Bazali kosala oyo ekoki na bango
Atako bazali na likoki te ya kozongisa na Jéhovah nyonso asili kopesa bango, bato mingi bazali kosala oyo ekoki na bango mpo na kosimba mosala ya kosakola oyo ya mokili mobimba. (Matai 24:14; tala Malako 14:3-9.)Na likambo yango tozali komonisa awa mokanda moko motindamaki na libota moko ya ba Amerike.
“Ba ndeko,
“Totindeli bino likabo ya motuya na ba dollars $——. Bosalela yango mpo na bokokisi ya mosala ya mokili mobimba, to kotya yango kati na mosolo ya la Societé mpo na botongi ba Salles du Royaume, to mpe kosalela yango mosala nyonso oyo bokomona malamu mpo na ba mposa ya lisangá. . . .
“Tondimisami ete mosolo yango mokosalelama na boyokani na mokano (na Jéhovah). Tolingi kosalela libaku oyo mpo na kolendisa bino na kolanda kokokisa mosala malamu oyo bozali kosala, mpe tozali kotonda bino mingimingi mpo na videocassette oyo ezali kolimbola botambwisami ya Société (Watch Tower) na mokili mobimba. Ezali yango nde esalisi biso na koyeba malamu bonene ya mosala, mpe oyo esalisi biso na koyeba na meko nini makabo ya bolingo malamu ezali na ntina. Liboso, tozalaki kotika na lisangá, na circonscription mpe na district mokumba ya kotinda makabo, kasi sikawa totondi Jehovah na ndenge amonisi motema molai na kozanga mayele na biso mpe na ndenge alakisi biso na bolingo ete, likolo na lolenge nyonso ya makabo mosusu, esengelaki na biso kopesa biso moko mpenza lisalisi na biso ya mosolo na mosala oyo ya lobiko. Libota mobimba ezwaki likatami ya kotindaka na sanza nyonso motuya na ba dollars . . . mbala moko na New York.
“Lisusu totondi bino mpo mosala malamu oyo bozali kosala mpo na biso, mpe mpo na bosembo oyo bozali komonisa epai na Jéhovah.”