Likoki ezali ete moto alongwa na ezalela na ye ya mosumuki?
CHISAKO elongo na bana na ye minei baoyo bazalaki bilenge, bazalaki kopɛtola bakabinɛ etongami mpo na bato nyonso na engumba moko ezali na ntáka ya bakilometele 600 longwa na esika oyo ye afandi. Ezalaki ye kosala, azalaki kolobela malako oyo ayebaki ntina na yango te. Ezalaki losambo ya lingomba oyo balukaka koyeba makambo oyo matalelami na mangomba nyonso.
Chisako amikundoli ete: “Atako mbala na mbula natósaki malako yango ya mpasi mingi, nakokaki te kobongola bomoto na ngai. Na motema na ngai, nazalaki kokoka te kolimbisa bato mosusu mpe na komonisela bango bolingo ya solo mpenza.”
Ata kati na mikili ya Orient, epai ntalo monene na bato bayebi liteya ya lisumu te lokola yango eteyami kati na Biblia, mingi bazali na lisosoli litungisami, lokola Chisako, na ntina na makanisi na bango ya bato ya masumu. (Baloma 2:14, 15) Nani amitungisa naino te wana azangaki komonisa boboto epai na moto moko azalaki kati na ezalela ya mpasi? To nani aoka naino mawa te mpo ete abimisaki maloba oyo asengelaki kobimisa te? (Yakobo 4:17) Bongo ezaleli mabe ya zuwa, ebómbami te kati na moko na moko na biso, bilenge mpe mibangé?
Mpo na nini bato bazali na mayoki ya komitungisa motindo oyo? Mpo ete, kati na makanisi na bango, ata basosoli yango to basosoli yango te, bayebi ete masumu ezali mabe. Na yango, ata soki bato bayebi mateya ya Biblia na ntina na lisumu to mpe te, bango nyonso bazali na makanisi ya masumu. Mokolo mosusu, moto moko ayebaki mpenza makambo yango, asukisaki ete: “Bato banso basali lisumu mpe bazangi nkembo na Nzambe.”—Baloma 3:23, MN.
Lisumu likoki kolongolama?
Ebele na bato lelo, mingi mpenza kati na boklisto ya lokutá, bazali komeka kolongola mayoki ya masumu mpe ya komikweisa na lisosoli na bango. Docteur Karl Menninger akomaki kati na mokanda na ye Qu’est devenu le péché? (angl.) ete: “Liloba “lisumu” . . . esilá kolimwa.” Nzokande, koboya kotanga liloba “lisumu” ekobongola makambo te, lolenge moko na mobange oyo aboyi kotanga liloba “mobangé.” Tosengeli kondima ete: tozali na makanisi ya masumu mpe tozali na mposa ete moto moko alongola biso na ezalela wana ya mawa. Kasi nani?
Nsima na kondima ete azalaki na makanisi ya masumu, ntóma Paulo atunaki motuna oyo, ete: “Ngai moto na mawa! Nani akolongola ngai na nzoto oyo ezali na nsé na kufa?” Akóbaki na kopesáká eyano oyo ete: “Ngolu epai na Nzambe kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso!” Mpo na nini bongo? Mpo ete Nzambe azwaki bibongiseli mpo ete masumu malimbisama mpo na mbeka ya lisiko na Yesu.—Baloma 7:14-25, MN.
Nzokande, ndambo monene ya mwa bato 3 500 000 000 oyo bazali baklisto te kati na mokili mobimba (mbala mibale koleka motuya ya baoyo bamitangaka baklisto), bazali na mpasi mingi mpo na kokanga ntina na liteya ya lisiko. Na ndakisa, liteya ya lisiko lizalaki mokakatano monene oyo musulman moko azalaki na yango, ye oyo ayekolaki Biblia na boumeli ya mwa ntango na mboka Japon. Mpo na bato mingi ya Orient, likanisi oyo ete moto moko akufaki mpo na bato nyonso ezali kokamwisa bango.
Esengeli ezala bongo, mpamba te ata basangani mosusu ya boklisto ya lokutá bazali komona ete liteya wana ya moboko lizali mpenza mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.) eyebisi ete: “Liteya ya Lisiko lilimbolami mpenza te na bisika mosusu, mpe lelo oyo emonani lisusu lokola mokakatano monene mpo na bato ya mayele.”
Bonene ya mobulungano oyo mozali na liteya wana emonisamaki na maloba oyo ya N. Barbour, mokomi ya zulunalo ya lingomba, ete: “Lokola baboti bakoki kokanisa te ete, mpo na kosembola libunga moke oyo mwana na bango asali, basengeli kotɔbɔla nzinzi na pɛngɛlɛ mpo na kookisa yango mpasi mpe ete akufa, bobele bongo, liwa ya Klisto likoki te kozala lifuti mpo na etumbu ya masumu ya bato.” Charles Russell, oyo asalaki elongo na Barbour na eleko wana, amonaki ntina ya kokɔtɛla liteya ya lisiko. Akabwanaki na Barbour mpe, na 1879, abimisaki zulunalo ya sika, oyo na nsima ekómaki zulunalo oyo ozali kotanga. Uta ebandeli, Mosenzeli ekɔtɛlaki liteya ya mbeka ya lisiko na Yesu Klisto.
Kasi liteya yango likoki kondimama na baoyo bafandi na bisika ya “boklisto” te? Mpo na koyeba yango, totalela liteya yango malamumalamu: moto moko akufi mpo na bato nyonso.