Masoló ya basakoli na bokonzi
Jéhovah apesi mbano epai na elenge mobali moko na sembo
BlLENGE na sembo bazali na motuya mingi na miso ya Jéhovah. Lisoló ya elenge mobali oyo lisengeli kolendisa bilenge mosusu oyo bazali kosalela Jéhovah ete batikala sembo.
Na mboka Argentine, elenge mobali moko ya mibu 11 mpe leki na ye ya mobali bazalaki koyekola mokanda Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko elongo na nkoko na bango ya mwasi. Nokinoki, babali babandaki kotɛmɛla mpe bapekisaki bana na bango ete bakendaka lisusu makita ya lisangá te. Na boumeli ya mwa ntango, mpe ete bayangana na makita, bilenge wana bazalaki kobima na lininisa ya esika bakosukolaka, kokita kati na lopango mpe kokatisa efelo ya ndako ekangani na bango; mpe kokenda na Salle du Royaume. Mokolo mosusu, moto moko ayebisaki mama na bango ete bazalaki koyangana na makita ya ba Témoins de Jéhovah. Ye alukaki kobɛta bango, likambo oyo libangisaki mwana oyo ya leki, mpe atikaki koyekola Biblia. Kasi mwana na nkulutu alandaki koyekola. Na boumeli ya mibu mitano, akómaki koyangana na makita kozanga ete baboti na ye bayeba yango.
Wana akokisaki mibu 16, alingaki kolanda kelasi na ye ya secondaires oyo ezalaki te na eteyelo moko ya esika oyo ye afandaki. Likambo oyo ya kotangwa mosika na boboti likopesa ye bonsomi mingi mpo na koyekola solo ya Biblia. Boboti na ye bapesaki ye nzela na kokenda mpe, na boumeli ya sanza misato, mokambo manso matambolaki molamu. Na nsima, directeur ya eteyelo akebisaki boboti ete mwana na bango aboyaki kopesa losako na bɛndɛlɛ mpe aboyaki koyemba loyembo ya ekólo. Apesaki litatoli kitoko liboso ya directeur, ya baboti na ye, ya secrétaire, ya avocat mpe liboso ya balakisi zomi, na kolimboláká ntina oyo lisosoli na ye lipekisaki ye ete akokisa motindo na misala wana. (Exode 20:4, 5) Boboti basilikaki. Mama asombaki mastor mpo na koboma nkoko mwasi, oyo ye atalelaki ete asalaki mabe. Kasi azwaki libaku te ya kokutana bobele bango mibale.
Na nsima, mpo na kolanda toli ya moninga moko ya libota wana mpe na ndingisa ya directeur ya eteyelo, baboti bazwaki ekateli ya kokɔtisa mwana na bango na clinique moko lokola moto oyo abɛli maladi ya motó na likanisi ete akotika kondima na ye wana akozwa lisalisi ya monganga oyo akosalisaka maladi ya makanisi. Basali ya clinique wana bamemaki elenge mobali kati na vuatire na ntaká ya bakilometele 100 longwa na esika wana, mpe batɔbɔlaki ye dose makasi ya insuline (nkisi ya diabète) mpe bankisi mosusu, kino ayebaki lisusu likambo te. Na ntango alamukaki, makanisi na ye mabulunganaki mpamba te ayebaki lisusu moto te mpe ayebaki lisusu kososola te mpo na mwa ntango moke. Nsima na kosala ba examens mingi, minganga bamonaki mobulungano kati na boongo na ye te. Kasi clinique elandaki kosalisa ye. Na ntango oyo azalaki koyeba makambo, elenge mobali wana azalaki kobondela Jéhovah mbala na mbala ete atika ye te mpe azalaki kolɔmba Jéhovah ete apesa ye makasi mpo na koyika mpiko. Jéhovah abatelaki ye mpe abimaki na clinique.
Mokolo mosusu, directeur ya eteyelo atunaki elenge mobali wana soki asilaki koangana kondima na ye. Lokola aboyaki, directeur alobaki na baboti ete bazongisa ye na clinique, mpamba te akómaki na ligboma koleka na liboso. Baboti na ye batyaki ye na ndako ya mibangé mpe bitike, mpe basɛngaki na bankolo esika mpo basɛnzɛla ete akende makita ya ba Témoins de Jéhovah te. Wana baboti bakendaki, elenge mobali akamwaki na koyoka ete bankolo esika wana bazalaki ba Témoins de Jéhovah! Na nsuka, wana baboti na ye bayaki koyeba ete monganga akosaki bango, baboyaki komema ye ete azwa lisalisi mpo na maladi ya makanisi. Bobele na ntango wana, Esambiselo monene ya mboka Argentine ezwaki ekateli ete esengelaki te kolangola bana ya ba Témoins de Jéhovah na eteyelo soki baboyi kopesa losako na bɛndɛlɛ.
Mimekamo mizalaki nde litomba mpo na elenge mobali wana na sembo? Ee. Alobi ete: “Napesaki litatoli monene epai na minganga, epai na balakisi, epai na baninga ya kelasi, epai na baboti na ngai mpe epai na basangani mosusu ya libota na ngai, mpe na engumba mobimba. Baboti na ngai bakitisaki nkanda na bango mwa moke mpe bazali na makanisi malamu mpo na Batemwe. Soki nakanisi bomwana na ngai, nazali sikawa komona lolenge oyo Nzambe na ngai azali na bolingo mpe aleki malamu mpamba te, akotyaka likebi epai na ye oyo akangami na ye na bosembo nyonso. Ezali yango nde elobami mpenza epai na mokomi na nzembo, na Nzembo 27:10 (MN), ete: ‘Wana tata na ngai mpe mama na ngai bakotika ngai, Jéhovah akoyamba ngai.’”
Elenge mobali wana azali sikawa na mibu 23; asili kobala mpe azali na molende kati na mosala na Jéhovah. Lisungi oyo Jéhovah akoki komemela biso lizali mpenza monene.—Nzembo 55:22.