Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/3 lok. 31
  • Totya likebi na liloba ya esakweli!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Totya likebi na liloba ya esakweli!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kotia motema na liloba ya esakweli
  • Tomisenzela mpo na bapengwi
  • Mokolo ya Jéhovah mozali koya!
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Yakobo mpe na mikanda ya Petelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tótya likebi na liloba ya esakweli
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Na kati ya 2 Petro
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Mokanda ya Biblia nimero 61—2 Petelo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/3 lok. 31

Totya likebi na liloba ya esakweli!

Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda ya mibale ya Petelo

Liloba ya esakweli ya Jéhovah, nsango na ye, ezali lokola mwinda mozali kongenga kati na esika ya molili, mpe baklisto ya solo basengeli kotya likebi nyonso na yango. Ezali likambo ya petee te awa balakisi ya lokuta bazali kosala makasi mpo na kopalangisa lipengwi. Kasi na lisalisi ya Nzambe, tokolónga. Esengeli na biso lisusu kokangama makasi mpenza na liloba na Nzambe soko tolingi kobika na mokolo na jéhovah, mokolo oyo mozali kobelema na lombángu.

Mokanda ya mibale ya ntoma Petelo mopemami na Nzambe, mokoki kosalisa biso na kotya likebi na liloba ya esakweli na Nzambe. Petelo akomaki mokanda yango na Babilone pene na mobu 64. Kaki na mokanda na ye, amimonisi mokoteli na solo na Nzambe, akundweli baninga na ye bandimi ete mokolo na Jéhovah mokoya lokola moyibi mpe akebisi batangi ete, bamitika kokósama te na bato oyo bazali kotyola mibeko. Mpo ete mokolo na jéhovah mobelemi na biso, maloba na Petelo mapemami, mazali na ntina mpo na biso.

Kotia motema na liloba ya esakweli

Baklisto basengeli kosala mpo na komonisa bizaleli na Nzambe mpe kotya likebi na liloba ya esakweli. (2Pe 1:1-21) Mpo na kokóma moto oyo alembi te to moto oyo ekobotaka mbuma le, esengeli na biso ‘kobakisa likoló na kondima na biso, mayele, boyebi, komikanga motema, mpiko, ezaleli ya kobanga Nzambe, bolingo epai na bandeko, mpe bolingo na bato nyonso.‘ Ntango Petelo amonaki kobongwana (transfiguration) na Yesu mpe ayokaki Nzambe koloba na ntina na Klisto, liloba ya esakweli limonisamaki polele. (Malako 9:1-8) Ezali na liloba yango lipemami na Nzambe nde tosengeli kotya likebi.

Tomisenzela mpo na bapengwi

Soki tokotya likebi mpenza na liloba ya esakweli na Nzambe, tokomisenzela mpo na bapengwi mpe bato mosusu oyo basila kobebisama. (2:1-22) Ntoma Petelo akebisi biso ete: balakisi na lokuta bakomikótisa kati na lisangá. Kasi Jehovah akoyeisa etumbu likoló na bapengwi, lokola asalaki yango epai na baanzelu oyo bazangi botósi, epai na mokili ya eleko na Noa mpe bingumba ya Sodome na Gomore. Balakisi na lokuta bazali kotyola bokonzi bouti na Nzambe mpe bazali koluka komema bato na bolembu na nzela na bango mabe.Mbele elekaki malamu soko bapengwi yango bayebaki ”nzela ya boyengebene te, na esika ete bayeba yango, mpe nsima bapengwa longwa na mobeko na bulee mopesami epai na bango.

Mokolo ya Jéhovah mozali koya!

Mpo ete tozali baoyo bakotyaka likebi na liloba ya esakweli na mikolo oyo ya nsuka, tokomitika kolembisama te na baseki oyo bazali kotyola nsango na ntina na koya na Klisto. (3:1-18) Bazali kobosana ete Nzambe oyo azali na mokano ya koboma biloko ya ntango oyo, azali Ye oyo asilaki koboma mokili oyo mozalaki liboso na mpela. Motema molai na Jéhovah mosengeli kotalelama te lokola ete azali koumela na elaká na ye, mpamba te alingi ete bato babongola mitema. Biloko ya ntango oyo bikobebisama na “mokolo na Jéhovah’’ mpe bakokitanya yango na ‘makoló na sika mpe mabelé na sika kati na yango boyengebene bokozala wana.’ Mpo na yango, tosengeli kosala nyonso ekoki na biso ete tozala na ’’litono te mpe na likambo te kati na kimya.’’ Na esika ete komitika kopengwisama na mateya ya lokuta, tokolinga ete tokóla kati na boyebi na Yesu Klisto.

Tobómba maloba oyo na Petelo. Tomisenzelaka ntango nyonso mpo na mateya ya lokuta. Tozalaka ntango nyonso na likanisi ete mokolo na Jéhovah mobelemi. Mpe tolanda kotya likebi na liloba ya esakweli na Nzambe.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 31]

Babwakami kati na Tartare: Jéhovah atikaki te baanzelu oyo basalaki lisumu, kasi abwakaki bango kati na Tartare, atyaki bango na mabulu ya molili tuu, mpo ete babatelama mpo na kosambisama.‘ (2 Petelo 2:4, MN) Ezali Tartare oyo elobelami na masapo ya Bagreke te, oyo Homère amonisaki kati na llíade (loyembo oyo ye asalaki ), lokola esika oyo ezali na nsé na mabelé epai kuna banzambe mike bakangamaki, kati na bango ba Titans mpe ba Cronos. Tartare oyo elobelami na Bible ezali ezalela ya kokitisama oyo ekokani na ezalela ya moto oyo akóti boloko kati na yango Nzambe abwakaki baanzelu bazangaki botósi na mikolo ya Noa.(Genese 6:1-8; 1 Petelo 3:19, 20; Yuda 6) Lokola babimisamaki na libota na Nzambe, bakoki lisusu kozwa pole ya elimo te oyo ekoutaka na ye mpe na bongo, bazali kati na ’’molili tuu.’’ Lokola babatelami mpo na kosambisama ete bakweisama na nzambe, bazali na elikya te liboso na ye; Tartare ezali komema sé na libulu mozindo epai Satana mpe Bilimu wana na botomboki bakobomama nsima na Boyangeli ya mbula nkóto na Yesu.​—Matai 25:41; Emoniseli 20:1-3, 7-10, 14.

[Elilingi]

National Archaeological Museum, Athènes, Grèce Zeus azalaki

[Eutelo ya bafɔtɔ]

kobwaka banzambe mike kati na Tartare oyo na masapo ya Bagreke

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto