Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/3 lok. 32
  • Motuya nini opesaka na nzoto na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motuya nini opesaka na nzoto na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/3 lok. 32

Motuya nini opesaka na nzoto na yo?

Elenge mwasi moko ya Beaver Falls, na États-unis, akomaki ete: “Nzoto na ngai ezalaki kotungisa ngai mingi. Nazalaki komimona ete nazalaki kitoko te mpe nazalaki kobenda likebi ya bato te.” Ayebisi ete: “Nazalaki koboya mbala mosusu kolya bilei na boumeli ya mikolo mingi mpe bakilo na ngai ezalaki kokita, kilo moko to mibale. Kasi, wana nazalaki kooka nzala mingi na nsima, nazalaki kolya mingi mpe nokinoki nazalaki kozongela bakilo na ngai oyo ekitaki.”

Ayebisi likambo lisalemaki nsima, na assemblée moko ya boklisto. “Namitalaki na talatala, mpe nalobaki na moninga na ngai oyo nalingaki mingi ete: ‘Nazali kitoko te!’

“Moninga wana atunaki ngai soki nasilaki kotanga eteni ‘Votre apparence et vous’ (‘Nzoto na yo mpe yo’) oyo ezali kati na mokanda Les jeunes s’interrogent​—Réponses pratiques. Nayanolaki ye ete, natangi yango naino te. Alobaki na ngai ete: ‘Moninga mwasi, ekozonga yo na mpokwa epai na bino, esengeli ete otanga yango.’ Ezali yango nde nasalaki.

“Namonaki lokola ete nazalaki kotanga lisoló ya bomoi na ngai. Motuna moko mopusaki ngai ete nakanisa: ‘Nani oyo azali kopalanganisa likanisi oyo ete esengeli komonana kitoko mpo ete balula yo, mpo ozala na bomoi malamu to mpo ozwa bomengo?’”

Nsima na kokanisa na motuna oyo, elenge mwasi wana abongolaki mpenza lolenge na ye ya kotalela bomoi. Tala lolenge asukisaki mokanda na ye: “Na lisalisi ya batoli kitoko oyo ezali kati na mokanda Les jeunes s’interrogent, namonaki ntina ya kobongola makanisi na ngai.”

Bilenge bazali lelo kokutana na ebele na mimekamo. Bazali na mposa ya lisalisi mpo na kolónga yango. Mokanda Les jeunes s’interrogent​—Réponses pratiques ezali kokokisa mposa yango. Okoki kozwa ekzamplere moko ya mokanda yango ya bililingi kitoko epai na ba Témoins de Jehovah ya mboka oyo yo ofandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto