Bazali kosakola nsango malamu kati “na engumba moko ya bautá na bisanga ya polynésie na Nouvelle-zélande”
“ENGUMBA eleki monene ya bautá ya bisanga ya Polynésie.” Yango ezali ebengeli mosusu ya Auckland, kapitale ya Nouvelle-Zélande. Mpo na nini? Ezali bobele te mpo ete efandami na ba Maoris, bato ya bisanga ya Nouvelle—Zélande, kasi lisusu mpo ete bankóto na bato ya bisanga mosusu ya Polynésie bafandi wana. Na bambula oyo euti koleka, bato yango balongwi na bisanga ya Somoa Occindentales, na bisanga ya cook, na Tonga, na Niue mpe na bisanga mosusu ya Pacifique. Sikawa, na Nouvelle-Zélande, ezali na ebele na ba Maoris bauti na bisanga ya Cook koleka baoyo batikali kuna na bisanga ya cook yango moko. Bobele bongo, bato ya Niue oyo bafandi na Auckland bazali mingi koleka motuya ya baoyo batikali kuna na esanga Niue.
Bafandi na bisanga wana ya Pacifique balongwaki na bamboka na bango libosoliboso na ntina na makambo ya nkita, kasi bazali na bamposa mosusu oyo basengeli kokokisa. Bato yango, baoyo bakolingaka Biblia, bazali mpenza kopesa motuya na bamposa na bango ya elimo. (Matai 5:3) Koyebáká bongo, ba Témoins de Jéhovah ya Nouvelle—Zélande basalaki milende mingi mpo na kosakola “nsango malamu ya bokonzi” epai na bafandi ya bisanga wana. (Matai 24:14) Basalaki nini katina likambo yango, mpe bafandi na bisanga bayambi nsango yango motindo nini?
Bautá ya Samoa bazali kokóla
Maloba ya misionere moko oyo asalaki na bisanga ya Samoa mazali koyebisa biso mingi likoló na lolenge oyo bafandi na bisanga bazali kotalela makambo ya elimo, ete: “Na Nouvelle—zélande, soki okutani na moto moko mpo na mbala ya yambo, babandaka kotuna liboso mosala nini asalaka. Na bisanga ya Samoa, liboso bakotuna lingomba na ye.” Ezali bongo kokamwisa te ete masangá mibale ya ba Témoins de Jéhovah oyo na bautá ya Samoa na mboka Auckland, ekóli noki mpenza koleka masangá mosusu ya Nouvelle-Zélande.
Ezali na 1977 nde lisangá ya liboso ya bautá ya Samoa lisalemaki na Auckland. Jéhovah akólisaki, mpe, mbula nsambo na nsima, lisangá ya mibale lisalemaki. (Tala 1 Bakolinti 3:6.) Masangá wana mibale mazali nyonso na basakoli 154, oyo 12 kati na bango bazali ba pionniers. Na mokolo na eyenga nyonso, moyenne ya bato 275 bakoyanganaka na makita na Biblia, maye masalemaka na Salle du Royaume.
Ba Témoins oyo bautá ya Samoa bazali kozwa lingomba na bango na motuya mingi, lokola yango emonisami na molende mpe na ekateli oyo bazali na yango mpo na kosakola mpe kozalisa bayekoli. (Matai 28:19, 20) Ezali yango nde emonisami na lisoló ya ndeko mwasi moko, moutá na Samoa:
Wana ezalaki ye kosakola ndako na ndako, akutanaki na mwasi moko oyo afundaki mangomba manso ete mazali na bokosi mpe akangaki ekuke na ye. Na kokamwa mpe na mawa, ndeko mwasi amitunaki soki asengelaki kosala nini. Amilobaki ete: ‘Nakoki mpe kokende te kotikáká ye na likanisi ete ba Témoins de Jéhovah bazali bakósi.’ Azwaki ekateli ya kokoma maloba na lokasa mpe kotikela ye yango. “Nalimbolaki ye na bokuse moboko ya Biblia mpo na mosala na ngai mpe nasengaki ye soki akokaki kopesa ngai ntango ete nayebisa ye elikya oyo epesami na Biblia. Napesaki ye nimero ya telefone na ngai.”
Mpe ndeko mwasi akei na kobetaka na bikuke mosusu. Wana akómaki na ndako ya minei, bayebisaki ye nsango euti na telefone, oyo esengaki ye ete azonga kotala mwasi oyo ayambaki ye malamu te. Ndeko mwasi alobi ete: “Mwasi yango asengaki bolimbisi mpo na oyo asalaki liboso, mpe ayebisaki boni asepelaki na nsango oyo natikelaki ye. Lisoló moko malamu lisalemaki, mpe boyekoli na Biblia bobandaki.”
Elimo ya misionere oyo emonisami na ba Témoins bautá ya Samoa ezali kopesa esengo na komona yango. Na 1981, Témoin moko mpe libota na ye balongwaki na mboka Auckland mpe bakendaki kofanda na mboka Wellington mpo na kosalisa etuluku moke oyo ezali kokokisa mosala na yango kati na popilasyo ya bautá ya Samoa. Etuluku oyo ezalaki bobele na basakoli 11 na eleko wana, ekómi na basakoli 47. Ndeko yango alobaki ete: “Mbano epesami mingi mpenza mpo na milende oyo misalemaki.” Kala mingi te, ye mpe libota na ye bayanolaki na ‘libéngami ya moto na Makedonia’ mpe bazongaki na bisanga ya Samoa Occidentales. (Misala 16:9, 10) Ba Témoins mosusu mpe basili kozonga na mboka na bango na liboso mpe basili kokóma ba pionniers spéciaux, bamisionere to mpe basali na Béthel.
Eyambeli ya bautá ya esanga Niue
Mosala ya kosakola mozali mpe kokóla kati na bautá ya esanga Niue oyo bafandi na mboka Auckland. Tala oyo eyebisami na mokengeli moko ya zongazonga: “Na mosala ya kosakola ndako na ndako, mbala mingi bato bakoyambaka biso. Bakozwaka Biblia na bango, mpe bamonaka ete ebongi kosolola kati na yango.”
Sikawa, na Auckland, ezali na lisangá moko ya molende mpenza lisalemi na ba Témoins bautá ya esanga Niue. Mobu mouti koleka, na ntango na vizite ya mokengeli ya zongazonga, basakoli 76 bayambaki bato 127 na diskur piblike esalemaki dimanche. Bandeko mibali mpe bandeko basi bazali komonisa ezalela kitoko na elimo.
Mokengeli ya zongazonga alobi ete: “Vizite etalelami lokola poso ya sipesiale ya bilendiseli mpo na bato banso. Lisangá lizwaki mokumba ya kopesa bilei binso. Bapesaki biso bilei bikolyamaka na esanga Niue lokola takihi (bolei bwa paipai, taros [mosisa ya nzete moko ezali mingi na mikili epai moi ekongalaka] mpe kreme ya kokoti oyo etyami kati na nkásá ya likémba), pitako (bolei bwa limpa oyo lisalami na taros, na makémba mpe na fufu) mpe punu povi (kornebefu) oyo ebéngami na lolenge na liseki ete, ezali mosuni ya ngombe oyo bakalingi mpo na bafandi ya bisanga.”
Mikanda na minoko ya bafandi na bisanga ya Polynésie
Mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya bautá ya bisanga ya Polynésie na mboka Auckland mpe epai mosusu, la Société Watch Tower akamataki bibongiseli mpo na kobimisa mikanda na minoko ya bafandi na bisanga yango. Na ndakisa, Mosenzeli mozali kobima mbala mibale na sanza na monoko Rarotonga, to Maori ya bisanga ya Cook, mpe ezali kobima mbala moko na sanza na monoko Niue. Mosenzeli na monoko ya Rarotonga mpe na Niue, ekobimaka 1 000 ekzamplere mpo na monoko moko na moko, mpe 900 ekzamplere mpo na ebimeli na monoko ya Samoa ezali kokabolama sikawa na Nouvelle-Zélande.
Longola Mosenzeli, motuya monene ya mikanda mpe ba brochures esili kobimisama na minoko ya bafandi na bisanga wana. Mokanda Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, oyo ebimisamaki na monoko ya Niue na 1989, ezali mokanda ya liboso na monoko yango, oyo mozali kolakisa mateya na moboko ya Biblia. Mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis na monoko Maori ya bisanga ya cook (Rarotonga) ezali mpenza kosepelisa bato oyo bakolobaka monoko yango. Pene na boyekoli nyonso na Biblia ezali kosalema bobele na mokanda yango. Nkulutu moko alobaki ete: “Oyo emonisi ete mokanda yango mozali malamu, ezali lombángo oyo lozali epai na bato oyo bayekolaka Biblia mpo na koyangana na makita ya lisangá.”
Longola mikanda oyo bazali kokabola kati na mosala oyo bameseni na yango ya ndako na ndako, ba Témoins bazali kokabola mikanda mingi mosusu wana ekopesaka bango litatoli na zando ya biloko bisila kosalelama (oyo bakobéngaka ete biloko ya occasion). Likoló na ebele na bafandi ya bisanga ya Polynésie oyo bakómaki na Auckland na bambula oyo euti koleka, bazando minene esalemaki elongo na batekisi na bilei mpe biloko bisalami na maboko na bafandi ya bisanga ya Pacifique. Bato 25 000 bakokendaka zando Samedi na ntóngo. Kosimbáká libaku yango, ba Témoins bakokendaka kuna mpo na koloba na ntina na Bokonzi na Nzambe epai na batekisi mpe bakilya na bango.
Na kokokisáká mosala na bango, ba Témoins balonaki mbótó mingi ya solo mpe bakabolaki motuya monene ya mikanda mikolimbolaka Biblia epai na bautá ya bisanga ya Polynésie. Biro ya filiale ya la Société Watch Tower eyebisi ete, na boumeli ya mbula ya mosala 1990, imprimerie ebimisaki mikanda 23 928 na minoko ya Polynésie.
Bazali na esengo na mesa ya elimo bobele moko
Koyangana na makita na boklisto poso na poso na Salle du Royaume mpe na ba assemblées ya distrike mpe ya circonscription, ezali likambo ya liboso mpo na ba Témoins de Jéhovah ya Polynésie, baoyo bazali komibanzabanza mpo na bamposa na bango ya elimo. (Baebele 10:23-25) Na assemblée “Boyengebene na Nzambe” oyo esalemaki na mboka Auckland na Décembre 1988, masoló mabongisamaki na monoko na Samoa, na Niue mpe na Maori ya bisanga ya cook. Drame moko ya Biblia oyo eyekolamaki malamu mpe esalemaki na esengo, ezalaki likambo ya ntina mpenza na programme na monoko ya Samoa. Ba Témoins ya Auckland oyo bautá na bisanga ya cook mpe na Niue, bamonisaki bobóto na boklisto na koyambáká bapaya oyo bautaki na bisanga epai bango babotámá. Assemblée ezalaki libaku ya komileisa mpe kosepela na mesa ya elimo na Jéhovah. Na assemblée “Monoko na peto” oyo esalemaki na 1990 na Auckland, ezalaki na bayangani 503 na programme oyo ebongisamaki na monoko ya Samoa.
Lolenge oyo bafandi ya bisanga ya Polynésie na mai monene ya Pacifique Sud bazali koyamba nsango na Bokonzi, ezali komonisa polele mpenza ete bazalaki ‘kozela mobeko na Jéhovah.’ (Tala Yisaya 42:4, 12.) Na ngala na bango, bazali kosangana na esengo mpenza kati na mosala ya kosakola nsango malamu kati na “engumba ya bautá ya bisanga ya Polynésie na Nouvelle-Zélande.”