Ntango ekoki mpo na koluka Jéhovah
“Jéhovah akotalaka bana na bato longwa na likoló, [mpo na] komona soko moto na mayele azali, oyo akoluka Jéhovah.”—NZEMBO 14:2.
1, 2. (a) Ndenge nini bato mingi bazali kotalela Jéhovah, Nzambe na solo? (b) Kozanga bosepeli na bato na ntina na ye ezali komonana te na miso na ye?
JÉHOVAH, Nzambe na solo, azali lelo kotyolama na bato oyo balobaka ete Nzambe azali te, na bato oyo bazangi kondima makambo na elimo, na basambeli na banzambe na lokuta mpe na bamilió na bato oyo bazali koloba ete bandimaka ye, kasi bazali kowangana ye na misala na bango. (Tito 1:16) Mingi bazali kokanisa motindo moko lokola Nietzsche, filozofe Alema na ekeke ya zomi na libwa, mpe bazali koloba ete “Nzambe asili kokufa.” Jéhovah azali komona te ezalela na bato oyo baboyi kotyela ye likebi? Azali komona, mpamba te akomisaki na nzela na David ete: “Elema alobi na motema na ye ete: ‘Jéhovah azali te.’ Bamibebisi, bazali kosala makambo mabe, moko azali te oyo akosalaka malamu.”—Nzembo 14:1.
2 David abakisi ete: “Jéhovah akotalaka bana na bato longwa na likoló, komona soko moto na mayele azali, oyo akoluka Jéhovah.” Na bongo, Nkolo Moyangeli azali komona baoyo bazali koluka koyeba ye mpe kosalela ye. Ezali bongo na ntina ete tosala milende makasi mpo na koluka ye. Na yango, etambweli na biso kati na likambo wana ekomemela biso to bomoi na seko, to liwa ya seko.—Nzembo 14:2; Matai 25:41, 46; Baebele 11:6.
3. Mikoki nini mazali komonana naino?
3 Tala mpo na nini tozali kokanga ntina nyonso ya kosalisa bazalani na biso ete baluka Jéhovah uta sikawa. Bamilió na bato bakutana naino na ba Témoins de Jéhovah te mpe bazwi naino libaku te ya koyoka “nsango malamu ya bokonzi.” Lisusu, toyebi mpenza sikisiki te soko motuya boni na bato bakotondisa milongo na “ebele monene” liboso na “bolozi monene.” Kasi ezali solo ete bato mingi bakoki naino lisusu koluka—mpe komona—Jéhovah Nzambe na mwa mikolo oyo mizali liboso, naino ntango eleki te. Motuna oyo mozali bongo kotunama epai na biso mozali oyo: Ndenge nini kosalisa ntalo monene na bato mosusu na komona Nzambe?—Matai 24:14; Emoniseli 7:9, 14.
4, 5. Na likambo litali kosambela, bato mingi bazali kosepela koluka nini?
4 Ya solo, bato mingi na mikolo na biso bazali koluka eloko moko, kasi bazali mpenza koluka nini? Bato moke bazali mpenza koluka Nzambe na solo bobele moko, Jéhovah. Bato mingi balingi kosambela nzambe moko engebene bamposa na bango moko mpe makanisi na bango. Lokola elimbolaki yango George Gallup, motambwisi moko ya lisangá oyo elukaka koyeba makanisi na bato kuna na Etats-Unis, “soki tozali komona likeseni monene te kati na bato oyo bazali na lingomba moko mpe bamosusu, mpo na oyo etali bokosi, koboya kofuta mpako mpe koyiba mokemoke, ezali mpo ete mangomba na bango esalemi liboso engebene makanisi ya bato.” Abakisi: “Bato mingi bazali komisalela lingomba oyo eyokani na bamposa na bango, lingomba moko oyo ekopamela bango te . . . ezali yango bakobengaka lingomba oyo moto aponi engebene mposa na ye moko.”
5 Bamosusu bakoloba ete: “Lingomba na ngai ekoki na ngai.” Kasi motuna ya solo esengeli kozala oyo: “Lingomba na ngai ekoki mpenza liboso na Nzambe?” Kati na boklisto ya lokuta mpe kati na lingomba ya bahindu, na ndakisa, ntalo monene na bato bazali kosepela kokumisa bikeko. Mingi na baoyo bazali komiloba ete bazali baklisto, bazali kosepela na kosambela nzambe moko kati na bapersona misato oyo ayebani nkombo te. Epai mosusu, 900 milió ya bamusulmá bazali kotya kondima na bango na Allãh. Mpe bamilió na bato oyo babengi bango na lifalansé ete ba athées, bango bazali koloba ete Nzambe azali te.
Bato mpo na kosalisa
6. Likambo nini batangi mingi ya Mosenzeli basili komona yango?
6 Boni mpo na biso baoyo tozali batangi na sembo ya zulunalo oyo? Tosilaki koluka Nzambe ya solo mpe tosili komona ye. Tomoni bosolo ya maloba oyo mazwami kati na Yakobo 4:8: “Bobelema epai na Nzambe mpe ye akobelema epai na bino.” Lokola tokomi basali na molende kati na lisangá na boklisto, tosili kobelema epai na Nzambe mpe tosili komona ete, na solo, Jéhovah asili mpe kobelema epai na biso.—Yoane 6:44, 65.
7. Ndenge nini toyebi ete ebele na bato bakoki lisusu kosalela solo na molende nyonso?
7 Nzokande, tozali komona ete ntalo monene na bato bazali kosepela koyangana mbala na mbala elongo na libota na Nzambe, kozanga mpenza ete babanda kobelema epai na Jéhovah na komipesa na ye mpe na kozwa batisimo. Ndenge nini toyebi yango? Na 1990, motuya na bayangani na Ekaniseli ya liwa na Yesu, ekomaki kino pene na milió zomi ya bato. Kasi ntalo boni kati na bato yango bazali kosangana na molende kati na mosala ya kosakola nsango malamu na Bokonzi? Bobele sikawa nde bakomi koleka milió minei. Na bongo yango elimboli ete tozali lisusu na bato pene na milió motoba baoyo bazali kosepela na solo mpe bazali kosepela koyangana na biso, kozanga ete basalela monoko na peto ya solo na kosakolaka nsango malamu ya Bokonzi. Na ntembe te bazali mbala na mbala koloba malamu mpo na Jéhovah mpe mpo na Bokonzi na ye. Nzokande, bamibimisi naino mpenza te lokola ba Témoins de Jéhovah. Ezali epai na bato wana nyonso nde tolingi kopesa lisalisi na biso.—Sofoni 3:9; Malako 13:10.
8, 9. (a) Jéhovah azali kolendisa biso na likambo nini? (b) Mpo na nini ezali bozoba na kotala mpamba toli ya jéhovah?
8 Tolingi kolendisa bango ete bakoma ba Témoins de Jéhovah ya molende mpe ya esengo mpo na kosangana na eteni ya nsuka ya mosala monene oyo mozali kokokisama lelo na mabele mobimba. Talela libyangi na boboto oyo Jéhovah azali kopesa biso kati na Masese 1:23: “Bongwa mpo na mpamela na ngai, tala nakosopela bino elimo na ngai, nakoyebisa bino maloba na ngai.” (Tala Yoane 4:14.) Ezali mpenza elendiseli na koyeba ete Jéhovah azali kosepela na bokoli oyo tozali kosala mpo na kozala na makoki ya komema nkombo na ye mpe koyamba losambo na ye. Boye te? Tolingi mpenza te kozala kati na baoyo Masese 1:24, 25 ezali koloba na ntina na bango ete: “Mpo ete nangangaki nde bino boboyaki; nasembolaki loboko nde moto atalaki te. Botyolaki toli na ngai nyonso; bondimaki mpamela na ngai te.”
9 Baoyo bazali kotyola toli na Nzambe mpe bazali koluka .Jéhovah te wana akoki naino komonana, baoyo bazali kozela ete bolozi monene ebanda naino mpo na kozwa ekateli, baoyo wana bakomona ete bazelaki ntango molai mingi. Ezalela motindo wana ekomonisa kozanga kondima mpe kozanga mayele; ekozala kotyola motema boboto na Jéhovah.—2 Bakolinti 6:1, 2.
10. Mpo na nini kozanga mayoki mpe kozanga bosepeli ezali mpenza likama?
10 Tomonisa na nzela na elakiseli moko ntina ya kozwa ekateli nokinoki. Okozela naino liboso ete obela bokono ya bronchite esangani na bokono ya pumó liboso na kolanda ordonnance ya monganga? Okozwa ekateli nokinoki te uta ekomona yo bilembo ya liboso? Na bongo mpo na nini ozali koumela mpo na kokabwana na mokili na bokono oyo na Satana mpe komikotisa na ngambo na Jéhovah mpe ya Batemwe na ye? Na Masese 1:26-29, Jéhovah ayebisi na maloba na polele mpenza mpasi nini ekokomela baoyo bazali kokipé eloko moko te, baoyo baboyi kotya likebi mpe baoyo bazali na bopoto: “Ngai mpe nakoseka mpasi na bino . . . Na ntango yango bakobyanga ngai nde nakozongisa te; bakoluka ngai nde bakozwa ngai te. Mpo bayinaki boyebi mpe baponaki kotosa Jéhovah te.” Tika ete tozwama te kati na baoyo ‘bakoluka Jéhovah na etingya’ wana ntango ekosila koleka mpo na kosala bongo!
11. Lisalisi nini baoyo bazali koluka kosalela Jéhovah bakoki kozwa?
11 Kati na batangi na zulunalo na biso, ezali mbala mosusu na baoyo bazali naino koluka Nzambe ya solo. Tozali kosepela lokola bozali kokoba ntango nyonso na kosala bolukiluki yango mpe tozali kosambela mpo ete boyebi na bino ya Biblia etinda bino na kokola lisusu mpe na kozwa ekateli mpo na solo. Boyeba lisusu ete lisangá nyonso ya ba Témoins de Jéhovah ezali pene mpo na kosalisa bino kati na bolukiluki na bino.—Bafilipi 2:1-4.
Oyo ezali ntango ya kozala na molende mpe kosala mosala
12, 13. Mpo na nini tosengeli koyamba losambo na solo?
12 Mpo na nini ezali na ntina ete biso banso tokamata ekateli mpo na Jéhovah mpe toyamba losambo na solo? Ezali mpo ete makambo ya mokili makomi na nsuka na yango. Makambo makomi kobima noki mpenza kino ete bato bazali kokoka kolanda yango nyonso te. Oyo ezali ntango ya kokakatana te to mpe ya kozanga molende te. Yesu alobaki polele ete: “Ye oyo azali na ngai elongo te azali kotelemela ngai mpe ye oyo akoyanganisa na ngai elongo te azali kopanzapanza.” Alobaki mpe lisusu ete: “Mpo ete soko moto nani ayokeli ngai [mpe] maloba na ngai nsoni, Mwana na moto akoyokela ye nsoni wana ekoya ye na nkembo na ye, mpe [na nkombo] na Tata na ye, mpe na baanzelu na bulee.”—Matai 12:30; Luka 9:26.
13 Oyo ezali ntango ya kozala na molende mpe kosala mosala! Toyebi esika nini makambo na mokili mazali komema biso. Armagedon ezali kobelema. Na yango, tobyangami na koluka Jéhovah, sikawa, lokola tokoki naino komona ye, liboso ete ‘mokolo na nkanda na ye eya.’ Ntango bolozi monene ekobanda, likoki ekozala lisusu te.—Sofoni 2:2, 3; Baloma 13:11, 12; Emoniseli 16:14, 16.
14. Bantina nini tozali na yango mpo na koluka Nzambe?
14 Mpo na koloba solo, ezali mokili mobimba nde esengeli koluka boboto na Jéhovah uta sikawa. Likanisi wana eyebisamaki malamu mpenza na ntoma Paulo, kati na Misala 17:26-28: “Na nkoko moko [Nzambe] abotisi mabota nyonso na bato kofanda na mikili nyonso na nse; aponeli bango bilaka mpe atieli bango ndelo na bifandelo na bango, ete baluka Nzambe, na elikya ete bakoka komama na koluka ye, mpe kozwa ye. Azali mpe mosika na moto na moto na biso te; mpo ete na kati na ye tozali na bomoi mpe tokotambolaka mpe tokozalaka.” Maloba oyo na nsuka, “mpo ete na kati na ye tozali na bomoi mpe tokotambolaka mpe tokozalaka,” ezali mpenza ntina ya solo ya koluka Nzambe. Ezali mpenza Jéhovah, na boboto na ye, nde azali kopesa biso nzela na kozala na bomoi kati na bandelo mike kasi ya ntina mingi ya etando na biso moke oyo ezali kobokola bomoi ya lolenge nyonso. Tozali mpenza na bantina mingi ya kozala na botondi epai na ye mpe komonisa ye botondi na biso na lolenge ya polele.—Misala 4:24.
15. (a) Engebene mokomi na makambo na butu Arnold Toynbee, ntina ya losambo oyo eleki losambo nyonso ezali nini? (b) Likambo nini tosengeli kosala mpo na kozala na likoki ya kokumisa Nzambe?
15 Mokomi na makambo na bato Arnold Toynbee akomaki mokolo moko ete: ’’Ntina ya solo ya Losambo oyo eleki losambo nyonso, ezali ya koyebisa mateya na elimo mpe solo oyo ezali nguya na yango epai na milimo mingi koleka, mpo ete na nsima moko na moko na milimo yango ezala na likoki ya kokokisa mokano ya Moto awa na mabelé. Mokano ya Moto awa na mabelé ezali bongo kokumisa Nzambe mpe kosepela na Ye libela na libela.” (La religion vue par un historien, page 265) Mpo na kozala na likoki ya kokumisa Nzambe, esengeli na biso liboso koluka ye mpe kozwa boyebi ya solo na ntina na ye mpe mikano na ye. Libyangi na Yisaya ezali mpenza na ntina ete: “Boluka Jéhovah naino akoki komonana, bobyanga ye naino abelemi penepene. Tika ete moto mabe alongwa na nzela na ye mpe moto na masumu alongwa na mabanza na ye. Tika ete azonga epai na Jéhovah, ete ayokela ye mawa, epai na Nzambe na biso, mpo ete akolimbisa na solo!”—Yisaya 55:6, 7.
Lisalisi nini ya solo tozali na yango mpo na kopesa?
16. (a) Ntembe nini lisangá na boklisto esengeli kolonga yango? (b) Ndenge nini tokoki kosalisa bamosusu ete basalela Jéhovah?
16 Bamilió na bato oyo bazali kosepela na solo kozanga ete bakoma naino basakoli ya molende bazali mpo na biso ntembe monene mpo na kolonga. Ezala ete tozali bankulutu, basaleli na misala, ba pionniers to basakoli, tozali kosala nini biso moko mpo na kosalisa bato wana oyo bazali kosepela na solo ete bakoma basambeli ya solo lokola biso? Soki mposa emonani, lolenge ya kopesa bango lisalisi ya solo ezali ya kokamata bango epai na bango mpo na kokende na bango na Salle du Royaume, na boye ete bakoka bango mpe kozwa mbala na mbala matomba ya elimo santu na Jéhovah. Toli na Paulo, oyo ekomami kati na Baebele 10:24, 25, ezali ntango nyonso na ntina. Totangi ete: “Tótalanaka ete topesana simbisi moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. Totika koyangana elongo moko te, pelamoko motindo na bamosusu, kasi tóyikisana mpiko. Bosala boye koleka, awa emoni bino ete mokolo yango ezali kobelema.”(MN) Tozali koyikisa bino mpiko, bino banso oyo bolingi kosepela na boboto ya Jéhovah, na koyangana mbala na mbala na makita oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kosala kati na Salle du Royaume ya etuka na bino.
17. Soki tozali kokana kosalisa moto moko na kokola kati na bolukiluki ya Jéhovah, na nini tosengeli kosenzela?
17 Motindo nini tokoki kosalisa moto moko oyo azali koyekola Biblia elongo na biso mpe azali koyangana mbala na mbala na makita ete akoma mosakoli ya nsango malamu? (Tala mokanda Lisangá mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, nkasa 98 kino 100.) Ntango akomi mosakoli oyo azwi naino batisimo te, tobengaka ye ete abimaka na biso mbala na mbala kati na mosala ya kosakola, akende na biso elongo mpo na kotambwisa boyekoli mosusu ya Biblia mpe kozongela bato ya sika? (Tala Mosenzeli ya ler Décembre 1989, lokasa 31.) Na maloba mosusu, uta ntango bakokisi masengami, tolendisaka bato yango na kopesaka bango likoki ya komona bango moko matomba malamu ya mosala na biso ya kosakola?—Matai 28:19, 20.
Jéhovah abongi ete toluka ye
18. Ndenge nini Jéhovah amonisaki motema mawa na ye epai na bato?
18 Na ntina na mbeka na lisiko oyo Klisto Yesu apesaki, Jéhovah azali kondima kokanga miso likoló na masumu na biso ya kala mpe mabunga na biso soki tobongoli motema mpe tomonisi kondima. Totalela maloba oyo na David: “Asalaki epai na biso pelamoko masumu na biso te; apesaki biso libonza lokola ekoki na mabe na biso te. Mpo lokola molai na lola ezali na likoló na mokili, boboto na ye ezali monene boye epai na baoyo bakobangaka ye. Mosika pelamoko yango kati na epai na ebimelo na ntango mpe epai na elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipengweli na biso. Pelamoko tata akoyokela bana na ye mawa, boye Jéhovah akoyokelaka bango mawa baoyo bakobangaka ye. Mpamba te ye ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.”—Nzembo 103:10-14; Baebele 10:10, 12-14.
19. Elendiseli nini ezali mpo na baoyo bapengwaki mosika na solo?
19 Jéhovah azali mpenza Nzambe na boboto mpe na motema mawa. Soki tobongoli motema na kosokema nyonso mpe toyei epai na ye, akosepela kolimbisa biso mpe akobosana masumu na biso. Azali kopesa mosumuki etumbu ya seko te kati na lifelo, lokola soki nde akangeli ye nkanda libela na libela mpo na mabunga na ye. Nkutu, Jéhovah alobaki: “Ngai, ngai nazali ye oyo akolimbisa masumu na yo mpo na ngai moko mpe nakobanzabanza mabe na yo te.” Oyo nde elendiseli mpo na bato oyo bapengwaki mosika na solo mpe batyolaki boyokani na bango elongo na Jéhovah! Bango mpe balendisami na koluka Jéhovah uta sikasikawa mpe na kozongela mosala kati na milongo ya libota oyo ezali komema nkombo na ye.—Yisaya 43:25.
20, 21. (a) Likambo nini ya koyikisa mpiko esalemaki kala na Yuda? (b) Bafandi na Yuda basalaki nini mpo na kozwa lipamboli na Jéhovah?
20 Mpo na yango, ezali malamu kotalela likambo oyo ekomelaki mokonzi Asa, oyo ayangelaki kala likoló na Yuda. Atako Asa akombolaki losambo nyonso ya lokuta, nzokande bitika na losambo ya bapakano bizalaki naino kati na bokonzi na ye. Engebene lisolo oyo ekomami kati na 2 Ntango 15:2-4, mokonzi Asa apesamelaki maloba oyo ya bokundoli na mosakoli Azariah: “Jéhovah azali na bino elongo wana bino bozali na ye elongo. Soko bokoluka ye, akozwana na bino nde soko bokotika ye, akotika bino. Longwa na mikolo mingi, Yisraele bazalaki na Nzambe na solo te. . . Kasi wana kati na mawa na bango babongwani epai na Jéhovah, Nzambe na Yisraele, mpe baluki ye, na bongo azwani na bango.”
21 jéhovah amibombaki te liboso na mokonzi Asa; ‘azwanaki’ na ye. Ndenge nini Asa ayanolaki na nsango wana? Kati na ba versets 8 mpe 12, totangi ete: “Eyokaki Asa maloba oyo . . . , ayikaki mpiko mpe alongolaki bikeko na mpamba kati na mokili mobimba . . . Abongisaki mpe etumbelo na Jéhovah oyo ezalaki liboso na ekotelo na ndako na Jéhovah. Na nsima, [bafandi na Yuda] baingelaki kati na kondimana mpo ete baluka Jéhovah, Nzambe na batata na bango na mitema na bango nyonso mpe na milimo na bango nyonso.” Ee, babandaki mpenza koluka Jéhovah na “motema na bango mobimba mpe na molimo na bango mobimba.” Likambo nini yango ebimisaki likoló na mboka? Verset 15 elobi ete: “Yisraele mobimba basepelaki mpo na ndai, mpo ete bakati yango na motema na bango mobimba mpe baluki ye na mposa na bango mobimba mpe ye azwanaki na bango. Jéhovah mpe apesaki bango kimya na bipai bizingeli bango.”
22. Nini ezali koyikisa biso mpiko na kozala na molende uta sikawa kati ma mosala na Jéhovah?
22 Lisolo ya likambo oyo elendisi biso te na kozwa ekateli mpo na losambo ya peto ya Jéhovah? Bamilió na bato bakozala basambeli na Jéhovah na mikolo mizali koya. Ntembe ezali te ete mingi kati na bango basili kobanda kosala mbongwana kati na bomoi na bango mpo na kokokisa masengami ya Biblia oyo ekopesa bango nzela na kosangana na mosala ya Jéhovah. Bamosusu bazali kokola kati na boyebi mpe na kondima; bazali koluka Jéhovah. Mosika te, bakomiyoka ete babendami na koyebisa monoko na peto epai na bazalani na bango na kopesaka bango boyebi mozindo ya solo oyo etali Jéhovah mpe Bokonzi na ye. Na bongo mpo na nini tosengeli koluka Jéhovah sikawa, lokola akoki naino komonana? Mpo ete mokili na sika oyo alakaki biso esili mpenza kobelema!—Yisaya 65:17-25; Luka 21:29-33; Baloma 10:13-15.
Bozongeli?
◻ Banani bazali komonisa kozanga bosepeli liboso na Jehovah, Nzambe na solo?
◻ Mbala mingi bopusi nini lingomba ezalaka na yango likoló na etambweli ya basangani na yango?
◻ Bilikya ya kobakisama na ba Témoins de Jéhovah bizali nini?
◻ Mpo na nini lelo oyo ezali ntango ya kozala na molende mpe ya kosala mosala?
◻ Mpo na nini jéhovah abongi ete toluka ye?
[Elilingi na lokasa 10]
Baninga mingi ya ba Témoins de Jéhovah oyo bazali koyangana na Ekaniseli bakozala basaleli na Nzambe na mikolo mizali koya
motuya na bayangani na Ekaniseli na 1990: bato 9 950 058
Ntalo nyonso ya basakoli na 1990 : 4 017 213
[Elilingi na lokasa 12]
Na mikolo ya mokonzi Asa, bato balukaki Jéhovah