Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/2 nk. 5-7
  • Bikeko bizali nde kobɛlɛmisa biso epai na Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bikeko bizali nde kobɛlɛmisa biso epai na Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bisombami na ntalo mingi, bisalami malamu, kasi bizali na ntina te
  • Likanisi ya katolike
  • Bakosami na monguna
  • Lolenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe
  • Bililingi
    Lamuká!—2014
  • Kokumisa bikeko​—Likambo libimisi kowelana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ebongi kosambela Nzambe na nzela ya bikeko?
    Lamuká!—2008
  • Biblia elobi nini na likambo etali kosambela bililingi?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/2 nk. 5-7

Bikeko bizali nde kobɛlɛmisa biso epai na Nzambe?

LELO, bandako na biloko na kala (musées) etondi na ebele na bikeko biuti na Ezipito, na Babilone mpe na Grèce. Bikeko oyo bikumisamaki mingi na ntango na kala, bitikali lelo bobele bilembo ya mosala ya bato na kala. Nguya na yango ezalaki bobele na makanisi ya bato oyo bazalaki kokumisa yango. Bato yango basilá kokufa elongo na oyo bazalaki kobénga ete nguya ya bikeko wana. Eyaki komonana ete ezalaki bobele biloko bisalemi na nzeté, na mabanga to na ebende; bikoninganaka te mpe bizangi nguya​—ezalaki mpenza motindo oyo.

Boni mpo na bikeko bikumisami lelo, soko mpe bisambelami? Bizali na nguya mingi koleka oyo ya Ezipito, ya Babilone mpe ya Grèce na kala? Bizali mpenza kopesa bato nzela ete babɛlɛma epai na Nzambe?

Emonani ete, awa bambula ezali koleka, bato bazali sé kotangwa mosika na Nzambe. Bongo, bikeko nyonso ya mokili bikoki kosala nini mpo na kosilisa ezaleli wana? Soki opɛtoli yango te, ekobeba na mputulu mpe ekolyama na banyama mike soko ekobukana. Ekoki komipɛtola te mpe, oyo eleki mpenza, ekoki kosala eloko moko te mpo na bato. Kasi, likambo ya ntina mpenza lizali oyo ete: Biblia elobi nini mpo na yango?

Bisombami na ntalo mingi, bisalami malamu, kasi bizali na ntina te

Lokola tokokaki komizela na yango, Biblia emonisi ete bikeko bizali na ntina te mpe bizali na makoki te ya kosalisa baoyo bazali kokumisa yango mpo ete babɛlɛma na Nzambe. Atako bikeko ya losambo bikosombamaka na ntalo mingi mpe bisalami malamu, Biblia emonisi motuya na yango ya solo wana elobi ete: “Bikeko na bango bizali biloko na palata mpe na wolo bisalami na mabɔkɔ na bato. Bizali na monoko kasi bikolobaka te; bizali na miso kasi bikomonaka te; bizali na zolo kasi bikolumbutaka nsolo te; bizali na matandu kasi bikosimbaka te; bizali na makolo kasi bikotambolaka te, bikolobaka na mongongo na bango te. Bango bakosalaka yango bazali lokola moko na yango, baoyo bakotya elikya na bango wana, bazali mpe bongo.”​—Nzembo 115:4-8.

Biblia elobi bobele te ete bikeko bizali na ntina te, kasi ezali mpe kokweisa yango, mpe baoyo bazali kosambela yango, ete: “Ezali lokola loseká kati na bilanga, mpe ekolobaka te. Ee, bakomemaka yango, mpamba te eyebi kotambola te. Bobanga yango te, mpo ete eyebi kosala mabe te; yango ekokoka mpe kosala malamu te. Moto nyonso asili kozanga mayele kino asosoli yango te. Ya solo, motuli nyonso akooka nsɔni mpo na ekeko na ye; mpamba te ekeko na ye na paláta enangolami, ezali lokutá, mpe elimo ezali kati na yango te. Ezali mpamba, mosala na nsɔni.”​—Yilimia 10:5, 14, 15, MN.

Likanisi ya katolike

Ezali solo ete, kati na baoyo bazali kokumbamela bikeko ya losambo, baoyo bazali kobondela yango, baoyo bazali kotumbela yango mpaka mpe bazali koyambana na yango, mingi bazali komitalela te lokola basambeli na bikeko. Na ndakisa, bakatolike balobi ete soki bazali kokumisa bikeko ya Klisto mpe ya Maria, ezali te mpo ete bonzambe bozali kati na yango, kasi ezali nde mpo na bato oyo bamonisami na yango. Encyclopédie moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete “kati na Lingomba ya katolike, bikeko bizali kozwa lokumu ya bato oyo bamonisami na yango.” Bakonzi ya lingomba ya katolike bazali koteya ete ebongi kokumisa ekeko na lokumu moke na nsé na oyo ya Nzambe ye moko.

Ezali solo ete bato bakumisaka bikeko yango. Ata mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.) eyebisi ete motindo na kokumisa wana ezali “losambo.” Nzokande, na ntango Yesu Klisto alobelaki lolenge moto akoki kobɛlɛma na Nzambe, aboyaki kosalelama na bikeko na ntango alobaki ete: “Moto akokóma epai na Tata te soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete baklisto ya ekeke ya liboso baboyaki kosalelama ya bikeko na losambo.

Kasi lelo oyo, mangomba ya boklisto ya lokutá maleki mangomba nyonso mosusu mpo na ebele na bikeko na bango. Ee, atako bilembeteli nyonso ya ntango na kala mpe oyo na Biblia bimonisi ete kokumisa bikeko ezali bozoba; bandimi ya boklisto ya lokutá baoyo bazali koluka Nzambe na motema sembo, bazali sé kofukama mpe kobondela liboso na bikeko. Mpo na nini bongo?

Bakosami na monguna

Mosakoli Yisaya alobaki ete baoyo bazakaki kokumisa bikeko na eleko na ye basosolaki bozoba ya misala na bango te mpo ete miso na bango “mazipami na mokóbo ete bamona te, mpe mitema na bango miyindisamaki ete bazala na mayele te.” (Yisaya 44:18, MN) Nani akoki kozala na bopusi motindo wana epai na bato? Likita ya babebisi na bikeko ya mobu 754 liyebisaki ete, kokumisa bikeko ekɔtisamaki na Satana mpo na kopɛngola bato longwa na Nzambe ya solo. Likanisi oyo lizalaki solo?

Ee, mpamba te liyokani na Biblia, mokanda mopemami na Nzambe, oyo, uta bikeke mingi liboso, elimbolaki ete Satan le Diable, monguna na liboso na Nzambe, “azimisi miso na makanisi” na bato mpo ete solo “engɛngɛla bango” te. (2 Bakolinti 4:4) Na bongo, ye oyo azali kokumisa ekeko, azali nde kosalela matomba ya bilimu mabe, kasi azali kobɛlɛma na Nzambe te.​—1 Bakolinti 10:19, 20.

Lolenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe

Bikeko bizali kosalisa biso te ete tobɛlɛma na Nzambe. Jéhovah Nzambe, Mozalisi monene, ayini kokumisa bikeko. (Deteronome 7:25) “Jéhovah azali Nzambe na zuwa.” (Nahumu 1:2) Alobi ete: “Ngai nazali Jéhovah, yango ezali nkombo na ngai; nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te mpe nakopesa lokumu na ngai epai na bikeko te.” (Yisaya 42:8, MN) Na yango, Biblia ezali kokebisa biso ete baoyo bazali kokumisa bikeko “bakosangola bokonzi na Nzambe te.”​—Bagalatia 5:19-21.

Kasi Jéhovah azali mpe Nzambe na ngolu mpe na motema mawa. Biblia elobi na ntina na baoyo basili kobongwana epai na Nzambe na kobwakáká bikeko na bango mpe basili kotangama bayengebene nsima na kotika misala na bango ya losambo ya bikeko. (1 Bakolinti 6:9-11; 1 Batesaloniki 1:9) Bandimaki maloba oyo na Yesu, ete: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bakosambela ye basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.”​—Yoane 4:24, MN.

Boyekoli malamu na Biblia emonisi ete kobɛlɛma epai na Nzambe ezali likambo na mpasi te. (Misala 17:26-28) Azali na esengo, atondi na bolingo mpe andimi kosolola na bato; azali kobyanga biso ete tosala boyokani malamu elongo na ye mpe alingi ete tosala yango.​—Yisaya 1:18.

Ba Témoins de Jéhovah basɛngi yo ete oyekola koyeba bomoto ya Tata na biso na likoló, nkombo na ye, Jéhovah, bizaleli na ye mpe misala na ye epai na bato. Na kotalela Biblia, Liloba na ye, okoyeba ntina oyo osengeli kozala na eloko moko te oyo ezali komonana, lokola elilingi to ekeko, mpo na kobɛlɛma na Ye. Ee, “bobɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma na bino.”​—Yakobo 4:8, MN.

[Etanda na lokasa 6]

Mwa bilembeteli ya bakomi na masoló na kala

◻ “Eyebani mpenza ete losambo na Buda lobandisamaki na ekeke ya motoba liboso ya ntango na biso, losalaki ekeko ya yambo ya mobandisi na yango bobele pene na ekeke ya liboso ya ntango na biso.”

“Uta bikeke mingi, ba Hindous bazalaki na bililingi te soko bikeko mpe te.”

◻ “Na ebandeli, ezala ba Hindous to mpe Babuda, bazalaki kosalela bikeko te, kasi bobele mokemoke nde bayei kondima bikeko na losambo na bango. Ezali bobele bongo mpo na boklisto.”​—L’Encyclopédie des religions (angl.), ya Mircea Eliade.

◻ “Masoló mingi ya Biblia mamonisi polele ete bikeko bikɔtaki te kati na losambo ya solo na Nzambe. . . .Mpe kati na KS [Kondimama na Sika], epekisami kosambela banzambe na bapaya mpe bikeko.”​—Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.).

◻ “Bikeko bisalelamaki te kati na losambo ya baklisto ya liboso.”​—Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature, ya McClintock mpe Strong.

◻ “Ezala kati na Kondimana na Sika soko na mikanda mikomamaki mpenza na ebandeli ya boklisto, tokoki kokuta ata elembeteli moko te mpo na kosalelama ya bililingi to bikeko na losambo ya baklisto, ezala na liboso na bato mingi to mpe moto ye moko.”​—A Concise Cyclopedia of Religius Knowledge, ya Elias Benjamin Sanford.

◻ “Baklisto ya liboso mbɛlɛ bayinaki ata likanisi mpamba ya kotya bikeko kati na bandakonzambe, mpe mpo na bango, kofukamela yango soko kobondela yango mbɛlɛ ezalaki nde kosambela bikeko.”​—Histoire de l’Eglise chrétienne (angl.), ya John Fletcher Hurst.

◻ “Kati na Eklezia ya ebandeli, baboyaki mpenza kosala mpe kokumisa bililingi ya Klisto mpe ya basantu.”​—Nouvelle Encyclopédie britannique.

◻ “Atako Eklezia ya ebandeli etɛmɛlaki mosala ya bikeko te, kasi ezalaki ata na ekeko moko na Klisto te.”​—Schaff-Herzog Encyclopedia of Religious Knowledge.

[Elilingi na lokasa 7]

Yesu alobelaki mingi likambo oyo ete Nzambe azali koluka baoyo ‘bakosambelaka Tata na elimo mpe na solo’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto