Mbótó ya bokonzi elonami kati na Chili ya Ngele: ezali ntembe
NA CHILI ya Ngele kotambola pembeni ya nzela na esika moko na zamba ezali malamu mpenza! Na esobe ezingami na banzeté, banyama bazali koliya matiti na kimya. Na nsuka ezali na bangomba minene ya móto oyo na nsonge na yango ezali na mbulampembe. Makelele ya bandeke ezali kowelana na makelele ya bankasa oyo eningisami na mopepe. Ezalelo yango kitoko ekoki te kobosanisa biso mikakatano oyo baoyo bazali kolona mbóto ya Bokonzi bazali kokutana na yango na etuka ena.
Olingi koyeba bamoko na ba pionniers na biso, to basakoli na bokonzi ya ntango nyonso? Mpo na nini te kokende na bango na mosala ya kosakola nsango malamu mokolo moko to mibale? Toyoka naino liboso Jaime mpe Oscar balimbola biso makambo oyo bazali kokutana na yango na mokolo moko ya mosala ya kosakola na chili ya ngele.
Mokolo moko ya mosala ya kosakola
Tobandi kobalukabaluka na bambéto na biso, mpe malili oyo esili kokota na mwa ndako na biso ya moke ekangi biso. Oscar amilongoli na mbéto, na basoséti mpe enkoti oyo alataki mpo na malili. Apelisi nkóni mpe esaleli moke ya gaz ebakisaka molunge mpo na kosilisa malili,mpe azongi komibomba na molunge ya mbéto na ye. Butu ezali naino na libanda, mpe tozali koyoka makelele ya mbula oyo ebandaki kokweya uta mpokwa. Tozalaki kotala na lininisa, na nsima miso na biso ekutani. Kopema na mokolo yango mbele elingaki kozala malamu! Ntango toyaki komikundola programme ya mokolo yango: tosengelaki kokende koteya na terituare moko ya mosika oyo esili koleka mbula moko etalamaka te. Likanisi wana etindi biso na kokende kosakola.
’’Tobimaki liboso ete ngonga ya mwambe ya ntongo ekoka,tozalaki kotambola na elikya ete moto moko akokaki komema biso na vuatire to mpe kozwa bisi. Tolingaki kokoma noki mpenza na banzela oyo ekeyi kino na bandako oyo etangwami mpe na bandako mosusu oyo ezingi teritware na biso.Tomonaki traktere moko ekangami na remorke oyo ememaki mwa basali. Sofele atelemi mpe andimi komema biso. Likambo ya malamu ezali ete,mbula oyo enokaki na bútú esalisaki biso na kosala mobembo mozangi putulú lokola momeseno. Nzokande motuka mozalaki kolanda nzela na yango na koningana, biso tozali kosakola nsango malamu na basali bilanga. Na ntango ya kokita tokabolaki bango mwa bazulunalo. Botamboli wana na traktere esalisaki biso,soko te mbele tolingaki kotambola bakilometele 12 na makolo.
“Tolekisaki mokolo mobimba na mboka yango mpo na koluka na bozindo bato oyo bazali na mposa ya koyoka nsango malamu. Ntango tobandaki mosala na biso na teritware yango, tozalaki koyeba te mpo na nini bato bazalaki kosepela na maloba na biso kasi bazalaki kokakatana na kondima mikanda. Na nsuka toyaki koyeba ete, mingi, ezalaki mpo bayebaki kotanga te. Tomonaki malamu kolimbola bango ete mikanda mina mizali makabo malamu mpo na bana na bango mpe na bato mosusu ya libota, baoyo bakoki koyebisa bango makambo mazali kati na mikanda. Mingi na bayoki na biso bazali babola, kasi bayebi kokabola na esengo oyo bazali na yango. Na bongo, ntango tozali kopesa bango mikanda, mbala mingi bapesaka biso maki, mbala, matungulu, madesu, ndunda.”
Na bato oyo bazalaki kopesa biso likabo mpo na mokanda Jaime ayekolaki kolakisa bango eloko nini bakoki kopesa. Mpo na nini? Mokolo moko, ba pionniers bazongaki na ndako na bongo na bokilo 15 ya ndunda, mpe ndeko mobali moko amemaki nsoso moko ya mwasi ya bomoi na kati ya sakosi na ye mokolo mobimba! Mbala mingi Jaime asengaka ete bapesa ye pilipili motané ya chili oyo etutami malamu mpe esangisami nkasa ya nsolo kitoko; kosangisama yango ebengami ete merquén. Kosi tozongela lisolo na biso:
“Na elanga, tokutani na mwa ba rucas [bandako] oyo efandami na ba Mapuche ya mboka [Mapuche elimboli“moto ya mboka yango”]. Ezali petee te na kosolola na ba Mapuche ya mikolo, mpo mingi balobaka kaka monoko ya mboka na bango. Soko bilenge bazali wana, bazali kosalisa biso mingi mpo na kobongola. Lokola totiki ville mosika, tobandi kokutana na bato oyo bamona naino Biblia te to bakoma naino te na ville monene lokolo Temuco, mboka mokonzi yo étuka ena. Likambo ya mpasi ezali ya komonisa bango mpo bayeba kososola malamu kobebisama monene ya bizalela ya mokili mobimba.Tosengeli kosala yango mokemoke, na kolimbolaka bango ete makambo oyo bazali kokutana na yango ezali mpe komonana bipai binso.
“Tobandi kokoma mpokwa, mpe makolo malembi. Moi oyo ezalaki kongala etiki esika na mbula makasi oyo ekomisi parapluie eloko mpamba. Basapáto na biso ya mbula ebebi na potopoto ya bilanga oyo biuti kosalama sika. Ntango moto moko alobi na biso Pase no más (kota), tozali na esengo ya kokota na kuku mpe kozwa móto oyo ebimisami na nkoni. Bapesi biso kópo moko ya kafé—,fromage mpe mampa ya móto oyo esalemi na ndako. Ah! mampa ya móto, oyo nde nsolo kitoko.
“Na ebandeli ya mpokwa, lokola tozwi makasi, tozongeli botamboli na biso na kolekaka na nzela ya bilanga. Ezali mpasi na komona bilanga bikabolami na lopango, kasi mosusu mpe emonanaka oyo bakangisa na banzeté ya picapica, lolenge ya nzeté ebotaka fololo ya langi ya mosaka. Etikali moke moi ebunga mpe tosengeli lisusu kokoma na nzela ya monene mpo na kozwa bisi ya nsuka mpe kozonga na ville. Mobembo na biso ya kilometele 20 esuki.
“Tozongi epai na biso, malamu, tolembi kasi tozali na esengo, mpamba te tosololi malamu na bato oyo bazali komonisa bizaleli ya bampate. Nsima na kolya mwa moke, totalelaki mosala oyo tosalaki mpe tomibendaki na kolemba nyonso, kino na mbeto.’’
Tokei na chiloé
Archipel ya chiloé ezali na bisanga mingi ya mike. Motomboano monene ya esanga, oyo ezali na bakilometele 180 ya bolayi, esalami na bangomba oyo ezali na matiti mpe bitima bipai na bipai. Bisika binso, kaka matiti kitoko pembeni ya mai mpe bamboka kitoko ya balobi mbisi.
Na ville ya Achao, kaka na pembeni ya esanga ya liboso, tokutani na Rubén mpe Cecilia. Na bokomi na bango na mars 1988, sángo ya esika yango akebisaki bato bayoka te mwasi na mobali oyo bazali kotambola na esanga mpo na koteya Biblia. Maloba na ye ya kopekisa esalaki ete bamoko baboya koyoka mpe na basusu ebendaki likebi na bango. Nsima ya mwa ntango, Rubén mpe cecilia bakomaki kotambusa boyekoli ya Biblia 28. Balakisi mingi bazali kosalela mokanda “Toute Ecriture est inspirée de Dieu” mpe Mokanda mpo na masolo ya Biblia na boumeli ya bangonga na bango oyo ebongisami mpo na koteya makambo ya Nzambe.
Jehovah azali kobatela bapionnier yango ya molende oyo bazali kosala mingi mpe bazali kotambola na makolo bakilometele kokoma 30 mpo na kosakola Bokonzi mpe kozalisa bayekoli (Matai 24:14; 28:19, 20). Mokolo moko, Rubén mpe cecilia bazalaki kotambola na pembeni ya mai monene. Na ntango mai eyaki na pembeni na bopusami ya mbongé, na bozongi na yango bamonaki liboke ya ba choritos (lolenge ya mbembe) oyo bakokaki kozwa kozanga mpasi. Rubén abandaki kolokota yango, kasi ndenge nini komema yango kino na ndako? cecilia azwaki likanisi moko. Asalelaki basoséti na ye ya milayi lokola sakosi. Na lisalisi na biloko oyo euti na mai monene sika bapionnier na biso bazwi eloko oyo bakoki kosala na yango bilei kitoko.
Mwa moke na nord ya Achao, basakoli ya Bokonzi ya ntango nyonso mibale, to ba pionniers spéciaux, bazali kosala na lisanga moke ya Linao. Na ville yango mosala ya kosakola ebandaki na 1968, mpe témoin de Jéhovah ya liboso na Linao azwaki batisimo na 1970. Na boumeli ya mbula minei moklisto yango azalaki koteya kaka ye moko mpe ayikaki mpiko na baseki ya libota na ye mpe na bayebani na ye. Na nsuka na yango, na 1974, mwasi na ye andimaki solo ya Biblia mpe azwaki batisimo. Na nsima na yango, bandeko na ye ya mibali minei, bandeko na ye ya basi minei, banókó minei, bana na ndeko na ye motoba na mbanda na ye moko mpe mwasi na ye bayaki kozwa batisimo. Na nsima, misato kati na bandeko na ye mitano ya mibali bakomaki bankulutu mpe moko na bango akomaki mosaleli na misala.
Luis mpe Juan, bazali basakoli ya ntango nyonso, bazali kolona mbótó ya Bokonzi mingimingi na Quemchi, ville moke oyo ezali na bakilometele 30 ya Linao. Mosala mosalaka banga mokolo na mokolo ezali na kobuta lopango, komisalela nzela na kati ya matiti ya bilanga mpe kobuta bangomba, nyonso wana ezali kosalema na nsé ya mbula mpe mopepe. Mpo na kokoma na bisanga oyo bizali na nzinganzinga na bango, bazwaka masuwa mike oyo ezali kosala mibembo ya kokende kozanga mbala mibale to misato na mokolo mpo na esanga chiloé. Na yango bazali kofanda mwa mikolo na esanga moko. Kolongwa esanga moko kino kokóma esanga mosusu ekoki kolembisa moto oyo ameseni naino na mai te, kasi boyambi mpe bobóto na bafandi na bisanga ezali kosala ete obosana yango. Mosakoli mosusu ya Bokonzi ayaki kosangana na Luis mpe Juan, mpe bazali kosala milende elongo mpo na kokutana na bafandi 11 500 ya terituare na bango. Atako bokoli emonanaki noki te, na 1989, Luis mpe Juan bazwaki esengo monene na koyamba bayangani 36 na ekaniseli ya Nkolo.
Bozongi na mokili
Na konanaka na nord, toleki na mai monene ya Chacao mpe tokomi na mokili. Na etuka yango, bapionnier mibale, Ramón mpe lrene, bazali kosala na teritware moko monene epai kuna ezali na bituluku bitangwami ya batémoin na Maullín, na carelmapu mpe na Pargua. Mpo na kozala na makita ya boklisto na Pargua, batémoin ya esanga na chiloé basengeli kotambola ngonga moko liboso mpo na kozwa transbordador (masuwa oyo ememaka bavuatire mpo ya bokatisi) mpo na kokatisa mai monene oyo ezuami katikati na bisanga yango mibale. Mpo na koya kotambusa makita, Ramón azali kosala mobembo ya ngonga moko na minute 20 na bisi uta na Maullín. Mingimingi motuya ya bayangani eleki motuya ya basakoli mbala mibale. Kasi mpo na nini boumeli ya lolenge wana kaka mpo na bakilometele 38? Ezali mpo ete bisi ezali kotelema ntango nyonso mpo ya kozwa bato oyo batyami bisika moko na basaki ya bambuma mpe bandunda, basaki ya mbala mpe matungulu, to ntango mosusu ata bansoso to bangulu ya bomoi. Oyo nyonso ekoki kotiama na likolo ya motuka te ezalaki kokotisama na kati, nde yango ezalaki kosala ete nzela ekoma molai ebakisami na nsolo ndenge na ndenge, na makelele mpe na makambo oyo mazali kobenda likebi.
Lokola bapionnier oyo bazali na vuatire bazali moke, soki bazangi kozwa bisi oyo ememaka bato na bavile nyonso mibale, bazali kotambola nzela molai na makolo, loba ete moto moko amema bango na motuka na ye. Motambusi moko, oyo amemaki Ramón mpe mobali moko oyo azalaki koyekola Biblia, atunaki bango ete: “Ezaleli ya bato ezalaka ndenge nini na mosala na bino? Na komonaka bokamwi na bango, alimbolaki ete: “Ngai nazali sángó na pueblo (mboka) oyo mpe nayebi ete bozali ba témoins de Jehovah. Nayebi mosala na bino malamu mpe nasepelaka na bazulunalo na bino.” Atunaki bango mituna mingi liboso ya kotika bango na Pargua, kaka na ngonga ya makita. Na kolandaka kotanga bazulunalo na biso, na ntembe te sango wana akozwa biyano na mituna misusu.
Ramón mpe lrene bazali kotambusa boyekoli na Biblia 20, kasi ntango nyonso ezali na bango petee te na kokende kotala bato epai na bango. Bandako mosusu ezali na ngambo mosusu ya Maullín to na bamboka ya balobi mbisi batangwami oyo tokoki kokutana na bango kaka soki tozwi masuwa. Bambula ya makasi mpe ekoki kolembisa, kasi ezali komonana ete molende oyo bapionnier mibale mpe basakoli ya Bokonzi mosusu 18 na teritware yango ebotaki mbuma, elembeteli ezali ete na Ekaniseli ya liwa na Nkolo bayangani bazalaki 77.
Na Los Muermos, Juan mpe Gladys, basakoli mibale ya ntango nyonso, batambusaki boyekoli ya biblia 23. Ntango mbóto ya Bokonzi ezali kozwa mosisa na motema ya bato oyo bandimi koteyama, yango esalaka ete obosana botamboli milaí na banzela ya potopoto. Mwa mosika kuna na bangomba pembeni na Estaguilla, Juan mpe Gladys bazalaki bato na liboso ya koteya na esika moko. Basengaki na mobali moko oyo bazalaki koyekola na ye Biblia soki akokaki kodefisa bango mpunda na ye. Ayanolaki ete, “Ntembe te, kasi nakoki kokende kotika bino?’’ Mbala moko Juan akangaki ntina ete Jéhovah abongisi makambo. Bakokaki kobunga na zamba kozanga mpasi, kasi mobali wana ayebaki etuká ena malamu mpe kaka na nzela alakisaki bango bandako mosusu oyo ezalaki komonana te. Lokola alembi mingi na boumeli ya ngonga libwa ya kotambola na makolo mpe na mpunda, moko na ba pionniers spéciaux atunaki na moyekoli Biblia soko azali na makasi. Ayanolaki bango ete: “Eloko moko kaka na kosenga na bino, bomema ngai lisusu mbala ya nsima.” Moto wana ya botondi alandaki kokola na elimo mpe ayaki kozwa batisimo na janvier 1988. Mwasi na ye aumelaki te na kozwa batisimo na ntango ya assemblée ya circonscription.
Na vizite ya mokengeli na nzonganzonga, basakoli 11 ya Estaguilla basepelaki mingi koyamba bayangani 110 mpo na diskur piblike. Na mboka moko oyo ezali na bafandi 1 000 pene na Los Muermos, bato 66 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa na Nkolo. Mosala mozali naino mingi ya kosala na terituare yango monene.—Matai 9:37, 38.
Mingi na nord, tokoyebana na ba pionniers mosusu, Alan mpe Fernando. Na ntango bazalaki kotambola na nzela moko ya putulú, moto moko ayebisaki bango ete bamata na nsima ya motuka na ye. Na bokomi na bango, batikaki koseka te na kotalaka putulú oyo ezwaki bango kobanda na motó kino na makolo. Ezaleli na kosekisa mpe na esengo oyo ezali na kotambusa boyekoli ya Biblia 20 ezali kobosanisa bango mpasi yango. Na ntembe te tozali kokanisa na esengo oyo bayokaki ntango bato 65 bayaki koyangana na Ekaniseli ya liwa na nkolo to ntango, na sanza elandaki, mpo na mbala ya liboso bafandi ya mboka mibale babimaki na bango elongo kati na mosala ya kosakola.
Koleka Bío-Bío
Mpo na kokutana na “bampaté” oyo bafandi mpembeni na bangomba milai ebengami Andes, osengeli koleka libulu moko monene oyo na nsé na yango, na bametele 50 na kokita, mai na Bío-Bío ezali koleka mbangu mpe na mobulu. Bazali kokatisa yango na mwa mabaya oyo ebongisami na nsinga oyo ebendami na ngambo moko mpe mosusu ya libulu monene. Na mwa mayele, bokomata wana na masuwa mpe bokopusa epuselo moko mpo na kotika mabaya, oyo kokita na kolandaka nsinga. Basimbi makasi na embende oyo etiyami mpo na kosimba masuwa oyo ekokita na mbangu mpenza mpo na kokende kotelema na katikati ya libulu monene. Na nsima ya kopema, etikali bobele ya kokitisa ematiselo na nsé mpo na bomati malembemalembe ndambo mosusu na nsinga oyo etikali. Moto na kobangabanga amata te! Nzokande, ndeko mwasi moko azali kokatisa libulu monene yango póso nyonso mpo na kokende kotala moto moko asepeli na solo, na mboka moko ezali na ngomba.
Ndakisa malamu bapionnier mpe basakoli mosusu ya Bokonzi batiki elendisi bato oyo basepeli na solo na kosala molende motindo moko mpo na koyangana na makita ya baklisto. (Baebele 10:24, 25) Na yango, libota moko ezali kosala bakilometele 40 na mpunda mpo na kokoma na Bío-Bío. Nde etikali na bango bakilometele 12 oyo bakosala na makolo mpo na bokomi na Salle du Royaume.
Ntango bazali kotala bambula oyo eleki, bapionnier bazali komikundola nini? Bangomba ya móto oyo na nsonge na yango ezali na mbula mpembe, mabele kitoko oyo mabongisami mpo ya boloni,mingala ya mbangu mpe mobulu? To putulú, mbula, mpe botamboli milai na makolo? Ezali solo, kasi bazali komikundola mingi mingi bato na mitema malamu oyo bandimaki nsango malamu. Ebongaki solo kotya milende nyonso mpo na kokutana na “bampate” wana. Oyo nde esengo na kolona mbóto ya Bokonzi na Chili ya Ngele!