Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/7 nk. 8-11
  • Nsango ya esengo euti na Union soviétique

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango ya esengo euti na Union soviétique
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Bobele na ebandeli
  • Nsango malamu esakolami lisusu
  • Mosala ya kosakola kati na boloko
  • Bopusi mabe ekiti
  • Sikawa bandimami na leta!
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/7 nk. 8-11

Nsango ya esengo euti na Union soviétique

Mbano kitoko ya mbula monkámá na kosakola nsango malamu

“MPO na kokomisa mokanda mopesi nzela na misala ya lingomba ya ba ‘Témoins de Jéhovah awa na U.R.S.S.’”

Wana ezali libongoli ya maloba na liboso oyo mazali kati na mokanda mokomamaki na monoko na Russe oyo motyami kati na lokasa oyo. Mokanda yango mozali mpenza eyano na ebele na mabondeli masalamaki. Mokanda yango motyamaki maboko mpe mondimamaki na Moscou epai na mokonzi monene ya Esambiseli ya R.S.F.S.R. (République soviétique fédérative socialiste de Russie).Yango elimboli ete uta ntango wana, Témoins de Jéhovah ekómaki lingomba oyo lindimami kati na U.R.S.S. mobimba. Likambo yango libongolaki mpenza lisoló ya mboka wana, oyo eumeli mbula monkámá kino sikawa.

Bobele na ebandeli

Lisoló ya mboka yango eumeli mbula monkámá? Ezali bongo. Toyebi ete, na eleko na biso, ezali charles Russell nde moto ya liboso oyo alobelaki nsango malamu kati na mboka wana. Alobaki ete, akendaki kuna na mobu 1891. Kati na nimero ya Lingelesi ya La Tour de Garde de Sion et Messager de la présence du christ ya Septembre 1891, akomaki ete akendaki na Kishinev (Russie) na boumeli ya mobémbo moko asalaki na Mpótó.Akutanaki na moto moko nkombo na ye Joseph Rabinowitch, oyo azalaki kondima Klisto mpe azalaki kosala makasi mpo na kosakwela mabota na Bayuda oyo bazalaki na etuká wana. Russell alobelaki vizite oyo asalaki epai na Rabinowitch mpe masoló kitoko mpe ya mozindo oyo asalaki elongo na ye na ntina na Bokonzi.

Nsango malamu esakolami lisusu

Nsima wana Russell alekaki, bato bazalaki lisusu koyoka nsango malamu te kati na mokili oyo babengi lelo U.R.S.S., kasi elingi koloba te ete yango ezalaki mpenza kosakolama te. Na 1927, masangá misato ya Union soviétique etindaki rapport na bango ya makita oyo basalaki na ntango ya Ekaniseli. Emonani ete bokóli bosalemaki nokinoki te liboso na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Matáta masalaki ete bato mingi balongwa na mikili ya Mpótó. Lolenge oyo bato bazalaki kolongwa na bisika boye mpo na kokenda na bisika mosusu, ebakisaki motuya monene ya basakoli na Bokonzi na Union soviétique, likambo oyo bandeko bamizelaki na yango te.

Na ndakisa, tala oyo tokoki kotanga kati na La Tour de Garde ya ler Février 1946, na Lingelesi: “Koleka basakoli nkɔto oyo bazalaki kosakola na monoko ya Ukrain na Est ya Pologne, bazali sikawa na nsuka mpenza ya Russie. . . . Epai mosusu, bankámá ya bandeko oyo bazalaki kofanda na Bessarabie, etúká ya kala ya Roumanie, bafandi sikawa na Russie mpe bazali kolanda kokokisa mosala ya kozalisa bayekoli na mabota nyonso.”

Lisusu, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ba citoyens ya Union soviétique banyokwamaki kati na bandako na monyoko (camps de concentration) ya Nazi. Momekamo wana monene mobimisaki matomba oyo bato mosusu bamizelaki na yango te. Rapport moko elobeli mwa bilenge basi ya Russie, baoyo batyamaki na boloko na Ravensbrück. Bakutanaki na ba Témoins de Jéhovah, bandimaki solo mpe bakólaki kino kozwa batisimo. Makambo motindo moko masalemaki na bisika mosusu ya boloko. Wana ba Témoins de Jéhovah oyo bautaki kozwa batisimo babimaki na boloko na nsima na etumba, bazongaki na Union soviétique mpe basakolaki nsango malamu. Ezali motindo wana nde Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimisaki bokóli ya nokinoki na motuya ya basakoli na Bokonzi kati na teritware ya Union soviétique. Na 1946, ekanisami ete basakoli 1 600 ya molende bazalaki kosala kati na mboka wana.

Mosala ya kosakola kati na boloko

Boloko elandaki kokokisa mosala ya ntina kati na bapalangani ya nsango malamu na Union soviétique. Nsima na etumba, bakonzi ya Leta bazalaki kokanisa ete ba Témoins de Jéhovah bazalaki likámá mpo na bango, nzokande ezalaki bongo te, mpe bazalaki kokangisa bango. Atako bongo, batikaki kosakola te. Ndenge nini bakokaki kosala yango wana esilaki bango kondimisama mpenza ete nsango ya bokonzi na nzambe ezali nsango oyo eleki nyonso mosusu na kitoko mpo na bato? Boloko ekómaki bongo teritware monene mpo na bamoko kati na bango; bakangami mingi oyo bango basakwelaki solo, bandimaki. Rapport moko ya 1957 ezalaki na maloba oyo ete: “Kati na bato nyonso oyo toyebi ete bazali lelo kati na solo na mboka Russie, 40% kati na bango bayambaki solo na boloko to na ndako na monyoko.”

Ba Témoins balembaki nde mpasi ya ntango nyonso oyo bazalaki na yango na boloko? Soko moke te! Tala oyo tokokaki kotanga kati na rapport moko ya 1964: “Ezali na ba Témoins de Jéhovah oyo bakɔti soko mbala mibale to misato kati na bandako na monyoko, mpamba bazali kotika te kosakola nsango malamu nsima wana babimisami kati na yango.” Mwa liboso totangaki ete, bamosusu bazalaki basali na mabe oyo batyamaki na boloko to kati na ndako na monyoko mpe bakutanaki na ba Témoins kuna. Bandimaki mpe bakólaki kino kozwa batisimo liboso ete babima na boloko.

Bopusi mabe ekiti

Kati na bambula 1960, bakonzi ya leta batikaki mwa nzela na ba Témoins ete bakokisa misala na bango. Na ntembe te bayaki koyeba ete, basaleli na Jéhovah bazalaki likámá te mpo na mibeko mpe mpo na bibongiseli ya leta. Ya solo, mosala ya baklisto wana ya bopɔlɔ endimamaki naino te epai na leta, kasi bazalaki kokangama mingi te mpe mabota na bango malukamaki te na leta, likambo oyo bazalaki kosepela na yango. Mposa na bango ya liboso ezalaki ete basalela lingomba na bango mpe bakokisa mosala na bango ya boklisto na kimya nyonso mpe na kozanga mitungisi, na meko oyo bazalaki na yango.​—Baloma 12:17-19; 1 Timoté 2:1, 2.

Na 1966, baoyo nyonso bamemamaki na boloko uta kala na mboka Sibérie, bazwaki bonsomi mpe bapesamelamaki lotomo ya kokende epai nyonso oyo balingaki kokenda kati na mokili wana. Mingi bazongaki na bamboka na bango nsima na bambula mingi, kasi bamosusu basepelaki kofanda na teritware wana na kobota mbuma mingi. Lisusu, baoyo nyonso bakendaki na bamboka na bango bafandaki kuna libela te. Ndeko mwasi moko, ye oyo amemamaki na Sibérie elongo na baboti na ye mpe bandeko na ye wana azalaki naino elenge, azongaki na Ouest ya Russie elongo na baboti na ye. Kasi afandaki kuna bobele mwa ntango moke. Asepelaki mingi na bato wana na bopɔlɔ mpe na boyambi ya mboka Sibérie, kino atikaki baboti na ye mpe azongaki na Est ya mboka wana mpo na kolanda kosakola nsango malambu epai na bato yango bazali na mposa ya koyoka.

Tala likambo moko lisalemaki na eleko yango: Ndeko mobali moko oyo azalaki kotambola na mboka na mboka akutanaki na ba Témoins mosusu mibale. Bango nyonso misato babondelaki, mpe nsima mwa moke bakutanaki na elenge mwasi moko oyo abokwami kati na lingomba ya orthodoxe ya Bagreke. Andimaki solo mpe akendaki kolakisa bandeko epai na bato mosusu mibale oyo bazalaki kosepela na nsango malamu: mama na ye mpe leki na ye ya mwasi. Rapport yango esuki na maloba oyo: “Lelo, bato ntuku minei basili kosangana elongo na bandeko wana, oyo ntuku misato kati na bango bayambaki solo na boumeli ya sanza motoba oyo euti koleka.”

Atako bongo, mosala ya ba Témoins de Jéhovah mondimamaki naino te epai na leta. Esengelaki na bango kosalela mayele mpo na koyangana mpe mpo na kosakola. Bazalaki ntango nyonso na likámá ya kosakola ndako na ndako na polele. Baklisto na sembo wana ya Union soviétique, batikaki te kosalela Nzambe na bango elongo na kondima mpe na kozala ba citoyens malamu ya mboka na bango. (Luka 20:25) Ezalela ya elimo na bango emonisamaki na moko na bango na maloba oyo ete: “Ezali mpenza libaku monene na koyika mpiko na mimekamo nyonso mpe na kotikala sembo epai na Jéhovah, na kosanzola ye na boumeli ya bomoi na biso mobimba mpo ete apesa biso bomoi ya seko na nzela na Yesu Klisto.” Oyo nde ndakisa malamu ya koyika mpiko mpe na bosembo oyo emonisamaki na ba Témoins ya Union soviétique!

Sikawa bandimami na leta!

Na 1988, makambo mabandaki kobongwana kati na bamboka ya Union soviétique. Mopepe ya bonsomi mobandaki kopepwa, mpe bamboka oyo epekisaki misala ya ba Témoins de Jéhovah ekómaki na boyokani. Pologne, Hongrie, Roumanie mpe bamboka mosusu epesaki bonsomi epai na baklisto wana ya sembo, na kopesáká bango lotomo ya kosala misala na bango na polele uta na ntango wana, kozanga kobanga likambo moko. Bazali mpenza na esengo na mibu misato oyo na Europe de l’Est. Ba Témoins basili kozwa litomba na bonsomi oyo bautaki kozwa kala mingi te mpo na kosakola nsango ya kimya na Bokonzi. Mpe bisika mosusu ya mokili, ba Témoins de Jéhovah mosusu basepelaki elongo na bango.

Ba Témoins ya Union soviétique basili kozwa bonsomi oyo boleki monene. Mingi kati na bango bayaki​—bamosusu balongwaki mosika kuna na mopanzi ya mai monene ya Pacifique, eteni na mboka yango ezali epai na Asie​—koyangana na ba assemblées minene oyo esalemaki na Pologne na 1989 mpe na 1990. Na yango, ba Témoins 17 454 ya Union soviétique bazalaki na assemblée ya Varsovie. Oyo nde makambo kitoko bakendaki kokanisa epai na bango! Mingi kati na bango naino basambela Jéhovah te elongo na ebele na baklisto mosusu. Mpe tala ete bazalaki kati na bankoto na nkɔto na bato!

Bazongaki na mokili ya Union soviétique oyo ekobaki sé kopesa nzela na mosala na bango. Kati na mokili mobimba, ba Témoins de Jéhovah bazalaki kolanda makambo yango mpe bazalaki komituna soki ntango nini ba Témoins de Jéhovah bakondimama na leta ya Union soviétique. Bandimamaki bongo na 1991​—ekokisi mpenza mbula monkámá nsima na vizite oyo charles Russell asalaki kati na mokili yango! Na mokolo ya 27 Mars 1991, “Misala ya lingomba ya ba Témoins de Jéhovah na U.R.S.S.” ekomamaki na mokanda oyo motyamaki mabɔkɔ na Moscou na ministre ya Esambiselo ya R.S.F.S.R. Bonsomi nini bopesamaki epai na ba Témoins?

Mikanda ya lisangá lindimami sika na leta ezali na maloba oyo malandi: “Mokano ya lingomba ezali mpo na kokokisa mosala motali koyebisa nkombo ya Jéhovah Nzambe mpe bibongiseli oyo ye azwaki na bolingo mpo na bolamu ya bato, na nzela na Bokonzi ya likoló oyo bopesami na Yesu Klisto.”

Ndenge nini mosala yango mosengeli kokokisama? Kati na myango mizwamaki, batangaki bongo kosakola nsango malamu liboso na bato banso mpe na ndako na ndako; koteya solo ya Biblia epai na bato oyo balingi koyoka; kotambwisa boyekoli ya Biblia elongo na mokanda moko mokolimbolaka Biblia; mpe kosala bibongiseli mpo na kobongola, kobengisa, kobimisa, konyata mpe kokabola Biblia.

Mokanda yango molobeli mpe ete lisangá ya ba Témoins de Jéhovah litambwisami na collège central, lisangá lisalemi na masangá mike oyo mazali kati na yango na lisangani ya bankulutu, comité ya filiale esalemi na basangani nsambo, na bakengeli ya circonscription mpe bakengeli ya distrike.

Emonani mpenza ete ba Témoins de Jéhovah bakoki sikawa kokokisa mosala na bango na bonsomi nyonso mpe na polele kati na Union soviétique lokola mpe na bamboka mosusu. Kanisa naino esengo oyo ezalaki na basangani nsambo ya comité ya filiale mpe na bankulutu mitano oyo basili koumela na mosala yango, baoyo bazwaki libaku kitoko ya kotya mabɔkɔ na mokanda wana ya ntina mingi mpe na komona yango kondimama epai na mokonzi na leta oyo akotalelaka makambo ya masangá mpe mangomba. Lisusu, Milton Henschel mpe Theodore Jaracz, basangani ya collège central ya ba Témoins de Jéhovah, bazalaki mpe na esika yango. Kati na masangá oyo mandimami na R.S.F.S.R., lisangá ya yambo oyo lizwaki mokanda ya kondimama na leta, ezali oyo ya ba Témoins de Jéhovah. Oyo nde mbano kitoko ezwami na bandeko na sembo wana ya Russie, nsima na komonisa motema petee mpe na koyika mpiko na boumeli ya bambula mingi!

Ba Témoins de jéhovah ya mokili mobimba bazali kosepela mingi lokola bakonzi ya Union soviétique bapesi nzela na bonsomi wana. Bazali mpenza kotɔndo Jéhovah na motema na bango mobimba mpo na bonsomi oyo bandeko na bango bazwi lisusu na Union soviétique. Bazali kosepela elongo na baninga na bango ya U.R.S.S. mpe na basusu oyo ya Europe de l’Est baoyo bakoki uta ntango wana kosalela Jéhovah Nzambe na bonsomi nyonso. Tika ete Jéhovah apambola bango mingi, wana ezali bango kozwa litomba na bonsomi mpo na kosanzola nkombo na ye mosantu!

[Elilingi na lokasa 9]

kremlin, na Moscou

[Elilingi na lokasa 10]

Bandeko bautaki na mboka Russie mpo na koyangana na assemblée oyo esalemaki na 1989 na mokili mosusu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto