Tolanda ntango nyonso komonisa motema malamu
“Ye oyo akolanda boyengebene mpe motema malamu, akozwa bomoi, boyengebene mpe lokumu.”—MASESE 21:21, MN.
1. Mpo na nini tosengeli komizela ete baoyo batambwisami na elimo na Nzambe bamonisa ezaleli na malamu?
JÉHOVAH azali Nzambe na malamu mpe na motema mawa. Azali “na motema mawa mpe na ngolu, akookaka nkanda noki te. Aleki na motema malamu mpe na solo.” (Exode 34:6, 7, MN) Tokangi ntina ete, bolingo mpe malamu etangami kati na mbuma ya elimo santu na ye.—Bagalatia 5:22, 23.
2. Bandakisa nini tokotalela sikawa?
2 Baoyo batambwisami na elime santu, to bokasi na Jéhovah oyo bokosalaka mosala, bakomonisaka mbuma ya elimo oyo ete, malamu. Bakomonisaka motema mawa kati na boyokani na bango elongo na bazalani na bango. Ee, bazali kolanda ndakisa ya ntoma Paulo na komilobeláká bango mpenza lokola basali na Nzambe na ezaleli na “malamu” mpe na lolenge mosusu. (2 Bakolinti 6:3-10) Malamu na bango, motema mawa na bango mpe mposa na bango ya kolimbisa, eyokani na bomoto na Jéhovah oyo “aleki na motema malamu,” mpe Liloba na ye lipesi bandakisa mingi ya misala malamu. (Nzembo 86:15; Baefese 4:32) Bamoko na bandakisa yango ezali koteya biso nini?
Malamu ekopusaka biso na ezaleli ezangi moïmi mpe na koyamba bapaya
3. Lolenge nini Abrahame atikaki ndakisa kitoko ya ezaleli na malamu, mpe Paulo apesi toli nini mpo na yango?
3 Abrahame (Abrame), tata na mabota—“moninga na Jéhovah” mpe “tata na bango nyonso bazali kondima”—asili kotika ndakisa kitoko ya ezaleli na malamu. (Yakobo 2:23; Baloma 4:11) Ye mpe libota na ye, bakisa mpe Lota, mwana na ndeko na ye, batikaki Ulu, engumba ya Bakaladi mpe bakɔtaki na mokili ya Kanana na kolanda etinda na Nzambe. Atako azalaki mokóló mpe mokonzi ya libota, Abrahame amonisaki ezaleli na malamu mpe ezangi moïmi na kopesáká nzela liboso epai na Lota ete apona bisika malamu ya koleisa bibwele, nde ye azwaki bisika oyo bitikalaki. (Genese 13:5-18) Malamu motindo moko ekoki kopusa biso na kopesa bato mosusu nzela ete bazwa matomba na esika na biso. Ezali ezaleli na malamu oyo ezangi moïmi, oyo ntoma Paulo apesi biso toli na komonisa yango wana alobaki ete: “Tika te ete moto aluka bobele malamu na ye moko, kasi yango ya mozalani na ye.” Paulo ye moko ‘azalaki kosepelisa bato nyonso kati na makambo nyonso, wana ezalaki ye koluka bobele malamu na ye moko te, kasi oyo ya bato mingi ete babika.’—1 Bakolinti 10:24, 33.
4. Lolenge nini Abrahame mpe Sara bazwaki mbano mpo ete bamonisaki ezaleli na malamu na kozaláká ma boyambi?
4 Malamu ekomonanaka mbala mosusu na boyambi na sembo. Mokolo moko, Abrahame mpe mwasi na ye, Sara, bamonisaki ezaleli na malamu na koyamba bapaya misato oyo bazalaki koleka. Abrahame abondelaki bango bafanda mwa ntango moke, wana ye mpe Sara bazalaki noki kolamba bilei kitoko. Nzokande, bapaya yango bazalaki baanzelu na Jéhovah, mpe moko na bango apesaki bango elaká na Nzambe oyo ete, Sara, oyo akómaki mobangé nde azalaki na mwana te, akobota mwana mobali. (Genese 18:1-15) Boyambi na bobóto na Abrahame mpe Sara, ezwaki mbano. Boye te?
5. Lolenge nini Gayo amonisaki ezaleli na malamu, mpe motindo nini tokoki komekola ye?
5 Baklisto nyonso bakoki komonisa ezaleli na malamu na kozaláká bayambi na bapaya (Baloma 12:13;1 Timoté 3:1, 2) Na yango, basaleli na Jéhovah bakoyambaka bakengeli na zongazonga na malamu mpenza, likambo oyo lizali kokundola malamu oyo mamonisamaki na Gayo, moklisto moko ya ekeke ya liboso. Azalaki kosala “mosala na sembo” na koyambáká bandeko oyo bazalaki “bapaya” nde ayebanaki na bango te. (3 Yoane 5-8) Nzokande, mbala mingi toyebi mpenza baoyo tokoki koyamba na malamu mingi. Tozali nde na ndeko mwasi moko oyo azali konyokwama na makanisi? Mbala mosusu mobali na ye azali mondimi te, to mpe asilá kobimisama na lisangá. Wana ezali libaku ya komonisa ezaleli na malamu na kobyangáká ndeko mwasi yango na bantango mosusu ete azwa litomba na boninga na boklisto mpe na kolya elongo na libota na biso. Mbala mosusu tokosala feti te, kasi libota na biso likozala na esengo ya komonisa ezaleli na malamu epai na ndeko mwasi oyo azali kati na ezaleli motindo wana. (Tala Masese 15:17.)Mpo na ndeko mwasi yango, na ntembe te akomonisa botɔndi na maloba to na mwa mokanda.
6. Lolenge nini Ludia amonisaki ezaleli na malamu, mpe mpo na nini ezali ntina na komonisa botɔndi mpo na misala malamu?
6 Nsima na kozwa batisimo, Ludia, mwasi oyo azalaki kobanga Nzambe, “alɔmbaki ete: ‘Soki bino [Paulo mpe baninga na yel bokanisi ete ngai nazali mosembwi na Jéhovah, bokɔta na ndako na ngai.’” Luka abakisi ete: “Andimisi biso na makasi.” Malamu na Ludia epesaki esengo mingi. (Misala 16:14, 15, 40) Nzokande, kozanga botɔndi ekoki kosala mabe. Mokolo moko, mobangé ndeko mwasi moko oyo azali na mibu 80, ye oyo azalaki na makasi mingi te mpe na makoki mingi te, alambaki bilei mpo na babyangami na ye. Alɛmbaki nzoto mpenza na ntina na moko na bango, ye elenge mobali, mpo ete ayebisaki ye liboso te ete akoya te. Na libaku mosusu, bandeko mibale ya basi bakendaki te mpo na kolya bilei oyo elenge mwasi moko alambaki mpo na bango. Elenge mwasi alobi ete, “Nalɛmbaki nzoto mpamba te, bango nyonso mibale babosanaki libyangi yango te. . . . mbɛlɛ ekokaki kozala malamu soki nde bayebaki lisusu te, kasi moko te azalaki na motema malamu mpo na koyebisa ngai liboso.” Na mabaku motindo wana, mbuma ya elimo santu oyo ete malamu, ekopusa yo na kozala na botɔndi mpe na limemya?
Malamu ekopusaka biso na kotalela liboso matomba ya bazalani na biso
7. Na kotalela ezaleli na malamu, likambo nini limonisami na milende oyo bana na Yakobo basalaki mpo na kokunda tata un bango engebene mposa na ye?
7 Malamu ekopusaka biso na kotalela matomba ya bamosusu, kolukáká kokokisa bamposa na bango oyo esengeli Tozwa ndakisa: Yakobo (Yisraele) asengaki na Yozefe, mwana na ye ete azala na motema malamu epai na ye ete akunda ye na Ezipito te. Atako basengelaki komema nzoto na ye na mokili na mosika, Yozefe mpe bana mosusu na Yakobo “bakumbaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na lilusu na elanga na Makapela, longwa na Mamelɛ epai na ebimelo na ntango, elanga oyo Abrahame asombaki epai na Efelone, Mohiti, ete azala na yango mpo na esika ya kokunda.” (Genese 47:29; 49:29-31; 50:12, 13) Na kolanda ndakisa oyo, libota moko na boklisto mbɛlɛ esengeli, na kotalela mitinda na Biblia, kozala na motema malamu mpe na limemya na maloba ya moko na basangani na yango na ntina etali bokundami na ye.
8. Lisoló ya Rahaba ezali koteya biso nini na ntina etali kozongisa malamu oyo basaleli biso?
8 Wana moto moko amoniseli biso motema malamu, esengeli na biso ete tozala na botɔndi to mpe kozongisela ye yango na motindo moko to mosusu. Rahaba, mwasi na pite, amonisaki ezaleli na malamu na kobombaka banɔngi na Bayisraele. Bayisraele mpe bamoniselaki ye motema malamu na kobateláká ye mpe libota na ye, wana babomaki engumba na Yeriko. (Yosua 2:1-21; 6:20-23) Oyo nde ndakisa kitoko emonisi ete tosengeli kozongisa malamu oyo basalelaki biso na kotalela matomba ya bazalani na biso mpe komonisela bango motema malamu!
9. Mpo na nini mabe mazali te na kosenga moto moko ete amonisela biso motema malamu?
9 Mpo na yango, mabe mazali te na kosenga na moto moko ete amonisela biso motema malamu. Ezali yango nde esalaki Yonatana, mwana na Saulo, mokonzi na liboso na Yisraele. Asengaki na Davidi, moninga na ye na bolingo mingi oyo azalaki elenge liboso na ye, ete amonisa motema malamu epai na ye mpe libota na ye. (1 Samwele 20:14, 15; 2 Samwele 9:3-7) Davidi amikundolaki likambo yango na ntango azongisaki mabe oyo Saulo asalelaki Bagabaonite. Kokanisáká “ndai na Jéhovah” oyo alapaki kati na ye mpe Yonatana, Davidi amonisaki motema malamu na kobateláká Mefibosete, mwana na Yonatana. (2 Samwele 21:7, 8) Bongo biso, tosenzelaka ete ’Ee na biso ezala bobele Ee’? (Yakobo 5:12) Soki tozali bankulutu kati na lisangá, tomonisaka mpe motema mawa na ntango baninga na biso kati na kondima bazalaka na mposa ete tomonisa motema malamu epai na bango?
Malamu ekolendisaka boyokani na biso
10. Lolenge nini motema malamu ya Luta ezwaki mbano na yango?
10 Motema malamu ekolendisaka boyokani mpe ekopesaka bolamu kati na libota. Ezali yango nde emonisami na likambo ya Luta, mwasi oyo autaki na Moabe. Mpo na kokokisa bamposa na ye mpe oyo na mama na mobali na ye, Naomi, mobóla mwasi—mokufeli-mobali, Luta azalaki kolɔkɔta mbuma penepene na Beteleme, kati na elanga ya Boazi, mobali oyo asilaki kokóma mobangé. (Luta 2:14-18) Na nsima, Boazi alobaki na Luta ete: “Motema malamu omonisi na nsuka eleki oyo na liboso, awa elandi yo bilenge mibali te, soko babólá te soko bazwi te.” (Luta 3:10) Liboso, Luta amonisaki motema malamu epai na Naomi. “Na nsuka,” mwasi na Moabe wana amonisaki motema malamu na kondimáká kobala Boazi, mobali oyo akómaki mobangé, ete abota mwana mpo na mobali na ye oyo asilaki kokufa mpe mpo na Naomi, oyo akómaki mobange. Luta abotelaki Boazi mwana mobali nkombo Obede, ye oyo azalaki nkoko na Davidi. Nzambe apesaki Luta “lifuti na kokoka,” oyo ya kotangama kati na bankoko na Yesu Klisto. (Luta 2:12; 4: 13-17; Matai 1:3-6, 16; Luka 3:23, 31-33) Motema malamu ya Luta epesaki bolamu mingi mpo na ye mpe libota na ye. Na mikolo na biso, na ntango motema malamu emonisami kati na libota likobangaka Nzambe, basangani na yango bakozwaka mbano na yango, bazali na esengo mpe na bomoko na nzela na boyokani makasi ya libota.
11. Malamu na Filemona ezalaki na bopusi nini?
11 Malamu ekolendisaka boyokani ya basaleli na Jéhovah kati na masangá. Filemona azalaki moklisto oyo ayebanaki mpo na motema malamu na ye oyo azalaki komonisa epai na baninga na ye kati na kondima. Paulo alobaki ete: “Nakotɔndoko Nzambe na ngai ntango nyonso ekokanisaka ngai yo na mabondeli na ngai, awa ezali ngai koyoka mpo na bolingo mpe kondima oyo ezali na yo na ntina na Nkolo Yesu mpe na ntina na babulami nyonso . . . Ee, ndeko na ngai, nazwi esengo mingi mpe nayikisami mpiko na bolingo na yo, mpamba te mitema na babulami misili kobɔndisama mpo na yo.” (Filemona 4-7) Makomami mayebisi na sikisiki te lolenge nini mitema na babulami mibɔndisamaki mpo na Filemona. Kasi, ntembe ezali te ete amonisaki motema malamu epai na baklisto bapakolami mosusu, mpe yango na mitindo mingi, likambo oyo libɔndisaki bango mpe lilendisaki mpenza boyokani na bango. Ezali bobele motindo moko lelo, na ntango oyo baklisto bamonisaka motema malamu.
12 Malamu na Onesifolo ezalaki na bopusi nini?
12 Ezaleli na malamu na Onesifolo ezalaki mpe na bopusi malamu. Paulo alobaki ete: “Tika ete Nkolo azala na motema mawa mpo na libota na Onesifolo, mpo ete mbala mingi ayikisi ngai mpiko mpe aokeli minyololo na ngai nsoni te. Ekómaki ye na Loma, alukaki ngai na etingya mpe azwi ngai. Tika ete Nkolo apesa ye nzela na kozwa mawa na Jéhovah na mokolo yango! Lisungi nyonso apesaki na Efese, yo oyebi yango malamu.” (2 Timoté 1:16-18) Soki tomipesi mpo na komonisa motema malamu epai na baninga na biso kati na kondima, tokozala na esengo mpe tokolendisa boyokani na bolingo ya bondeko kati na lisangá na boklisto.
13, 14. Lisangá ya Filipi lizalaki ndakisa kati na likambo nini mpe lolenge nini Paulo amonisaki botɔndi mpo na malamu ya lisangá yango?
13 Na ntango basangani nyonso ya lisangá bazali komonisana motema malamu, boyokani na bango bokolendisamaka. Boyokani malamu motindo oyo ezalaki kati na Paulo mpe lisangá ya engumba Filipe. Epai mosusu, soki ntoma atindaki mokanda epai na Bafilipi, kati na ntina mosusu, ezali mpo na kotɔndo bango na ntina na ezaleli na malamu na bango mpe na lisalisi oyo bapesaki ye. Akomelaki bango ete: “Na ebandeli na nsango malamu, wana nalongwaki na Makedonia, lisangá mosusu lizalaki elongo na ngai te mpo na likambo ya kopesa mpe kozwa, bobele bino mpenza; mpamba te, ata na Tesaloniki, botindaki lisungi mpo na bosɛnga na ngai koleka mbala moko. . . . Nasili kozwa nyonso mpe nazwi biloko mingi. Nazwi makabo mauti na bino epai na Epafalodito, yango libonza na nsolo malamu, mbeka ebongi mpe ekosepelisa Nzambe.”—Bafilipi 4:15-18.
14 Tokangi ntina oyo Paulo azalaki kolobela Bafilipi mpe ezaleli na malamu na bango kati na mabondeli na ye. Alobaki ete: “Nakotɔndoko Nzambe na ngai ntango nyonso ekokanisaka ngai bino kati na malombo na ngai mpo na bino banso; nakolɔmbaka na esengo mpo na mosala na bino na bokóli ya nsango malamu uta mokolo na liboso kino sikawa.” (Bafilipi 1:3-5, MN) Lisangá moko te ekoki kokóma na bobólá na ntina ete bazali kosunga mosala ya kosakola Bokonzi, na motema mobimba mpe na elimo ya bokabi. Nsima wana Bafilipi basalaki nyonso oyo ekokaki na bango kati na likambo wana elongo na ezaleli na malamu, Paulo andimisaki bango ete: “Nzambe na ngai akokokisa bamposa na bino, pelamoko bozwi na ye na nkembo kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:19) Na yango, Nzambe akozongisaka malamu mpe bokabi. Liloba na ye liyebisi ete: “Moto na moto oyo akosalaka malamu, akozwa[libonzal epai na Jéhovah.”—Baefese 6:8.
Na ntango basi bakomonisaka ezaleli na malamu
15, 16. (a) Lolenge nini malamu na Doloka ekanisamaki, mpe likambo nini lisalemaki na liwa na ye? (b) Na mikolo na biso, lolenge nini basi baklisto baoyo bazali na motema malamu bazali bongo bazwi na misala malamu?
15 Motema malamu na Doloka (Tabita), mofandi na Yafo, ye moyekoli na Yesu, ezwaki mbano. “Azalaki mozwi na misala malamu mpe apesaki makabo na motema mawa”; na ntango “abɛli maladi mpe akufi,” bayekoli batindaki moto mpo na koluka Petelo na mboka Luda. Ekómaki ye, “bakambi ye na eteni na ndako na likoló; mpe basi-bakufeli-mibali nyonso bayei epai na ye na kolela, mpe kotalisa mikóto, mpe nzambala oyo Doloka asalaki, wana ezalaki ye elongo na bango.” Kanisa naino: Basi-bakufeli mibali baoyo bazalaki na mawa, bazali koyebisa ntoma lolenge oyo Doloka azalaki moto malamu mpe kolakisa bilamba oyo bizali elembo ya bolingo na ye mpe na malamu na ye. Nsima na kobimisa bato banso na libándá, Petelo akumbi mabɔlɔngɔ mpe abondeli, atali epai na ebembe mpe alobi ete: “Tabita, telema!” Oyo ekamwiseli! “Azipoli miso mpe emoni ye Petelo, afandi. Petelo apesi ye loboko, atelemisi ye mpe abengi babulami, na basi-bakufeli—mibali, mpe alakisi bango ye ete azali na bomoi.” (Misala 9:36-41) Oyo nde mbano monene azwaki epai na Nzambe!
16 Ezali mbala ya liboso oyo Makomami malobeli lisekwa lisalemi na moko na bantoma na Yesu Klisto. Makambo kati na yango ekamwiseli oyo monene esalemaki, eyokani na ezaleli na malamu. Nani akoki koloba ete Doloka mbɛlɛ azongisamaki na bomoi soki nde azalaki mozwi na misala malamu te mpe na makabo na motema mawa te—soki nde azalaki mozwi na motema malamu te? Ekamwiseli oyo emonisi te bobele lolenge oyo Doloka apambwamaki elongo na basi mosusu bakufeli mibali, kasi lisekwa na ye lipesaki lokumu epai na Nzambe. Ee, “likambo oyo liyebanaki na Yafo mobimba mpe bato mingi bandimeli Nkolo.” (Misala 9:42) Na eleko na biso, basi baklisto oyo bazali na motema malamu, bango mpe bazali bazwi na misala malamu; bamoko bakotongaka bilamba mpo na basangani mosusu ya lisangá, bakolambaka bilei mpo na mibangé to mpe komonisa boyambi epai na basusu. (1 Timoté 5:9, 10) Bobóto na bango ezali kopesa litatoli kitoko epai na bato ya libándá baoyo bazali kotala bango. Lisusu, tozali na esengo lokola ezaleli na kobanga Nzambe mpe motema malamu ezali kopusa ’limpinga monene na basi wana na kosakola nsango malamu’ mpo na lokumu na Jéhovah, Nzambe na biso.—Nzembo 68:11.
Tolanda ntango nyonso komonisa motema malamu
17. Nini elobami un Masese 21:21, mpe lolenge nini maloba wana makokani epai na bato oyo bakobangaka Nzambe?
17 Moto na moto oyo alingi kondimama epai na Nzambe asengeli kolanda motema malamu. Lisese moko lilobi ete: “Ye oyo akolandaka boyengebene mpe motema malamu, akozwa bomoi, boyengebene mpe lokumu.” (Masese 21:21, MN) Moto oyo akobangaka Nzambe akolanda ntango nyonso boyengebene na Nzambe mpe akomitika kotambwisama na mitinda na ye. (Matai 6:33) Akomonisa ntango nyonso bolingo na sembo epai na bato mosusu, to mpe motema malamu na kopesáká lisungi na mosuni, mpe mingimingi, lisalisi na elimo. Na bongo, azali kozwa boyengebene, mpamba te elimo na Jéhovah ezali kosalisa ye na kozala na bomoi na sembo. Ya solo, moto yango asili “kolata boyengebene” lokola Yobo, oyo azalaki kobanga Nzambe. (Yobo 29:14) Moto motindo wana akolukaka lokumu na ye moko te. (Masese 25:27) Kasi, Jéhovah akopesaka nzela ete moto yango azwa lokumu, mbala mosusu lokola limemya oyo bato mosusu bakopesa na ye; Nzambe akopusa bato yango ete basala malamu epai na moto motindo wana na ntina na motema malamu oyo ye moko azali komonisa. Lisusu, baoyo bazali kosala mokano na Nzambe na bosembo nyonso, bakozwa bomoi—mpo na mwa bambula te, kasi mpo na seko.
18. Mpo na nini esengeli na biso kolanda motema malamu?
18 Tika ete baoyo nyonso balingi Jéhovah Nzambe bakóba kolanda motema malamu! Ezaleli wana ekosalaka ete tolingama na Nzambe mpe na bazalani na biso. Ezali kopusa biso na komonisa boyambi mpe bolingo. Ezaleli na malamu ekolendisaka boyokani kati na mabota mpe kati na lisangá na boklisto. Basi oyo bazali komonisa motema malamu balingami mingi mpe bakozwaka lokumu. Mpo na kosukisa, baoyo nyonso bazali kolanda ezaleli wana kitoko, bazali kokumisa Jéhovah, Nzambe na motema malamu.
Bozongeli
◻ Lolenge nini Abrahame amonisaki ndakisa ya kozala na motema malamu?
◻ Lisoló ya Rahaba liteyi biso nini na ntina etali kozongisa malamu oyo basaleli biso?
◻ Lolenge nini lisangá ya Filipi limonisaki ezaleli na malamu?
◻ Na mikolo na biso, lolenge nini basi baklisto ya motema malamu bazali bazwi na misala malamu?
◻ Mpo na nini esengeli na biso kolanda motema malamu?