Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/8 nk. 3-4
  • Kosambisama ya nsuka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosambisama ya nsuka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liteya ya boklisto ya lokutá
  • Mokolo na kosambisama​—Eleko ya elikya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mokolo ya kosambisama ezali nini?
    Lamuká!—2010
  • Nini ekosalema na Mokolo ya Kosambisama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Lifelo ya mɔ́tɔ ebongwani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/8 nk. 3-4

Kosambisama ya nsuka

“NSIMA ya liwa na yo, molimo na yo mokonyokwama; ekozala lifelo mpo na yango. Kasi na mokolo na kosambisama, nzoto na yo ekosangana na molimo na yo mpe okooka lisusu mpasi makasi ya lifelo; makila makobima longwa na molimo na yo, mpe nzoto na yo ekooka mpasi mingi.”

EZALI motindo wana nde C. Spurgeon, moteyi ya ekeke ya zomi na libwa, alobelaki likanisi ya bakonzi ya mangomba likoló na mokolo na kosambisama mpe likoló na mpasi ya baoyo bakokweisama. Michel-Ange, mopakoli na langi, ye moto ya mboka ltalia, azalaki na bindimeli motindo moko, bindimeli na kobangisa likoló na likambo oyo. Yango emonisami na makambo oyo akomaki na etutu ya ndakonzambe Sixtine na Loma (mpe ndambo na yango etyami awa likoló) na ntina na “Kosambisama ya nsuka.” Mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique (angl.) elobi na ntina na makomi yango ete: “Klisto mosambisi azali Mobikisi na baklisto te, kasi nzambe oyo akobomaka; alingi mingi kokweisa bato na esika ete ayamba bato malamu na likoló.”

Liteya ya boklisto ya lokutá

Na bikeke bileki, mokolo na kosambisama mpe mpasi ya lifelo ezalaki mateya na lokumu mingi. Liboso na bato nyonso, bateyi, lokola Spurgeon, bazalaki kosala masoló na ntina na mpasi makasi oyo ebombami mpo na basali na masumu. Na mikolo na biso, masoló motindo wana mazali kosalema mingi te. Kasi mɔtɔ ya lifelo mpe mokolo ya nsuka ezali kino sikawa mateya na moboko ya ebele na Mangomba.

Mangomba mingi ya boklisto ya lokutá ezali kondima liteya ya katolike oyo ete, kosambisama na Nzambe ekosalema na biteni mibale. Libosoliboso, ekozala “kosambisama ya moto na moto.” Na liwa na moto, molimo na ye oyo mokanisami ete mokokufaka te, mokosambisama noki mpe mokolakama mpo na kobika seko na likoló soko kobwakama seko na lifelo.a Na nsima nde Kosambisama ya bato banso, to mpe Kosambisama ya nsuka ekosalema na ntango ya nsuka, nsima wana nzoto na bakufi ekosila kosekwa mpe kosangana na milimo na yango oyo mikokufaka te.

Na ntango na mokolo yango ya kosambisama, milimo oyo mizali na likoló mikotikala kuna mpe mikosangana na nzoto oyo ekokufa lisusu te. Milimo oyo mizali na mpasi ya lifelo mikotikala kuna lokola, mpe mikosangana na nzoto na yango oyo ekosekwa mpe ekokufa lisusu te. Bamosusu bakolobaka ete, na motindo wana nde mpasi ya bato oyo bakweisami ekobakisama. Bato oyo bakozala naino na bomoi na mabelé, bakokufa te. Wana ekozala bango na bomoi, bakosambisama mpe “nzoto mpe milimo” na bango, ekokende mbala moko na likoló to mpe na lifelo.

Likanisi ya kooka mpasi makasi kati na mɔtɔ ya lifelo esili kobimisa bobangi monene na ntina na Kosambisama ya nsuka oyo epesami epai na Yesu Klisto. Nsima na makambo oyo touti kotalela, okokamwa na koyeba ete, solo mpenza, mbala mingi kosambisama na Nzambe ekozalaka likambo ya esengo, mpe Mokolo na kosambisama na ye ezali eleko ya esengo mingi kati na lisoló na moto. Ndenge nini yango ekoki kosalema?

[Maloba na nse ya lokasa]

a bakatolike bakondimaka likoki mosusu ya misato: kozwa etumbu na ntango moke na epóngelo liboso na kokota na likólo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto