Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/6 lok. 31
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Kobanga banyama ya nsɔmɔ te
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Etumba mpo na kotemela nyama mabe mibale
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Babilone Monene abomami
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/6 lok. 31

Mituna na batangi

Biblia endimi kozala ya ba licornes to banyama na liseke moko, oyo mabongoli mosusu mazali kolobela?

La Bible de Saci, libongoli ya Ostervald mpe mabongoli mosusu mazali kolobela nyama wana oyo babengi licorne. Kasi ezali bongo te mpo na mabongoli ya sika oyo ezali kobongola lokola ya Liebele na lolenge malamu mpenza.​—Nzembo 22:21; 29:6; 92:10, MN (22:22; 29:6; 92:11, Ostervald).

Na boumeli ya bikeke bato basili kobongisa masolo mingi oyo mazali kolobela mpo na nyama moko azali na nzoto mpe na motó ya mpunda, kasi makolo ya mbuli mpe mokondo ya nkosi. Mbala mosusu elembo ya sikisiki ya nyama wana ya lisapo ezali liseke moko elóngamilóngami likoló ya elongi.a

“Kala bato bazalaki kokanisa ete liseke ya licorne ezalaki na biloko oyo bikosilisaka ngenge (antipoisons), mpe, na Moyen Age, bapudre oyo bazalaki koloba ete esalemi na maseke yango ezalaki kotekama na motuya mingi koleka. Bato mingi ya mayele bazali kokanisa ete liteya ya licorne ebotamaki na masolo oyo mapesamaki na nkuku na Mpoto na ntina na kánge to rhinocéros.” (The World Book Encyclopedia) Bamonimá mosusu ya bato na Asulya mpe bato na Babilone ezali na bililingi ya banyama ya liseke moko. Ezali kokanisama lelo ete ezali mbuli, ntaba na zamba, ngombe mwasi to ngombe mobali amonisami na mopanzi moko ya elongi, na lolenge oyo ezali komonisa te maseke nyonso mibale.

Yango ezali likambo ya ntina mpo na baoyo bazali koyekola Biblia, mpamba te Makomami mamonisi mbala libwa nyama moko na liloba na liebele reʼemʹ. (Mituya 23:22; 24:8; Deteronome 33:17; Yobo 39:9, 10; Nzembo 22:21; 29:6; 92:10; Yisaya 34:7) Babongoli bazalaki na ntembe uta kala mpo na oyo etali nyama yango. La Septante na lokota ya greke ebongolaki reʼemʹ na ndimbola ya “na liseke moko,” to licorne. La Vulgate latine ebongolaki yango mbala mingi na “kánge to rhinocéros.” Mabongoli mosusu basaleli “ngombe ya zamba,” “nyama na yauli” to “mpakasa.” Robert Young abongoli bobele Liebele na Lingelesi na “Reem,” yango ezali kopesa likanisi ya sikisiki te epai na motangi.

Balimboli na Biblia ya ntango na biso bapesaki mpenza engengiseli makasi na ntina na reʼemʹ. Ludwig Koehler mpe Walter Baumgartner baoyo bakolimbolaka maloba na bato bayebisi ete liloba wana ezali kolobela “bangombe ya zamba,” oyo bayebani na ebengeli ya sianse Bos primigenius. Wana ezali “etuluku mosusu ya libota monene ya banyama ya maseke oyo ezali na ensóbu.” Ekoki kotangama boye kati ya Nouvelle Encyclopédie britannique:

“Makomi mosusu ya maloba kitoko ya Kondimana na Kala ezali kolobela nyama moko na nguya mpe kitoko azali na maseke abengami reʼemʹ. Liloba yango libongolami na ‘licorne’ to ‘rhinocéros’ (kánge) kati na mabongoli mingi, kasi mabongoli mingi ya sika masepeli kosalela ‘aurochs’ (ngombe ya zamba) oyo ezali ndimbola ya solo ya liloba na liebele reʼemʹ.”

Lokola na elobeli ya Lifalanse ya lelo “boeuf” elimboli ngomba mobali oyo alongolami mabinzi, Les Saintes Ecriture​—Traduction du monde nouveau ezali mbala na mbala kobongola reʼemʹ, na lolenge ya sikisiki, na “ngombe mobali ya zamba.” Aurochs (boeuf to ngombe mobali ya zamba) elimwaki mpenzampenza na ekeke ya 17, kasi bato na mayele bosukisi boye ete yango ekesanaki mpenza na licorne oyo masolo na bato mazali kolobela. Aurochs ya kala ezalaki na nzoto molai ya pene na metele 1,80 mpe molai ya mwa bametele 3. Akokaki kozala na bozito ya 900 kilogrammes, mpe moko moko ya maseke mibale ekokaki kozala na molai ya koleka basantimetele 75.

Yango ezali koyokana mpenza na bosalelami ya liloba reʼemʹ, to ngombe mobali ya zamba, kati na Biblia. Ayebanaki mpo ete azalaki nyama moko makasi mpe ya mobulu. (Yobo 39:10, 11), kasi lisusu na mbangu mingi. (Mituya 23:22; 24:8) Na ntembe te azalaki na maseke mibale, kasi liseke moko te lokola elobelami mpo na licorne ya lisapo. Moize alobelaki maseke na ye kati na elobeli moko ya elilingi ya mabota mibale na nguya oyo masengelaki kobima na nzela na bana mibale ya Yosefe.​—Deteronome 33:17

Na bango Biblia ezali kondima te liteya ya ba licornes, oyo masapo na yango masili kopalangana mingi. Ezali koyebisa na lolenge ya sikisiki atako na mokuse ourochs na nguya mpe ya nsomo, to ngomba mobali ya zamba, oyo ezalaki na ntango bazalaki kokoma Biblia mpe kino na bikeke oyo biuti koleka kala mingi te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Molakisi Paulo Haupt alimboli ete: ‘Kati na mikanda ya Moyen Age, maseke ya kánge (rhinocéros) to mpembe (mino milai) ya mbisi ebengami Narval (oyo babengaka lisusu licornes de mer) ekokisamaki na mases ya ba licornes.’

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Treasury of Fantastic and Mythological Creatures: 1,087 Renderings from Historic Sources, by Richard Huber/​Dover Publications, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto