Mituna na batangi
◼ Baanzelu bazali bilimu oyo bazali na nzoto ezangi komonana. Bongo, mpo na nini bamonisamaka na mapapu kati na bililingi na bino? Ezali bobele mpo ete lingomba na bino esengi bongo?
Mingimingi, tokomonisaka baanzelu na mapapu na ntina na motindo na elilingi oyo bamonisami kati na Biblia.
Bozali na elónga na koloba ete bikelamu ya elimo bazali na nzoto te oyo ekomonanaka, oyo ezali na mapapu—ata elongi, maboko, makolo, mpe biteni mosusu ya nzoto. Nzokande, ekómaki mbala mosusu ete, baanzelu bazalaki kobimela basaleli na nzambe na lolenge na bato, mpamba te batalelamaki na libungá lokola bato.—Genese 18:2, 22; 19:1; Basambisi 6:11-22.
Kasi, mbala mosusu bato bazalaki komona bimonaneli na ntina na baanzelu mpe bamonisaki motindo na bango. Mosakoli Ezekiele amonaki bikelamu na bomoi minei,” mpe, na nsima, na emonaneli mosusu, alobaki ete baanzelu yango bazalaki na molóngo ya bakeluba. (Ezekiele 1:5; 9:3; 10:3) Moko na moko na baanzelu yango azalaki na mapapu minei, oyo ezalaki komonisa makoki na bango ya kokende epai nyonso na lombangu mpenza, wana batindami na Nzambe. Bikelamu na bomoi yango “bazalaki kotala nsima te wana ezalaki bango kokende; moko na moko atambolaki sembo liboso na ye kozanga kopengwa . . . Kuna elimo elingaki kokende, bango bakendaki wana. Bazalaki kotala nsima te wana ezalaki bango kokende.”—Ezekiele 1:6, 9, 12, MN.
Kasi baanzelu oyo bamonanaki na emonaneli bazalaki ntango nyonso lolenge moko te. Baanzelu oyo babengami basérafé, oyo Yisaya amonaki, bazalaki na mapapu motoba (Yisaya 6:1, 2) Bimonaneli ya Ezekiele bikeseni. Kati na emonaneli ya yambo, baanzelu bazalaki na makolo, na maboko, na nsé na mokomoko na mapapu minei oyo bazalaki na yango, mpe bazalaki na bilongi minei (na lolenge na moto, na nkosi, na ngombe mobali mpe na mpóngó). Kati na emonaneli elandi, moko na bilongi ezalaki na lolenge na keluba moko, nde lokola ngombe mobali te, mbala mosusu mpo na kolakisa nguya monene ya bakeluba. Kati na emonaneli mosusu, na boyokani na bonzenga ya temple ya elimo, Ezekiele amonaki bakeluba oyo bazalaki na bilongi mibale, moko lokola moto mpe mosusu lokola nkosi. (Ezekiele 1:5-11; 10:7-17; 41:18, 19) Kati na Esika-Eleki-Bosantu ya etumbelo, mpe kati na temple oyo etongamaki na Salomo na Yelusaleme, ezalaki na bakeluba oyo na mapapu mibale. Bazalaki likoló na ezipeli na wolo na sanduku oyo ebengamaki sanduku na kondimana. Bakeluba mibale ya wolo batalanaki. mpe moko na moko azalaki na mapapu mibale matandamaki likoló ya Sanduku. (Exode 25:10-22; 37:6-9) Kasi na temple ya Salomo, likoló na Sanduku (mpe likolo na ezipeli na yango) ezalaki na bakeluba mibale eleki mpenza minene oyo esalemaki na wolo, etandaki mapapu na yango.—1 Mikonzi 8:6-8; 1 Ntango 28:18; 2 Ntango 5:7, 8.
Josèphe akomaki ete: “Mpo na oyo etali bakeluba [yango], moto moko te akoki koloba—to kokanisa—soki bango bakokanaki na eloko nini.” Lisusu, bato mosusu na mayele mpe bayemi (artistes) bakomonisaka lolenge na baanzelu (mingi mpenza bakeluba) na kolandáká bililingi ya banzambe ya Moyen-Orient oyo ezalaki na lolenge na banyama na mapapu. Kasi tozali na elakiseli ya sikisiki kati na maloba na Ezekiele oyo ete, baanzelu oyo ye amonaki “bazalaki na lolenge na bato oyo basalami na mputulu.” (Ezekiele 1:5, MN) Tala mpo na nini, baanzelu ya likoló bamonisami mingimingi kati na mikanda na biso lokola bato. Tozali komonisa bango na mapapu mpo ezali motindo wana nde Biblia ezali komonisa baanzelu na bisika mingi, mpe mpo ete yango elobi ete baanzelu ‘bakopumbwaka.’—Emoniseli 14:6; Nzembo 18:10.
Mpo na kosukisa, na lokasa 288 ya mokanda La Révélation—le grand dénouement est proche! tozali komona ekelamu moko ya likoló na mapapu, kotaláká motólé na motó mpe na fungola na loboko. Ezali komonisama na lolenge na elilingi ya Emoniseli 20:1, epai tokoki kotanga ete: “Namonaki anzelu moko kokita na likoló, azalaki na fungola ya libulu bozindo mpe na monyololo monene na loboko.” Tozali kososola ete anzelu wana asimbi fungola azali Yesu Klisto akembisami. Soki amonisami na mapapu na elilingi, ezali mpo na kolakisa mpenza ete baanzelu oyo bamonanaki na emonaneli bazalaki na mapapu.