Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/6 nk. 24-26
  • Jéhovah—Moyebani na yo to moninga na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah—Moyebani na yo to moninga na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Boninga elongo na Nzambe
  • Makambo masengami mpo na kozala na boninga
  • Motuya nini tozali kopesa na boninga na biso elongo na Jéhovah?
  • Ndenge oyo okoki kozwa baninga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • “Nabengi bino baninga”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • “Bozali baninga na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/6 nk. 24-26

Jéhovah​—Moyebani na yo to moninga na yo?

“JEAN, tika namonisa yo moninga na ngai. Tala . . . Limbisa ngai, nabosani nkombo na yo.”

Osila komona libunga motindo wana? Ezali ndakisa ya esaleli mabe oyo basusu bazali kosalela liloba “moninga.” Mpo na koloba solo, bazali bobele kokanisa na “moyebani” to mpe mbala mosusu ata mpe yango te. Koyeba M. Matabisi oyo ndako na ye etalani na oyo ya biso ezali likambo mosusu, kozala moninga na ye ezali mpe likambo mosusu.

Diksionere moko elimboli boye liloba “moyebani”: “moto oyo eyebanaki na ye, kasi ozali na boyokani mozindo elongo na ye te.” Liloba yango etaleli “boyokani ya makasi te, ya mozindo te, mpe ya penepene te lokola MONINGA.”

Kozanga wana ya boyokani mozindo ezali kopesa nzela na kolimbola mpo na nini tozali kotya likebi moke na oyo ezali kokomela bayebani, nzokande tozali kolanda na likebi nyonso mpe na boboto nyonso bomoi ya baninga na biso. Tozali kokabola bisengo na bango mpe mawa na bango, mpe yango ezali kosimba motema na biso mpenza. Ya solo, tosengeli kokeba ete mayoki oyo tozali na yango mpo na bango emema biso te na komikotisa kati na makambo na bango moko mpenza.​—1 Petelo 4:15.

Kozala mpenza na bokangami makasi epai na baninga na biso ezali kolimbola mpe mpo na nini tozali koluka, mpenzampenza, kosepelisa bango. Soki moyebani moko amoni ete etamboli na biso ezali malamu te to ebongi te, kozanga kosepela na ye ekopusa biso mpenzampenza te na kobongwana. Kasi moninga akoki mpenza komema bopusi likolo na biso, ezala kati na likambo ya kolata, ya etamboli to ya ezaleli.

Na likambo litali kotyela motema bolingo, limemya mpe bosembo, bakosengaka mingi epai na moninga koleka epai na moyebani. Ye oyo alingi ete tozala moninga na ye kozanga ete andima masengami na yango alingi mpenza te kozala moninga na biso; akozala mpo na biso bobele moyebani. Baninga ya motema bazali na esengo mpo na kokokisa masengami oyo mazali kouta na bokangami moko ya mozindo, koyebaka ete yango ekopesa bango libaku ya komonisa boninga na bango.

Boninga elongo na Nzambe

Lokola azali Mozalisi, Jéhovah azali Tata ya bato na likoló mpe ebongi ete tolinga ye, totosa ye mpe tomemya ye. Kasi alingi ete bato bapusama na bokangami mozindo, kasi bobele te mpo ete yango ezali etinda (Matai 22:37) Alingi mpe ete balinga ye lokola Moninga. (Nzembo 18:1) Mpo ete “alingaki biso liboso,” ye moko atyaki moboko ya kokoka mpo na boninga motindo yango.​—1 Yoane 4:19.

Baboti na biso ya liboso, Adam na Eva, bayebaki Jéhovah. Motuna ezalaki ya koyeba soki nde bakondima boninga oyo ye asengaki bango. Na mawa nyonso, baboyaki yango. Likambo oyo ete balukaki na moimi nyonso kozala na lipanda liboso na Nzambe yango emonisi ete bamiyokaki mpenza te ete bakangami makasi epai na ye. Basepelaki bobele kozwa mapamboli oyo makouta na boninga oyo Nzambe asengaki bango, kasi balingaki te kokokisa mikumba oyo yango ezalaki kosenga. Ezalaki lokola nde balingaki bobele kozwa litomba na bolamu mpe na libateli oyo Paradis kitoko epai kuna bazalaki kofanda epesaki bango, kozanga ete bafuta mbongo ya ndako.

Biso nyonso, tozwaki libula ya kozanga botondi yango mpe elimo wana ya lipanda, bamoko koleka basusu. (Genese 8:21) Na ndakisa, bilenge, bazali kopesa nzela na mposa na bango ya lipanda oyo babotami na yango ete ekumisa bango bato na kozanga botondi liboso na baboti na bango. Na ntina yango, boninga malamu oyo ekokaki kozala kati na bango mpe baboti na bango na boumeli ya bomoi na bango mobimba ebebisami. Nzokande, na ntina na mawa oyo likambo yango ekoki kobimisa ezali na likama monene ya kobungisa boninga ya Tata na biso ya likoló. Mpo na koloba solo, yango ekoki kobungisa bomoi na biso!

Makambo masengami mpo na kozala na boninga

Kozanga kotyanela motema, boyokani moko te, ezala yango esalami elongo na bato to elongo na Nzambe, ekoki koumela ntango molai te. Tata na mabota Abalayama ayebaki likambo yango, mpe yango wana mbala mingi amonisaki kotyela motema mobimba epai na Nzambe. Tanga Genese 12:1-5 mpe 22:1-18, mpe tala ndenge nini, na mbala mibale, amonisaki kotyela motema na ye epai na Jéhovah. Ee, “Abalayama andimaki Jéhovah mpe yango etangameli ye mpo na boyengebene.” Yango wana “abyangami ‘moninga na Jéhovah.’”​—Yakobo 2:23.

Lisengami mosusu ya kokokisa mpo na kozala na boninga elongo na Nzambe ezali oyo ya kokokisa mikumba oyo boninga yango ezali kosenga. Lokola tozali na etelemelo ya komisokisa liboso na Jéhovah, mikumba yango mizali, na solo mpenza, minene koleka kati na likambo ya boninga moko elongo na bato. Ezali bobele te likambo ya kolinga kosepelisa ye kati na makambo mosusu, lokola tokoki kosala yango elongo na moto moko oyo azali moninga na biso. Ezali likambo ya kolinga kosepelisa ye kati na makambo nyonso. Yesu, Mwana mpe moninga ya motema ya Nzambe, amonisaki yango ntango alobaki mpo na Jéhovah: “Ngai nakosalaka makambo makosepelisa ye.”​—Yoane 8:29.

Na bongo, boninga elongo na Jéhovah, to elongo na Mwana na ye ekoki kosalama te kozanga ata lisengami moko: yango etaleli bokangami na biso na masengami oyo basili kolakisa mpo na boninga yango. (Tala Nzembo 15:1-5.) Yesu amonisaki yango polele na lisolo oyo azalaki na yango elongo na bayekoli na ye. Alobaki na bango ete: “Bozali baninga na ngai soki bosali oyo ngai nazali kosenga bino.”​—Yoane 15:14.

Kozala na boninga esengaka mpe ete oloba polele mpe na bosolo elongo na moninga na yo. Mokolo ya liwa na ye, Yesu alobaki na bantóma na ye ya sembo ete: “Nakobyanga bino lisusu baombo te, mpamba te moombo ayebi yango ekosalaka nkolo na ye te. Nde nasili kobyanga bino baninga, mpamba te nayebisi bino makambo nyonso mayoki ngai epai na Tata na ngai.” (Yoane 15:15) Na koyebisaka makanisi na ye epai na baninga na ye, Yesu alandaki ndakisa ya Tata na ye ya likoló, oyo mpo na ye Amosa 3:7 elobi ete: “Nkolo Moyangeli Jéhovah akosala likambo moko te kozanga ete ayebisa yango liboso epai na baombo na ye, basakoli.”

Wana ezali ezaleli ebongi kati na baninga, boye te? Mbala mosusu toyokaka mposa makasi te ya koyebisa makambo oyo mazali kokomela biso epai na M. Matabisi, oyo ndako na ye etalani na oyo ya biso. Mpe na solo mpenza, tokosepela te koyebisa ye makanisi na biso mpe mayoki na biso ya motema. Mpamba te, azali na ye kaka moyebani. Nzokande mpo na oyo etali baninga na biso, tozalaka motema likoló mpo na koyebisa bango makambo motindo wana!

Ezali motindo moko mpo na oyo etali boninga na biso elongo na Nzambe. Tozali na motema likoló mpo na koyebisa ye, kati na libondeli, mpe koyebisa ye bosenga na biso, bamposa na biso mpe mayoki na biso ya nse ya motema. Kasi, soki lisolo esimbami bobele na ngambo moko, boninga ekoumela te na kokatana. Tosengeli bongo kozala pene na kotika Nzambe koloba na biso. Tokosala yango soki tozali koyoka na likebi oyo azali koloba na biso kati na Liloba na ye likomami, na kokanisaka na mozindo likoló na batoli na ye mpe na nsima na kosalelaka yango malamu na kotalela makoki na biso.

Motuya nini tozali kopesa na boninga na biso elongo na Jéhovah?

Mpo na kosalisa biso na koyanola na motuna oyo, totalela likambo ya boninga moko kati na bato. Elenge moko akosepela mbala mosusu na boninga oyo ekoki komema na libala. Ya solo, ayebi ete ekozala na ye mpasi na kotya miboko ya malamu mpo na libala soki azali bobele moyebani mpamba liboso ya moto oyo akozala molongani na ye. Boyokani ya koyebana mpamba esengeli liboso kobongwana na boninga. Na nsima boninga yango ekoki kokoma makasi mpe kokola kino boyokani ya mozindo, oyo nsuka na yango ekokoma moboko malamu mpo na libala moko ya esengo.

Tokanisa moke. Milende nini ntalo monene ya bato bazali kosala mpo na boninga motindo wana? Ntango boni mpe mosolo boni bazali kobebisa mpo na kosala mpe na nsima kobatela boninga yango? Ntango boni balekisaka mpo na kokanisa likoló na yango? Na meko nini bazali kosala myango, to bazali komimonisa ete balingi kobongola yango, na mokano ya kobongisa to kobatela boyokani wana?

Na nsima tomituna: ‘Milende nini, lokola oyo wana, ngai nazali kosala mpo na kozala na boninga elongo na Mozalisi na ngai, to mpo na kobongisa yango mpe kolendisa yango? Ntango boni nalekisaka mpo na likambo yango? Na meko nini boninga elongo na Jéhovah ezali ntina ya makanisi na ngai? Kino na likambo nini nazali mpenza kosala myango, to nazali komimonisa ete nazali pene yo kobongola yango, kati na mokano ya kobongisa mpe na nsima kobatela boyokani yango?’

Bilenge baklisto basengeli mpenza koyeba ete boninga nyonso oyo bazali na yango elongo na bato, bakisa na oyo ekoki komema kino na libala, ezali na ntina moke koleka boninga oyo basengeli kozala na yango elongo na Mozalisi na bango. Yango wana Mosakoli 12:1 epesi bango toli na maloba oyo: “Kanisa Mozalisi na yo monene na mikolo na bolenge na yo.” Ebele na bilenge bazali kosala yango na kozala basali na Nzambe, oyo bazali kosalela ye polele, mpe mingi kati na bango oyo motuya ezali se komata bazali basakoli ya ntango nyonso, to ba pionniers.

Atako elimo oyo ezali kobeba mbala na mbala mpe ezangi kosepela na makambo na Nzambe ezingi bango, bilenge baklisto wana bazali na mpiko nyonso kolongisa Jéhovah ntango batumoli ye to ntango bazali koloba bifundeli ya lokuta na ntina na ye. Ezali ezaleli wana nde Jéhovah azali kozela epai na baninga na ye, boye te? Ezali yango nde biso mpe tozelaka epai na baninga na biso, boye te? Mpe yango ekosepelisa te motema na biso na komona ete baninga na biso bazali kosala yango na molende mpe na endimiseli?​—Tala Masese 27:11.

Ee, boninga elongo na Nzambe, ezala mpe lokola oyo esalami elongo na bato, ezali na mikumba oyo esengeli kokokisa soki tolingi ete boninga yango eumela. Moto oyo asepeli te kondima mikumba yango, to oyo azali pene te mpo na komipesa epai na Nzambe mpe kokokisa ndai yango, akoki solo koyeba Jéhovah. Kasi esengeli na ye lisusu koluka koyeba bisengo ya kozwa ye lokola Moninga.

[Elilingi na lokasa 25]

Abalayama atyaki motema ntango nyonso epai ya Nzambe mpe mpo na yango abengamaki moninga na Jéhovah

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto