Bilanga bisili kotɛla mpo na kobuka mbuma na Brézile
“Botombola miso na bino mpe botala bilanga ete bisili kotela mpo na kobuka. Mobuki azali kozwa lifuti mpe azali kobuka mbuma mpo na bomoi ya seko.” (Yoane 4:35, 36) Bosolo na maloba ya esakweli oyo na Yesu Klisto ezali komonana lelo kati na bateritware mosika ya Brézile, mboka monene ya Amérique latine.
Uta bambula mingi, ba Témoins de Jéhovah ya Brézile bazali na esengo ya kozwa bokóli ya mbala na mbala na mosala na bango. Na sanza ya Avril 1991, babuki 308 973 ya Bokonzi batambwisaki boyekoli 401 574 na Biblia. Na le 30 Mars 1991, bato 897 739 bayanganaki mpo na kokanisa liwa na Yesu, ye oyo abandaki mosala ya kobuka mbuma.
Atako matomba wana malamu, kasi ndambo mosusu na elanga esengeli kobukama. Bato koleka bamilió mitano bafandi na bituká ya Brézile epai kuna ba Témoins de Jéhovah basilá kosakola bobele moke to mpe te. Eloko nini esili kosalema mpo na kokólisa kobuka mbuma kino kati na bituká yango?
Ba pionniers bazali kobuka mbuma
Kala mingi te, filiale ya la Société Watchtower ya Brézile etindaki, mpo na sanza motoba, ba pionniers (100 pionniers spéciaux mpo na ntango mokuse mpe 97 pionniers permanents) kati na bingumba 97, oyo ezali mingi na Est, epai kuna bato bazali mingi. Basakoli ya masangá mingi mpe bamipesaki na bolingo malamu mpo na kosangana na mosala kati na bateritware yango na boumeli ya ntango mokuse. Atako bankaká oyo basengeli kolónga, matomba mapesaki esengo mingi.
Na ndakisa, na engumba São Joào da Ponte, kati na ekólo ya Minas Gerais, ba pionniers bakendaki kotala molakisi oyo azalaki kolakisa mateya ya lingomba na eteyelo Nsima na koyoka lisoló ya Biblia, asɛngaki baekzamplere 50 ya mokanda Votre jeunesse comment en tirer le meilleur parti mpo na malako na ye ya katakisimo. Molakisi mosusu alobaki na ba pionniers baoyo bamilɛngɛlaki mpo na kokenda ete: “Bosengeli kokenda te, mpamba te bozali kokokisa mosala moko kitoko awa. Bobele bino nde bokoki kolimbola Biblia polele mpenza.
“Mosala wana kitoko mosepelisaki bato banso te. Na ndakisa, zulunalo moko ezalaki kobima na engumba wana (Diário de Montes claros), oyo ekómaki na lokasa ya liboso ete: “Sángó afundami mpo na kopusa bato na mobulu mpe na koponapona”, etyaki mokanda moko kati na yango tokaki ko tanga ete: “Na ndakonzambe, (sángó azali na momeseno ya ko tongo basangani ya mangomba mike mpe mangomba minene mosusu liboso ya bato nyonso, ata soko bakonzi ya mangomba ya mboka wana bazali te koteya bandimi malako ya katolike mpe ya boklisto, oyo eyokani na Baevanzile. Na misa, (sángo alobaki mabe na ntina na ba Témoins de Jéhovah oyo bazali awa na engumba, atako bato yango bazali na etamboli mabe te epai na bakatolike.” Mokomi ya lisoló (téolojié moko), oyo azalaki motɛmɛli te, ayaki kolanda diskur ya Biblia oyo esalemaki na ba pionniers mpe amemaki bato mosusu oyo bandimaki koya elongo na ye. Bango nyonso basepelaki na likita wana.
Bandeko minei ya engumba Fortaleza bamataki mpepo mpo na kokenda na esanga Fernando de Noronha, oyo etangwi na engumba wana na ntaká ya bakilometele 400. Bafandi 1 500 ya esanga wana bazwa naino litatoli ya solo te uta mibu 15. Na boumeli ya mikolo zomi, bandeko bakabolaki mikanda 50 mpe bazulunalo 245 mpe ba brochures; lisusu, babandaki boyekoli 15 na Biblia. Bato zomi na mibale bayanganaki na Ekaniseli ya liwa na Klisto, oyo date na yango ekómaki wana bandeko bazalaki naino na esanga. Ba pionniers balingi ete, na lisalisi ya Jéhovah, mosala mokoka kotelema mpo na libela na esika wana. Bandeko mosusu bazali kokana kokende kofanda na esanga yango.
Bopusi ya bakonzi ya mangomba likoló na kobuka mbuma
Etuluku ya basakoli na Bokonzi na lisangá ya Arpoador, na engumba Rio de Janeiro, bandimaki na bolingo malamu mpo na kokende kosakola na boumeli ya poso mibale, kati na bingumba mingi na ekólo Minas Gerais, oyo etangwi na bango soko na bakilometele 200. Na esengo mpenza, bakutaki bato yango na boyambi mpe na boboto. Bato bazalaki na momeseno ya kolongola bikɔti na bango mbala nyonso oyo bazalaki kotanga Nzambe to nkombo na ye, Jéhovah. Kasi, bobangi na bango mpo na Nzambe esalaki ete bakonzi ya mangomba bakoka kozala na bopusi likoló na bango.
Na engumba moko, sángó apekisaki bato ete bayoka ba Témoins de Jéhovah te mpe bayangana te na likita oyo bakanaki kosala Bobele na eleko wana, ye mpe abongisaki misa moko ya sipesiale mpe atyaki haut-parleurs na libanda ya ndakonzambe, na boye ete bate ya zingazinga bakokaki kolanda misa. Atako milende na ye wana, bato 29 bakendaki koyangana elongo na bapaya yango.
Engumba ya penepene emonisaki ezaleli ekeseni. Kuna, sángó alobaki na bato ete bayoka ba Témoins wana bakoleka kotala bango. Na yango, bato 168 bayanganaki na likita ya liboso. Na nsima, alobaki na bango ete batalela malamu lolenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali kokumisa Ekaniseli, mpamba te, mpo na ye, ba Témoins de Jéhovah “bazalaki kosala yango na lolenge malamu.” Na boumeli ya poso mibale oyo balekisaki mpo na kosakola Bokonzi kati na etuka wana, basakoli bakabolaki mikanda 1 014 mpe bazulunalo 1 052 mpe ba brochures.
Milende balandaki komonisa ezwili bango mapamboli
Sanza moko na nsima, basakoli 34 ya Bokonzi bazongaki kati na teritware yango mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo ebandaki na mbala oyo bakendaka liboso. Nkulutu oyo azalaki kotambwisa etuluku wana akomaki ete: “Ezalaki esengo na komona bato oyo basepeli na solo koyamba biso na botɔndi mpe na mpisoli ya esengo.” Ndeko mwasi moko amikundoli ete, na restaurant, mwasi moko abɛlɛmaki epai na ye mpe ba Témoins mosusu, “alɔmbi na mpisoli na miso ete toya koyekola elongo na ye.” Mwasi mosusu ayekolaki Biblia mbala misato na poso oyo ba Témoins balekisaki na etuká. Na mbala nyonso, azalaki komibongisa mpo na boyekoli na ye mpe azalaki kozela basakoli.
Ayebisaki ete, abandaki kobondela Nzambe ya solo, Jéhovah. Abakisaki ete: “Na motema na ngai, ezali yango nde nazalaki kozela uta kala.”
Na nsima, ba pionniers mibale ya basi batindamaki na etuka yango mpo na kokólisa mposa ya bato oyo basepelaki. Lokola na ekeke ya liboso ya ntango na biso, “baoyo nyonso babongi mpo na bomoi ya seko bandimaki.” (Misala 13:48) Mpe lokola mwasi Mosamaria oyo Yesu apesaki ye litatoli pene na etima na Yakobo, bato yango babandaki koyebisa bazalani na bango makambo bayekolaki. (Yoane 4:5-30) Lelo oyo, bandeko basi wana mibale bazali kosakola elongo na basakoli mosusu motoba, mpe bato 20 bazali koyangana pɔsɔ na poso na makita.
Kosepeláká na matomba oyo bazwaki na boumeli na mosala wana ya ntina, basakoli 29 na lisangá ya Arpoador bakendaki kosakola na engumba ya Mutum, oyo etangwi na bango pene na ntaká ya bakilometele 500. Nkulutu oyo azalaki kotambwisa etuluku yango alimboli ete: “Bayambaki biso na esengo mpenza Bato mingi bayokaki nsango na likebi nyonso mpe basepelaki na yango, na boye ete boyekoli 170 ya Biblia ebandaki, mpe tokanisi ete mingi ezali baoyo bakolanda koyekola.” Nsima na poso mibale, basakoli bakokisaki mwayene ya ngonga 90 mpo na mosakoli moko na moko mpe batikaki mikanda 1 100. Na diskur piblike oyo epesamaki na bandeko, motuya monene ya bato 181 bayanganaki.
Mwa basanza na nsima, lisangá lifutelaki ndako moko kitoko na centre ya engumba Mutum mpo na kosalela yango lokola Salle du Royaume mpe efandelo mpo na ba pionniers. Kati na rapport ya liboso oyo esalemaki na ba pionniers mibale ya basi oyo batindamaki na la Société kati na teritware wana, tokokaki kotanga kati na makambo mosusu ete: “Tosili kobanda kotambwisa boyekoli ya Biblia na boye ete mposa ya ba pionniers mosusu ezali mingi. Ata lolenge oyo bandeko ya Rio de Janeiro bazali kosalisa biso mbala moko na sanza, ekoki te mpo na kolónga mosala oyo monene. Pene na bafandi nyonso to libwa kati na bato zomi oyo tozali koloba na bango, bazali kosɛnga biso ete tozongela bango. Tozali mpe na mposa ya lisalisi mpo na kotambwisa makita.” Batindaki sikawa pionnier mosusu kobakama elongo na bango.
Bomoi ya bato ebongwani
Ezali likambo na kolendisa na komona ete solo ezali kozwa misisa mpe ezali kobota mbuma kitoko. Moto moko oyo asepelaki na nsango akomaki ete: “Kozwa boyebi ya Biblia ezali eloko eleki kitoko mpenza mpo na ngai Bomoi na ngai ebongi mpe nazali lisusu na mposa ya komela bankisi ya mpɔngi te. . . . Tika ete Jéhovah apesa bino mbano mpo na oyo nyonso esili bino kosala mpo na ngai.”
Mwasi mosusu alobaki ete: “Nazali na esengo mingi na motindo oyo Jéhovah afungolaki miso na ngai Atako nauti kokufela nkoko na ngai na poso oyo, nazali sikawa na elikya ya komona ye lisusu. Nalingi kozwa batisimo, kasi nalingi liboso komibongisa Tika ete Jéhovah apambola bino lokola boyaki awa mpo na komonisa biso nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi ya seko!” Moto mosusu alobaki ete: “Nalingi koyebisa bino ete nasili kotika komela makaya uta sanza moko sikawa. Nazali na esengo mingi lokola botindelaki ngai zulunalo oyo. Ezalaki na batoli mingi oyo esalisaki ngai mpo na kosala bongo.” Ezali solo ete kobuka mbuma ekopesaka bantina malamu ya kosepela.
Kasi, mapamboli motindo wana mazwamaki bobele mpamba te. Na ndakisa, wana mwasi moko mpe mwana na ye ya mwasi babandaki koyekola Biblia, sangó ya misio na bango akebisaki bango ete soki bakei na makita ya ba Témoins de Jéhovah, akobimisa bango na lingomba. Balandaki matumoli wana te, mpe bakendaki na makita. Na nsima, baboyamaki na baninga na bango ya kala, bamosusu balobaki na bango ete babɛlaki ligboma, mpo ete “Jéhovah wana” ezalaki kati na Biblia ya katolike te. Lokola mwasi yango amonaki nkombo ya Jéhovah kati na Biblia na ye ya katolike te, abengisaki baninga na ye ete baya epai na ye na mokolo oyo azalaki koyekola Biblia elongo na ba pionniers. Moninga moko ayaki na libongoli moko ya katolike (Paulinas). Na ntango atangaki nkombo ya Nzambe kati na note oyo epesami na Exode 6:3, andimaki koyekola Biblia.
Sangana mingi mpenza na kobuka mbuma
Mosala mokokisamaki na teritware oyo etalamaki mingi te, ezalaki na bopusi nini likoló na basakoli bango moko? Mosakoli moko alobaki ete: “Mosala wana molendisaki kondima na biso mpe boyokani na biso elongo na Jéhovah mpe esalisaki biso na kotya makambo ya ntina na bomoi na biso na esika ya liboso.” Mosusu alobaki ete: “Poso mibale oyo esalisi ngai na kokólisa bolingo na ngai mpo na bandeko, baoyo, lokola libota, bazali kosala mpo na kokokisa mokano bobele moko: koluka bato mingi ya bopɔlɔ. Yango esalisaki ngai lisusu na kolinga baoyo bazali koyamba nsango na biso, mbala mingi na mpisoli, komonisáká bongo ete bazali mpenza na mposa ya solo. Oyo eleki mpenza, naokaki bolingo ya Jéhovah, oyo apesi biso libaku kitoko ya kosalela ye.”
Nkulutu moko oyo asanganaki na mosala ya kosakola kati na moko na bateritware wana, amonisaki kokesena oyo ezali kati na bomoi ya bituka wana mpe kofanda kati na bingumba minene. Alobaki ete: “Nakanisi ete, soki bandeko bayaki kofanda na mboka mbɛlɛ mingi kati na bango bakozala na bomoi malamu. Ata mobulu moke ezali awa te. Bomoi kati na bingumba mike mpe bamboka ezali malamu bobele te mpo na kobikela na lifuti moke na mosala, kasi na kokutana mingi elongo na bandeko mpe na kolekisa ntango mingi na misala ya elimo. Baklisto oyo basili kozwa pansiɔ na mosala, bilenge oyo bazali na mikumba mingi te na libota to basakoli oyo bapekisami na mosala ya mosuni te mpo na kokende kofanda esika mosusu, bakoki te kosimba libaku wana kitoko mpe kosepelisa motema na bango, motema ya Jéhovah mpe oyo ya bazalani na bango?
Lisoló ya bateritware oyo etalelami mingi te na Brézile, limonisi ete bilanga bitɛli mpo na kobuka mbuma. Bobele na boumeli ya mbula mibale, mosala kati na elanga wana eboti masangá ya sika 191 mpe bituluku mike. Ezali lisusu na mosala mingi ya kosala, kasi Jéhovah akolanda mpenza kopambola basakoli na Bokonzi baoyo bakosangana ntango nyonso na motuya monene, na kobuka mbuma mingi. Yo moko okoki kosangana mingi na mosala yango?
[Map/Picture on page 25]
Ba Témoin ya esengo ya engumba Rio de Janeiro bazali kosangana na masala ya kobuka mbuma
[Elilingi na lokasa 26]
Litatoli na bamboka mike ya ekólo Minas Gerais