na lisalisi ya Jéhovah, nabikaki. Libota na ngai basundolaki ngai. Ntango nayebisaki likambo yango epai na sángó, alobaki na ngai kotyola nyonso ete: ‘Oyei komilela bobele mpo na mwa bambata wana?’”

Ndeko mosusu ya mwasi ayebisi ete: “Mbula nyonso, nazalaki na momesano ya kokende na engumba Czȩstochowa mpo na kotambola na Nzela ya Ekulusu, oyo nazalaki kokanisa ete mokatolike nyonso ya molende asengelaki kosala yango. Nazali naino na bilembo na mabɔlɔngɔ.” Ayebaki solo wana azalaki na mibu 18; bongo, ayebisaki sángó mpe alobaki na libota na ye ete akozonga lisusu na ndakonzambe te. Abɛtamaki makasi mingi. Ayebisi ete: “Nabɛtamaki makasi mpenza kino nazwaki mpasi na bɔɔngo. Kasi na lopitalo, naokaki ete nazali na nzoto malamu mpo na koyangana na assemblée de district ‘Baninga na bonsomi.’ Nalelaki na esengo na ntango namonaki bomoko ya solo mpe bolingo epai na bato bazangi koponapona​—makambo oyo namonaki soko moke te na Częstochowa. Nazali mpenza na esengo lokola namoni malamu na Jéhovah mpe nayekoli kotya motema epai na ye!” Jéhovah akembisaka mpe asungaka baoyo bazali kokitisa mikumba na bango epai na ye.​—Nzembo 55:22.

Na mboka wana ya katolike, lokola na bisika mosusu, mingi na bato oyo bazali naino na boombo ya Babilone Monene, bazali kotya likebi na libyangi ya “kobimba kati na ye.” Soki ezali mokano ya Jéhovah, libota na ye ya molende likokóba ntango nyonso koyanganisama ebele na “biloko kitoko” bipalangani na mboka Pologne. Ezali naino na bato mingi bakoyanola na libyangi oyo ete: “Yaka! Mpe tika ete moto na mposa na mai aya; tika ete moto na moto oyo alingi akamata mai na bomoi, kozanga kofuta.”​—Emoniseli 18:4; 22:17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala Réveillez-vous! ya 8 janvier 1984, lokasa 19, mpe Réveillez-vous! ya 22 novembre 1987, lokasa 21 kino lokasa 23.

[Karte na lokasa 24]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

POLAND

Sztum

Kruszwica

Poznan

Warsaw

Środa Śląska

Częstochowa

Strzelce Opolskie

Lubaczów

[Elilingi na lokasa 26]

Kosakolama ya nsango ya bokonzi na Kruszwica, na Pologne

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto