Masoló ya basakoli na bokonzi
Nsango malamu euti na Europe de l‘Est
EBELE na makambo kitoko masalemaki na elanga ya teokratike ya Europe de l’Est. Assemblée internationale oyo esalemaki na engumba Zagreb kobanda le 16 kino le 18 août 1991, ezalaki likambo moko monene; na libaku wana, ba Témoins de Jéhovah 7 300 bamonisaki boyambi malamu epai na bandeko na bango oyo bautaki na mikili 15. Bakómaki bango nyonso bato 14 684 oyo bazalaki wana. Assemblée yango ezalaki komonisama monene ya bolingo mpe ya bomoko kati na mokili oyo mozali na mobulu mingi.
Batemwe ya Europe de l’Est bazali na molende mingi kati na mosala motali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Jéhovah, wana ezali bango kososola ete yango ezali elikya bobele moko mpo na kozwa kimya ya solo. Na bituká mosusu, ezali na bango pɛtɛɛ te ete baboya komikɔtisa kati na makambo ya mokili. Atako bongo, mbala mingi bala bazali koyoka, mpe Batemwe mingi bazali na makambo kitoko mpo na koyebisa.
Na engumba moko, elenge mwasi moko ya mibu 16 ayokaki nsango malamu bobele epai na Témoin de Jéhovah moko oyo alandaki na esika yango. Abandaki koyekola Biblia mbala na mbala, mpe bolingo na ye mpo na solo ekólaki. Lokola azalaki na mposa ya komeka koyebisa bato mosusu makambo kitoko oyo ye ayekolaki, amekaki kosolola elongo na baninga na ye ya kelasi, kasi akutanaki na mwa botɛmɛli mpe basɛkaki ye. Moninga mosusu ya kelasi alobaki na ye mabe mpenza, kasi akamwaki na motema molai oyo emonisamaki na elenge moyekoli wana ya Biblia, oyo asilikaki te atako lolenge nyonso oyo bafingaki ye. Na nsima, elenge mwasi wana azwaki litatoli monene mpe asosolaki ete azalaki na ezaleli moko mabe. Abandaki boyekoli ya Biblia, mpe elenge mwasi oya ayekolaki Biblia liboso mpe moninga na ye ya sika, bamekaki koyebisa esengo na bango epai na bato mosusu, atako yango endimamaki te epai na baboti na bango, na molakisi na bango mpe na baninga na bango ya kelasi.
Na nzela ya litatoli na bango, moninga mosusu ya kelasi ayambaki solo. Bakómaki bongo bato misato oyo bayambaki solo kati na kelasi na bango, mpe bango nyonso misato bazalaki kopesa ndakisa malamu na kosalisáká bato mosusu na molende mpe na komonisana bolingo kati na bango. Na nsima, elenge mwasi mosusu asanganaki na bango.
Bango minei bafandaki na etanda moko na libandá mpo na kosolola na ntina na Biblia. Mpe, bato mingi bakamwaki wana motuya na bango mobakisamaki. Moninga na bango mosusu ya kelasi asepelaki na etamboli na bango malamu, mpe azwaki ekateli ya kosangana na bango kati na boyekoli ya Biblia. Bilenge basi mitano wana balandaki kobyanga banakelasi mpe balakisi na kosala motindo moko. Kasi, mokomoko na bango azalaki kokutana na mimekamo makasi epai na baboti na bango. Baboti wana basalaki nyonso ekoki na bango ete bana basi na bango batika koyekola Biblia, na kobebisáká mikanda mikolimbolaka Biblia mpe na konyokoláká bango.
Litomba nini lizwamaki na litatoli oyo libandaki na elenge mwasi oyo asepelaki na solo? Moko na bilenge basi wana azwaki batisimo na assemblée de district ya 1990, mpe minei mosusu bazwaki batisimo na assemblée de circonscription na printemps ya mobu 1991. Yango ezalaki liziba ya esengo monene! Lelo oyo, bango nyonso mitano bazali ba pionniers permanents! Na engumba epai makambo oyo malekaki, ezali sikawa na basakoli 11, kati na bango, 8 bazali ba pionniers.
Jéhovah azali kosunga mpe kopambola Batemwe ya Europe de l’Est. Emonani ete makoki mazali mpo na kozwa bokóli kati na bato ya motema sembo baoyo bafandi na eteni wana ya mokili.