Libéria—Bosembo na boklisto kati na mboka oyo ebebi na bitumba
Lisoló lipesami na moto oyo amonaki etumba
“SOKI nzoku mibale babundi, matiti makooka mpasi mpo na yango.” Lisese oyo ya Afrique ya Ouest limonisi likambo oyo liuti kosalema kala mingi te na boumeli na bitumba ya Libéria! Bato 20 000 bakufaki, mpe ndambo na bafandi ya mboka wana, oyo ezali na motango ya bato 2,6 milió, basɛngisamaki ete bakima. Mingi na baoyo banyokwamaki bazalaki basodá te; bato yango bazalaki “matiti”: mibali, basi, mpe bana oyo basalaki likambo moko te.
Ntango etumba ebandaki na Libéria na décembre 1989, pene na ba Témoins de Jéhovah 2 000 ya mboka wana, bazalaki kozwa bokóli sanza na sanza mpe bazalaki na elikya mpo na mikolo mizali koya. Likambo na mawa mpenza, bazalaki kati na ‘matiti oyo maokaki mpasi.’
Etumba eyei monene
Etumba ebandaki na pembenipembeni na ndelo ekaboli Libéria mpe Côte-d’Ivoire, mpe nokinoki bafandi ya etúka wana bakimaki na kapitale, na Monrovia, oyo ezalaki na bafandi koleka nkɔto nkámá mitano. Lokola etumba ekómaki epai na Ngele, kobanda mars 1990 kino na mai 1990, bamisionere ba Témoins de Jéhovah bakimaki liboso na engumba Ganta, na nsima bakendaki na Gbarnga. Bazalaki kati na bato ya nsuka mpo na kotika bingumba wana. Etumba ekómaki makasi wana basodá bakɔtaki na Monrovia, na mokolo ya 2 juillet 1990.
Moto moko te amizelaki na makambo ya nsɔmɔ oyo mabimaki na nsima. Mampinga misato ya bonguna babundaki moko na mosusu kati na balabala na mindoki na nguya mingi, mindoki mibebisaka ba chars, mpe mindoki mikobwakaka ba grenades. Baoyo bakufaki naino te kati na bato ya ekólo oyo eyinami, banyokwamaki mpe balukamaki mingi. Na butu moko na sanza ya août, limpinga moko ya babomi oyo bazalaki na mposa makasi ya etumba, babomaki bato 600, mibali, basi mpe bana oyo babómbanaki kati na ndakonzambe Saint-Pierre ya lingomba ya protestá.
Ebele na bato bakimaki bitumba bobele na bilamba oyo balataki. Basangani ya mabota bakabwanaki mpe bakutanaki bobele nsima na basanza mingi. Mbongwana esalemaki epai na bafandi nyonso ya Monrovia: bandako oyo ezalaki na bato te ekómaki bifandelo ya basodá to ya bakimi oyo bautaki na bakartyé mosusu ya engumba wana. Koleka ndambo na bafandi ya kapitale batikaki bandako na bango. Bato mingi babungisaki biloko na bango nyonso, mpe bazalaki mpenza kolela liwa ya moko na bansangani ya mabota na bango; basusu nkutu bakufelaki bandeko mingi koleka.
Makambo makómaki mpasi mingi koleka na motindo boye ete mikili misusu mitano ya Afrique ya Ouest batindaki basodá mpo na kozongisa kimya mpe kosilisa mobulu. Na nsuka ya octobre 1990, kimya ezongaki mwa moke. Kasi nzala makasi epalanganaki lokola nde molikani mozipi engumba wana ezikisamaki na mɔ́tɔ. Masangá na kopesa lisungi bayebisaki ete na ntango moko, pene na ndambo na misato ya bana oyo bakokisi naino mbula mitano te bazalaki kolya malamu te mpe koleka bato mokámá bazalaki kokufa mokolo na mokolo. Baoyo bawelaki matomba na bango babesaki lisusu makambo mingi; bazalaki ebele mpo na koyiba loso oyo lotindamaki mpo na kosunga bato, mpe bazakaki kotɛka sakombi moko na 100 francs franc̗ais to koleka. Maladi ezalaki ntango nyonso kotungisa bato, mingimingi choléra, mpamba te baterasé na mai, bakabinɛ mpe basinga ya kura ya engumba wana oyo ebebaki nyonso mpenza.
Ba Témoins de Jéhovah soko nkɔto baoyo bazalaki kofanda na Monrovia, baokaki mpe mpasi mingi. Mingi kati na bango batikaki engumba wana mpo na kofanda na bamboka mike, nzokande basusu bamataki masuwa mpo na kokende na Ghana mpe na Nigéria, bakendaki na Côte-d’Ivoire to na Sierra Leone na nzela ya mokili. Kobanda juillet kino décembre 1990, ba Témoins koleka 30 bakufaki. Bamoko bakufaki na masasi, basusu bakufaki na maladi mpe na nzala. Emonani lokola ete Alan Battey mpe Arthur Lawson, bato ya États-Unis mpe bazalaki bamisionere oyo bazwaki diplôme na École de formation ministérielle, bazalaki kati na baoyo babomamaki. Elikya ya lisekwa ezali mpenza kopesa elendiseli kitoko oyo etongami likoló ya Biblia, epai na baoyo nyonso kati na biso basili kokufela baboti to baninga na bango na ntango ya makambo wana ya nsɔmɔ!—Misala 24:15.
Bolingo ya boklisto emonisami
Wana etumba ezalaki makasi, ebele na ba Témoins oyo bakimaki bandako na bango, bayaki kobombana na filiale ya ba Témoins de Jéhovah mpe kati na ndako ya bamisionere oyo ezalaki na ngambo mosusu ya engumba wana. Basusu bazalaki koluka libateli, mpamba te na bakartyé, basodá bazalaki koboma bato ya ekólo na bango. Bapesaki misala na ebele na ba Témoins wana kati na filiale, mpe bazalaki lisungi monene mpo na kolamba bilei mpe kotya bopɛto na ndako; basusu bazalaki na mokumba ya kokende koluka ndunda na mai oyo ezali penepene, soki makambo na libanga mapesi nzela na yango.
Bato bazalaki kolala bipai binso, kati na biteni na ndako ya bamisionere, na ba couloirs ya ndako, na bandako ya misala ya kotinda mikanda mpe na kati na babiro. Totimolaki kabinɛ mpe tozalaki kobatela yango malamu. Basi bapesamelaki mosala ya monganga, mpe balongaki kosalisa bato mingi oyo bazalaki na malaria mpe na fièvre. Pulupulu ezalaki kobimisa mikakatano mingi.
Tozwaki mwa meko mpo na kolónga ezalela wana ya mpasi mpe mpo na yango, tozalaki na yango kosala bilakiseli na ntina etali kobima nokinoki na bandako soki toyoki nungunungu ya etumba. Bongo, na ntango basodá bazalaki kobɛta mindoki na nguya mingi, tosilaki komibongisa malamu mpo na kokima nokinoki kati na bandako ya filiale mpo na kobombana. Efelo na biso oyo ezalaki na metele misato na likoló ezalaki libateli, kasi ekokaki te kopekisa masasi oyo mazalaki kopumbwapumbwa, mpe oyo mabongolaki nokinoki nsambá ya ndako na biso na kiyungulu.
Bomoi ya ebele na bandeko na biso ezalaki na likámá wana bazalaki kobatela ba Témoins mosusu ete babomama te na baoyo bazalaki koluka koboma bango mpo ete bazalaki bato ya ekólo oyo eyinami. Mokolo mosusu, ndeko mwasi moko ayaki na filiale na kolela elongo na bana na ye baoyo babikaki na liwa, kati na bango mpe bébé ya poso mibale. Mobali na ye mpe mwana na ye ya mobali bautaki kobomama na miso na ye. Témoin mosusu abombaki ye na bana na ye na ntango babomi bazongaki mpo na koluka bango.
Libota mobimba ya ba Témoins wana, bayaki na filiale elongo na mosakoli moko ya mwasi azwi naino batisimo te, oyo abatelaki bango ete babomama te na bato ya ekólo na ye. Na nsima, wana makambo mabongwanaki mpe ntango mosakoli oyo azwi naino batisimo te akómaki na likámá, ezali bango nde babikisaki ye na kobateláká ye ete abomama te na bato ya ekólo na bango.
Mbala mingi bamisionere bazalaki kokende kosolola elongo na mibali oyo bazalaki koya na bibundeli liboso na ekuke mpo na komeka kopekisa bango ete bakɔta te to bapunzwa biloko na esika wana te. Na libaku mosusu, etuluku moko ya bato bazalaki na nkanda bakɔtelaki biso na ndako, mpe bazalaki kotindika biso na nsonge ya mindoki na bango, kolobáká ete biso tobombaki bato ya ekólo moko. Na ntango wana tozalaki na likita na boklisto, mpe kimya ya banamboka ba Témoins, baoyo bafandaki nyee mpo na koyoka, ekamwisaki bango mingi. Balukaki kati na ndako, kasi bakutaki te biloko oyo bango bazalaki koluka. Tozalaki ntango nyonso koyebisa na baoyo bazalaki kokɔta na ndako na biso ete tozali kobómba basodá te, ata banguna mpe te. Na lolenge na biso ya baklisto, tokɔtaki te kati na makambo ya mokili oyo.
Mokolo mosusu, wana bitumba bikómaki makasi, etuluku moko ya ba Témoins bayaki na filiale wana ezalaki bango komema ndeko mobali moko oyo azwaki maladi ya cancer mpe ekómaki makasi mpenza. Akufaki nsima na mwa ntango moke. Totimolaki libulu kati na lopango, mpe tosalaki bokundi moko ya mayoki mingi. Ndeko yango azalaki moko na bankulutu baleki molende mingi, mpe asalelaki Jéhovah na bosembo nyonso na boumeli ya bambula mingi. Bato koleka mokámá baoyo bakimaki bandako na bango bayanganaki na salle wana mpo na koyoka diskur ya bokundi, wana mindoki mizalaki kobɛtama.
Bolukiluki ya bilei mpe mai
Bilei bizalaki komonana te. Naino etumba ebandaki te, biloko bizalaki lisusu kouta na miliki misusu te. Na engumba, bilei bizalaki moke mpenza. Na filiale, biloko na biso oyo tobómbaki ekokaki koleisa basangani 12 bazalaki kosala wana na boumeli ya basanza mingi, kasi tozalaki mbala mosusu kino bato 200, kati na bango mpe baninga ya pembeni baoyo bazalaki ba Témoins te nde bazalaki mpenza na mposa ya lisalisi. Biso nyonso tosengelaki kolia bobele mwa eloko moke na mokolo; mpe tobikaki na boumeli ya basanza mingi na kosaláká bongo. Biso nyonso tozalaki na nzala. Bana mike batikalaki bobele mikwa mpamba, mpe bazalaki kolala na mabɔkɔ na baboti na bango kozanga makasi na nzoto.
Mosika te bilei na biso bilingaki kosila. Epai wapi tosengelaki kosomba bilei mosusu? Magazini moko te efungwamaki na engumba Monrovia. Bipai binso, bato bazalaki na nzala bazalaki kotambolatambola na balabala mpo na koluka bilei. Bazalaki kolya biloko ya lolenge nyonso, kati na yango mbwa, nyau, mpe mpuku. Bamisionere mibale bazwaki ekateli ya komeka kokende na engumba Kakata. Na engumba wana oyo etangwi na kapitale na ntaká ya bakilometele koleka 60, bitumba bizalaki lisusu kosalema te.
Babambaki Mosenzeli mpe ba insignes na maninisa ya vuatire na bango mpo bayeba bango ete bazalaki ba Témoins de Jéhovah. Na nsima na koleka bisika mingi oyo basodá bazalaki kokɛngɛla, batɛlɛmisaki bango, mobali moko ya molai mpe mbinga, azalaki na grenade na ntolo na ye mpe revolver na mopanzi na ye, atunaki bango mituna. Balobaki na ye ete bazalaki ba Témoins de Jéhovah mpe balimbolaki ete balingaki kokende na Kakata mpo na kozwa bilei.
Alobaki na bango, ete: “Nazali komadá. Bolanda ngai.” Amemaki bango na quartier général na ye. Na koyokáká ete bazalaki kobomba bato oyo bakimaki bamboka na bango, apesaki etinda na bato na ye ete bapesa na filiale na biso basaki 20 ya loso oyo mokomoko ezalaki na 45 kilos. Apesaki mpe na ba Témoins mokanda ya bopesi-nzela (laissez-passer) mpo bakende na engumba Kakata, mpe atindaki basodá ete bakende elongo na bamisionere ete baleka na kimya nyonso na bisika misusu oyo basodá bazalaki kokɛngɛle.
Na Kakata, bakutaki ndeko moko nkombo na ye Abalayama, oyo azalaki na magazini. Abombaki biloko mpo na biso: miliki ya mputulu, sukali, ndunda oyo batyaki na linzanza mpe biloko mosusu ya ntina. Motindo oyo bandeko na biso babatelamaki na boumeli ya mobémbo na bango, ezalaki ya kokamwa. Jéhovah asepelaki mingi na lolenge oyo tokabolaki biloko na biso elongo na baninga na biso, mpe na bato ya zingazinga na biso, mpamba te apesaki biso nzela ya kosomba biloko misusu na ntango wana.—Masese 11:25.
Na ngambo mosusu ya Monrovia, bamisionere bayambaki bato oyo bakimaki kati na bandako na bango, bango mpe bazwaki lisalisi ya motindo na kokamwa. Na ndakisa, sodá moko apesaki basaki misato ya loso epai na misionere moko, mpamba te amikundolaki ete, esili koleka soko mibu 16, azalaki Témoin oyo asakolaki na etúka na bango. Misionere mosusu azwaki basaki minei ya loso nsima na kosolola elongo na mokonzi ya limpinga moko lizali kobunda etumba.
Na eleko moko, tokanisaki ete esengelaki na biso kolongwa na bandako ya filiale mpo na bosɛnga ya mai. Na boumeli ya mwa ntango, bobele libulu na biso nde lizalaki liziba ya pɛto mpo na bato mingi ya kartyé na biso. Kasi, mazuti ya motere ya kurá oyo mozalaki kotambwisa pompi na biso mabandaki kosila. Eyokaki ye nsango ya mikakatano na biso, mobali moko toyambaki na boumeli na mikolo ya liboso ya etumba, amemelaki biso mazuti mpo na komonisa botɔndi mpo na oyo tosalelaki ye, mpe mai na biso mazalaki na ebómbelo, masilaki te.
Babatelaki bokasi na bango ya elimo
Na ntango biso bamisionere tosɛngisamaki na kotika Libéria, na octobre 1990, likanisi na biso ya liboso ezalaki oyo ete: bandeko na biso, mibali mpe basi basengelaki kosala nini mpo na kolónga? Kasi, engebene ba rapports oyo tozwaki, tomoni ete bazalaki bobele na molende kati na mosala ya kosakola.
Liboso na etumba, Témoin moko na moko azalaki kokokisa mwayene ya bangonga 17 na sanza kati na mosala ya kosakola. Nzokande, na boumeli ya etumba, mpe ata bosɛnga oyo bazalaki na yango mpo na koluka bilei na zámba, ba Témoins ya masangá wana balekaki mwayene ya ngonga 20 mpo na mosakoli moko na moko. Lisusu, na ntina na bozanga ya Mosenzeli, mingi na bandeko na biso ya basi bazalaki kokoma masoló ya boyekoli na mabɔkɔ ete bakoka kozala na bakzemplere mingi mpo na boyekoli na mokolo ya eyenga.
Masangá minei oyo mazali pene na kapitale, matondaki na ba Témoins oyo bakimaki bitumba na Monrovia. Babungisaki biloko nyonso bazalaki na yango, mpamba te bazongaki lisusu epai na bango te mpo na kozwa mwa biloko. Na boumeli ya sanza misato, ba Témoins mingi bakabwanaki elongo na bana na bango mpe basangani ya mabota na bango, mpamba te bazalaki na ngambo mosusu epai na etumba ezalaki kosalema. Mokolo ya 30 mars, motango ya bato 1 473 bayanganaki kati na masangá wana mpo na Ekaniseli, bokundoli ya liwa na Yesu.
Soko ba Témoins 300 oyo batikalaki na Monrovia basalaki makasi mpo na kosala mosala ya pionnier auxiliaire na boumeli ya sanza ya Ekaniseli, nzokande, mwa baposo liboso, balembaki mingi mpo bazangaki bilei, likambo oyo lipesaki mpasi mpo na kotambola. Basalaki makasi mingi mpo na kobénga bato ete boyengene na Ekaniseli mpe motuya ya bayangani emataki kino na 1 116.
Nkulutu moko ya Monrovia alobaki ete: “Kobanda décembre 1990, tozwaki ekateli ya kozongela kosala makita na biso kati na Salle du Royaume na biso. Mbala ya liboso tozalaki bato 17. Na nsima, motuya ya bayangani ezalaki 40, mpe motuya wana motikalaki bongo na boumeli ya mwa ntango. Mpe na mokolo ya 24 février tozalaki bato 65, mpe nsima na poso moko tokómaki bato 85. Lisusu, pene na lisangá mobimba lindimaki libyangi oyo lisalemaki mpo na kosala mosala ya pionnier auxiliaire na mars.”
Bazali kosalisa bamosusu
Mosangani moko kati na libota ya Témoin moko, nde ye moko azalaki Témoin de Jéhovah te, alobaki ete: “Na boumeli ya etumba, basangani ya lingomba na biso bazalaki bobele kobomana [kati na bikólo bikeseni], mpe bazalaki komibanzabanza te na basangani ya lingomba na bango.” Oyo nde kokesena mpo na ezaleli ya libota na Jéhovah!
Na ndakisa, na février 1991, mokambi ya ekipe moko ya lisungi akomelaki bandeko oyo bazali kotambwisa filiale, ete: “Na mokanda oyo, tolingi kotɔndo bino mpe association na bino mpo na lolenge oyo bozali kondima ete tobombisaka biloko na biso epai na bino na boumeli ya ntango oyo tozali kokabola bilei. Mosala na bino na boboto mozali komonisa mposa oyo Société na bino ezali na yango mpo na kozala na kimya kati na mboka oyo mpe, mpo na komonisa boboto epai na bato banso. Tolɛmbi bino ete bokóba kokokisa misala na bino malamu.”
Ba Témoins de Jéhovah ya bamboka misusu balendisanaki mpo na kosalisa bandeko na bango ya Libéria. Lisungi litindamaki longwa na Sierra Leone mpe na Côte d’Ivoire, na Afrike ya Ouest, na Pays-Bas mpe na Italie, na Mpótó, mpe na États-Unis.
Mwana mwasi moko ya moke, oyo mama na ye abomamaki mpo ete azalaki moto ya ekólo eyinami, amonisaki botɔndi na ye mpo na lisalisi oyo azwaki. Akomaki ete: “Botɔndi mingi mpo na nyonso oyo botindelaki ngai. Mpo na bino, nazali komona lokola nde mama na ngai azali pene na ngai. Leki na ngai ya mobali mpe mama na ngai, bakufaki na etumba. Nazali kosɛnga Jéhovah ete apambola bino nyonso. Nazali na mibu 11.”
Témoin moko oyo azalaki na bana motoba, nde mwasi na ye asɛngisamaki kobombana basanza mingi mpo ete azalaki moto ya ekólo oyo bazali koluka, amonisaki mpe botɔndi na ye mpo na lisalisi oyo azwaki ete: “Tobukaki bandako te mpo na kopunza mpe kotɛka biloko bizalaki kati na yango, kasi na kokesena na baninga na biso ya penepene, biso tozali na bilei mokolo na mokolo mpo ete tozali na mayele ya kosalela moke oyo tozali na yango. Ezali Jéhovah nde ayekolisi biso yango.”
Témoin moko oyo akimaki na Côte d’Ivoire elongo na mwasi na ye mpe na bana na ye mibale, amonisaki mpe elimo motindo moko. Atikaki ndako kitoko oyo ebebisamaki na nsima na ye. Alobi ete, likambo lizali kopesa ye mpasi ezali mpo ete abungisi ndako te, kasi mpo ete abungisi bibliotɛkɛ na ye ya teokratike!
Mateya kitoko
Na kotalela ntango eleki, nasosoli ete Jéhovah apesaki biso mateya mingi ya kitoko. Emonaki ba Témoins mingi oyo batikalaki sembo mpe babikaki, mpe bamoko oyo batikalaki sembo kino kufa, nasosolaki ntina ya kozala na makanisi ya ntóma Paulo, oyo akomaki ete: “Soko tozali na bomoi, bozali na bomoi mpo na Jéhovah; mpe soko tokokufa, tokokufa mpo na Jéhovah. Bongo, ata tozali na bomoi, ata tokokufa, tozali bato na Jéhovah.”—Baloma 14:8.
Misionere moko oyo asali bambula mingi na mosala yango, alobaki ete: “Na mimekamo wana, toyekolaki ete Jéhovah azali Lisalisi monene. Lokola Paulo alobaki yango, ‘tomilobelaki na motema na biso mpenza ete tosili kolakama mpo na kufa. Kasi ezalaki ete totya motema epai na biso mpenza te, nde epai na Nzambe, akosekwisa na bakufi.’” (2 Bakolinti 1:9; Nzembo 30:10) Abakisaki ete: “Etumba emonisaki biso ete libota na Jéhovah lizali na bomoko na ekanganeli ya bondeko mpe lisili kolata bolingo bozangi koluka litomba, oyo Yesu alakisaki yango.”—Yoane 13:35.
Mokanda oyo ndeko mwasi moko ya Libéria atindelaki bamoko na bamisionere oyo batikaki mboka wana na ntango na bitumba ya octobre 1990, emonisi bokasi ya bondeko na boklisto. Akomaki ete: “Nazali kobondela ete bino nyonso bozonga sikawa na Libéria ete toyangana elongo na assembée. Nazali kozela mokolo yango na motema likoló. Wana ezali ngai kokanisa mokolo yango, nazali mpenza na esengo mingi.”
Ee, ekozala kitoko mpenza na komona lolenge oyo mosala na boklisto ya ntango nyonso mozongisami na mboka Libéria. Ndeko na biso ya mwasi azali na elónga: assembée ya yambo oyo ekosalema na Monrovia nsima na bozongi ya bamisionere mpe bandeko mosusu bakima bamboka na bango, ekozala eleko moko ya esengo. Ntembe ezali soko moke te.
[Karte na lokasa 27]
(Mpo na komona yango, talá mokanda.)
LIBÉRIA
Monrovia
Kakata
Gbarnga
Ganta
SIERRA LEONE
GUINÉE
CÔTE D’IVOIRE
Océan Atlantique
[Elilingi na lokasa 28]
Na filiale na ntango na etumba: Bana ya ba Témoins bakimaki bandako na bango
[Elilingi na lokasa 31]
Bato ya Libéria baoyo bazali kokima bitumba bazali kopona makabo ya bilamba etindami na ba Témoins ya Côte-d‘Ivoire