Mosala ya kosakola kati na moko na mabóngo minene ya mokili, ezali lokola ntembe
ROTTERDAM ezali moko na mabóngo minene ya mokili, mpo ete ezali na esika Rhin, ebale ya Mpótó ezali komibwaka na mai monene, epai masuwa mazali kotambola mingi. Lokola ezali na esika mai monene ya Nord ekɔti mpe lokola ezali soko na banzela 500 oyo masuwa etambolaka, Rotterdam ezali na boyokani elongo na mabóngo koleka 800 kati na mokili. Ezali mpenza libóngo ya mokili mobimba.
Nzokande, libóngo wana ya mboka Hollande oyo eumeli mibu 650, ezali te bobele esika oyo masuwa mazali kokutana. Ezali lisusu esika oyo bato bazali kokutana. Butu na moi, basali na masuwa mingi bazali kouta na masuwa na bipai nyonso ya mokili. Babendaki likebi ya ba Témoins de Jéhovah ya mikili ya Pays-Bas. Lokola na bipai mosusu, Batemwe wana bazali koluka nzela ya kosakwela bato ya lolenge nyonso, kati na bango mpe basali na masuwa, nsango oyo eleki malamu, ete: mosika te, Bokonzi na Nzambe ekobongola mabelé Paradis.-Danyele 2:44; Luka 23:43; 1 Timoté 4:10.
“Mosala ya misionere na lisólóngó”
Esili koleka mwa bambula, na mikili ya Pays-Bas, Société Watch Tower asɛngaki na basakoli motoba ya ntango nyonso, to ba pionniers, ete basala mosala na bango masuwa na masuwa kati na libongo ya Rotterdam. Ba pionniers basepelaki na libaku yango. Nsima na koyeba masɛngami epai na bakonzi ya libóngo mpe nsima na kosala mwa bolukiluki na libóngo, bandimisamaki noki ete esika batindi bango ezalaki na mikakatano.
Meinard, oyo azali kobongisa mosala ya kosakola na libóngo, alobi ete: “Ezali lokola nde tozalaki na mosala ya misionere na lisólóngó.” Alingi koloba nini? “Na momesano, misionere atambolaka ntaká milai mpo na kokutana na bato, kasi mpo na biso, ezali bato nde bazali kosala ntaká milai mpo na koya epai na biso.” Mpe abakisi ete: “Teritware na biso ekoki mbala mosusu kozala oyob esangisi bato ya bikólo nyonso.” Annuaire 1985 ya Rotterdam Europoort eyebisi ete na 1983, mbula oyo ba pionniers babandaki mosala wana ya ntina mingi, libóngo ya Rotterdam lizalaki na masuwa 30 820 oyo mazalaki kouta na mikili 71. Tala likambo oyo limonisi mpenza ete ezali libóngo ya mokili mobimba!
Na lolenge lobongi mpenza, “bamisionere ya libóngo,” lolenge oyo basali na masuwa bazalaki kobénga ba pionniers, bazali mpe komonisa likambo oyo ya bikólo nyonso. Geert, Peter mpe mwasi na ye Karin, bazali bato ya mboka Néderlande; Daniël mpe Meinard bazali bato ya mboka Indonésie; mpe Solomon azali moto ya Ethiopie. Bikólo oyo bantina Mpótó, na Azia mpe Afrika esalisaki mpo na kolónga mikakatano mwambi mitali minoko; kasi mpo na kolónga yango, esengelaki na bango ete balónga mikakatano misusu.
“Lingomba oyo batambolaka na vélo”
Peter, oyo azali na mibu 32 mpe mosali na kala ya masuwa, alimboli ete: “Nzela epesamaki te mpo na kotambola bobele bongobongo na libóngo, mpe kokatisa bitandá mpe komata na masuwa. Esengelaki kozala na ba laissez-passer mpe bandingisa.” Yango ezali bongo bandingisa ya kotambola na libóngo mpe ya komata na masuwa. Peter amikundoli ete: “Yango esɛngaki mikanda mingi, kasi nsima na kozwa mikanda mwambe ya ndingisa, oyo ezalaki na fɔtɔ́ mpe bakonzi batyaki mabɔkɔ, tomilɛngɛlaki mpo na kopesa makasi na biso nyonso na mosala wana.” Bakabolaki bakilometele 37 na molai ya libóngo na biteni misato, eteni moko na moko esalelamaki na ba pionniers mibale.
Bongo, lolenge nini tokobanda kosolola na basali na masuwa oyo bauti mikili mikeseni mpe bazali koloba minoko mingi? Ba pionniers basalaki stock moko ya mikanda mikolimbolaka Biblia na minoko 30 mpe bazalaki komema ntalo oyo ekokaki na bango mpo na kokumba na bavélo; kasi emonani ete bazalaki na yango mingi te. Solomon, oyo azali na mibu 30, alobi na komemota, ete: “Toyebaki mpenza te monoko oyo bato bazalaki na yango mposa. Mbala mosusu, basali na masuwa balingaka mikanda na monoko mosusu, nzokande biso tozali na yango na monoko wana te; mpe bazali koloba na biso ete etikali bobele ngonga misato mpo ete masuwa na bango ekokenda.” Mpo na kokokisa mposa na bango, pionnier moko akokendaka nokinoki kozwa mikanda miye basɛngi, mpe akozonga na lombangu mpenza mpe akopesa yango epai na basali na masuwa oyo bazalaki kozela yango na motema likoló. Peter alobi ete: “Ntango likambo motindo wana lisalemaki lisusu wana ezalaki biso kosakola na esika moko ya libóngo oyo esengelaki kosala ngonga misato na vélo, emonisaki ete tosengelaki kosala lolenge mosusu.”
Mokolo moko, kozanga kolaka bango, ba Témoins de Jéhovah oyo bafandi na kartye ya libóngo, bamemelaki ba pionniers ba remorques ebendami na vélo oyo ekokani na baingoir moke. Ba pionniers batondisaki yango na mikanda na minoko nyonso mizalaki wana, bakangisaki yango na bavélo na bango mpe bakendaki na libóngo. Ba remorques wana emonanaki kitoko mpenza. Moko na ba pionniers alobaki ete: “Yango ekomaki ba cartes de visites na biso. Ntango sinzílí amoni biso wana ezali biso koya, akofungola nzela, mpe akoloba na biso ete toleka mpe akongánga ete: ‘Tala lingomba oyo batambolaka na vélo.’” Na bantango mosusu, wana sinzílí amoni “lingomba oyo batambolaka na vélo” koya epai na ye, akofungola nzela mpe akoloba na biso ete: “Bapoloné mibale mpe Chinois moko!” Makambo wana ya ntina mazali kopesa nzela na ba pionniers ete bamata na masuwa elongo na mikanda oyo ezali na minoko misengeli. Kasi basengeli mpe kokenda na ntango malamu. Mpo na nini?
Bavizite na ntango malamu mpo na nsango eyei na ntango na yango
Ba pionniers bakoki kosola na basali na masuwa bobele na bopemi wana ezali bango komela kafé ya ntɔngɔ mpe na nsima ya midi to na ntango bazali kolya. Nzokande, molambi azalaki na bangonga ya mosala ekeseni mpe likoki ezalaki ya kokutana na kapitɛni ya masuwa mpe bakonzi mosusu ya masuwa na mokolo mobimba. Lisusu, ba pionniers bayebaki ete masuwa ya ba Anglais oyo eyaka na Rotterdam ebatelaka bobele ngonga ya ba Anglais (ekeseni na ntango ya Pays-Bas na boumeli ya ngonga moko), na boye ete basali na masuwa na bango bakendaka na esika na bango ya kolya wana basali ya masuwa misusu bazongeli mosala. Na yango, esengeli na pionnier oyo azali kosakola na libóngo, ete azala na montre moko ya malamu.
Kasi basali na masuwa bazali nde kosepela mpo na kosolola na ntina na Biblia na ntango na bango ya bopemi? Geert, oyo azali na mibu 31, alobi ete: “Na kotalela bango nyonso, namoni ete bazali kosepela na nsango ya Bokonzi. Ezali mbala mosusu mpo ete bango bazali bato oyo bayebi malamu ete biyangeli ya bato bikolonga te.” Na ndakisa, basali ya masuwa bayebisaki Geert ete, ebele loso mpe masango oyo balubolaki mpo na bato ya Ethiopie, baoyo bazali na nzala, ezalaki wana bansanza mingi na nsima kino tozongaki, kasi esilaki kopɔla mpe elyamaki na bampoko. Geert ayebisi ete: “Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete basali mingi na masuwa bazali kotya elikya na bango na politike te. Yango wana, elaká ya Biblia na ntina na boyangeli bobele moko mpo na bato nyonso ezali kobenda bango.”
Peter andimi mpe likanisi yango. Moalemá moko oyo azalaki kapitɛni ya masuwa, alobaki na ngai ete: “Mbula zomi na liboso, basali na masuwa na ye balingaki kobengana ngai na masuwa, kasi mbongwana ya makambo ya mokili elamwisaki mposa na bango mpo na nsango eyei na ntango na yango, ezwami kati na Biblia.” Molambi moko na masuwa ya mboka Corée ayebisaki ete, na etumba ya Iran-Irak, roquette ekwelaki masuwa moko monene oyo makomemaka pétrole, mpe yango ezikaki na Golfe Persique. Akataki ndai ete soki akufi te, akobanda koluka Nzambe. Abikaki. Ntango ba pionniers bakutanaki na ye na nsima, na Rotterdam, andimaki ete bamemela ye mikanda nyonso oyo ezalaki na monoko ya mboka Corée.
Masuwa mingi elekisaka mikolo mingi na libóngo. Yango epesaka nzela na ba pionniers ete bazonga mbala mibale, misato to mpe koleka mpo na kolanda masoló ya Biblia nsima na bangonga ya mosala. Kasi masuwa oyo mazwi mbébá ekoki koumela poso misato. Pionnier moko alobi na lisɛki ete: “Ezalaki libaku mabe mpo na kompanyi, kasi ezalaki malamu mpo na biso.” Longola masoló ya Biblia bazali kosala, ba pionniers bazali lisusu komibongisa mpo na kolakisa ba diapositives oyo esalemaki na la Société na moto na likambo ete: “Biblia: mokanda mpo na libota ya ntango na biso.” Basali na masuwa bayaka mpe na makita ya ba Témoins de Jéhovah oyo esalamaka na Rotterdam na bituluku mingi ya minoko ya bapaya. Yango esalamaka na boumeli ya eleko bazali kobongisa masuwa. Na nsima esengeli kokanga ba Biblia. Nsinga efungolamaki mpe masuwa makotika libóngo—kasi babosanaki ba pionniers te.
Masoló ya kolendisa ya basali na masuwa
Na lisalisi ya ba listes oyo bakonzi ya libóngo babimisaka na bazulunalo mpe na ebongiseli ya informatique mpo na kopesa na moto nyonso, ba pionniers oyo bazali kosakola na libongo bakoki koyeba kokenda mpe kozonga ya masuwa epai basakolaki. Ntango moko na yango ezongi, ba pionniers bazalaka na motema likoló mpo na kozongela basali na masuwa ete bayeba makambo nini malekaki uta bakabwanaki. Basali na masuwa bazalaki mpenza na masoló ya kolendisa.
Nsima wana masuwa na ye etikaki libongo, mosali moko ya masuwa akabolaki baekzamplere mingi mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis epai na baninga mitano bazalaki na ye na masuwa, mpe bango nyonso motoba bayekolaki Biblia elongo. Atyaki mpe mokapo oyo molobeli bomoi ya libota kati na kasete mpe abɛtaki kasete yango na esika basali na masuwa basololaka ete bango nyonso bayoka yango. Na masuwa mosusu, mosali moko ya masuwa oyo akendaki na Salle du Royaume moko na Anvers, libóngo mosusu lizali penepene na Rotterdam akakisaki etánda oyo ezalaki na likomi minene ete “Salle du Royaume des Témoins de Jéhovah,” likoló na efelo ya esika oyo basololaki. Na nsima abyangaki basali na masuwa ete bayangana na likita ya Biblia oyo asengelaki kokamba. Liboso na kokitisa etánda wana, abyangaki basali na masuwa ete bayangana na likita oyo likosalema na mbala ekoya. Poso oyo elandaki, etánda mpe basali na masuwa bakutanaki lisusu.
Ba pionniers bayaki koyeba lisusu ete basali mosusu ya masuwa bazalaki kotya mikanda na bango esika moko te. Meinard ayebisi ete: “Ekɔtaki biso na cabine ya Isaac, chef radio, ye moto ya Afrique de l’Ouest, azwaki esika ya kofanda te. Bazulunalo, mikanda mpe ba concordances ya la Société ezalaki bipai nyonso—mpe nyonso efungwamaki.” Isaac abongisaki lisusu liste ya mituna na wana ezalaki ye kozela ntango oyo ba pionniers bakozonga lisusu.
Nzokande, basali mosusu na masuwa bazelaki te bobele ete ba pionniers bazongela bango. Na butu moko, telefone ya Geert ebɛtaki wana ezalaki ye kolala.
Geert alobaki ete: “Ekoki kozala nani?” wana ezalaki ye koluka esika telefone ezali.
Mongóngo moko elobi na esengo ete: “Mbote! Ezali moninga na yo.”
Geert azalaki koyeba te soki ezali nani.
Mongóngo molandaki koloba ete: “Moninga na yo ya masuwa.”
Geert alobi na kokamwa ete: “Kasi ezali naino ngonga ya misato ya ntɔngɔ!”
“Ee, kasi eyebisaki ngai ete nabyanga yo wana masuwa na ngai ekozonga na Rotterdam. Na yango, nasili kokoma!” Nsima na mwa ntango moke, Geert akendaki kokutana na moninga oyo azalaki kosepela na Liloba na Nzambe.
“Bwaka limpa na yo”
Basali na masuwa balingi mikanda mikolimbolaka Biblia; likambo yango limonani na mikanda oyo bazalaki kotindela ba pionniers. Tala mwa maloba ya mikanda yango:
‘Nasili kobanda kotanga mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis . . . Sikawa, nayebi makambo mingi koleka oyo nayebaki liboso. Nazali kolikya ete masuwa na biso ekoya lisusu na Rotterdam.’—Angelo.
‘Natangaki mokanda mpe natindeli yo mituna ete ozongisela ngai biyano na nzela mikanda.’—Alberta.
‘Sikawa, nazali kotanga Biblia mikolo nyonso. Nazali na esengo ya kozala moninga na yo. Nasili kozwa baninga baleki malamu, baoyo bazali kolakisa ngai koyeba Nzambe.’—Nickey.
Motindo na mikanda oyo mizali kosepela motema, ezali kokundwela ba pionniers, oyo Biblia elobi na Mosakoli 11:1, ete: “Bwaka limpa na yo likoló na mai mpo ete okozwa yango lisusu nsima na mikolo mingi.” Bazali kosepela mingi wana bazali koyoka ete basali na masuwa basili kozwa etɛlɛmɛlo mpo na Jéhovah.
Na ndakisa, Stanislav, moto ya mboka Pologne, asepelaki mingi na oyo azalaki koyekola kati na mikanda ya la Société. Amisalelaki nokinoki biblioteke moke ya mikanda mikolimbolaka Biblia, oyo ayekolaki yango mokomoko na mai monene. Meinard alobi ete: “Ntango toyokaki lisusu nsango na ye na mokanda oyo akomelaki biso ete, asilá kozwa batisimo.”
Ezali na Rotterdam nde Folkert, kapitɛni ya masuwa, ayokaki nsango ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso. Nsima na kosala mobémbo ya sanza mibale, azalaki kozonga lisusu na libóngo mpe azalaki kolekisa wana poso mobimba; azalaki bongo koyekola Biblia na boumeli ya mikolo nsambo. Mpe, liboso ya kosala mobembo mosusu oyo ezalaki koumela sanza mibale, ba pionniers bazalaki kopesa ye liste ya bisika oyo ba Salles du Royaume ezalaki na bipai azalaki kosala mobémbo. Na bisika oyo masuwa mazalaki kotɛlɛma, Folkert azalaki kokende na ba Salles du Royaume mpe akamwaki mingi na lolenge bazalaki koyamba ye. Nsima ya mwa ntango moke, kapitɛni wana azwaki batisimo, mpe sikawa azali kosalela Jéhovah na molende.
Mike, mokonzi na basodá oyo bakotambolaka na masuwa ya mboka Grande-Bretagne, asilaki kokutana na ba Témoins de Jéhovah mpe ayekolaki Biblia na mai monene. Mokolo moko, wana masuwa oyo ye azalaki kosala ekomaki na Rotterdam, amataki na velo na ye mpo na kokenda na Salle du Royaume. Bolingo mpe bomoko oyo amonaki ete ezalaki na bopusi makasi likoló na ye mpe ayebisaki bandeko ete azwaki ekateli ya kotika mosala na ye. Etikalaki mpo na ye bobele mbula minei mpo na kozwa pension na ye ya malamu, kasi ekateli na ye ezalaki makasi; na nsima, ayaki kozwa batisimo.
Meinard alobi ete: “Molende ya Mike, ya Stanislav, ya Folkert mpe basusu mpo na kosalela Jéhovah, ezali kotinda biso na kolanda kosakola na libóngo na kolukáká basali mosusu na masuwa lokola bango.”
Okoki kosangana na mosala yango?
Kokanisáká na mbula soko zomi ya mosala ya kosakola oyo basalaki na moko na mabongo minene ya mokili, “bamisionere ya libongo” nyonso motoba bazali na likanisi bobele moko: mosala oyo mozali ntembe, nde mokopesaka bolamu. Mpo na kosukisa, Meinard alobi ete: “Na nsuka ya mokolo moko na moko na mosala ya kosakola wana ezalaki biso komata bavélo mpo na kozonga epai na biso, tozalaki na mayoki ete basali mosusu na masuwa bazalaki kozela ete tokende kotala bango.”
Ekoki mpe kozala ete basali na masuwa bazali kozela ete batela bango na libóngo oyo ezali pene na esika na bino? Bankulutu ya lisanga na biso bakoki mbala mosusu kozwa bibongiseli mpo ete basanga na mosala oyo mozali ntembe, nde mokopesaka bolamu.
[Etanda na lokasa 20]
MWANGO YA KOKOMA NA MIKILI EPAI MOSALA NA BISO MOPEKISAMI
Na boumeli na moko ya bambula euti koleka, masuwa koleka 2 500 eutaki na mikili epai mosala na biso epekisami, esɛmaki na Rotterdam. Mpe ba pionniers oyo bozali kosakola na libóngo bamonaki ete yango ezalaki libaku ya koyokisa nsango ya Biblia epai na bafandi ya mikili wana.
Na moko na masuwa ya liboso oyo eutaki na Azia, ba pionniers bakabolaki mikanda 23 oyo bozalaki na yango, kotikáká bato mosusu na mposa mpo ete bazwaki mikanda yango te. Mosungi na molambi na masuwa mosusu mautaki na Azia, amimonisaki moto na mayele. Nsima na kondima mokanda oyo pionnier moko alakisaki ye, alingaki yango na papier mpe azongisaki yango epai na pionnier, mpe akomelaki ye mwa maloba likoló na yango. Pionnier akangaki ntina ya maloba yango. Ezalaki likámá mpo na ye ete amema mokanda yango. Bobele mokolo wana akendaki na masuwa na Exrême-Orient.
Na masuwa oyo eutaki na Afrika, mosali moko ya masuwa ayaki na ba listes ya mikanda oyo batemwe ya mboka na ye basɛngaki. Uta ntango wana, mbala nyonso oyo mosali wana na masuwa azalaki kozonga na mboka na ye, valisi na ye etondaki na mikanda. Mosali moko ya masuwa, ye moto ya mboka mosusu ya Afrika, aokaki mpenza mawa lokola pionnier oyo azalaki koyekola Biblia elongo na ye, apesaki ye bobele baekzamplere misato ya mokanda Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya libota ya esengo. Agangaki na kotomboláká likoló ete: “Kasi oyo ekoki te! Bandeko kuna bazali na mposa ya 1 000!” Mpo na kobatela bomoi na ye, ba pionniers bandimisaki ye na komema bobele mikanda 20 mbala moko.
Likambo ya basepeli mingi ezalaki mbala mosusu oyo ba pionniers bayokaki ete masuwa moko eutaki na mboka moko epai Batemwe bazali konyokwama na ntina na bindimeli na bango, mpe ete mingi balongolamaki na misala mpe babungisaki biloko na bango. Ntango bayebaki ete mosali moko na masuwa azalaki Témoin de Jéhovah, bakendaki kokutana na kapitɛni ya masuwa mpo kosɛnga ndingisa epai na ye ete batinda biloko na masuwa na ye mpo na kosunga bandeko. Andimaki mpe, na nsima mwa mikolo, saki monkámá ya bilamba, sapato mpe biloko mosusu etindamaki na mboka yango mpo na kopesa yango na Batemwe.
[Etanda na lokasa 21]
MOSALA YA KOSAKOLA MASUWA NA MASUWA: LIKANISI YA MWASI MOKO
Karin, mwasi bobele moko oyo azalaki kati na ba pionniers wana, azali komikundola ete: “Na ebandeli nazalaki kobanga kokenda elongo na Peter, mpamba te nayokaki ete basali na masuwa bazalaka matáta mpo balangwi na masanga. Kasi namonaki ete mingi bazalaki bato na bonkonde. Mbala mingi, wana mosali moko ya masuwa ayebaki ete tozali babalani, ye mpe azalaki kobimisa fɔtɔ́ ya mwasi na ye mpe ya bana na ye, mpe azalaki kolobela biso makambo ya libota na ye. Na motindo yango, tokikaki baekzamplere mingi ya mokanda Ndenge nini akoki kozala na bomoi na libala ya esengo.”
Na ntango mobali moko na mwasi na ye bazali kosakola na masuwa, ezali lisusu pɛtɛɛ na kosolola na basi ya basali na masuwa mpe basi mosusu oyo basalaka lokola ba infirmières. Karin alobi ete: “Na momeseno, basololaka elongo na bapaya te, kasi soki bamoni ngai bazali kosepela minei na kosangana na lisoló.”
Mokakatano nini monene oyo azalaki na yango na mosala na ye? Karin ayanoli ete: “Ezali bibuteli na nsinga. Nazali mpenza kosepela na bilaka wana te mpo ete etɛlɛmaka esika moko te”. Alongolaki kobanga na ye wana? Karin alobaki ete: “Ee. Mokolo moko, wana ezalaki ngai kokakatana mpo na komata na moko na bibuteli yango, basali na masuwa ya mboka Paraguay batelemaki mpo na kotala ngai mpe bagangaki ete: ‘Okokóma. Tya motema epai na Nzambe.’” Karin alobi na kosɔkáká ete: “Ya solo, nsima na koyoka motindo na likanisi wana, nasengelaki bobele komata.” Mpe mobali na ye abakisi na esengo nyonso ete: “Nsima na mibu minei mpe na bibuteli mingi ya nsinga, azali sikawa komata lokola mosali moko na masuwa.”
Karin mpe mobali na ye, Peter, bakotaki na kelasi ya 89 na Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, na Etats-Unis. Na 28 septembre 1990, bakendaki na mokili ya Equateur, epai bauti kotindama, na mokili oyo mazali na libóngo. Basepelaki mingi mpenza.
[Etanda na lokasa 22]
OZALI MOSALI NA MASUWA?
Okolinga koyangana na likita ya ba Témoins de Jéhovah oyo ekosalema na monoko ya Lingelesi, wana masuwa na bino makangisami na moko na mabóngo minene ya mokili? Soki ondimi, batela nkombo ya bisika mpe ngonga oyo makita esalemaka na bamoko ba Salles du Royaume:
Hamburg, Schellingstr. 7-9; samedi, 16 heures; téléphone: 040-4208413
Hong-Kong, 26 Leighton Road; dimanche, 9 heures; téléphone: 5774159
Le Havre, 65 rue de Trouville; dimanche, 14 heures 30; téléphone: 35 44 54 27
Marseille, 5 Bis, rue Antoine Maille; dimanche, 10 heures; téléphone: 91-79-27-89
Naples, Castel Volturno (à 40 kilomètres ou nord de Naples), Via Napoli, au coin de la Via Salerno, Parco Campania; dimanche, 14 heures 45; téléphone: 081/5097292
New York, 167 W. 107 Street; dimanche, 16 heures; téléphone: 212-662-8143
Rotterdam, Putsestraat 20; dimanche, 10 heures; téléphone: 010-41 65 653
Tokyo, 5-5-8 Mita, Minato-ku; dimanche, 16 heures; téléphone: 03-3453-0404
Vancouver, 1526 Robson Street; dimanche, 10 heures; téléphone: 604-689-9796