Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/7 nk. 24-25
  • Géraza​—epai Bayuda mpe Bagreke bafandaki esika moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Géraza​—epai Bayuda mpe Bagreke bafandaki esika moko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Yaká kotala libéké ya Galilai!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • B10 Yisraele na ntango ya Yesu
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Bililingi ya Mokili na ndaka Yordani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Galaad, etúka mpo na bato ya mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/7 nk. 24-25

Bililingi ya Mokili na ndaká

Géraza​—epai Bayuda mpe Bagreke bafandaki esika moko

NTÓMA Paulo akomaki ete kati na libota ya solo ya Abalayama, “Moyuda azali te, Mogreke azali te.” (Bagalatia 3:26-29) Na yango, mpo na kondima moto moko, Nzambe azalaki te kotalela ekólo na ye to ezalela ya makambo na ye.

Emonani lokola ete maloba oyo matalelaki baklisto oyo bapalanganaki na etúka moko ya Loma, lokola Galatia, esika oyo esangisaki Bayuda, Bagreke, Baloma mpe bato ya etúka wana. Kasi tokoloba nini na ntina na bitúka na Yisraele, lokola Galaad?

Etúka ya Galaad ezali na est ya ebale Yordani, katikati na mai na Monana (Mer Morte) mpe na libéké ya Galilai. Ezali mwa moke pene na esika ya esobé ezali na ngomba oyo ekobotaka mbuma mingi, epai mokɛlɛ ya Jabboc mozali kotyola mpo na kobima na Yordani. Fɔtɔ́ oyo etyami awa likoló emonisi mwa bitika kitoko ya Géraza, oyo ebéngami lelo Djarach, pene na Jabboc.

Na ntango na kala, balabala ya bato na mombongo ya nord-sud, oyo ebéngamaki “balabala ya mokonzi,” ezalaki kokatisa Galaad. Etikaki ye Halana, emonani ete Yakobo mpe libota na ye bakitaki na balabala wana kino na Jabboc. Ezali pene na esika oyo Géraza esengelaki kotongama epai Yakobo abundaki na anzelu moko, esika oyo akutanaki na Esau. (Genese 31:17-25, 45-47; 32:22-30; 33:1-17) Na nsima, Bayisraele oyo bautaki na sud balekaki na balabala ya mokonzi mpo na kokenda na Mokili na ndaká. Mabota mibale na ndambo mafandaki epai na nord, na sud ya Jabboc, pembeni na balabala ya bato na mombongo.​—Mituya 20:17; Deteronome 2:26, 27.

Bagreke bazalaki nde na etúka wana? Soki ezali bongo, ndenge nini? Ya solo, Bagreke bayaki na etúka wana na ntango eyangelamaki na Alexandre Monene. Lisoló liyebisi ete batongaki Géraza mpo na babundi bitumba na kala ya limpinga na ye. Mokemoke, bopusi ya Bagreke ekómaki makasi. Bingumba zomi kati na oyo eyangelamaki (na Alexandre) na est ya Yordani mpe na libéké ya Galilai, esalaki lisangani libéngami nkombo Dekapoli (Lisangani ya bingumba zomi). Mbala mosusu osila komona nkombo oyo kati na Biblia, na ntango yango ezali koloba ete “bibele na bato balandaki ye [Yesu] mpe [bango bauti] na Galilai, mpe na Dekapoli, na Yelusaleme, na Yudea mpe na ngambo mosusu na Yordani.”​—Matai 4:25, MN.

‘Alexandre alingaki kokɔtisa Bagreke kati na bokonzi na ye. Mingi mpenza, na Basse-Syrie [esika oyo Dekapoli ezalaki], mpe esika na bingumba minene oyo ezalaki na basodá mingi, ekómaki na Bagreke mingi. Lelo oyo, esika moko te ya mikili epai moi mokobimaka ekoki kozala na bitiká mingi ya Bagreke mpe na kitoko boye, lokola mboka oyo ezali na est ya ebale Yordani. Bingumba ya Bagreke bimonanaki na bibongiseli mpe mimeseno ya Bagreke: tempelo kitoko etongamaki mpo na banzambe mibali mpe banzambe basi ya Bagreke, bisika ya ngalasisi, bisika oyo bato mingi bazalaki kosukola nzoto, bilambo ya mbula na mbula ya masano, mpe ezalaki na biteyelo mpe na balakisi ya filozofi.’​—Hellénisme (angl.), ya Norman Bentwich.

Okomona bosolo ya maloba oyo soki okei kotala bitiká ya Géraza. Pene na ekɔtelo ezali na sud, ezali na esika oyo bato mingi bazalaki kokutana, to zando (emonani na fɔtɔ́). Na ntembe te, okokamwa wana okomona bisika bato bazalaki kosukola, tempelo, bisika ya masano mpe bandako epai bato mingi bazalaki kokutana, oyo mingi na yango etongami na balabala elemulami mpe ezali na makonzi pembeni na yango. Na libandá ya engumba, pembeni na balabala ya kala oyo ezalaki kolongisa Géraza mpe bingumba mosusu ya Dekapoli mpe mabóngo ya mai monene Meditarranée, okomona mabangá to nzeté oyo ezalaki kolakisa ndelo.

Ata nsima na ntango oyo Loma ekamataki Géraza na mobu 63 liboso ya ntango na biso, bizaleli ya Bagreke bitikalaki. Tokoki kokanisa ete bizaleli yango bizalaki na bopusi likoló na Bayuda oyo bafandaki na Géraza mpe na bamboka ya zingazinga na yango. Mokanda Hellénisme moyebisi ete: “Mokemoke, Bayuda babandaki mpenza komonisa motindo na makanisi ya losambo ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe na kotalela Makomami na kolanda makanisi wana.”

Yesu asakolaki kati na engumba wana te, kasi akɔtaki kati na etúka ya Géraza, oyo monene na yango ezalaki mbala mosusu kino na libéké ya Galilai. Ezali na etúka wana nde abimisaki bilimu mabe longwa na mobali moko mpe atikaki bango ete bakɔta kati na bangulu. (Malako 5:1-17) Ekoki kozala ete bayekoli ya liboso na Yesu basakwelaki Bayuda oyo bazalaki na bingumba ya Dekapoli, mpe nsima na mobu 36 ya ntango na biso, nsango malamu eyebisamaki epai na Bagreke ya Géraza. Atako ye oyo ayambaki boklisto azalaki mondimi monene na lingomba ya Bayuda, Moyuda oyo abongwanaki na lingomba ya Bagreke to Mogreke, akokaki kondimama epai na Nzambe ya solo mpo na kozala kati na libota ya elimo ya Abalayama.

[Karte na lokasa 24]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Dion

Gerasa (Jarash)

Philadelphia (Rabbah)

King’s Road

Salt Sea

Yerusaleme

Yordani

Jabbok

Pella

Scythopolis (Beth-shean)

Gadara

Sea of Galilee

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya Pictorial Archive (Near Eastern History) Est. and Survey of Israel

[Elilingi na nkasa 24]

Fɔtɔ́ oyo etyami awa likoló emonisami na monene na yango kati na Calendrier des Témoins de Jéhovah 1992.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Eutelo ya bafɔtɔ na nkasa 25]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto