Nzambe andimaka kobikisama ya bato na nzela na bikamwiseli?
“LƐLO tomoni makambo ya kokamwa!” Ee, batali bakamwaki mpenza. Mobali moko oyo azalaki na búkabúka makasi abikisamaki na miso na bango. Moto oyo abikisaki ye alobaki na ye ete: “Telema, kamata kitikwala na yo mpe kenda na ndako na yo.” Mpe ezali yango nde asalaki! Makolo na ye mabongaki. Na bongo tomoni sikawa mpo na nini baoyo bazalaki na esika yango ‘babandaki kokumisa Nzambe!’ (Luka 5:18-26) Ntembe ata moke ezali te ete kobikisama wana, oyo esalamaki na Yesu Klisto ekoki sikawa pene na mibu 2 000, endimamaki na Nzambe.
Ezali boni mpo na ntango na biso? Baoyo minganga balongi te na kobikisa bango bakoki mpe lelo kokanisa na likoki ya kobikisama na nzela na ekwamiseli? Yesu abikisaki bato na nzela na bikamwiseli. Babikisi ya mikolo na biso bakolobaka ete bazali komekola ye. Lolenge nini tosengeli kotalela maloba na bango?
Kobikisa bato na nzela na bikamwiseli ezali kolimbolama lokola “mwango moko ya kosalisa maladi na nzela na libondeli mpe ya kozala na kondima epai na Nzambe.” Tala oyo Encyclopédie britannique ekomi: “Lisolo ya bobikisi bato na nzela na bikamwiseli kati na boklisto ebandaki na misala ya kokamwa na Yesu mpe ya bantóma.” Yesu asalaki mpenza bikamwiseli ya kokamwa. Babikisi, lelo, bazali kosala bikamwiseli lokola ye?
Kondima: ezali mpenza lisengami?
Engebene Dictionnaire biblique de Black (angl.), Yesu “ayebisaki sikisiki ete [kondima] ezalaki lisengami ya liboso kati na kobikisa na ye na nzela na bikamwiseli.” Ezalaki mpenza solo? Eyano ezali ete te. Ezali ye oyo azali kobikisa bato nde asengeli kozala na kondima, kasi mpenzampenza moto na maladi te. Mokolo moko, bayekoli na Yesu balongaki te kobikisa elenge mobali moko oyo azalaki na monsinga. Yesu abikisaki ye, nsima na yango alimbolaki bayekoli na ye mpo na nini balongaki te kosala yango. “Alobi na bango: ‘Mpo na kondima moke na bino.’”—Matai 17:14-20.
Matai 8:16, 17 elobi ete Yesu ‘abikisaki bato nyonso oyo bazalaki na maladi.’ Ezali solo ete soki bato yango bayaki epai na Yesu, ezali mpo ete bazalaki na mwa kondima epai na ye. (Matai 8:13; 9:22, 29) Kati na makambo mingi, bakokaki koya epai na ye mpe kosenga ye ete abikisa bango liboso ete asala yango. Nzokande, bazalaki ata na mposa moke te ya koyambola naino kondima na bango mpo ete ekamwiseli esalema. Mokolo moko, Yesu abikisaki motɛngumi moko oyo nkutu ayebaki te soki Yesu azalaki nani. (Yoane 5:5-9, 13) Butu oyo bakangaki ye, azongisaki litoi ya moombo na nganga-kapita oyo ekatamaki, nzokande moto wana azalaki kati na banguna na ye oyo bayaki kokanga ye. (Luka 22:50, 51) Mpe na bantango mosusu, asekwisaki mpe ata bakufi!—Luka 8:54, 55; Yoane 11:43, 44.
Ndenge nini Yesu akokaki kokokisa bikamwiseli motindo wana? Ezali mpo ete azalaki kotya motema na elimo santu, to nguya na Nzambe, oyo ekosalaka mosala. Ezali elimo wana nde ezalaki kosala bikamwiseli, kasi kondima ya bato na maladi te. Soki otangi masolo mazwami kati na ba Evanzile, okomona mpe ete kobikisama oyo Yesu azalaki kosala ezalaki na milulu te. Azalaki kosala mpo na komimonisa na bato te to koluka kosimba mayoki ya bato te. Lisusu, Yesu abikisaki maladi nyonso, ezala ata ya lolenge nini. Alongaki ntango nyonso mpe ata mbala moko te asɛngaki mosolo.—Matai 15:30, 31.
Kobikisama na ntango na biso ekokani na oyo ya Yesu?
Maladi ezali eloko moko ya mpasi mingi, mpe ntango ezwi biso, tolukaka mpenzampenza libiki. Kasi tokosala boni soki tozali kofanda kati na esika moko oyo “bato, mingi mpenza baoyo bazali na bobola, batalelami na minganga lokola biloko kasi lokola bato te?” Monganga moko amonaki likambo yango kati na mboka moko ya Amerike latine. Kasi tokosala boni, soki tozali kofanda na esika moko oyo, lokola yango ezali mpo na mboka wana, ‘bobele 40 % ya minganga nde bayebi mosala na bango malamu?’
Ezali likambo na kokamwa te ete ebele na bato na maladi, bazali komona lolenge mosusu ya kosala te, bazali kokanisa ete eleki malamu komeka komisalisa na nzela na ekamwiseli. Nzokande, kobikisama oyo babikisi bazali komeka kosala ezali kobimisa ntembe mingi. Na ndakisa, bato 70 000, lokola yango emonanaki, bayanganaki na likita moko na São Paulo, na Brésil, na boumeli na yango babikisi mibale ‘banyataki ebele na maneti oyo bayangani babwakaki, kolakaka epai na bankolo na yango oyo bandimeli ete bakobanda komona malamu sikawa.’ Moko na babikisi andimaki na kolongobana nyonso, na ntango na kotunama mituna ete: “Nakoki te koloba ete babeli nyonso oyo tozali kosambela mpo na bango bakobika. Yango etali kondima na bango. Soki moto moko andimi, akobika.” Alobaki ete soki moto moko abiki te, ezali mpo ete azangi kondima. Nzokande, tokanisa lisusu, lokola tomonaki yango na ebandeli, ete ntango moto ya maladi alongi kobikisama te ezali epai na baoyo bazalaki kosala bikamwiseli nde Yesu apamelaki ete bazangi kondima!—Malako 9:37-42.
Mobikisi mosusu alakaki ete akosilisa maladi ya kansere mpe búkabúka. Lolenge nini yango elekaki? Engebene zulunalo Veja, “elaka ekokanaki te.” Tala lolenge moto yango amitambwisaki: Na boumeli pene na ngonga mibale [mobikisi] asalelaki bayoki milulu na masolo, na mabondeli, na maloba makasi, na banzembo—mpe abetaki ata makofi, kati na mokano ya kobimisa bilimu mabe oyo bazali kofanda kati na nzoto ya bandimi. Na nsuka, abwakaki cravate na ye mpe mouchoir na ye epai na bayangani oyo bazali kotutuka mpe alekisaki sãni moko mpo na kokongolo ‘makabo ya bolingo malamu.’” Yesu mpe bantóma na ye ata mbala moko te basengaki mosolo mpo na kobikisama ya bikamwiseli, mpe ata mbala moko te basalaki milulu motindo wana.
Ezali bongo polele ete babikisi ya ntango na biso bazali kosala te oyo Yesu azalaki kosala. Mpe ezali mpasi na kokanisa ete Nzambe azali kondima makambo oyo bango bazali kosala. Kasi akondimaka kobikisama mosusu na nzela ya bikamwiseli oyo bizali kosalema lelo? Na koleka, kondima na biso ekoki kosalisa biso na lolenge moko to mosusu ntango biso moko to bandeko na biso tozali kozwa maladi?