Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/8 nk. 8-12
  • Bolukiluki ya bonsomi na Sénégal

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolukiluki ya bonsomi na Sénégal
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • ‘Jéhovah alingi ete bozwa ndako oyo’
  • Na mosala ya kosakola elongo na bamisionere
  • Basikwami mpo na kobanda mosala ya pionnier
  • Likambo ya kobala basi mingi mpe libala ya mwasi bobele moko na boklisto
  • Bikelákela mpo na kotɛmɛla losambo ya solo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/8 nk. 8-12

Bolukiluki ya bonsomi na Sénégal

NA NGAMBO mosusu ya Dakar, oyo ezali lelo kapitale ya Sénégal, ezali na mwa esanga moke ya Gorée. Yango ezali na elembo mabe ya eleko moko na mpasi ya Lisoló na bato: ndako moko ya baombo etongamaki na 1776.

Ezalaki na bandako motindo wana​—mpe yango ezalaki mingi​—nde bazalaki kokɔtisa baombo 150 kino 200, kati na ezalela ya mpasi, mbala mosusu na boumeli ya basanza misato, liboso ete bakɔtisama na masuwa mpo na kotinda bango kati na mikili ya mosika. Basangani ya libota moko bakabwanaki mpe bazalaki komonana lisusu te; tata akokaki kotindama na Louisiane (na Amérique du Nord), mama na Brésil to na cuba, mpe bana na Haïti, na Guyana to na Martinique. Oyo nde kotyola mpo na bonsomi na moto! Yango ezali mpe kokundola na nguya nyonso ete bonsomi ezali likabo kitoko oyo ezalaki mpo na moto nyonso te.

Nayebaki makambo nyonso oyo kati na mokanda moko moke ekomami mpo na bapaya, oyo natangaki kati na mpepo ezalaki kokende na Sénégal, mboka oyo ezali mpenza na Ouest ya Afrike. Esobe na matiti mingi ya Sénégal ezingami na Nord mpe na Est na esobe ekaoki, mpe na zámba monene epai na Sud. Ezali na esobe wana nde bato bakoki komona banzeté minene na baobab, nzeté oyo ekoumelaka mingi, mpe oyo mbuma na yango kitoko, ebengami mampa na makaku, ezali kobimisa masanga kitoko, fúlufúlu na baobab. Etúka yango ezali mpe na makaku mingi, na bandeke na langi kitoko mpe na bamboka mike kitoko etongami na nse na banzete na mángolo.

Nafanda nyɛɛ na kiti wana mpe nakanisaki ntango oyo nasengelaki kolekisa kati na mboka wana, likambo oyo nazalaki kozela yango uta kala. Lelo oyo, Sénégal, ekɔtelo ya Afrike na Ouest, ezali na bafandi milió nsambo baoyo bauti na bikolo bikeseni, mpe bazali na bonsomi mpenza. Kasi ekoki kozala ete moto moko azali na bonsomi na mosuni, nzokande azali moombo ya misala mpe biyambayamba oyo ezali kopimela bango bonsomi ya solo? Nazalaki na motema likoló mpo na kokutana na bandeko na ngai ya elimo ete bayebisa ngai lolenge nini solo oyo ekosikolaka ezali kokóla kati na eteni wana ya mokili.​—Yoane 8:32.

‘Jéhovah alingi ete bozwa ndako oyo’

Kati na programme na ngai, nasengelaki kotala liboso filiale ya la Société Watch Tower mpe ndako ya bamisionere na Dakar. Ntango tokómaki liboso ya ndako oyo ezali na esika moko ya kimya pene na centre-ville, namonaki J moko monene ekomamaki na liboso ya ndako yango etongami na motindo na etongelo ya sika. Likambo ya liboso natunaki na ntango ya vizite ezali ndimbola ya likomi J.

Moto oyo azalaki kotambwisa ngai alobaki ete, “Malamu. Na 1985, wana ezalaki biso koluka ndako monene mpenza mpo na filiale, toyaki kotala ndako oyo na ntango ezalaki naino kotongama. Kasi tomonaki yango monene mingi mpo na bamposa na biso. Ntango nkolo na yango ayokaki ete tozali ba Témoins de Jéhovah, amonisaki mpenza mposa ya kopesa biso yango mpo ete tofutela, mpamba te ayebaki bosembo na biso. Alobaki ete: ‘Nandimi solo ete Jéhovah, Nzambe na bino, alingi ete bozwa ndako oyo. Botala! Ezali na J monene liboso na ndako! Nakomisaki yango na esika wana mpo ete ezali likomi mokuse ya nkombo na ngai, Jean, kasi sikawa nandimi ete ezali wana mpo na nkombo na Nzambe, Jéhovah!’ Uta mbula mitano sikawa, tozali na esengo ya kofanda kati na ndako oyo kitoko.”

Na nsima, nalingaki koyeba lolenge nini mosala ya kosakola mobandaki na Sénégal.

“Mai na bonsomi ya solo ekɔtaki na ebandeli ya bambula 1950 na Témoin de Jéhovah moko oyo autaki na France mpo na koya kosala na Sénégal. Na 1965, filiale efungwamaki na Dakar mpo na kotambwisa mosala na mikili misato oyo milobaka lokótá ya Lifalansé, Sénégal, Mali mpe Mauritanie, bakisa mpe mokili moko mokolobaka Lingelesi, Gambie. Uta 1986, tozali mpe kotambwisa mosala na Guinée-Bissau, epai kuna balobaka portugais.”

Lokola nayebaki ete na eteni wana ya mokili, 90 % ya bato bazali baklisto te, natunaki lolenge nini mosala mozali kokóla. Moto oyo azalaki kotambwisa ngai ayanolaki ete: “Ya solo bato mingi kati na mikili na biso bayebi Biblia malamu te, kasi mosala mozali kokóla ntango nyonso. Na Janvier 1991, tozalaki na esengo ya kozwa motuya ya basakoli na Bokonzi 596. Yango emonisi ete bandeko na biso ya mboka mpe bamisionere bazali kosala milende minene kati na mosala ya kosakola.”

Nalobaki na ye ete: “Nakanisi ete bamisionere mingi bazali kosala awa.’’ Akobaki lisoló na ye ete: “Nazongisaki mwasi na ngai ya mibale epai na baboti na ye, mpe nalimbolaki na mayele nyonso ete ezali te ete namonaki likambo moko mabe epai na ye, kasi ezalaki mpo na kotósa mitinda na Nzambe. Nakamataki bibongiseli malamu mpo na kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya bana na ngai, mpe nazali kotɔndo Jéhovah lokola bango mpe bazali kosalela ye lelo. Kati na bana libwa oyo bazali basakoli, mitano basili kozwa batisimo; mibale bazali ba pionniers spéciaux mpe misato mosusu, pionniers permanents to auxiliaires. Solo esikoli ngai mpenza na mikakatano mingi oyo mitaleli kobɔkɔlo bana.”

“Ee. Bazali soko 60 baoyo batindami na bateritware ekeseni oyo bozali kotalela, mpe bauti na mikili 13. Bazali komipesa mingi mpe basali mingi mpenza mpo na kotyama ya moboko makasi na mosala. Bandeko ya mboka oyo bazali mpe komonisa ezalela na elimo motindo moko na komonisáká bolingo mpe molende mpo na solo. Atako mikakatano oyo bazali kokutana na yango, lokola bosomele mpe kozanga mosolo, ba ndeko mingi bazali kolekisa ngonga 15 to koleka kati na mosala ya kosakola na sanza nyonso. Tokanisi ete okokutana na bamoko na basakoli yango na boumeli ya vizite na yo.”

Nazalaki kozela bantango motindo wana na motema likoló.

Na mosala ya kosakola elongo na bamisionere

Margaret (ye oyo alekisaki koleka mibu 20 kati na mosala ya misionere liboso ya liwa na ye oyo likómelaki ye kala mingi te), andimaki komema ngai kati na teritware na ye na centre-ville. Tozwaki taxi bus mpo na komona lolenge bomoi ya mokolo na mokolo ekolekaka kati na mboka wana. Ezalaki mpenza mwa taxi bus moko moke oyo ezalaki kotelama mbala na mbala. Ezalaki komema bato 25, mpe soki bango nyonso bazalaki mike, mbɛlɛ mobembo ezalaki mpenza malamu. Basi mibale oyo bafandaki na kiti moko na ngai bazalaki mpenza minene, kasi nakangaki motema na mpasi wana mpe nazalaki bobele koseka.

Ntango tokómaki na esika ezalaki biso kokende, Margaret alimbwelaki ngai ete: “Kati na teritware na ngai ya centre-ville, tokoki komona biloko mingi kitoko.” Alobaki ete: “Tala ba sandales wana na langi na mafuta kolakisáká ngai mitalaka na batɛkisi mitandami pembeni na nzela mobimba. Sandales yango esalemi na mposo ya mɛmɛ to na oyo ya ntaba, oyo ebongisami malamu.” Tobelemaki epai na basali na ba sandales, mpe Margaret abandaki koyebisa bango nsango ya Bokonzi na lokótá na bango, wolof. Bayokaki na likebi nyonso mpe basepelaki mingi na bililingi ya Adam na Eva oyo bimonisamaki na brochure ya langi ndenge na ndenge.

Na boumeli ya mwa ngonga, bato oyo bakotekaka biloko nzelanzela baoyo bayebani na nkombo ya bana-bana bayaki epai na biso; balakisaki biso ebele na biloko; bamoko bazalaki na kɔmbo; basusu na bilamba, na bafungola ya ndako, bankisi, bapotomoni, na malala ata mpe bandeke oyo ezalaki na bomoi. Moko na bango alingaki kotɛkela ngai kora moko, lindanda oyo lisalemi na eteni na ekútu, to gourde, mpe oyo esimbeli na yango esalemi na mwa nzeté; bakobetaka lindanda yango na maboko mibale. Namonaki ete yango ezalaki na mokongo na yango na elembo moke ya monganzi (masque) etongami na mposo na nyama, na maséké na ntába mpe na bikokó (coquillages) mikemike mpo na “nkónzo” (porte-bonheur). Tolimbolaki ete tolingi te kosomba biloko oyo bityami bilembo bizali na boyokani na bondoki to na milulu misusu ya boklisto te. Tokamwaki mpenza na komona ete, bana bana andimaki maloba na biso, mpe ayebisaki biso ete ye moko azalaki musulman. Abombaki kora na nse‘ na elamba na ye molai oyo ezalaki kopepwa, boubou, mpe ayokaki Margaret na likebi nyonso wana azalaki kolakisa ye brochure moko ekomami na arabe. Asepelaki mingi mpenza na mokanda yango oyo azwaki mpe abandaki kotanga yango bobele na esika wana. Nsima na kotɔndo biso mwa mbala mingi, atikaki biso mpe amemaki brochure​—mpe kora oyo ye akokaki kotekela biso te. Tondimisamaki ete akoyekola brochure na ndako na ye.

Na nsima, nasololaki na John, oyo azali mpe misionere uta koleka mibu 20 lokola.

John alobaki na ngai ete: “Awa bato bazali na boboto, mpe tokoki kosolola ata na bato nyonso oyo tozali kokutana na bango. Liloba liyebani mingi na bato mpo na kopesa mbote, ‘assalam alaikum,’ elimboli ‘kimya ezala na yo,’ mpe mingi bazali bato na kimya. Ezali mboka ya teranga, to ya boyambi bato, mpe yango ezali komonana na bonkóndé, na bosepeli ya bato mpe na esengo.” Nabandaki kokanga ntina oyo ebele na bilenge ba Témoins ya mikili misusu batikaki mabota na bango mpe baninga na bango mpo na kosala mingi kati na teritware wana lokola bamisionere.

Basikwami mpo na kobanda mosala ya pionnier

Elimo ya misionere ezali na bopusi monene likoló na Batemwe ya mboka wana. Yango ezali komonana malamu mpenza lokola bosomele ezali mingi ezali mpasi te mpo na kobanda mosala ya pionnier. Marcel mpe Lucien, baoyo basikwamaki na bizaleli mingi mabe na lisalisi na boyekoli na solo ya Bíblia, balimboli ete:

“Tolingaki komonisa botondi na biso na kosala mosala ya pionnier. Kasi ezalaki mpenza mpasi na kozwa mosala ya ndambo na mokolo. Tomekaki kosala mosala ya kolona bafolólo, kasi yango elongaki te. Na nsima mosala ya kosukola bilamba na masini, kasi yango ezalaki kozwa biso ntango mingi. Sikawa, tozali kosala bagato mpo na kokabola yango na magazini mingi oyo bazali kosomba yango mbala na mbala, mpe yango ezali kotambola malamu.” Emonani ete, esengelaki na bango ete bazala na kondima makasi, na mayele, mpe basala milende makasi; kasi likambo oyo lizali solo: likoki lizali mpo na kobanda mosala ya pionnier ata soko makambo na nkita mazali makasi.

Ntango ba Témoins de Jéhovah babandaki koyekola Biblia elongo na Michel, ye azalaki kolanda mateya na université ya Dakar. Alobaki ete: “Nazalaki koyoka motema mpasi mpo na elimo ya mbindo oyo nazalaki komona epai na bana kelasi, mpe mituna nazalaki kokoka koyanola te oyo ezalaki kotungisa makanisi na ngai.

Mpo na nini moto azali moombo ya bizaleli mpe na makambo na mpasi boye? Biblia epesaki ngai biyano. Ezali lokola nde balongolaki ngai kilo monene likoló na mapeka. Wana baboti na ngai bazalaki kopusa ngai ete nalanda kotanga kelasi, nabandaki mosala ya pionnier auxiliaire, na nsima pionnier permanent na boumeli nyonso ya ntango oyo nasengelaki kolekisa na université. Nazali kozwa esengo mingi na koyebisa nsango malamu na bazalani na ngai lokola pionnier, na esika ete naluka kozala moto monene kati na ebongiseli oyo mosika te ekokóma na nsuka na yango.” Michel azali sikawa pionnier special na Mbour.

Likambo ya kobala basi mingi mpe libala ya mwasi bobele moko na boklisto

Ntango nyonso, bizaleli na mboka bikoyokanaka te na mitinda na boklisto, mpe yango ekoki mpenza kozala botemeli oyo esengeli kolonga yango. Alioune, oyo azali mokengeli-mokambi kati na moko ya masangá motoba ya ba Témoins de Jéhovah ya engumba Dakar, ayebisaki ete: “Mbala ya yambo oyo nayokaki solo ekosikolaka; nazalaki na basi mibale. Nazalaki musulman ya molende, mpe lingomba na ngai epesaki ngai nzela na kozala na bango ata mingi koleka. Tata na ngai azalaki na basi minei, mpe mingi kati na baninga na ngai bazalaki na basi mingi. Ezalela wana endimami mpenza na Afrike.” Kasi makambo nini mabimaki na motindo na bomoi wana?

Alioune alimbolaki ete: “Kozala na basi mingi ekoki kobota ebele mikakatano, mingi mpenza mpo na bana. Nazali na bana zomi oyo nabotaki na mwasi na ngai ya liboso, mpe bana mibale na mwasi ya mibale. Kati na mabota motindo wana, mbala mingi tata azalaka mopaya mpo na bana na ye mibali mpe basi, mpe bakoki kozwa ata lisalisi na ye te ata mpe disipline na ye te. Lisusu, kobala basi mingi epekisaki ngai te ete nasala ekóbo. Kasi, ezaleli ya komikanga motema, mbuma na elimo na Nzambe, nde esalisaki ngai.” Na yango Alioune asalaki likambo nini?

Akobaki lisoló na ye ete: “Nazongisaki mwasi na ngai ya mibale epai na baboti na ye, mpe nalimbolaki na mayele nyonso ete ezali te ete namonaki likambo moko mabe epai na ye, kasi ezalaki mpo na kotósa mitinda na Nzambe. Nakamataki bibongiseli malamu mpo na kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya bana na ngai, mpe nazali kotɔndo Jéhovah lokola bango mpe bazali kosalela ye lelo. Kati na bana libwa oyo bazali basakoli, mitano basili kozwa batisimo; mibale bazali ba pionniers spéciaux mpe misato mosusu, pionniers permanents to auxiliaires. Solo esikoli ngai mpenza na mikakatano mingi oyo mitaleli kobɔkɔlo bana.”

Bikelákela mpo na kotɛmɛla losambo ya solo

Na programme na ngai, nasengelaki mpe kokende kotala casamance, etúka oyo ezwami na Sud ya mboka wana. Nasepelaki mingi mpenza na malili mpe na matiti kitoko mazali kuna. Lokola ezali kozwa mai mingi uta na bakilometele 300 na ebale monene oyo ebengami bobele na nkombo ya etúká wana; esika yango ezali kobota loso, masangu mpe nguba mingi. Tozali kokuta, epai na epai, bandako na matiti oyo ezali na etage moko, etongami na lolenge ya libungutulu, na nsambá ya matiti na motindo ya molongósi oyo ebongisami mpo na kozwa mai ya mbula mpo na ntango ya elanga. Engumba, Ziguinchor, etongami na nsé na nzeté mingi ya mbila. Nasepelaki wana nakendaki na lisangá moko ya molende ya basaleli na Jéhovah oyo bazali kuna.

Dominic, misionere oyo azali kosala na Ziguinchor mpe bamboka ya zingazinga na yango, alimbolaki ete mosala na kosakola kati na etúka wana ezali kokóla malamu. Alobaki na ngai ete: “Mbula zomi esili koleka, ezalaki bobele na basakoli 18 kati na lisangá ya Ziguinchor. Sikawa, bazali 80. Mpo na kolonga bokóli wana monene, tosili kotonga Salle du Royaume moko kitoko na kosaleláká mabelé ya motane oyo tokutaki na esika yango. Botongi yango bopesaki litatoli kitoko epai na bato ya engumba wana. Maloba kitoko mabimisamaki na baoyo bamonaki bato bauti na bikólo ndenge na ndenge kosala na bomoko mpe na kimya. Kala mingi te, na assemblée moko ya circonscription, bayangani bazalaki na motuya ya 206, mpe bato 4 bazwaki batisimo.”

Na etúká wana ya Sénégal, bato mingi bazali naino kokangama na bindimeli ya bankɔkɔ na bango na ntina etali likanisi oyo ete molimo ekufaka te mpe bazali kosambela bikelákela, ata soki bazali koloba ete bazali baklisto to bamusulma. Nayokaki na likebi mpenza lisoló oyo lisalemaki na Victor, nkulutu moko na lisangá ya Ziguinchor.

“Nabotami na Guinée kati na libota oyo limipesi na losambo ya bikelákela. Na ntango nabotamaki, tata na ngai akabaki ngai na elimu mabe moko. Mpo na kondimama epai na elimu yango, mbala na mbala nazalaki kobimisa valisi moko ya moindo na nsé na mbeto na ngai, nazalaki kosala mwa etumbelo moke mpe nazalaki kopesa mbeka ya makila na liséké oyo lizalaki komonisa elimo mabe mobateli na ngai. Ata nsima kokóma mosambeli na lingomba ya katolike, nazalaki bobele na nsé na nguya ya bilimu mabe. Ntango nakendaki kofanda na Sénégal, nabandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Mwasi na ngai mpe ngai moko toyekolaki ete tokoki te kolanda ‘kolya na mesa ya Jéhovah mpe na mesa ya bilimu mabe.’ (1 Bakolinti 10:21.) Kasi ntango natikaki kopesa mbeka, bilimu mabe babandaki konyokola biso. Nazalaki kobanga mpo na kobwaka valisi moïndo wana mpe biloko nyonso ya bilimu mabe oyo bizalaki kati na yango, mpamba te nayebaki mobali moko oyo akomaki libgoma mpenza nsima na kosala bongo.” Victor azalaki kati na ezalela moko na kozanga elikya.

“Nsuka na yango, maloba oyo mazwami na Baloma 8:31, 38, 39 epesaki biso makasi mpo na kobwaka biloko nyonso bizalaki na boyokani na bikelákela. Sikawa lokola tosili kotya motema na biso mobimba epai na Jéhovah, tozali mpenza na bonsomi. Libota na ngai mobimba lizali na elikya kitoko ya kofanda libela kati na paradis ya mabelé epai kuna libota mobimba ya bato likosikwama na bopusi ya bilimu mabe.”

Ntango oyo nasengelaki kozonga ekokaki. Wana ezalaki ngai kokanga bisaka na ngai, nakanisaki na mobémbo kitoko oyo ekomaki na nsuka na yango. Kondima na ngai elendisamaki mpenza na masoló oyo nasalaki elongo na bato nyonso oyo basikwamaki na bangi to drogue, na pite mpe na biyambayamba, oyo sikawa bazali kosepela na bonsomi ya solo. Atako mpasi makasi na makambo na nkita, bato yango bazali na esengo mpe na bosepeli na kosalela Jéhovah, oyo amemelaki bango elikya ya solo ya bomoi na seko na mabelé oyo makobongwana paradis. Tozali mpenza na botondi mingi epai na ye mpo apesi nzela ete nsango malamu oyo esakolama bobele na Sénégal te, kasi lisusu na mokili mobimba na boumeli “ya mbula na ngolu na Jéhovah”! (Yisaya 61:1, 2)​—Lisoló liuti na moko na batongi na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto