Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/6 lok. 32
  • Okozanga te kozwa litomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okozanga te kozwa litomba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova bayanganaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi”—Liyangani ya etúká to ya mikili mingi mpo na mobu 1998
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • ‘Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe’​—Liyangani ya etúká 1996
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Mayangani ezalaka ntango ya esengo oyo tomonisaka mpenza bondeko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/6 lok. 32

Okozanga te kozwa litomba

NA PHILIPPINES, babalani mibale batambolaki mikolo mibale mpo na kokende kuna. Batambolaki bakilometele 70 na mokolo, elongo na bana mibale ya mike na kolekaka na zamba oyo etondi na sonzo mingi mpe na kokatisaka mingala na ntango na mpela na ntina na mbula oyo mipepe makasi na nkombo typhons ebimisaki. Kasi bazalaki na ekateli ete bazanga yango te.

Na Zaïre, basi mibale batambolaki na makolo koleka bakilometele 500, kolekisaka mikolo 14 na nzela mpo ete bazala wana. Bobele na mokili moko oyo, mobali moko ya mibu 70 akendaki kuna na velo mpe asalaki bakilometele 260. Alembaki te mpo na ntáka to na mpasi oyo yango ezalaki komonisa. Mpo na ye likambo ya ntina mingi ezalaki, ete azanga yango te.

Bango nyonso wana bazalaki kokende epai wapi? Na moko ya ba assemblées minene ebongisamaki na ba Témoins de Jéhovah kati na mikili na bango. Mpe atako ntáka ezalaki na mikakatano mingi, bango nyonso bazalaki na liyoki ete milende na bango ekozwa mbano.

Osili kokamata bibongiseli mpo ete oyangana na assemblée ya distrike “Bamemi na pole” oyo ekosalema na mobu oyo? Okozala mpenzampenza na mposa te ete osala milende lokola bato na sembo wana basalaki mpo na koyangana. Kasi ata soki yango ekopesa yo mwa mpasi, tolendisi yo ete ozonga yango te.

Programme moko kitoko, oyo ekomonisa lolenge lobongi ya bomoi, esili kobongisama. Soki olingaka kozala elongo na baklisto mosusu, mpe soki olingi koyeba ndenge nini kozwa kimya ya solo, oyo avenir ezali kobombela biso to lolenge malamu ya kokokisa malamu mokano ya Nzambe, tokoki kalaka yo ete okozanga te kozwa litomba. Témoin moko ya mboka na bino akoki koyebisa yo esika mpe ntango oyo assemblée ya penepene na esika efandi yo ekosalema.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto