Nzela na Jéhovah ezali lolenge na bomoi loleki malamu
LISOLÓ YA ERKKI KANKAANPÄÄ
UTA bomwana na ngai, mokano na ngai ezalaki ete nasala na filiale, oyo ebéngami lisusu ete Béthel, ya ba Témoins de Jéhovah na mboka Finlande. Bongo, na eleko ya molungé mingi na mobu 1941, ntango mokɛngɛli moko ya zongazonga atunaki ngai ete: “Mikano na yo ezali nini?” Nayanolaki ete: “Nazalaka ntango nyonso na mposa ete nasala na Béthel.”
Mokɛngɛli alobaki ete: “Ekozala malamu olongola makanisi wana, mpo ete okoki kobyangama na Béthel te.” Yango elɛmbisaki mpenza ngai liboso, nde na nsima nazwaki ekateli ya kotika likambo yango na mabɔkɔ ya Jéhovah. Mwa basanza na nsima, nazwaki libyangi ya kokende kosala na Béthel.
Nazalaki elenge mobali oyo alobaka mingi te; nazalaki na mibu 17 mpe nakolaki mingi na mboka. Ezalaki mokolo ya malili makasi ya novembre 1941 nde nakotaki na bureau ya filiale ya engumba ya Helsinki. Nokinoki ndeko Kaarlo Harteva, mokɛngɛli ya filiale, ayaki koyamba ngai. Na eleko wana, filiale ezalaki kotalela mosala ya Batemwe 1 135 na mboka Finlande.
Libula ya boklisto
Na 1914, tata na ngai asombaki mokanda Le divin plan des âges, oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower. Kasi, lokola Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki mwa ntango moke nsima ya kosomba mokanda yango, azwaki ntango te ya kotanga yango.
Etumba oyo esalemaki na mboka Finlande mpo na lipandá, ebimisaki mikakatano mingi. Bituluku mibale ya nguya bisalemaki, moko ba Blancs, mosusu ba Rouges. Ba Blancs bazalaki ba capitalistes mpe bato ya mwa bozwi. Nzokande ba Rouges bazalaki basali. Tata na ngai amekaki koboya kosangana na bituluku wana mibale na kotangwáká na bango. Atako bongo, atalelamaki lokola moto mabe na bituluku yango mibale.
Na nsuka, tata na ngai azwaki etumbu ya liwa mbala mibale, ya liboso epai na ba Blancs mpe ya mibale epai na ba Rouges. Lokola mokolo mosusu, mobali moko abomamaki nde mobomi ayebanaki te, bilenge zomi kati na bango tata na ngai mpe azalaki, bapesamaki etumbu ya liwa. Moko na balakisi ya tata na ngai oyo azalaki kati un basambisi, asɛngaki ete batika tata na ngai mpe yango endimamaki. Bilenge mosusu libwa babomamaki.
Na mbala mosusu, tata na ngai abikaki lisusu na etumbu mosusu ya liwa. Nsima na yango azwaki ekateli ya komibomba na nsé ya mabelé! Ye mpe ndeko na ye basalaki efandelo na nsé ya mabelé epai kuna bafandaki kino nsuka ya etumba. Ndeko na bango ya moke ya mobali azalaki komemela bango bilei mpe mai mpo ete bakoka kobika.
Na 1918, nsima na etumba, tata na ngai abalaki mpe atongaki ndako penepene na efandelo wana ya nsé na mabelé. Na nsima, namesanaki mingi na esika yango, mpamba te ekómaki esika oyo nazalaki kosakana. Tata na ngai ayebisaki ngai ete azalaki kobondela mingi wana ezalaki ye kobombama na nsé na mabelé. Alakaki na Nzambe ete akosalela ye soki ayekoli lolenge ya kosala yango.
Wana elingaki ye kosala mobembo mpo na makambo ya mombongo mwa ntango moke nsima ya libala na ye, tata na ngai azwaki ekateli ya komema mwa mikanda mpo na kosalaka botangi na nzela. Na eteni ya ndako oyo bazalaki kobomba biloko, tata akutaki mokanda Le divin plan des âges oyo asombáká bambula mingi liboso. Afungolaki yango na mokapo oyo ete “Mokolo na Jéhovah” mpe atangaki yango. Azalaki koloba mbala mingi ete: ‘Oyo ezali solo, oyo ezali solo.’ Wana ekitaki ye longwa na eteni yango ya ndako, alobaki na mama na ngai ete: “Namoni lingomba ya solo.”
Eumelaki te, tata na ngai abandaki kosakola makambo oyo ye azalaki koyekola, liboso epai na bandeko na ye mpe baninga ya zingazinga na ye. Na nsima abandaki kosala badiskur liboso na bato mingi. Mosika te, bato mosusu ya etuká wana basanganaki elongo na ye. Nsima na bokutani elongo na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo ba Témoins de Jéhovah bazalaki kobéngama liboso, azwaki batisimo; ezalaki na 1923. Ntango tobotamaki—tozalaki bana minei—tata na ngai azalaki na bopotu te mpo na koteya biso. Na likambo yango, ntango lisangá moko eutaki kosalema, tosengelaki koyangana na makita nyonso.
Makambo ya liboso oyo nakobosana yango te
Likambo ya liboso oyo nakobosana yango te, ezali assemblée oyo esalemaki na lisangá na biso na 1929, wana nazalaki bobele na mibu mitano. Bato mingi bautaki na masangá ya zingazinga mpe momonisi moko ya filiale azalaki wana. Na eleko wana, mingi mpenza na mboka Finlande, ezalaki na momeseno ya kopambola bana mike na ba assemblées. Na bongo, ndeko wana ya Bethel apambolaki bana mike lokola Yesu asalaki yango na boumeli ya mosala na ye. Nabosanaka likambo yango ata moke te.—Malako 10:16.
Kobyangama na nkombo ya Témoins de Jéhovah na 1931 ezali likambo mosusu ya eleko wana oyo nakobosana te. Koyebáká bonene ya likambo yango, liboso ya lisangá mobimba, tata na ngai atangaki mokanda oyo moyebisaki nsango na ntina etali nkombo na biso ya sika.
Nazali komikundola lisusu ete, nazalaki kobima na mosala ya kosakola elongo na tata na ngai. Na ebandeli nazalaki bobele koyoka ye, nde na nsima nakómaki kosakola ngai moko. Na 1935, na vizite ya mokɛngɛli ya zongazonga moko, nakendaki kobénga bato bazali zingazinga na biso ete bayangana na likita. Nazalaki mpe kolakisa bango ba brochures, mpe basusu kati na bango bazwaki yango.
Eteyelo mpe likatami moko ya ntina mingi
Kati na bana oyo bazalaki kotanga na eteyelo, ezalaki bobele biso minei nde tozalaki na baboti oyo bazalaki ba Témoins, mpe mbala mingi bazalaki kosɛka biso mpo ete toboyaki kolanda etamboli ya bana mosusu oyo ezalaki ya boklisto te.
Atako baninga ya kelasi bamekaki kobénga ngai ete namɛla makaya, kasi nasalaki yango te. Mpo na kotyola biso, bazalaki kobénga biso ba Russellistes (Russel azalaki prezidá wa yambo ya la Société Watch Tower) to mpe ba Hartevalistes (na ntango yango, ndeko Harteva azalaki mokɛngɛli ya filiale ya mboka Finlande). Nazali na esengo ya koyebisa ete, bilenge mosusu kati na baoyo bazalaki kosɛka biso na eleko wana, bakómaki ba Témoins na nsima.
Molakisi na ngai azalaki kolendisa ngai ete nalanda bakelasi na ngai, yango wana na ntango moko, nazalaki na mposa ete nakóma ingénieur. Kasi na ntango yango, assemblée moko ya ba Témoins de Jéhovah esalemaki na mboka Pori na printemps ya mobu 1939, mpe yango esalaki mbongwana monene kati na bomoi na ngai. Tuomo, leki na ngai ya mobali mpe ngai, tomipesaki epai na Jéhovah mpe tomonisaki yango na kozwáká batisimo na mai na assemblée yango, na mokolo ya 28 mai 1939. Na nsima, na ebandeli na sanza ya septembre, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki.
Makambo ya mpasi mabongolaki makambo nyonso na mikili ya Mpótó. Matátá kati na mboka Finlande mpe Union soviétique makómaki makasi. Tata na ngai azalaki kolobela mingi ete Armaguedon ebɛlɛmaki mpe azalaki kolendisa biso ete tozala ba pionniers. Bongo, na décembre 1940, ngai mpe leki na ngai tobandaki mosala ya pionnier na nord ya mboka Finlande.
Mosala ya pionnier mpe mosala na Béthel
Na ntango tozalaki ba pionniers, tofandaki ntango mingi elongo na Yrjö Kallio. Ndeko wana akómaki Moyekoli ya Biblia soko bambula 30 liboso na biso, na Pennsylvanie, na Etats-Unis. Yrjö azalaki na molende mingi mpe azalaki kosala nyonso ete tozala malamu. Ndeko na ye, Kyösti Kallio, azelaki prezidá ya mboka Finlande kobenda 1937 kino 1940. Yrjö ayebisaki biso ete mbala mingi apesaki litatoli mingi epai na ndeko na ye, na kolimbweláká ye ete Bokonzi na Nzambe ezali elikya bobele moko mpo na kozala na boyangeli moko malamu mpe kimya ya solo na mokili mobimba.
Wana ntango ezalaki koleka, mposa na ngai ya kokóma mosangani ya libota ya Béthel ezalaki kokóla. Likambo ya esengo mpenza, demande na ngai mpo na kosala na Béthel endimamaki, atako mokɛngɛli ya zongazonga apesaki ngai toli ete namipesa makanisi mingi te mpo na yango. Na ebandeli, nasalaki lokola mosombi biloko. Kasi, nokinoki nazwaki libaku ya kosala na binyateli ya mikanda epai nasalaki misala ndenge na ndenge, ezala na esika na konyata mikanda to mpe na expédition.
Naboyi kokɔta na makambo ya mokili
Na 1942, wana ezalaki ngai na mibu 18, nabyangamaki mpo na mosala ya soda. Lokola naboyaki kokenda basambisaki ngai mbala mibale wana ezalaki bango kotalisa ngai mondoki. Na bambala mosusu, bazalaki kobɛta ngai makasi. Epai mosusu, na ntango bazalaki kosambisa ngai, batyaki ngai na eteni na ndako moko ya malili makasi oyo ezalaki kokɔta kino na mikuwa.
Na nsuka, na janvier 1943, ntango ekokaki ete basambisa ngai mpe bandeko mosusu. Mokonzi na basodá oyo asambisaki biso asɛngaki ete tokangama mpo na mbula 10. Kasi aumônier ya basodá alingaki nkutu ete bakatela biso etumbu makasi, na yango, asɛngaki na mokanda oyo atindaki ete ‘bopesa etumbu ya liwa to botinda bato mabe wana na mboka Russie kobwakáká bango longwa na mpepo lokola ba parachutistes batindami mpo na konɔnga mboka [yango elimbolaki mpenza liwa], etumbu wana ebongi na bango.’
Kosambisama ya lokutá esalemaki. Nabyangamaki na esambiselo mpe bakatelaki ngai etumbu ya liwa. Kasi, eyei komonana ete ezalaki bobele mayele mosusu ya kobangisa ngai, mpamba te bobele mokolo yango, nabyangamaki lisusu na esambiselo mpe bakatelaki ngai bolɛɔko ya mbula misato na ndambo. Nasɛngaki lisambisi mosusu mpe etumbu na ngai ekitisamaki na mbula mibale.
Na bolɔko, bilei bizalaki mpenza te mpe bakangami mosusu bazangi boboto, bazalaki kotungisa biso. Mbala mibale, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali misusu, balukaki kosangana na ngai, kasi nakimaki bango. Moko na bango alobaki ete akoboma ngai soki naboyi kondima masɛɔngi na ye. Kasi, lokola na mimekamo nyonso nakutanaki na yango, nabelelaki Jéhovah mpe asungaki ngai. Na likambo oyo ezalaki bobele maloba ya kobangisa te, mpamba te mokangami wana asilá koboma bato mosusu liboso. Nsima na kobimisama na bolɔko, abomaki lisusu moto mpe azongisamaki lisusu na bolɔko.
Na ntembe te, ezali mpo ete ba Témoins de Jéhovah bayebani mingi lokola bato oyo babongi na kotyelama motema, nokinoki, bapesaki ngai mwa mikumba. Mosala na ngai ezalaki ya kokabola bilei epai na bakangami nyonso mpe bapesaki ngai ndingisa ya kotambola na bonsomi nyonso na bandako ya bolɔko. Na bongo, nazalaki bobele te na bilei mingi mpo na ngai, kasi nazalaki mpe kosɛnzela ete bandeko na ngai baklisto bazala malamu. Ndeko moko nkutu akómaki monene mingi, nzokande yango ezalaki likambo oyo lizalaki kosalema mingi te na bolɔkɔ mpe na bozangá ya bilei.
Nabimisamaki na bolɔkɔ na septembre 1944, bobele mokolo moko elongo na ndeko Harteva. Nasengelaki bongo kozongela mosala na ngai na Béthel. Nakanisaki ete ‘kosala makasi na boumeli ya ngonga 16 na mokolo kati na Béthel, ezalaki malamu koleka kozala na bolɔko.’ Uta ntango wana, nakimaki mosala soko moke te.
Mikumba mingi ya mosala
Na nsuka ya mobu 1944, nakutanaki na Margit, elenge pionnier moko ya mwasi na kitoko mingi, oyo ayanolaki na mposa namoniselaki ye mpe tobalandaki na mokolo ya 9 février 1946. Na mbula ya liboso ya libala na biso, nazalaki kosala na Béthel, nzokande Margit azalaki pionnier na engumba ya Helsinki. Na nsima, na janvier 1947, toponamaki mpo na mosala ya circonscription.
Na mosala oyo ya kosala mibémbo mingi, toyambamaki na mabota mingi mpe tofandaki na eteni moko ya ndako elongo na bango. Tososolaki ete bandeko bazalaki kopesa biso oyo ekokaki na bango, yango wana tozalaki komilelalela te. Na eleko wana, ba circonscription ezalaki mike mpenza, mpe masangá mosusu mazalaki ata na Temwe moko te oyo asilá kozwa batisimo.
Na 1948, abyangamaki lisusu na Béthel. Mbula mibale na nsima, Wallace Endres autaki na Etats-Unis mpe mosika te, akómaki mokɛngɛli ya filiale. Alendisaki biso ete toyekola Lingelesi, mpe tosalaki yango. Bongo, tobyangamaki mpo na kokɔta na kelasi ya 19 ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, oyo ebandaki na février 1952 na engumba South Lansing, na Etat ya New York.
Nsima na kozwa mapɔlɔmi na biso, totindamaki lisusu na mboka Finlande. Nzokande, liboso ya kolongwa na Etats-Unis, na biro monene ya ba Témoins de Jéhovah na Brooklyn (New York), nayekolaki misala mingi na ntina na kobimisa mikanda.
Na bozongi na biso na mboka Finlande, totindamaki na mosala ya circonscription, kasi na 1955, tobyangamaki lisusu mpo na kosala na filiale ya Finlande. Na mbula wana, nakómaki mokɛngɛli na binyateli mpe mbula mibale na nsima, na 1957, nakómaki mokɛngɛli ya filiale. Uta 1976, nazali coordinateur ya Comité ya filiale ya mboka Finlande.
Nazali na esengo ya koloba ete tata na ngai mpe mama na ngai batikalaki sembo epai na Jéhovah kino liwa na bango. Na nsima, bato koleka monkámá na libota ya tata na ngai bakómaki Batemwe. Kino lelo, ndeko na ngai ya mobali, bandeko na ngai ya basi mpe mabota na bango nyonso bazali kosalela Jéhovah. Moko na bandeko na ngai ya basi azali pionnier.
Bomoi bokopesaka bolamu mpe ebongi na koluka yango
Bambula ya bomoi na ngai etondi na mosala mpe ntango nyonso na mosala mingi, kasi mpo ete mosala yango ezali ya Jéhovah, ezali kopesa bolamu mpe ebongi na koluka yango. (1 Bakolinti 3:6-9) Bomoi na ngai ezali te bobele na mikolo ya bisengo mpe ya malamu. Ezalaki na mikakatano mpe na mimekamo. Na bomoi na ngai, nasili kososola ete esengeli koyeba komipesa discipline mpe tozali na likoki te ya kosala ntango nyonso makambo oyo tolingaka kosala yango. Mbala mingi nazalaki kosembolama, mpe mokemoke nayekolaki lolenge malamu ya kotambola kati na bomoi.
Na ndakisa, mimekamo mpe bipekiseli mingi oyo nakutanaki na yango na boumeli ya etumba, eteyaki ngai ete namipesa te na koluka biloko bizangi ntina. Nayekolaki kososola biloko ya ntina mpe yango ezangi ntina. Nazalaka ntango nyonso na momeseno ya komituna soki nazali mpenza na mposa ya eloko boye to boye. Na nsima, soki namoni ete eloko yango ezali mpenza na ntina mingi te, nakosomba yango te.
Litambwisi oyo Jéhovah azali kopesa na nzela ya lisangá na ye limonanaki polele. Na boumeli ya bambula oyo nasili kolekisa na filiale ya Finlande, nazali na esengo ya komona motango ya ba Témoins de Jéhovah longwa na 1 135 kino koleka 18 000! Ya solo nazali komona ete mosala na ngai mosili kopambolama, nzokande nayebi ete, ezalaki bongo mpo ete yango ezali mosala ya Jéhovah mpe mokokisami na ye, kasi ezali mosala na biso te. (1 Bakolinti 3:6, 7) Na bomwana na ngai, naponaki nzela ya Jéhovah mpe yango emonani ete ezali lolenge na bomoi oyo eleki malamu.
[Elilingi na lokasa 23]
Erkki Kankaanpää lelo oyo, mpe elongo na Margit, mwasi na ye