Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/11 lok. 24
  • Masoló ya basakoli na Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masoló ya basakoli na Bokonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya Noele te?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Noel Mpo na nini ezali na lokumu mingi na mboka Japon?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Eyenga ya Mbótama elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Biutelo Ya Eyenga ya Mbotama na Mikolo na Biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/11 lok. 24

Masoló ya basakoli na Bokonzi

Litatoli ya libaku malamu ekómeli baoyo bazali koluka solo

Biblia eyebisi biso ete bato oyo bazali lokola bampate bazali koyoka mongongo na Mobateli na mpate oyo aleki malamu. (Yoane 10:27) Likamba yango emonani kati na ba mboka mingi, ná mokili ya Grande Bretagne lokola.

◻ Na ndakisa, na mobu 1988, mwa moke liboso na fɛti ya Noel, Pamela, ya oyo azali Témoin de Jéhovah, ayanolaki na telefone na esika na ye ya mosala mpe asololaki na moto moko oyo bazalaki kosala na ye na kompani moko, kasi ye azalaki lokola momonisi ya kompani yango kati na etuka moko na mokili ya Angleterre. Liboso na kokata lisolo, moto yango atunaki ye: “Osili komibongisa mpo na feti ya Noel?” Pamela ayanolaki ete: “Te.” Molobani na ye amitungisaki ete:‘’Ozali kobanga te ete okozala na retare na komilengela mpo na fete yango?” Pamela azongiselaki ye ete: “Nasanganaka na feti ya Noel te.” Mobali yango ayebisaki ye ete naino ayoka likambo ya motindo yango te, mpe atunaki ye, mpo na nini. Pamela alimbolaki ye ete azali Témoin de Jéhovah, mpe alandaki na kosembolaka ete esika moko te Biblia ezali kotinda na kokumisa mokolo ya kobotama na Yesu, mpe lisusu Yesu abotamaki mokolo ya 25 décembre te. Lisusu,ayaki kolimbola ete na ebandeli Noel ezalaki feti ya bapakano. Mobali yango alobaki na ye ete makambo wana nyonso ebandaki kosepelisa ye.

Nsima na sanza misato, tala maloba oyo Pamela ayokaki na koyanolaka na telefone: “Ozalí komikundola lisusu ete asololaki na ngai liboso na leri ya Noel, mpe oyebisaki ngai ete yo osanganaka na feti yango te? Yeba ete, nasili koyeba solo!” Ezalaki bobele mobali yango, mpe asololaki ete, poso mibale na nsima na Noel. ba Témoins de Jéhovah mibale bayaki kobela na ekuke na ye. Akotisaki bango na ndako. mpe abandaki koyekola Biblia elongo na bango. Alimbolaki ete asalaki bokoli noki. Alobaki na mwasi oyo azalaki kofanda na ye ete motindo wana ya bomoi endimami na Jéhovah te, mpe bayaki kokabwana na ntango oyo abengaki ye na telefone, bango mibale bazalaki koyangana na makita na lisangá ya boklisto.

Na nsuka ya mbula, bakomaki basakoli oyo bazwi naino batisimo te, mpe na ebandeli na mobu 1990 bayaki kobalana. Na nsima, bayaki kozwa batisimo elongo. Oyo nde mbano malamu ezwamaki na litatoli ya libaku malamu na maloba mokuse oyo epesamaki na telefone!

◻ Jehovah apambolaki moklisto mosusu ya mwasi oyo apesaki litatoli ya libaku malamu na mokili na Angleterre. Epai na moto moko asalaka na esika oyo balukaka mosolo lokola ndanga mpo na libateli to assureur oyo ekómelaki ye na ekuke, ndeko mwasi atunaki soki akolinga kozala na assurance kolongono na nzoto. na bolamu mpe na bomoi ya seko. Andimaki mpe atunaki ye soki azalaki kolobela mpo na assurance nini. Nsima na kotanga na katina Biblia elaka oyo Nzambe apesaki ya bomoi ya seko kati na Paradis oyo ekozala na mabele, andimaki mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis, mpe atangaki yango na mpokwa moko. Na ntango akendaki lisusu kotala mwasi moklisto yango. alobaki na ye ete ezalaki liteya moko kitoko, kasi azalaki koyoka mawa mpo azalaki na kondima ebongi to mpo na kosalela yango. Na bongo alimbolaki ye ete asengelaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita ya lisangá na boklisto Bibongiseli bizwamaki mpo ete ayekola Biblia elongo na ba Témoins, mpe abandaki koyangana na makita. Ayaki kozwa batisimo na eleko ya automne ya mbula yango Mbula moko na nsima, abalaki mwana ya moklisto ya mwasi oyo apesaki ye litatoli ya liboso. Ndeko mwasi alobi ete: “Litatoli oyo ya libaku malamu epesi ngai ndeko mobali mpe bokilo!”

Ezali solo ete bato oyo bazali koluka solo bazali kosepela ntango bazali koyoka solo ya Biblia na nzela na litatoli ya libaku malamu Lokola Yesu alobaki yango. bampate na ye bazali koyoka mongongo na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto