Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/3 nk. 13-18
  • Totambola elongo moko na likálo ya jéhovah na likoló

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Totambola elongo moko na likálo ya jéhovah na likoló
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Andimi mosala mpe akokisi yango
  • Toyamba maloba na Nzambe kati na mitema na biso
  • Tozala na mposa ya kotambola elongo moko na lisangá ya Nzambe
  • Tolanda kotambola elongo moko na lisangá ya Nzambe
  • Likálo ya jéhovah na likoló ezali kotambola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Yehova asalisaka biso tókokisa mosala na biso ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Ezekiele​—I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mokanda ya Biblia nimero 26​—Ezekiele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/3 nk. 13-18

Totambola elongo moko na likálo ya jéhovah na likoló

’’Okolobela bango maloba na ngai, soko bakoyoka to mpe bakoboya koyoka.​—EZEKIELE 2:7.

1, 2. Likálo nini na bokonzi Ezekiele amonaki, mpe balobaki na ye nini?

LIKÁLO ya Jéhovah na likoló etelemi lelo liboso na basaleli na ye. Na miso ya kondima, bazali kotala motuka na bokonzi ya Nkolo Moyangeli na bango. Motuka yango monene etondi na nkembo mpe na lokumu.

2 Ezali likálo na bokonzi oyo litelemaki na emonaneli liboso ya Ezekiele, mosakoli na Nzambe, esili bongo koleka soko mibu 2 600. Longwa na likálo oyo lizali komema kiti na bokonzi na ye mpe oyo emonisi lisangá na ye kuna na likoló, lisangá oyo lisalemi na bikelamu ya elimo, jéhovah apesaki Ezekiele etinda oyo na ntina mingi ete: “Bato na lolendo mpe na mitema makasi​—nakotinda yo epai na bango, mpe okoloba na bango ete: ‘Nkolo Jéhovah alobi boye.’ Mpe soko bakoyoka to mpe bakoboya koyoka​—mpo ete bazali ndako na batomboki​—bakoyeba solo ete mosakoli azalaki kati na bango.”​—Ezekiele 2:4, 5, MN.

3. Na eleko na biso, nini ekokani na Ezekiele?

3 Ezekiele ye moko akokisaki mokumba na ye na ekateli makasi na nsé na litambwisi na Nzambe. Bobele bongo lelo, Nzambe azali kotambwisa lisangá bobele moko. Kelasi ya Ezekiele, batikali bapakolami, bazali na molongó ya liboso mpo na kopesa litatoli ya nsuka, wana “ebele monene” ya “bampate mosusu” basangani na bango mpo na kosalisa bango kati na mokumba na bango. (Emoniseli 7:9, 10;Yoane 10:16) Bango nyonso basali “etonga bobele moko” oyo ekambami na Mobateli na bampate aleki malamu, Yesu Klisto, ye oyo azali mpe na nsé na boyangeli ya Motambwisi monene na likalo, Jéhovah Nzambe.

4, 5. Ndenge nini lisangá na Nzambe oyo ezali komonana ebandaki, mpe ekómaki motindo nini na boyokani na Yisaya 60:22?

4 Na nsé na litambwisi na Jéhovah, lisangá yango ya mokili mobimba likóli mingi mpenza longwa na motuya moke na ebandeli na yango. Lelo oyo ezali esaleli na nguya esalelami mpo na kosakola maloba oyo: “Bobanga Nzambe mpe bopesa ye nkembo, mpo ete ntango na kosambisa na ye esili koya.” (Emoniseli 14:7, MN) Ezekiele ye moko amikómisaki mosakoli te; bobele bongo, lisangá na Nzambe oyo lizali komonana emisalaki yango moko te, emiponaki mpe yango moko te. Esalemi te na mokano na bato to mpe na milende na bato. Ezali Nzambe, Motambwisi na likálo nde asalaki yango. Kozwáká nguya na elimo na Nzambe mpe na lisungi ya baanzelu na bulee, libota na Jéhovah lisili kozwa bokóli monene mpenza na motindo boye ete ‘oyo moke akómi libota makasi.’​—Yisaya 60:22.

5 Ba Témoin de Jéhovah, koleka 4 000 000 bazali kosakola nsango ya Bokonzi kati na mikili 212 mpe bisanga.Bayangani kati na masangá koleka 63 000 oyo mabongisami na ba circonscriptions mpe na ba distrike.Ba filiales minene mpe binyateli minene ezali nyonso kosala na nsé na litambwisi ya college central, oyo ezali kokamba mosala longwa na biro monene ya lisangá na mokili mobimba.Bango nyonso, lokola moto moko, bazali kokende liboso na kosakoláká nsango malamu, na kopesáká mateya epai na baoyo bazali kosepela na yango mpe na kotongáká bisika mpo na makita. Ee, lisangá ya Jéhovah oyo lizali komonana, lizali kotambola elongo na likálo ya likoló mpe Motambwisi na yango.

6. Kotambola elongo moko na lisangá na Nzambe oyo ezali komonana esengi nini?

6 Soki ozali Témoin de Jéhovah, ozali kotambola elongo moko na lisangá na Nzambe oyo lizali komonana? Yango ezali kosenga makambo mingi koleka koyangana mpamba na makita ya boklisto mpe kolekisa mwa ntango kati na mosala ya kosakola. Lolenge na biso ya kokende sé liboso mpe bokóli na biso na elimo etalelami na esika ya yambo. Esengeli na biso kozala na elimo ya kolónga, komityela mikano ya ntina mingi na esika ya liboso mpe kolanda bibongiseli nyonso ete totikala nsima te. Soko nde tozali kotambola elongo moko na likálo ya Jéhovah na likoló, boye bomoi na biso bozali bongo na boyokani na nsango oyo tozali kosakola.

7. Mpo na nini tosengeli kotalela lolenge oyo Ezekiele amitambwisaki lokola mosakoli na Nzambe?

7 Mpo na oyo etali kotambola elongo moko na lisangá, basaleli na Jéhovah na ntango oyo bakoki koyekola makambo mingi longwa na ndakisa ya Ezekiele. Likambo oyo ete aponamaki mpenza mosakoli epai na Jéhovah epekisaki ye te na kozala na mayoki, na mabanzo mpe na bamposa. Na ndakisa, wana azalaki naino elenge, aokaki mpasi mingi mpo ete mwasi na ye akufaki. Kasi, abosanaki te mosala na ye ya mosakoli ya Jéhovah. Na kotaleláká lolenge oyo Ezekiele amitambwisaki na mabaku mosusu, tokoki komilendisa mpo na kotambola elongo moko na lisangá na Nzambe oyo lizali komonana. Yango mpe ekosalisa biso na kotambola elongo moko na lisangá na ye oyo lizangi komonana.

Andimi mosala mpe akokisi yango

8. Na boyokani na mosala na ye, ndakisa nini Ezekiele asili kotika?

8 Na kondimáká mosala na ye mpe na kokokisáká yango, Ezekiele apesaki ndakisa malamu. Nzokande, mpo na kokokisa malamu mokumba na ye, esengelaki na ye ete azala na botósi mpe na mpiko, mpamba te totangi ete: “Mwana na moto, bángá bango te; mpe bángá maloba na bango te, mpamba te bazali bato na motó makasi mpe bazali nzube ekotubaka yo, mpe ofandi esika na nkotó. Bángá maloba na bango te mpe zalá na nsomo mpo na bilongi na bango te, mpamba te bazali ndako na batomboki. Mpe okolobela bango maloba na ngai, soko bakoyoka to mpe bakoboya koyoka, mpamba te bazali ndako na batomboki. Mpe yo, ɛ mwana na moto, yoka maloba na ngai. Kozala motomboki te lokola ndako oyo na batomboki.”​—Ezekiele 2:6-8, MN.

9. Ezekiele asengelaki kosala nini mpo ete azala na nyongo ya makila te?

9 Ezekiele asengelaki kozala moto na goigoi te to moto na kolengalenga mpe te, asengelaki mpe kopusama mbala na mbala te mpo na kokokisa mosala na ye. Mpo ete azala na nyongo na makila te, esengelaki na ye ete ayebisa maloba na Jéhovah na molende mpe na ekateli makasi. Tala likebisi azwaki: “Soko nde okokebisa moto mabe mpe akopengwa na mabe na ye te, boye, ye akokufa kati na lisumu na ye, nde yo osili kobikisa molimo na yo.”​—Ezekiele 3:19.

10. Ndenge nini kelasi ya Ezekiele emonisi ete ekokani na mosakoli yango?

10 Lokola Ezekiele, kelasi na Ezekiele oyo epakolami, bandimaki mosala oyo epesamelaki bango na Nzambe mpe bazali kokokisa yango. Soko tozali ba Témoin de Jéhovah,, tosengeli komikundola ete bomoi na biso mpe oyo na bato mosusu etali botósi na biso. (1 Timoté 4:15, 16) Ba Témoin de Jéhovah, nyonso basengeli kotambola elongo moko na lisangá. Nzambe akokangisa biso te na likálo na ye mpo ete abénda biso. Soki tozali na goigoi mpe soki motema na biso mokambwani, Motambwisi na likálo akokumisama te. Na yango, lokola tozali kolendisama na lisangá ya Jéhovah oyo lizali komonana, tosenzela ete matomba na bonzambe mazala na ntéi to na centre ya bomoi na biso. Soko tokolanda ntango nyonso elendiseli oyo, tokokóba kotambola elongo moko na lisangá na Nzambe mpe mosala na biso ya bulee mokozala bobele momeseno mpamba te. Ntembe ezali te ete, na mobimba na yango, libota na Jéhovah lizali komonisa molende makasi. Na yango, tosengeli moto na moto kolanda kosala bongo.

Toyamba maloba na Nzambe kati na mitema na biso

11. Ndakisa nini Ezekiele asili kotika mpo na oyo etali maloba na Nzambe?

11 Ezekiele asili kotika lisusu ndakisa malamu mpo na oyo etali koyamba maloba na Nzambe kati na motema na ye. Lokola azwaki etinda, alyaki buku oyo Nzambe apesaki ye. Ezekiele alobi ete, “ezalaki na monoko na ngai elengi lokola mafuta na nzoi.” Atako buku yango etondaki na ‘maloba na mawa, na maloba na kokimela mpe na bileli,’ kasi yango ezalaki elengi epai na Ezekiele mpo ete asepelaki na lokumu ya kozala momonisi na Jéhovah. Kokokisa mosala oyo Nzambe apesaki ye ezalaki likambo ya elengi mpenza mpo na mosakoli. Nzambe alobaki ete: “Mwana na moto, yamba kati na motema na yo, maloba na ngai nyonso nakolobela yo mpe yoka yango na matoi na yo mpenza.” (Ezekiele 2:9 kino 3:3, 10, MN) Bimonaneli yango bisalisaki Ezekiele ete atya mpenza motema na mosala oyo Jéhovah atindaki ye ete asala yango mpe bilendisaki boyokani na ye elongo na Nzambe.

12. Mosakoli Ezekiele asalaki nini na boumeli ya mosala na ye ya koleka mibu 20?

12 Ezekiele azwaki bimonaneli mpe bansango oyo ezalaki na mikano mikeseni mpe etindamaki mpo na bato bakeseni. Esengelaki na ye ete ayokamela na likebi, na nsima aloba mpe asala lokola Nzambe atindaki ye. Na boumeli ya mibu 22 oyo asalaki lokola mosakoli, azwaki mokemoke mitinda likoló na makambo oyo asengelaki koloba mpe kosala. Ntango mosusu, azalaki koyebisa nsango oyo maloba na yango mapesamaki sikisiki. Mbala mosusu, asengelaki kosalela bilakiseli to bikela; ndakisa amitandaki liboso na biliki oyo ezalaki elilingi ya Yelusaleme. (Ezekiele 4:1-8) Ndakisa na ye kati na makambo ya bomoi na ye moko, lokola ezaleli na ye na liwa ya mwasi na ye, ezalaki mpe nsango mosusu. (Ezekiele 24:15-19) Na ntango nyonso mpe na elaká ekoki, asengelaki koyebisa nsango oyo ebongaki mpe kosala lokola esengelaki. Ezekiele azalaki na bomoko elongo na Jéhovah na kosalana penepene na ye mpe bomoko yango ezalaki sé kokóla.

13. Lolenge nini tokoka kotonga boyokani malamu elongo na Jéhovah?

13 Bobele bongo, mpo na kotonga mpe kobatela boyokani malamu elongo na Jéhovah, biso moko, basalani na ye elongo moko, tosengeli koyamba Liloba na ye kati na mitema na biso. (1 Bakolinti 3:9) Na likambo oyo, kotambola elongo na lisangá emonisi ete esengeli na biso nokinoki kolya ebele na bilei ya elimo oyo bizali kopesama na ntango na yango. (Matai 24:45-47) “Monoko na peto” mozali kokóla ntango nyonso. (Sofoni 3:9, MN) Mpo na kokoka mpenza kotósa Motambwisi na likálo, esengeli na biso ete kozala na boyebi lolenge moko na lisangá.

14, 15. Tosengeli kosala nini ntango nyonso mpo na kotambola elongo moko ma lisangá na Nzambe?

14 Mpo na yango, tosengeli kobondeláká mbala na mbala, koyekola mpe kosangana na mosala na bulee ya kosakola nsango malamu. (Baloma 15:16) Tomikundola ndakisa ya Ezekiele, ntango alyaki buku oyo ezalaki na nsango na Nzambe kati na yango. Alyaki yango nyonso; atikaki eloko moko te. Aponaki te ndambo oyo ekokaki kozala elengi mpenza mpo na ye. Bobele bongo, boyekoli ya biso moko ya Biblia mpe ya mikanda na boklisto oyo mikolimbolaka Biblia, esengeli kobongisama na motindo boye ete tozala na boyebi motindo moko elongo na lisangá, mpe tosengeli kosalela bilei nyonso oyo bisili kopesamela biso na mesa ya elimo, ezala ata mateya ya mozindo mpenza.

15 Totya milende elongo na mabondeli mpo na kolya malamu bilei yango makasi. Soki tolingi kotambola elongo moko na lisangá, esengeli ete boyebi na biso mpe bososoli na biso eleka makambo mikemike ya ebandeli, mpamba te tozali kotanga ete: “Moto na moto oyo akomelaka mabele akososolaka liloba na boyengebene te, azali naino mwana. Kasi bilei makasi ezali mpo na bato bateli, mpo na bango bazali na makoki ya kososola malamu na mabe.” (Baebele 5:13, 14) Ee, soki tolingi kotambola elongo moko na lisangá na Nzambe, ezali ntina ete tokóla na elimo.

16, 17. Ndenge nini Ezekiele amitambwisaki liboso na bato oyo bazangaki kosepela na mosala na ye mpe liboso na baseki?

16 Ezekiele apesaki lisusu ndakisa malamu na boye ete azalaki na botósi mpe alembaki na motema te likoló na bato oyo bazangaki kosepela na mosala na ye to likoló na baseki. Bobele bongo, na kolandáká bokóli ya monoko na peto na likebi mpenza, tozali bongo koumela na boyokani elongo na litambwisi oyo lizali kouta na Mokonzi mpe Motambwisi na likálo. Tozali na biloko binso oyo bizali kosalisa biso mpo na kotósa mitinda na ye, mpe tolendisami ete tolemba na mitema te likoló na bato oyo bazangi kosepela na mosala na biso to likoló na kotyola euti na bato oyo tozali koyebisa bango nsango ya bikateli ya Jéhovah. Lokola asalaki mpo na Ezekiele, Nzambe asili koyebisa biso liboso ete, bamoko bakotemela biso mpenza mpo na motó makasi na bango mpe mpo na motema makasi. Bamosusu bakoyoka te mpo ete bakolinga koyoka Jéhovah te. (Ezekiele 3:7-9) Mpe bamosusu bakozala bakosi, lokola tokoki kotanga yango na Ezekiele 33:31, 32, ete: “Bakoingela epai na yo lokola ekoingelaka bato, mpe bakofanda liboso na yo lokola bato na ngai; mpe bakoyoka maloba na yo nde bakosalela yango te, mpamba te na minoko na bango bakomonisaka bolingo mingi nde bakotyaka mitema na bango na libonza na bokesene. Mpe, tala na miso na bango, ozali lokola loyembo na bolingo, lokola moyembi na mongongo malamu oyo abeti likembé malamu mpe ayembi loyembo kitoko; bakoyoka solo maloba na yo, nde bakosalela yango te.”

17 Nini esengelaki kosalema? Eze Verset 33 elandi ete: “Wana makambo oyo makobima​—mpe yango ekobima solo​—na ntango yango bakoyeba ete mosakoli azalaki na kati na bango.” Maloba oyo mazali komonisa biso ete Ezekiele atikaki mosala na ye te, atako bato mingi bandimaki ye te. Kozanga bosepeli ya bato mosusu elembisaki ye te. Bayoka ye to bayoka te, Ezekiele atosaki Nzambe mpe akokisaki mosala na ye.

18. Mituna nini okoki komituna?

18 Lisangá na Nzambe oyo lizali komonana, lizali kosakola na molende mpenza ete bato banso basengeli kobánga Nzambe mpe kopesa ye nkembo. Ozali komonisa ezaleli ya kolendendela wana bato bazali koloba mabe mpo na molende oyo ozali na yango mpo na kopesa litatoli ya Bokonzi, to mpo na bizaleli malamu ya bomoi na yo? Otikalaka sembo wana bakomekaka kopusa yo ete ondima kozongisa makila, ondima kosambela bikeko ya ekólo to kokumisa biyenga ya Bapakano?​—Matai 5:11, 12; 1 Petelo 4:4, 5.

19. Soko tozali kotambola elongo moko na likálo ya Jéhovah na likoló, tokosala nini liboso na litambwisi oyo tozali kozwa?

19 Nzela oyo ezali petee te, kasi baoyo bakoyika mpiko kino nsuka, bakobika (Matai 24:13) Na lisalisi ya Jéhovah, tolingi kosala nyonso mpo ete bato ya mokili bakómisa biso lokola bango te, komemáká biso kino ete totambola lisusu elongo moko te na likálo ya Jéhovah na likoló. (Ezekiele 2:8; Baloma 12:21) Soki tokotambola elongo moko na lisangá ya likoló limonisami na likálo, tokomilengele mpo na komiyokanisa na litambwisi mpe na mitinda oyo tozali kozwa na nzela ya lisangá na Nzambe oyo lizali komonana. Jéhovah azali kopesa biso biloko oyo tozali na yango mposa mpo ete tokoka kotemela makambo oyo mazali kobundisa kondima na biso, mpo ete tolanda kokangama na Liloba ya bomoi mpe mpo ete totya miso na biso bobele likoló na makambo na elimo oyo matali Mokonzi mpe Motambwisi na likalo ya likoló.

Tozala na mposa ya kotambola elongo moko na lisangá ya Nzambe

20. Wapi mwa bamoko na makambo makomamaki na Ezekiele, maye masengeli kopusa biso ete totambola elongo moko na lisangá?

20 Bimonaneli ya Ezekiele bisengeli kopusa biso na kotambola elongo moko na lisangá. Ezekiele asakolaki bobele bikateli na Nzambe te likoló na Yisraele, kasi akomaki mpe bisakweli na ntina na mosala ya kotonga lisusu mboka. Alobaki na ntina na Moto oyo akozala na lotómo ya kofanda likoló na kiti na bokonzi ya Jéhovah mpo na koyangela na elaka na yango. (Ezekiele 21:27) Mosali wana mpe Mokonzi, “Davidi,” akoyanganisa libota na Nzambe mpe akokamba yango. (Ezekiele 34:23, 24) Libota yango likobundisama na Gog de Magog; kasi Nzambe akobikisa bango. Na nsima, ntango banguna na Nzambe bakokende na libebi, ‘bakoyeba ete azali Jéhovah.’ (Ezekiele 38:8-12; 39:4, 7) Na ntango wana nde basaleli na Nzambe bakokoka bongo kozala na bomoi bozangi nsuka, mpe kosalela losambo ya peto kati na temple ya elimo. Mai na bomoi oyo mazali kobima longwa na esika mosantu makopesa bilei mpe lobiko; epai mosusu, libula likopesamela basaleli na Nzambe kati na mokili, mpo na bolamu na bango.​—Ezekiele 40:2; 47:9, 12, 21.

21. Mpo na nini mokumba ya ba Témoin de Jéhovah, ya ntango na biso ezali monene koleka oyo ya Ezekiele?

21 Oyo nde mosala monene Ezekiele azalaki na yango, wana akomaki bisakweli oyo! Nzokande, mosala ya ba Témoin de Jéhovah, ya ntango na biso ezali lisusu monene koleka, mpamba te tozali kobika na eleko oyo bisakweli yango mosusu bizali kokokisama.Mpe biso, tozali kosangana na molende mpenza mpo na kokokisama ya mwa ndambo na yango.Omonisaka na bomoi na yo ete ondimisami mpenza ete tozali kobika na eleko oyo Yesu, Ye oyo azali na lotomo ya kozwa bokonzi, asili kobanda koyangela? Ondimisami mpenza ete mosika te, Jéhovah akokumisa nkombo na ye mpe akopesa lobiko kati na mokili ya sika, epai na baoyo bazali kotambola elongo moko na lisangá na ye? (2 Petelo 3:13) Elikya makasi boye, oyo esangani na misala ya kondima, ezali komonisa ete tozali mpenza kotambola elongo moko na likálo ya Jéhovah na likoló.

Tolanda kotambola elongo moko na lisangá ya Nzambe

22. Nini tosengeli kosala mpo ete topengolama te mpe tobatela emoneli na biso Polele mpo na makambo ya elimo?

22 Wana esili biso “kotya loboko na etímelí, tosengeli te kozala lisusu na mposa na biloko oyo mokili ekoki kopesa biso. (Luka 9:62; 17:32; Tito 2:11-13) Na yango, totemela makanisi nyonso ya koluka komibómbela biloko ya motuya na nsé mpe tozala na liso malamu, na kotalela bobele Bokonzi. (Matai 6:19-22, 33) Soko tokoyeisa bomoi na biso petee, na kosaláká nyonso ekoki na biso mpo na kolongola bozito nyonso ya mokili, tokokoka kotambola malamu mpenza elongo moko na lisangá ya Jéhovah. (Baebele 12:1-3) Soko tokomitika kopengolama, emoneli na biso ya likálo ya likoló mpe Motambwisi na yango, ekozala lisusu polele te. Kasi na lisalisi na Nzambe, tokoki, lokola Ezekiele, kobatela emoneli na biso polele na makambo ya elimo.

23.Ba Témoins ya sembo basengeli kosala nini mpo na bolamu na bato ya sika?

23 Kati na mikumba oyo bazali na yango, ba Témoin de Jéhovah, bazali mpe na mokumba ya kosalisa bato ya sika oyo bazali koya mpo na kotambola elongo moko na likálo ya Nzambe na likoló. Na 1990, pene na bato 10 000 000 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa na Yesu Klisto. Mingi kati na bango bazali mbala mosusu koyangana na mwa makita na boklisto, kasi esengeli na bango kokanga ntina ya kokende liboso elongo na lisangá ya Jéhovah oyo ezali komonana. Soki tozali ba Témoins ya sembo, tokoki kosalisa bango na nzela na elimo oyo tozali komonisa mpe na bilendiseli oyo tozali kopesa.

24. Tosengeli kosala nini na eleko ya nsuka ya Lisoló na bato oyo tokómi ma yango?

24 Tokómi na eleko ya nsuka ya Lisoló na bato. Na miso ya kondima, tosili komona likálo ya likoló litelemi liboso na biso. Motambwisi mokonzi na likálo asili kopesa epai na lisangá na ye oyo lizali komonana, mosala ya kosakola epai na mabota, na boye ete ntango nsuka ekoya, bakoyeba ete ye azali Jéhovah. (Ezekiele 39:7) Totambola elongo moko na likálo ya Jéhovah na likoló, bongo tokozwa litomba mpenza na likoki kitoko epesameli biso ya kolóngisa boyangeli na Nzambe mpe kokumisa nkombo na ye mosantu.

◻ Mpo na oyo etali mosala na ye, ndakisa nini Ezekiele asili kopesa?

◻ Kotambola elongo moko na lisangá na Nzambe esengi nini?

◻ Lolenge nini Ezekiele azalaki kotalela maloba na Jéhovah?

◻ Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Ezekiele kati na etamboli na ye liboso na bato oyo bazalaki kosepela na mosala na ye te?

◻ Nini esengeli kopusa basaleli na Jehovah ete batambola elongo moko na likálo na ye ya likolo?

[Bililingi na lokasa 15]

Esengeli kosala nini mpo na kotambola elongo moko na likálo ya Jéhovah na likoló?

[Elilingi na lokasa 16]

Ezekiele apesaki motuya mingi na mosala kitoko oyo Nzambe atindaki ye. Ezali boni mpo na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto