Tomonisa “nyonso oyo ezali malamu”
“Mbuma na pole emonani na nyonso oyo ezali malamu.”—BAEFESE 5:9
1, 2. Masangá nini mazali uta kalakala, mpe mazali lelo kati na ezalela nini ekeseni?
MPO na botomboki na Edene, oyo ekokisi soko mibu nkɔto motoba uta yango esalemaki, mpe mpo na mpela oyo ebomaki bato ya ntango na Noa, mokili mosili kokabwana na bituluku to masangá mibale, moko esalemi na bato oyo bazali kosala molende mpo na kosalela Jéhovah, mpe mosusu esalemi na bato ya Satana. Masangá yango mazali kino lelo oyo? Ee! Mosakoli Yisaya alobelaki yango mpe asakolaki nini ekozala ezalela ya moko na moko na yango na eleko na biso, ete: “Tala, molili mokozipa mokili, molili tuu mokozipa mabota; nde Jéhovah akobimela yo, mpe nkembo na ye ekomonana likoló na yo.”—Yisaya 60:1, 2.
2 Ya solo mpenza, kokesena oyo ezali kati na masangá mibale wana ezali mpenza lokola oyo ezali kokabola molili na pole. Mpe lokola mwa pole moke ezali kobenda likebi ya moto oyo abungi nzela kati na molili, bobele bongo pole na Jéhovah oyo ezali kongɛnga kati na mokili oyo ya molili, ezali kobenda bamilió na bato na sembo na lisangá ya Nzambe. Yisaya alobi lisusu ete: “Mpe mabota [bampate mosusu] bakoya epai na pole na yo mpe mikonzi [bapakolami oyo bazali kozela koyangela kati na Bokonzi] kino kongɛnga na kobima na yo.”—Yisaya 60:3.
3, Na lolenge nini baklisto bazali kongengisa nkembo na Jéhovah?
3 Lolenge nini basaleli na Jéhovah bazali kongengisa nkembo na ye? Libosoliboso na kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi na ye oyo bosili kosalema na makoló. (Malako 13:10) Mpe na komekoláká ye, ye oyo aleki bato banso mpo na ezaleli na malamu; bongo, na etamboli na bango, bazali kobenda basɔkɛmi epai na pole. (Baefese 5:1) Paulo alobi ete: “Mpo ete bozalaki molili liboso nde sikawa bozali moi kati na Nkolo. Botambolaka lokola bana na pole.” Abakisaki: “Mbuma na pole emonani na nyonso oyo ezali malamu mpe na boyengebene mpe na solo. Bomekaka koyekola yango ekosepelisa Nkolo. Bosangana te na misala na molili mizangi kobota mbuma.” (Baefese 5:8-11) Paulo alingaki koloba nini na “nyonso oyo ezali malamu”?
4. Malamu ezali nini, mpe ndenge nini yango ezali komonana epai na moklisto?
4 Lokola lisolo na liboso limonisaki yango, malamu ezali na boyokani na bizaleli na sembo. Yesu alobaki ete bobele Nzambe ye moko nde azali malamu na motindo na kokoka. (Malako 10:18) Nzokande, moklisto akoki komekola Jéhovah na kolonáká ezaleli na malamu, oyo ezali moko na mbuma na elimo. (Bagalatia 5:22) Totangi kati na diksionere moko ya Biblia (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words), na nsé na liloba a.ga.thos’, liloba na greke oyo libongolami na “malamu,” ete: “[Ezali ] kolakisa oyo ekopesaka matomba, mpo na ezaleli na yango ya sembo soko mpo na motindo kitoko oyo yango esalemi.” Mpo na moklisto oyo aloni ezaleli na malamu, tokoki bongo koloba ete azali na mbala moko moto malamu mpe azali kosala oyo ezali malamu. (Tala Deteronome 12:28.) Lisusu, moklisto akobwaka makambo nyonso oyo mazali kotɛmɛla ezaleli na malamu, “misala na kufa oyo mizali na molili.” ‘Nyonso oyo ezali malamu’ oyo Paulo alobeli ezali bongo mitindo ndenge na ndenge oyo moklisto akoki komonisa ezaleli na malamu kati na etamboli na ye. Totalela mwa ndambo na yango.
‘Tolanda kosala malamu’
5. Lobela moko na mitindo ya malamu, mpe limbola mpo na nini baklisto basengeli kolóna yango?
5 Kati na mokanda na ye epai na Baloma, Paulo alobelaki moko na mitindo na oyo nyonso ezali malamu. Na ntina na botósi epai na “bakonzi baleki liboso,’’ alobi ete: “Yo olingi ete obanga [mokonzi] te? Boye, landa kosala malamu mpe okozala na lokumu epai na ye.” “Malamu” oyo elobelami awa ezali bongo botósi na mibeko mpe bibongiseli bikamatami na bakonzi ya politike. Mpo na nini moklisto asengeli kotosa yango? Mpo ete amikɔtisa na matáta mpambampamba te elongo na bakonzi yango mpe na bongo komibendela etumbu, mpe—oyo eleki mpenza ntina—mpo na kobatela lisosoli peto liboso na Nzambe. (Baloma 13:1-7) Na kotosáká Jéhovah liboso, moklisto ‘azali kokumisa mokonzi’ mpe akotombokela bakonzi te, mpamba te Jéhovah Nzambe apesi bango nzela ete bayangela. (1 Petelo 2:13-17) Na motindo wana nde baklisto bazali baninga malamu epai na bazalani na bango, ba citoyens malamu mpe bandakisa malamu.
Tozala na boboto mpe limemya mpo na bazalani na biso
6. (a) Tanga motindo mosusu ya ezaleli na malamu. (b) Engebene Biblia, banani babongi ete tomonisa bango limemya mpe boboto?
6 Jéhovah azali komonisa ezaleli na malamu na ye na kopesaka “mbula longwa na likoló mpe bilaka na kobota mbuma mingi” epai na bafandi nyonso ya mabelé. Mpo na yango nde bazali na ‘bilei mingi mpe na esengo,’ likambo oyo limonisi ete Jéhovah azali Nzambe atondi na bolingo. (Misala 14:17) Tokoki komekola ye kati na likambo wana na kozaláká na limemya epai na bazalani na biso kati na makambo mike mpe na makambo minene lokola. Kasi epai na banani mpenza tosengeli komonisa limemya? Paulo atangi mpenza bankulutu, mpe alobi na baklisto ete, “baoyo bazali kosala mingi kati na bino, baoyo bazali kokamba bino kati na Nkolo mpe bazali kopamela bino.” Apesi bandeko na ye toli na komonisa epai na bankulutu “limemya mingi, mpe bolingo na ntina na mosala na bango.” (1 Batesaloniki 5:12, 13.) Ndenge nini yango ekoki kosalema? Na kosalana elongo na bango, na ndakisa na kosanganáká na misala oyo misengeli mpenza kokokisama kati na Salle du Royaume. Ya solo, tosengeli kokakatana te mpo na kosolola na nkulutu moko ntango tozali na mposa ya lisalisi, kasi tosengeli kosala yango na lolenge lobongi mpe kozanga komizela ete alanda bobele makambo oyo biso tolobi. Tokosala nde nyonso mpo na komeka koyeisa pɛtɛɛ mokumba na babateli wana na bampate baoyo bazali kosala mosala makasi, nzokande mingi kati na bango bazali na mikumba kati na mabota na bango, longola mikumba na bango na lisangá.
7, Na motindo nini tokoki kopesa limemya epai na mibangé?
7 Mibangé mpe babongi kozwa limemya na biso. Mpo na likambo yango Mibeko na Moïse mizalaki na lilako moko ya sikisiki: “Okotelema liboso na nsuki mpɛmbɛ, mpe okomemya mobali anuni mpe okobanga Nzambe na yo. Ngai nazali Jéhovah.” (Levitike 19:32) Lolenge nini tokoki kozala na limemya epai na mibange? Bilenge bakoki kosenga ete bakende kosombela bango biloko oyo bazali na yango mposa to kosalela bango misala misusu. Bankulutu bakoki komonisa limemya epai na mibangé na kosenzelaka ete bazwa lisalisi oyo bazali na yango mposa mpo na koyangana na makita. Na ba assemblées, bilenge, mpo ete bazali na makasi mingi, bakosukuma mibangé te, baoyo bazali kotambola noki te na molongó, na komekáká kokata bango liboso, kasi bakomimonisa bato na motema pɛtɛɛ soki mobangé moko azali koumela mpo na kofanda to mpo na kozwa bilei.
8. Lolenge nini tokoki komonisa boboto mpe limemya na motindo na bato mosusu oyo Bíblia ezali kolobela mpenzampenza?
8 Mokomi na nzembo azali koloba mpo na motindo mosusu na bato oyo tosengeli kozala na boboto epai na bango: “Mapamboli mazali epai na ye oyo akobanza babólá!” (Nzembo 41:1) Ekoki kozala pɛtɛɛ mpo na kozala na limemya epai na bato minene to bazwi, kasi ezali boni mpo na basokemi to mpe babólá? Engebene Yakobo, mokomi na Bíblia, tosengeli komonisa limemya motindo moko epai na bato yango; ezali boyengebene na biso mpe bolingo na biso ya boklisto nde emekami na likambo yango. Tokoki kolonga momekamo oyo na kozaláká na limemya mpe na boboto mpo na bato banso, ata soko ezalela na bango ezali nini!—Bafilipi 2:3, 4; Yakobo 2:2-4, 8, 9.
Tolanda komimonisa bato na motema mawa
9, 10. Mpo na nini baklisto basengeli kozala na motema mawa, mpe ndenge nini motindo wana ya ezaleli na malamu ezali komonana?
9 Masese mosusu na Yesu mazali komonisa lolenge mosusu ya ezaleli na malamu. Kati na moko ya masese yango, Yesu alobeli Mosamaria oyo akutaki mobali moko oyo bayibaki ye, babetaki ye makasi mpe babwakaki ye na balabala. Molevi moko mpe nganganzambe moko baleki pene ya moto yango azokisamaki, kasi basalisaki ye te. Nzokande, Mosamaria atelemaki mpe asalisaki ye mingi mpenza koleka oyo ekokaki kokanisama. Lisoló yango, mbala mingi libengami lisese na Mosamaria malamu. Motindo na malamu nini oyo Mosamaria wana amonisaki yango? Motema mawa. Yesu atunaki na molobani na ye soki nani kati na baleki nzela misato wana, amimonisaki moninga ya moto oyo babɛtaki na babótoli, mpe ye ayanolaki na malamu nyonso ete: “Oyo ayokelaki ye mawa.”—Luka 10:37.
10 Baklisto ya motema mawa bazali komekola Jéhovah, oyo Moïse alobaki na ntina na ye epai na Bayisraele ete: “Mpo ete Jéhovah Nzambe na yo azali Nzambe na mawa. Ye akotika yo te mpe akoboma yo te mpe akobosana kondimana na ye na batata na yo te, oyo ye asalelaki bango na ndai.” (Deteronome 4:31) Yesu amonisaki bopusi oyo motema mawa na Nzambe esengeli kozala na yango likoló na biso: “Bozala na motema mawa, lokola Tata na bino azali na motema mawa’’ (Luka 6:36) Lolenge nini tokoki komonisa motema mawa? Lisese na Yesu limonisi yango malamu: moko na mitindo na komonisa motema mawa ezali oyo ya kozala pene na kosalisa bazalani na biso, ata soki yango ezali na likámá ata soki ezali kobebisa makarnbo na biso mosusu. Moto malamu akokangaka miso te likoló na mpasi ya ndeko na ye soki nde azali na makoki ya kosilisa yango.—Yakobo 2:15, 16.
11, 12. Engebene lisese na Yesu na ntina na baombo, motema mawa ezali lisusu nini, mpe lolenge nini tokoki komonisa yango lelo?
11 Lisese mosusu na Yesu limonisi ete ye oyo azali komonisa ezaleli na malamu atondi na motema mawa, azali pene mpo na kolimbisa Ezali likambo na moombo oyo asengeli kofuta nyongo ya talánta nkoto zomi epai na nkolo na ye. Lokola azangi makoki ya kofuta yango, moombo abondeli nkolo na ye ete ayokela ye mawa, mpe nkolo na ye oyo azali na boboto alimbisi ye nyongo monene ya badenali 60 000 000 (milió ntuku motoba). Kasi, moombo akei mpe akutani na moombo mosusu oyo asengeli kofuta ye nyongo ya badenali nkámá mpamba. Moombo oyo bauti kolimbisa amimonisi moto na kozanga mawa mpe akangisi moninga na ye na boloko kino akofuta nyongo na ye. Emonani ete, moombo oyo aboyi kolimbisa azali moto malamu te, mpe ntango nkolo na ye ayoki likambo oyo liuti koleka, abwakaki ye na boloko.—Matai 18:23-35.
12 Biso tozali lokola moombo oyo nkolo na ye alimbisaki ye. Na nzela na mbeka na Yesu, Jéhovah asilisaki nyongo monene, masumu, oyo tozalaki na yango. Tosengeli bongo kozala pene mpo na kolimbisa bamosusu. Yesu alobaki ete tosengeli kozala pene na kolimbisa “kino mbala ntuku nsambo na nsambo,” elingi koloba mbala nyonso oyo yango esengeli. (Matai 5:7; 6:12, 14, 15; 18:21, 22) Na yango, moklisto ya motema mawa akokangela moto nkanda te. Azali na nkele ata moke te kati na motema na ye mpe akoboya te mpo na kolobisa moko na baninga na ye baklisto mpo ete azali kosepelisa ye te. Lolenge wana ya kozanga motema mawa eyokani te na ezaleli na malamu na boklisto.
Tozala bakabi mpe bayembi na bapaya
13. Motindo mosusu ya ezaleli na malamu etaleli nini?
13 Malamu emonisami mpe na bokabi mpe boyambi na bapaya. Mokolo moko, elenge mobali moko ayaki kosɛnga toli epai na Yesu, ete: Molakisi, nasala malamu nini ete nazala na bomoi ya seko?” Yesu ayanolaki ye ete asengelaki kotosa mibeko na Nzambe ntango nyonso. Ya solo, botósi na mibeko na Jéhovah ezali moko na mitindo ya ezaleli na malamu. Elenge mobali yango akanisaki ete azalaki mpenza kokokisa yango. Ezali polele ete mpo na bato ya zingazinga na ye azalaki komonana mpenza lokola moto malamu; nzokande, azalaki komiyoka ete eloko moko ezali kozanga ye. Bongo Yesu alobaki na ye ete: “Soko olingi kobonga na malamu, kenda kotekisa nyonso ezali na yo mpo pesa epai na babóla mpe okozala na biloko na motuya na likoló; yaka mpe landa ngai.” (Matai 19:16-22) Elenge mobali aokaki mpasi mingi na motema. Tosengeli koyeba ete azalaki na bozwi mingi. Soki alandaki toli na Yesu, mbɛlɛ amonisaki ete azalaki moto alingi misolo mingi te. Mbɛlɛ asalaki likambo malamu soki nde amonisaki bokabi oyo bozangi koluka litomba.
14. Toli nini kitoko Jéhovah mpe Yesu basilaki kopesa mpo na oyo etali bokabi?
14 Jéhovah asengaki na Bayisaele ete bazala bakabi. Na ndakisa tozali kotanga ete: “Okopesa ye na motema malamu [na mozalani na yo oyo azali mobólá] mpe motema na yo ekoimaima te wana ekopesa yo ye, mpo ete na ntina na oyo Jéhovah Nzambe na yo akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na yango nyonso ekobanda yo kosala.” (Deteronome 15:10; Masese 11:25) Yesu Klisto mpe alendisaki bato ete bazala bakabi: “Bopesa mpe ekopesama na bino. Kati na maboko na bino bakopesa emekeli malamu na kopo esili kokáma mpe koningisama mpe etondi mɛkɛ. Mpo ete bakomeka mpo na bino na emekeli ekomekaka bino na yango.” (Luka 6:38, MN) Mpe, Yesu ye moko azalaki mpenza mokabi. Mokolo moko, akanaki kopema mwa moke. Bibele bamonaki esika oyo ye azalaki mpe bayaki epai na ye. Yesu amimonisaki mokabi: na esika ete apema, amipesaki nde na bolingo na ye moko mpo na kosalela bibele yango. Na nsima amonisaki elembo ya boyambi monene na koleisaka bato nyonso wana.—Malako 6:30-44
15. Ndakisa nini malamu ya bokabi emonisamaki na bayekoli na Yesu?
15 Ebele na bayekoli na Yesu bazalaki kolanda toli na Jéhovah mpe oyo na Nkolo na bango; yango wana bayebanaki mpo na bokabi na bango mpe boyambi na bango. Na ebandeli ya lisangá na boklisto, ntalo monene na bato oyo bayaki na elambo ya Pantekɔte ya mobu 33 bayokaki kosakola ya bantóma mpe bakómaki bandimi. Babakisaki mikolo ya mobembo na bango nsima na elambo mpo na koyekola makambo mingi lisusu, kino misolo na bango mibandaki kosila. Na yango, baklisto ya etúka wana batɛkaki biloko na bango mpe bapesaki makabo mpo ete bandeko na bango ya sika bakoka kozwa mwa eloko ya kobikela mpe bakoka kolendisama kati na kondima. Oyo nde bokabi!—Misala 4:32-35; tala Misala 16:15; Baloma 15:26.
16. Tanga mwa mitindo oyo tokoki lelo komimonisa bayembi na bapaya mpe bakabi?
16 Elimo motindo moko ya bokabi ezali komonana lelo epai na baklisto oyo bazali kopesa ntango na bango mpe mosolo na bango mpo na lisangá mpe mpo na mosala ya kosakola kati na mokili mobimba. Elimo yango ekomonanaka na ntango bazali kotinda makabo mpo na kosunga bandeko na bango oyo bazwi likámá lokola koningana na mabelé to mopepe makasi soko mpe na bitumba. Emonanaka mpe na motindo oyo lisangá bayambaka mokengeli ya circonscription mbala na mbala oyo ye alekaka kotala bango. To ntango libota moko na boklisto ebengi “bitike bazangi tata” na boyambi nyonso mpo na kominanola elongo na bango soko ete basangana na boyekoli moko na Biblia na libota yango: wana mpe ezali lolenge na koyamba bapaya, mpe emonisi bongo ezaleli na malamu na boklisto.—Nzembo 68:5.
Tolobaka solo
17. Mpo na nini ezali mpasi na koloba solo lelo oyo?
17 Ntango Paulo alimbolaki mbuma na pole, asangisaki ezaleli na malamu na boyengebene mpe na solo, mpe ebongi kobakisa ete ye oyo azali koloba solo azali komonisa lolenge mosusu na ezaleli na malamu. Bato malamu bakobukaka lokutá te. Nzokande, kati na mokili oyo lokutá esili kopalangana mingi, ezali mpenza mpasi mpo na koloba solo. Bato mingi bazali kobuka lokutá ntango bazali kotondisa mikanda na bango ya bafuti mpako. Basali bakobukaka lokutá mpo na mosala oyo bazali kosala. Na ntango ya kobongisa mituna mpe na ntango ya kosala mimekano, bana kelasi bakofungolaka mikanda na bango mpo na kotala, oyo ezali bongo lokutá. Bato na mombongo bakobukaka lokutá wana ezali bango kosolola mpo na kosala bakontra. Bana bakobukaka lokutá ete bazwa etumbu te. Mpo na kosukisa, batongi bazali kobebisa lokumu ya bato mosusu na kosaleláká lokutá.
18. Lolenge nini Jéhovah azali kotalela bato na lokutá?
18 Jéhovah ayini lokutá. Kati na ‘makambo nsambo oyo ayini, ezali “lolemo na nkutá” mpe “motatoli na lokuta oyo akolobaka makambo na sembo te.” (Masese 6:16-19) “Bato nyonso na lokuta” batangami na molongó na bato na goigoi, na babomi na bato mpe na bato na pite, oyo bakozala na esika te kati na ebongiseli na sika ya Nzambe. (Emoniseli 21:8) Tozali kotanga lisusu kati na Masese ete: “Ye oyo akotambola na sembo azali kotosa Jéhovah, nde ye oyo azali na mobulu na nzela na ye akotyola ye.” (Masese 14:2) Moto na lokutá azali sembo te kati na banzela na ye. Na bongo azali komonisa ete azali mpenza kotyola Jéhovah. Oyo nde likambo na nsomo! Tólóbaka ntango nyonso solo, ata soki yango ekobendela biso mpamela to ekosenga biso ete tobimisa mosolo mingi (Masese 16:6; Baefese 4:25) Baoyo bazali koloba solo bazali komekola Jéhovah, “Nzambe na solo.”—Nzembo 31:5.
Tólona ezaleli na malamu
19. Likambo nini tozali mbala mosusu komona kati na mokili, mpe yango ezali kopesa lokumu epai na nani?
19 Oyo ezali bobele mwa ‘mitindo’ na ezaleli na malamu oyo moklisto asengeli kolona. Ezali solo ete, kati na mokili, ezali na bato oyo bazali komonisa mwa ezaleli na malamu. Na ndakisa, ezali na bato oyo bakoyambaka bapaya, mpe bamosusu bazali na motema mawa. Engebene maloba na Yesu, likambo oyo lizali kobenda likebi kati na lisese ya Mosamaria malamu, ezali oyo ete, moto oyo azalaki Moyuda te amimonisaki moto na motema mawa nzokande mikóló na lisangá na Bayuda bakweaki kati na likambo yango. Komona ete elimo motindo wana ezali naino mpenza epai na bato mosusu, ata nsima na mibu nkɔto motoba ya kozanga kokoka, yango ezali kopesa lokumu epai na Mozalisi na moto.
20, 21. (a) Na likambo nini malamu na boklisto ekeseni na malamu oyo tozali komona epai na bato ya mokili? (b) Lolenge nini moklisto akoki kolóna ezaleli na malamu, mpe mpo na nini asengeli komipesa na kosalela yango?
20 Nzokande mpo na baklisto, malamu ezali te lokola ezaleli oyo bakoki kozala na yango to mpe te. Lokola basengeli kozala bamekoli na Nzambe, ezali bongo ezaleli oyo basengeli nde kolona yango kati na makambo nyonso. Lolenge nini yango ekoki kosalema? Biblia elobi na biso ete tokoki koyekola ezaleli na malamu. Mokomi na nzembo asengi Nzambe kati na libondeli ete: “Lakisa ngai bososoli malamu.” Lolenge nini? Akobi ete: “Mpamba te nandimi malako na yo.” Alobi na nsuka ete: “Yo ozali malamu, mpe okosalaka malamu; teya ngai mibeko na yo.”—Nzembo 119:66, 68.
21 Na yango, soki toyekoli mibeko na Jéhovah mpe totósi yango, tokolona ezaleli na malamu.Tobosana te ete malamu ezali mbuma na elimo na Nzambe. Soki tozali koluka elimo na Jéhovah kati na mabondeli, kozaláká esika moko na bandeko na biso mpe kosaláká boyekoli na Biblia, na ntembe te tokozwa lisalisi mpo na kolona ezaleli yango. Lisusu, ezaleli na malamu ezali na nguya. Ekoki ata kolonga mabe. (Baloma 12:21) Ezali bongo na ntina monene ete tosala malamu epai na bato banso, mingi mpenza epai na bandeko na biso baklisto. (Bagalatia 6:10) Na bongo, tokozala kati na baoyo bazali kozwa ‘nkembo mpe lokumu mpe kimya’ oyo elakami na “moto nyonso oyo azali kosala malamu.”—Baloma 2:6-11.
Bozongeli
◻ Ndenge nini tokoki kolanda kosala malamu na oyo etaleli bakonzi baleki liboso?
◻ Banani mosusu babongi na kozwa limemya na biso?
◻ Mitindo nini motema mawa mozali komonisama?
◻ Misala nini ya bokabi mpe ya boyambi bapaya mizali kokesenisa baklisto na eleko na biso?
[Elilingi na lokasa 20]
Limemya mpe boboto mpo na mozalani ezali komonisa ezaleli na malamu
[Elilingi na lokasa 23]
Yesu, Moteyi Monene, amipesaki mpenza mpo na kosalela bato mosusu